MOKANDA YA MIBALE YA POLO EPAYI NA TIMOTE

 

 

 

 

1  Mokapo 1, 2  Mokapo 2, 3  Mokapo 3, 4  Mokapo 4

1  Mokapo 1

 1. Polo, apostolo ya Yesu Kristu na mokano ya Nzambe, na kolandama na elaka ya bomoi oyo ezali kati na Kristu Yesu. 2 Epayi na Timote muana na ngai molingami : ngolu, mawa, kimia,ezala na yo kowuta na Nzambe Tata mpe na Yesu Kristu, Nkolo na biso. 3. Naza na litondi epayi na Nzambe oyo nasalelaka wuta bakoko na ngai na motema peto , nakokanisaka yo tango nionso kati na mabondeli na ngai butu mpe moyi. 4 (Naza na mposa makasi ya komona yo, nakanisaka mayi ya miso na yo,mpo na tonda na esengo). 5 Nazali kokanisaka kondima ya solo oyo eza kati na yo oyo efandaka liboso kati na koko na yo ya muasi loyis mpe efandaki na mama na yo enike mpe nazali na kondima efandi mpe kati na yo.

6Yango wana nazali koyebisa yo lisusu ete opelisa lisussu likabo na ngolu na Nzambe oyo ezali kati na yo na nzela na kotiesama maboko na ngai likolo na yo. 7 Pamba te Nzambe apesa biso molimo ya kolenga te kasi ya nguya, ya bolingo mpe ya lolenge ya malamu ya kozala. 8 Koyoka soni te ya kotatola, Nkolo na biso, mpe pona nga mokangami na ye, kasi zua esika na yo kati na ba mpasi ya sango malamu, lolenge ya nguya na Nzambe. 9 Oyo abikisa biso mpe abenga biso na ebiangami mosantu, na lolenge ya misala na biso te, kasi na lolenge ya kobongisama na ye moko mpe na ngolu na ye moko oyo apesi biso kati na Kristu Yesu, liboso na tango na seko. 10 kasi emonisami sikoyo na komonisama na mobikisi na biso Yesu Kristu, oyo asilisi nguya ya liwa, mpe angalisi mwinda na bomoi mpe kobebisama te na nzela na sango malamu.11 Na yango natiami moteyi mpe apostolot mpe molakisi ya bikolo. 12 Na tina na yango nazali koniokwama biloko oyo ; Nazali na soni te, mpo nayebi nani nandima, mpe nazali na kondima ete azali na nguya ya kobomba nionso napesaki ye kino na mokolo wana. 13. Zua ndakisa ya maloba ya sembo, oyo oyokaki epayi na ngai kati na kondima mpe bolingo oyo ezali kati na Kristu Yesu. 14. Bomba oyo napesaki yo na nzela na Molimo Mosantu oyo efandi kati na biso. 15 Oyebi ete bato nionso oyo bazali na Asia basili kobuakisa ngai, kati na bango Figele na Ermogene. 16.  Nkolo amonisa mawa na ndako na Onesiforo mpo alendisaki ngai mingi mpe ayokaki soni te ya miniololo na ngai. 17 Kasi tango azalaki na Roma alukaki ngai penza mpe amonaki ngai. 18. Nkolo asala ete azua mawa kowuta epayi na Nkolo na mokolo wana ; Oyebi malamu mosala na ye ya lisalisi oyo ye asalaki kati na efezo.

 

2  Mokapo 2

1. Yo nde mwana na ngayi, mikembisa na ngolu oyo eza kati na Yesu Kristu, 2. Mpe makambu oyo oyoki epayi na ngayi liboso ya batatoli mingi, lakiisa yango batu na kondima oyo bazali na makoki ya kolakisa basusu. 3. Zwa esika na yo ya pasi lokola soda malamu ya Yesu Kristu, 4. Moto te akendaka bitumba, na komikotisa na makambu na bomoyi, mpo asepelisa moto oyo abengi ye pona bitumba. 5. Na bongo soki moto moko azo bunda kati na komekama, akozwa motole te, soki abundi na ndenge ya mibeko te, 6. Ebongi na moloni kosala mosala na liboso, pona asepela na bambuma.

7. Kanisa oyo nalobi pamba te Nkolo akopesa yo mayele na makambo nionso.

8. Okanisa Yesu Kristu oyo asekwa kati na bakufi, na libota ya dawidi, na lolenge ya sango malamu na ngayi, 9. Na yango nazali komona ba pasi kino kokangama miniololo lokola moto mabe, nde liloba na Nzambe ekangami te. 10. Yango wana nazali kondima pasi nionso pona bolingo ya baponami été bango mpe bazwa lobiko oyo ezali kati na Yesu Kristu, elongo na nkembo ya seko. 11. Liloba oyo eza solo mpo ete soki tokufi elongo na ye, tokozala mpe na bomoyi elongo na ye. 12. Soki tokoniokwama, tokokonza elongo na ye ; soki towangani ye, ye mpe akowangana biso. 13. Soki tozangi kondima, ye atikali sembo , pamba te akoki komiwangana te.

14. Tia yango na makanisi na yo, olaka liboso na Nkolo ete baswana te na ntina na ba maloba, yango eza na ntina te mpe ekobebisa bayoki na yango. 15. Yekola komilakisa epayi na Nzambe, lokola mosali oyo akomimona soni te ya koteya maloba ya solo. 16. Kasi kima maloba ezanga ntina pe ezanga peto, pamba te baoyo bamikotisaka bakondeka mingi na mabe. 17. Mpe maloba na bango eliaka lokola mpôta na tofina, kati na bango humenos mpe philetos . 18. Basili kotika bosolo, na koloba ete lisekwa esili kosalema ; mpe bazali kokweyisa kondima ya basusu, 19. Nzokande moboko na Nzambe etelemi ngwi ; ekomami na elembo : Nkolo ayebi ba oyo ya ye. Moto nionso akobelela nkombo ya Nkolo, atika bomoyi ya bosoto. 20. Na kati ya ndako monene , ezali kaka te na bakopo ya wolo mpe palata, kasi na mabaya mpe mabele, mosusu pona lokumu mpe mosusu pona makambo ya ezangi lokumu, soki moto amipetoli na makambo oyo, akozala kopo ya lokumu, akozala bule,akozala na ntina mingi na Nkolo na ndako, oyo ekobongisama pona mosala nionso ya malamu. 22. Kasi kima bamposa ya bolenge, mpe landa bosembo, kondima, bolingo, kimia elongo na baoyo babengaka Nkolo na motema peto. 23. Kima mituna ezanga ntina mpe mayele, oyeba ete ebotaka koswana, 24. Ebongi te na mowumbu na Nkolo koswanaka, kasi azala na boboto epayi na bato nionso, abongi na kolakisaka batu, azala na motema molayi ; 25. Ateya na boboto batelemeli soki Nzambe akopesa bango kobongwana mitema pona bayeba bosolo ; 26. Mpe soki bakolamuka te na motambo ya diabolo oyo akanga bango, mpo basalaka mokano na ye.

 

3  Mokapo 3

1. Oyeba boye, na mikolo ya suka ekoya ba ngonga ya pasi : 2. Pamba te batu bakokoma koluka bolamu na bango moko, kolinga mbongo, lolendo mpe batu ya komilakisa, batuki, kotelemela baboti na bango, bazangi matondi, mawa eza te, 3. Bolingo ya bato ezali te, bazangi sembo, batongi, bamikanga te, bakozala boniamai, balingaka bolamu te. 4. Bateki baninga, ba kilawu, batondisami na lolendo, baninga ya bamposa ya mabe kasi baninga ya Nzambe te. 5. Bazali na libanda ya peto, nzokande baboya nguya. Na bongo baluka na bato ya boye. 6. Pamba te kati na bango, bazali baoyo baza komikotisa na bandaku mpe kokanga basi ya bolembu oyo batonda na masumu, bamemisama na bamposa ya mabe na ndenge nionso. 7. Bazali koyekolaka mpe bakoki te kokoma na boyebi ya solo. 8. Na wana nde yané mpe yambres, batelemelaki mose, bango mpe bazotelemela solo, batu babisa makanisi na bango, bakoki te na kondima. 9. Na yango bakokende mosika te koleka, pamba te libomaa na bango ekomonana pona mutu nionso, ndenge ezalaki epayi na basusu wana. 10.  Bongo yo olondaki malamu malakisi na ngayi, etamboli na ngayi, mokano na ngayi, kokanga na ngayi motema kati na pasi, bolingo na ngayi, molende na ngayi, koniokama na ngayi. 11. Bapasi na ngayi oyo esilaki kokomela ngayi n’antiochi, na Iconium mpe na lystra boniokami ya ndenge nini oyo nandima, mpe Nkolo akangolaki ngayi na nionso. 12. Mpe baoyo nionso balingi kozala sembo kati na Kristu Yesu, bakozala na boniokwami, 13. Bongo batu mabe mpe babubi bakokende na mabe koleka, ba kopengwisa mpe bapengwa. 14. Kasi yo, tikala kati na makambo oyo ozwa mpe oyo ondimama na yango, yeba na nani yo ozwa yango. 15. Wuta bo mwana na yo oyebi makomi mosantu, oyo ekoki na kokomisa yo bwana na lobiko kati na kondima oyo ezali na Kristu Yesu. 16 Makomi nionso efulami na munoko na Nzambe, mpe ezali mutuya pona kotangisa, pona kolaliksa polele, pona, kobongisa, pona kolakisa kati na bosembo, 17. Na ntina ete moto na Nzambe azala ya kokoka mpe akokisama na nionso pona misala nionso ya malamu.

 

4  Mokapo 4

1. Nga napesi yo motindo liboso na Nzambe mpe na Kristu Yesu, oyo akosambisa bato na bomoyi mpe bakufi na nzela ya komonana pe kodondwa na ye : 2. Teya liloba, loba penza na ngonga mpe ata na libanda ya ngonga, kondimisa, pamela, lendisa na motema molayi nionso mpe na malakisi. 3. Pamba te ekozala na ngonga moko, wana bakoboya koyoka mateya oyo ebongi ; nde bakozala na matoyi oyo ekosala bango mokusa, bakosangisa batangisi kolandisama bilula na bango ya mabe. 4. Mpe bakobalusa matoyi na bango na bosolo mpe bakoluka mateya oyo batu bango moko babimisi na makambu ya pamba. 5. Kasi yo, ozala na ndelu na makambu nionso, ondima koniokwama, sala mosala ya mopanzi sango malamu, kokisa penza mosala na yo ; 6. Nde, pona ngayi, nakomi kosopana lokola masanga basopi likolo na mbeka, tangu ya kokende na ngayi ekoki. 7. Nabundi bitumba malamu, mpe nasilisi kokima mbangu, nabombi kondima : 8. Sik’oyo motole na sembo ebombami pona ngayi, oyo Nkolo mosambisi na sembo akopesa ngayi na mukolo wana, kaka ngayi moko te, na batu nionso balingaka komonisama na ye.

9. Sala mbangu pona koya sasaipi epayi na ngayi, 10. Mpo Dema asundoli ngayi, alingi ekeke ya tang’oyo ; akeyi na ye na tesalonika, Kresens na Galatia ; Tito na Dalmatia ; 11. Bobele Luka mutu azali na ngayi. Ozua Marko mpe oya na ye elongo na yo, po azali motuya pona mosala na ngayi. 12. Natindi Tichiko na Efezo. 13. Tangu okoya, omemela ngayi kazaka natikaki na Troas epayi ya Karpo, mpe ba buku, mingi oyo ekomama na poso ya niama. 14. Aleksandro, mosali bibende, amonisi mabe mingi epayi na ngayi ; Nkolo akozingesela ye na lolenge ya misala na ye. 15. Keba na ye, mpo atelemelaki makasi maloba na biso. 16. Na kosambisama na ngayi ya liboso, moto te azalaki na ngayi, banso bawakisaki ngayi : etangelama bango te. 17. Kasi Nkolo azalaki pene na ngayi mpe akembisaki ngayi, mpo ete na nzela na ngayi liteya ekokisama mpe bikolo nionso bayoka yango ; mpe nakangolamaki na monoko na nkosi. 18. Nkolo akokangola ngayi na misala nionso ya mabe pe akobomba ngayi pona bokonzi na ye ya likolo. Na ye nkembo, libela na libela ! Amen.

19. Opesa mbote na Priska pe Akilas pe ndaku ya Onezifore. 20. Erasto atikali na Korinto, natiki Trofimo kobela na mboka ya Mile. 21. Sala makasi okoma liboso tangu ya malili ebanda. Ebulos pe Podos pe Lino pe Klodia pe bandeko nionso bapesi yo mbote. 22. Nkolo Yesu Kristu azala na elimo na yo. Ngolu ezala na bino banso