MOKANDA NA POLO EPAYI NA TITO

Mokapo 1Mokapo 2Mokapo 3

 

 

1        Mokapo 1

MOKAPO YA YAMBO

1. Polo, mowumbu na Nzambe, mpe apostolo na yesu kristu na lolenge ya kondima ya baponami na Nzambe mpe boyebi ya solo oyo ezali na lolenge ya petwa,

2. na elikya ya bomoyi ya seko oyo Nzambe, abukaka lokuta te, alakaki liboso na ba tango ya seko…

3. mpe atalisi na ngonga oyo ebongi, liloba na ye, kati na kotatola polele oyo epesalamaki ngayi na motindo ya Nzambe Mobikisi na biso

4. na Tito, mwana na ngayi ya solo kati na bondimi na biso moko : Ngolu mpe kimia, ezala na yo kowuta na Nzambe Tata, mpe na kristu Yesu Mobikisi na biso !

 

5. Natikaki yo na Kreti mpo na ntina oyo, obongisa makambu oyo etikalaki, mpe na engumba nionso otiya bampaka, ndenge ngayi napesaki yo motindo

6. Soki mutu azangi pamela, mobali ya mwasi moko, aza na bana baza bandimi, mobulu te mpe kilikili te,

7. Po ebongi na episkopo, azanga pamela lokola motambolisi misala ya Nzambe, azala moto ya lolendo te, moto ya kanda te, momeli masanga te, moto abetaka basusu makofi te, azala te moto ya lokoso pe azanga bosembo

8. Kasi asengeli kozala moto oyo ayambaka batu epa na ye, moto oyo alingaka bolamu pe batu malamu, moto ya bwania, ya sembo, ya bule, oyo azalaka na komikanga,

9. Oyo asimba makasi  maloba oyo ebongama na kondimama na lolenge ya mateya, mpo  na ete akoka lolendisa na nzela ya malakisi ya peto, mpe apamela pona kondimisa baye balobaka mabe.

10. Ete ezali na batomboki ebele, babilobaloba mpe bapengwisi, mingi-mingi kati na bato oyo bakatama ngenga

11. Oyo esengeli kokangisa bango monoko, pamba te bazali kobebisa mabota ebele na nzela ya malakisi oyo esengeli kutu te, pona kaka kozua mbongo ya soni

12. Moko kati na bango, profete na bango moko, aloba : « batu ya Kreti bazalaka kaka batu ya lokuta, ba niama mabe, mabumu oyo ekoka kosala mosala te

13. Litatoli yango  ezali solo ; yango wana , pamela bango penza makasi pona bazala petwa kati na kondima

14. Mpe balanda te masapo ya lingomba ya bayuda to mibeko ya bato oyo bapesa solo mukongo

15. Makambo nionso ezali peto pona bato oyo bazali peto, kasi pona ba oyo bazali mbindo mpe bazanga kondima, eloko moko te ezali peto, kasi makanisi pe bososoli na bango  ezali ya mbindo

16.Batatolaka polele ete bayebi Nzambe, kasi na misala na bango , bawangani  ye, pamba te bazali nkele mpe batomboki ; na oyo etali mosala ya malamu, bakokoka te.

 

2        Mokapo 2

MOKAPO YA MIBALE

 

1. Kasi yo, loba makambu oyo ebongi na  malakisi ya peto :

2. ete Mibange mibali bazala batu na ndelu, na limemia, na bwania, na kolongono kati na kondima, na bolingo, na kokanga motema

3. Lolenge moko mibange basi bazala na lolenge na bango nionso, lokola ebongi na basi basantu,- bafundi te, bawumbu ya vino mingi te, bateya makambu ya bolamu,

4. Po ete balakisa bilenge basi ete balinga mibali na bango mpe bana na bango

5. Bazala bwania, peto, babongisaka ba ndako, bizaleli ya malamu, botosi na mibali na bango mpo ete liloba ya Nzambe etukama te

6. Olendisa mpe bilenge mibali ete bazala na ndelu,

7. Milakisa ya moko na makambu nionso ndakisa ya misala malamu, kati na mateya omonisa peto, mpe sembo,

8. maloba ya solo oyo bakoka kokweyisa yango te, mpe mutu azali kotelemela yango ayoka soni, azanga likambu ya mabe oyo akoloba pona biso.

9. Bawumbu bazala na batosi epayi ya bankolo na bango,  na makambo nionso mpe basepelisa bango, bazala batomboki te

10. Bayiba ata eloko te, kasi balakisa  malamu ya bosembo, mpo ete na makambu nionso bamonisa lokumu  ya mateya na Nzambe Mobikisi na biso

11. Mpo ete ngolu ya Nzambe oyo ekumbi lobiko pona na bato nionso esili komonana,

12. Elakisaka biso koboya, kotiola Nzambe mpe boluli ya mokili , kasi tobika na kati na ekeke oyo nakozala na ndelu, boyengebene mpe na petwa,

13. Nakozeleka elikya na esengo mpe komonana na nkembo ya Nzambe na bino monene mpe Mobikisi Yesu Kristu

14. Oyo amipesaki ye moko pona biso mpo akangola biso na mbindo nionso mpe apetola pona ye moko batu oyo azui pona ye, bazali na molendo pona misala malamu.

15. Loba makambo oyo, lendisa mpe pamela na bokonzi nionso ya komanda. Moto te atiola yo.

 

3        Mokapo 3

MOKAPO YA MISATO

1. Zongisela bango na makanisi ete batosa ba zuzi mpe bakonzi, bazala na botosi mpe babongamaka pona misala nionso ya malamu,

2. Bafingaka moto te, baboya koswana, kasi bazala na ndelu, komonisaka imbisi, bomonisa bopolo epayi ya bato nionso

3. Pamba te kala biso mpe tozalaki, bato bazangi mayele, batomboki, bapengwi, bawumbu ya bilulela ya ndenge nionso mpe bisengo na pamba, tobikaki kati na makambu ya mabe mpe na nkanda pona oyo basusu bazalaki na yango, toyinama , mpe toyinami biso na biso

4. Kasi tango bolamu mpe bolingo ya Nzambe mobikisi na biso epayi na batu emonisamaki

5. Abikisaki biso na ntina te ya misala na bosembo tosalaki te, kasi mpo na mawa na ye moko ; na nzela ya kosukola na kokomisa nionso ya sika mpe kozalisama na sika na Molimo Mosantu

6. Oyo asopa mingi mpenza likolo na biso na nzela na Yesu Kristu, Mobikisi na biso

7. Ete wana tokomi na boyengebene na nzela ya ngolu, ye, mpe tokoma na kolanda elikya basangoli ya bomoyi ya seko

8. Liloba oyo ezali solo, mpe nalingi ete olendisa pona makambu oyo, mpo ete baoyo basili kondima Nzambe bamipesa na kozala bato ya liboso kati na misala malamu : makambu oyo ezali malamu mpe tina pona bato

9. Kasi oboya mituna ezanga mayele, masolo ya mabota, biwelela-welela mpe biswana na ntina na mobeko, po ezali na litomba te mpe ezanga ntina.

10. Mutu oyo kokotisa mateya mabe pe bokabwani, bwakisa ye na sima ya kokebisa ye na pamela  mbala liboso to ya mibale

11. Oyeba ete mutu ya ndenge wana abongwanaka te mpe asumuka, amikatela etumbu ye moko

 

12. Tang nakotinda epayi na yo Artemas to Tukikos, sala mbangu oya epayi na ngayi na Nikopolis pona nazui mokano ya kolekisa kuna eloko ya mpiyo

13. Kamba na lolenge ebongi Zenas, molakisi mibeko, mpe Apolos mpo ete bazanga eloko te ;

14. Ete ba oyo ya biso bayekola ya kozala batu ya liboso na misala malamu pona biloko oyo esengeli, mpo ete bazanga mbuma te

 

15. Ba oyo nionso bazali na ngayi batindeli yo mbote. Pesa mbote na baoyo balingi biso kati na kondima, tika ete ngolu ezala na biso nionso