MOKANDA YA LIBOSO YA YOANE 1

 

Mokapo 1Mokapo 2Mokapo 3Mokapo 4Mokapo 5

 

 

1        MOKAPO 1

1. Oyo azalaki wuta ebandeli, oyo biso toyokaki, oyo biso tomonaki na misu na biso, oyo biso totalaki malamu mpe maboko na biso esimbaki. 2. Na oyo etali liloba na bomoyi ( bomoyi esilaki komimonisa ; mpe biso tomonaki, mpe biso tozotatola, mpe biso toteyi bino bomoyi ya seko, oyo azalaki epayi ya Tata mpe amimonisamaki na biso. 3. Oyo biso tomonanaki mpe toyokaki, biso tozoteya bino, na ntina ete bino mpe bozala na boyokani na biso : Nzokande boyokani na biso eza elongo na Tata mpe elongo na Mwana na ye Yesu Kristu. 4. Mpe biso tozokomela bino makambo, na ntina ete esengo na bino ezala ya kokoka.

5. Mpe ezali awa sango biso toyokaki na ye, mpe biso toteyi bino, ete Nzambe azali polé mpe kati na ye ata milili moko eza te.

 6. Soki biso tozoloba ete biso toza na boyokani elongo na ye, mpe ete biso tozotambola kati na milili, biso tozokosa mpe biso tozosalela solo te, 7. Na yango soki biso tozotambola kati na polé, lokola ye moko azali kati na polé, tozali na boyokani bamoko elongo na basusu, mpe makila na Yesu Kristu Mwana na ye ekopetola biso, na masumu nionso.

8. Soki tozoloba ete biso toza na lisumu te, tozali biso moko komipenguisa, mpe solo eza te kati na biso.

9. Soki biso tokotubela masumu na biso, ye azali sembo mpe moyengebeni pona kolimbisa masumu na biso mpe kopetola biso na mbindo nionso.

10. Soki biso tolobi ete biso tosumuka te, biso tozosala ye mutu na lokuta mpe liloba na ye eza te kati na biso.

 

2        MOKAPO 2

1. Bana na nga, nakomeli bino makambo oyo mpo bino bosumuka te ; mpe soki moko asumuki, biso toza na moto akolobela biso epayi na Tata, Yesu Kristu, moyengebeni ; 2. Mpe ye azali mbeka ya masumu na biso, mpe eza kaka pona biso moko te, kasi pona mokili mobimba.

 3. Boye nde biso toyebi ete biso toyeba ye soki biso tozobomba mibeko na ye. 4. Oyo aloba : nayebi ye, mpe azobomba te mibeko na ye, azali lokuta, mpe solo eza kati na ye te. 5. Kasi oyo nionso azobomba liloba na ye, kati na ye bolingo na Nzambe ezali solo ya  kokokisama : bongo toyebi ete tozali kati na ye. 6. Oyo alobi azali kowumela kati na ye esengeli ye moko atambola ndenge ye atambolaki.

7. Balingami, nakomeli bino te mobeko moko ya sika, kasi mobeko moko ya kala, oyo bino bozuaki wuta ebandeli. Mobeko ya kala eza liloba oyo bino boyokaki. 8. Mbala moko lisusu, nakomeli bino mobeko moko ya sika, oyo ezali solo kati na ye mpe kati na bino, pamba te milili ezokende mpe polé ya solo ezo ngenga. 9. Oyo azoloba aza na polé mpe azoyina ndeko na ye, aza na milili ti sik’oyo. 10. Oyo azolinga ndeko na ye, azali kati na polé, mpe epayi na ye ndenge ya kokweyisa eza.te. 11. Bongo oyo azali koyina ndeko na ye azali kati na milili, mpe ayebi te esika azokende, pamba te milili ebomi ye misu na ye.

12. Nakomeli bino, bana, pamba te masumu na bino elimbisami na kombo na ye.

13. Nakomeli bino, batata, pamba te bino boyebi oyo azalaki wuta ebandeli.

Nakomeli bino, bilenge, pamba te bino bozali balongi mpe bolonga mutu mabe.

Nakomeli bino, bana mike, pamba te bino boyebi Tata.

14. Nakomelaki bino, batata, pamba te bino boyebi oyo azalaki wuta na ebandeli.

Nakomelaki bino, bilenge, pamba te bino bozali makasi, mpe liloba ya Nzambe evanda kati na bino, mpe bino bozali balongi mpe bolonga mutu mabe. 15. Bolinga mokili te, mpe biloko oyo ezali na mokili te : soki mutu alingi mokili, bolingo na Tata ezali kati na ye te, 16. Pamba te oyo nionso ezali kati na mokili, kolula ya nzoto, kolula ya misu, lolendo ya bomoyi, ezali ya Tata te, kasi ezali ya mokili, 17. Mpe mokili ezali kokende mpe kolula na yango, kasi oyo akosala na mokano ya Nzambe awumeli seko,

18. Bana mike, ezali ngonga ya suka ; mpe ndenge bino boyokaki ete antikristu akoya, sikoyo bongo ba antikristu bazali ebele, na yango biso tozoyeba ete ezali ngonga ya suka ; 19. Babimaki kati na biso, kasi bazalaki ya biso te ; pamba te soki bazalaki ya biso, balingaki kovanda elongo na biso. Kasi bamonani ete ata moko te kati na bango azalaki na biso. 20. Mpe  bino, bino bozua epakolami epayi na Mosantu mpe bino boyebi makambu nionso. 21. Nakomelaki bino te, pamba te bino boyebi solo te, kasi mpo boyebi yango  mpe ata lokuta moko te ewutaka na solo. 22. Nani azali moto na lokuta, ezali kaka oyo azoboya ete Yesu azali Kristu? Oyo wana nde azali antikristu, awangani Tata mpe Mwana. 23. Oyo nionso akoboya Mwana aza mpe na Tata te; oyo aza kotatola Mwana, azali mpe na Tata. 24. Pona bino, oyo bino boyokaki wuta ebandeli evanda kati na bino : Soki oyo boyokaki wuta ebandeli evandi kati na bino, bino mpe bofandi kati na Mwana mpe kati na Tata. 25 Mpe ezali awa elaka ye apesaki na biso, bomoyi ya seko. 26. Nakomelaki bino makambu oyo, etali batu oyo bazali kopengwisa bino. 27. Mpe pona bino, epakolami bozwaki na ye evanda kati na bino, mpe bino boza na posa te moto atangisa bino ; kasi lokola epakolami etangisa bino na ntina ya makambu nionso, mpe yango ezali solo mpe eza lokuta te, mpe na ndenge etangisaki bino, bino bovanda kati na ye.

28. Mpe sik’oyo, bana, bovanda kati na ye, ete tango akomonisama, biso tokozala na elykia mpe biso tokozala te na kolatisama soni, na nzela na ye, naboyeyi na ye,

 

3        MOKAPO 3

2-29. Soki boyebi ete azali sembo, boyeba ete moto nionso azosalela bosembo abotama na ye.

1. Botala na bolingo nini Tata apesa  biso likabo, mpo tobengama bana na Nzambe; na yango mokili  eyebi biso te, pamba te eyebaki ye te. 2. Balingami, tozali sik’oyo  bana na Nzambe, mpe oyo tokozala nanu emonani te; biso toyebi ete tango yango akomonana biso tokozala ndenge moko na ye, pamba te biso tokomona ye ndenge azali..3. Mpe oyo nionso azali na elikya kati na ye amipetolaka, lokola ye aza peto.

4. Oyo nionso asalaka lisumu, asalaka lisusu mbindo, mpo lisumu ezali mbindo.5. Bino boyebi ete ye amimonisaki, na ntina kolongola masumu na biso; mpe lisumu eza te kati na ye. 6. Oyo nionso avandi kati na ye asumukaka te; oyo nionso asumukaka amona ye te, ayebi ye mpe te.

7. Bana, moto abungisa bino te; oyo azosala bosembo aza sembo, ndenge ye azali sembo. 8. Oyo azosala lisumu aza ya  diabolo, pamba te wuta ebandeli diabolo asumukaki. Na yango Mwana ya Nzambe amonanaki , na ntina ya kobebisa misala ya diabolo.

9. Oyo nionso abotama na Nzambe asalaka lisumu te, pamba te molona ya Nzambe evandi kati na ye, mpe akoki te kosumuka, pamba te abotama na Nzambe. 10. Na bongo  emonani bana na Nzambe mpe bana ya diabolo: oyo nionso azosala bosembo te,aza ya Nzambe te. Mpe oyo alingaka ndeko na ye te. 11. Pamba te awa nde  sango oyo bayakaki wuta ebandeli, tolingana biso na biso. 12. Eza te ndenge kaÏna oyo azalaki ya mutu mabe, mpe abomaki ndeko na ye. mpo na ntina nini aboma ye ? Mpo misala na ye ezalaki malamu te mpe oyo ya ndeko na ye ezalaki sembo.

13. Bokamwa te, bandeko soki mokili eyini bino, 14. Biso, biso toyebi ete toleka na kufa na epayi na bomoyi, pamba te biso tozolinga bandeko; oyo alingi ndeko na ye te aza kati na kufa.15. Oyo nionso ayina ndeko na ye aza mobomi, mpe boyebi ete,mobomi moko te aza na bomoyi ya seko kati na ye .

16. Na awa nde biso toyebi bolingo, ete ye atikaki bomoyi na ye pona biso; mpe biso esengeli totika bomoyi na biso pona bandeko.17. Na bongo oyo azali na bozui ya mokili oyo, mpe atali ndeko na ye na bosenga mpe akangeli ye motema, ndenge nini bolingo na Nzambe ekoki kozala kati na ye ?

18. Bana, bolinga  na maloba to na monoko te, kasi na misala mpe na solo. 19. Mpe  na yango tokoyeba ete tozali ya solo, mpe mitema na biso ekozala na kimia liboso na ye. 20. Ete soki mitema na biso eza na kokatela biso etumbu, Nzambe azali monene koleka mitema na biso mpe ayebi biloko nionso. 21. Balingami, soki mitema na bino eza katela bino etumbu te, biso toza na elikya epayi na Nzambe ; 22 .Mpe nionso oyo biso tokosenga, biso tozui yango na ye , pamba te biso tozali kobomba mibeko na ye mpe tozosala makambu oyo eza malamu liboso na ye. 23. Mpe awa nde ezali mobeko na ye, ete biso tozondimela na nkombo ya Mwana na ye Yesu Kristu mpe ete biso tolingani biso na biso, na ndenge apesa biso mobeko; 24. Mpe oyo azobomba mibeko avandi kati na ye, mpe ye kati na moto yango; mpe na bongo biso toyebi aza kati na biso, koyeba Molimo oyo apesa biso

 

4        MOKAPO 4

1. Balingami, bondimela milimo nionso te, kasi bomaniola milimo, soki bazali ya Nzambe, pamba te ebele ya ba profete ya lokuta babimi na mokili. 2. Na bongo bakoyeba molimo na Nzambe: milimo nionso oyo ezali kotatola Yesu Kristu ayaki na nzoto ezali ya Nzambe, 3. Mpe elimo nionso oyo eza kotatola te Yesu Kristu ayaki na nzoto, ezali ya Nzambe te; mpe wana ezali ya antikristu; na yango bino boyokaki koloba azali koya, mpe azali sik’oyo azali na mokili. 4. Mpona bino, bana, bozali ya Nzambe, mpe bino bozali balongi mpe bolongaki bango , pamba te oyo azali kati na bino azali monene koleka oyo azali na mokili. 5. Pona bango, bazali na mokili; bongo bazakoloba na ba ndenge ya mokili, mpe mokili ezali koyaka bango. 6. Biso, biso tozali ya Nzambe; oyo ayebi Nzambe akoyoka biso; oyo aza ya Nzambe te akoyoka biso te. Na yango biso toyebi molimo ya solo mpe molimo na kobunga.

7. Balingami, tolinga moko mosusu, pamba te bolingo eza ya Nzambe, mpe oyo nionso alingaka abotama na Nzambe mpe ayebi Nzambe. 8. Oyo  aza kolinga te ayebi Nzambe te, pamba te Nzambe aza bolingo. 9. Na yango esilaki komonana bolingo na Nzambe pona biso, eza ete Nzambe atindaki Mwana na ye moko na mokili na ntina ete biso tozala na bomoyi na nzela na ye.

10. Na bongo eza bolingo, eza te na biso, biso tolingaki Nzambe, kasi eza na ye alingaki biso mpe atindaki Mwana na ye mbeka pona kolongola  masumu na biso .

11. Balingami, soki Nzambe alinga biso bongo, biso mpe esengeli biso tolingana moko na mosusu. 12. Moto te amona Nzambe, soki biso tolingani moko na mosusu, Nzambe afandi kati na biso mpe bolingo na ye ekokisami kati na biso. 13. Na yango biso toyebi ete tozali kati na ye mpe ye kati na biso, mpo apesa biso Molimo na ye ; 14. Mpe biso tomoni mpe totatoli ete Tata atinda Mwa     na mpo azala Mobikisi ya mokili.

15. Oyo nionso akotatola Yesu aza Mwana na Nzambe, Nzambe aza kati na ye mpe ye kati na Nzambe. 16. Mpe biso toyebi mpe tondimi bolingo na Nzambe pona biso. Nzambe aza bolingo, mpe oyo aza kati na bolingo aza kati na Nzambe mpe Nzambe kati na ye. 17. Na yango kokokisama ya bolingo elongo na biso,  na ntina ete tozali na molende nionso mokolo ya kosambisama na ndenge azali, ye, biso tozali, biso mpe na mokili oyo.18. Kobanga ezali te kati na bolingo, bongo bolingo ekoka  ebengana kobanga, pamba te kobanga ememaka elongo na ye etumbu, mpe oyo azali na kobanga aza ya kokoka te na bolingo. 19. Biso, biso tozalingana pamba te ye alingaka biso liboso

20. Soki moto moko alobi: nalingaka Nzambe mpe azoyina ndeko na ye, aza lokuta pamba te oyo alingaka ndeko na ye te azomona, ndenge nini akolinga Nzambe oyo azo mona te? 21. Mpe biso toza na mobeko na ye oyo, oyo alingaka Nzambe, alinga mpe ndeko na ye.

 

5        MOKAPO 5

1. Moto oyo andimi Yesu aza Kristu, abotami na Nzambe; mpe moto oyo alingaki  moboti, akolinga lisusu baye babotami na ye. 2. Na bongo biso toyebi ete tolingi bana na Nzambe, tango biso tolingi Nzambe mpê biso tobombi mibeko na ye. 3. Awa nde bolingo na Nzambe, tobomba mibeko na ye, mpe mibeko na ye ezali pasi te, 4. Pamba te oyo nionso oyo ebotami na Nzambe eza molongi na mokili ; mpe awa nde elonga oyo elongi mokili, eza kondima na biso. 5. Nani oyo aza molongi na mokili, bobele oyo andimi Yesu aza mwana na Nzambe.

6. Ye oyo ayaki na mayi, mpe na makila, Yesu Kristu, kaka te na kati ya mayi, bongo na kati ya mayi mpe ya makila ; mpe Molimo nde ezotatola, pamba te Molimo aza solo  7 ; pamba te ezali misato oyo eza kotatola ; 8. Molimo, mayi, mpe makila mpe misato eza nakoyokana pona litatoli moko. 9. Soki biso tozo yamba litatoli ya batu, kotatola ya Nzambe eza monene koleka ; pamba te yango oyo litatoli Nzambe apesaki na ntina ya Mwana na ye. 10. Oyo andimi Mwana na Nzambe, aza na litatoli kati na ye moko ; oyo azo ndima te Nzambe asali ye lokuta, pamba te andimi te litatoli  Nzambe apesaki na ntina ya Mwana na ye. 11. Mpe eza awa litatoli : Nzambe apesa biso bomoyi ya seko, mpe bomoyi yango eza kati ya Mwana na ye : 12. Oyo azali na Mwana, azali na bomoyi, oyo aza na Mwana na Nzambe te aza na bomoyi te.

13. Nakomelaki bino makambu oyo na ntina bino boyeba ete bozali na bomoyi ya seko, bino oyo bondimi na kombo ya Mwana na Nzambe.

14. Mpe awa nde elikya biso toza na yango kati na ye, soki biso tokosenga eloko nionso ndenge ya mokano na ye, akoyoka biso ; 15. Soki biso toyebi akoyoka biso, ata ndenge nini biso tokosenga, biso toyebi ete tozali na biloko oyo biso tosengi ye.

16. Soki moto moko amoni ndeko na ye na lisumu, lisumu moko oyo eza ya kufa te, asenga na ntina na ye. Mpe  akopesa ye bomoyi, na baoyo basali masumu ya kufa te, eza na lisumu moko oyo eza ya kufa, : mpona na lisumu wana, na lobi te bosenga. 17. Mbindo nionso eza lisumu mpe eza na lisumu oyo eza ya kufa te. 18. Biso toyebi ete moto oyo abotami na Nzambe asumukaka te, na bongo oyo abotami na Nzambe amibombaka ye moko, mpe mutu ya mabe akosimba ye te. 19. Biso toyebi ete tozali ya Nzambe, mpe mokili mobimba ezobika na nguya na mutu mabe. 20. Nzokande biso toyebi ete Mwana na Nzambe ayaki, mpe apesi biso mayele mpo biso toyeba Solo, mpe biso tozali kati na Solo, koyeba kati na Mwana na ye Yesu Kristu : ye azali. Nzambe solo mpe bomoyi seko.

21. Bana, bomibomba bino mosika na bikeko.