MOKANDA NA POLO EPAYI NA TESALONIKA YA MIBALE

 

Mokapo 1Mokapo 2Mokapo 3

 

 

1        Mokapo 1

MOKAPO YA YAMBO

 

1. Polo, mpe Silvano, mpe Timoteo na eklezia ya ba tesalonika kati na Nzambe Tata na biso mpe Nkolo Yesu Kristu : 2. Ngolu mpe kimia na bino, epayi na Nzambe Tata na biso mpe kati na Nkolo Yesu Kristu !

3. Esengeli mikolo nionso tozongisa  ngolu epayi na Nzambe pona bino, bandeko, lokola eza sembo, mpamba te kondima na bino ezali koemata mingi mpe bolingo bozali na yango  bino nionso, moko na moko 4.  emataka mingi , na ntina wana  biso moko tozali komikumisama na tina na bino kati na ba eklezia ya Nzambe na ntina na mpiko  mpe kondima na bino na kati ya koniokama na bino mpe kati na bapasi, bozali komona, 5. Yango ezali komonisa polele sembo ya kosambisama ya Nzambe pona bozala ba oyo bandimami na bokonzi ya Nzambe pona yango boza koniokama ; 6. Soki ezali malamu mpe sembo liboso na Nzambe na kozongisa minioko na ba oyo, bazali koniokolaka bino pasi 7. Mpe na bino bozali koniokwama bopemi elongo na biso na emoniseli ya Nkolo Yesu na likolo elongo na bangelu na nguya na ye, kati na moto kopela 8. nakopesa etumbu na ba oyo bayebi Nzambe te, mpe bazanga kotosa sango malamu (evanzile) ya Nkolo na biso Yesu Kristu. 9. Bango bakozwa etumbu ya kobebisama ya seko liboso ya kozala na Nkolo mpe liboso ya nkembo ya makasi na ye, 10. Tango akoya pona azala, mukolo wana, mpo akumisama kati na basantu na ye mpe akamwisama  kati na ba oyo nionso bandimaki, pamba te litatoli na biso epayi na bino esilaki kondimama. 11. Na yango wana, tozali kosambela pona bino mikolo nionso, Nzambe na biso, abongisa bino na kobiangamela mpe ye akokisa esengo nionso ya bolamu na ye mpe misala ya kondima kati na nguya. 12. Na ntina ete nkombo na Nkolo na biso Yesu Kristu ekumisama kati na bino, mpe bino kati na ye, na lolenge ya ngolu na Nzambe mpe na Nkolo Yesu Kristu.

 

2        Mokapo 2

MOKAPO YA MIBALE

 

1. Biso tozobondela bino, bandeko, na boyeyi ya Nkolo na biso Yesu Kristu mpe na koyangana na biso epayi na ye ; 2. Bomitika te mbangu na kobaluka kati na makanisi na bino,  na bobangi te, na nzela na molimo te, na nzela na liloba te, na nzela na mokanda te, lokola  ewuti na biso, lokola nde mokolo ya Nkolo ezali wana. 3. Mutu te akosa bino na nzela nini, mpo te mukolo wana ekoya te wana apostazia eya liboso mpe mutu oyo na mbindo pe misala mabe amonana,  mwana na libebisi. 4. Oyo akotelemela mpe akobwakisa nionso oyo babengi Nzambe to nionso oyo bapesaka lokumu, na ntina  wana ye moko akomifandisa kati na esika ya bule ya Nzambe, komilakisa ye moko lokola Nzambe. 5. Bokanisa ete, tangu nazalaki epayi na bino, nayebisaki bino makambo oyo, 6. Sik’oyo boyebi nini oyo ezali kopekisa ye mpo amonana na ngonga na ye. 7. Mpo ete mustere ya mbindo pe misala mabe ezali kosala, bobele  kaka oyo azali kopekisa ye sik’oyo, akoma mosika, 8. Bongo ekomonana mbindo, oyo Nkolo Yesu akozikisa na nzela ya mopepe na monoko na ye mpe akobungisa na nzela ya komonisama na boyeyi na ye. 9. Boyeyi oyo ezali na nguya ya Satana, kati na lolenge nionso ya bikamwa mpe bilembo, mpe bikamwiseli na lokuta, 10. Mpe na kopengwisama na makambo ya mabe pona ba oyo bazali kokufa, mpamba te bayambaki bolingo ya solo te, mpo babika, 11. Na ntina na yango, Nzambe atindeli bango nguya moko ya libungi pona bandimela lokuta, 12. Na ntina ete bango nionso wana, bandimelaki bosolo te basambisama, mpo bazwaki esengo na makambo ya mabe.

13. Kasi biso, biso tozongisa tango nionso ba ngolu na Nzambe pona bino, bandeko balingami na Nkolo, na ndenge Nzambe  apona bino wuta ebandeli pona lobiko, kati na kobulisama na Molimo mpe na kondima ya solo. 14. Na yango abengaki bino, na sango malamu na biso, pona bino bozwa nkembo na Nkolo, na biso Yesu Kristu. 15. Yango wana bandeko, bozala ngwi, mpe bobomba ba malakisi oyo bozwaki na nzela ya liloba, to na mokanda na biso. 16. Boye Nkolo na biso Yesu Kristu ye moko mpe Nzambe pe Tata na biso, oyo alingaka biso, mpe apesa biso kolendisama ya seko mpe elikya malamu na nzela ya ngolu, 17. Alendisa mitema na bino mpe akembisa bino kati na misala malamu mpe liloba nionso malamu.

 

3        Mokapo 3

MOKAPO YA MISATO

 

1. Likolo lisusu na wana, bandeko, bobondela pona biso, na tina ete liloba na Nkolo ekoba kopanzana mbangu mpe eyambama na lokumu, lokola ezali epayi na bino ; 2. Mpo tokangolama na batu ya buzoba mpe mabe, mpo kondima ezali na batu nionso te : 3. Kasi Nkolo azali sembo, akokembisa bino mpe akobomba bino mosika na mabe. 4. Nde tozali na kondima kati na Nkolo na tina na bino, bozali kosala pe bokosala nionso oyo topesaki mitindo. 5. Nkolo akamba mitema na bino na bolingo na Nzambe mpe na mpiko ya Kristu.

6. Bandeko, tozali kopesa bino mitindo na nkombo na Nkolo na biso Yesu Kristu, bozala mosika na ndeko nionso atambolaka na libanda ya molongo, mpe na lolenge te ya makambu tolakisaki oyo bozuaki na biso. 7.  Mpo boyebi bino moko lolenge nini esengeli bolanda ndakisa na biso, mpo biso totamboli te libanda ya molongo kati na bino, 8. Mpe toliaki lipa pamba te epayi na mutu, kasi kati na minioko pe mosala ya makasi, tosalaki butu mpe moyi mpo tozala mokumba te ya mutu moko  kati na bino. 9. Elobi te ete tozali na bokonzi pe bonsomi te, kasi pona kopesa bino na nzela na biso moko ndakisa, oyo esengeli na bino kolanda, 10. Mpo ete, tangu tozalaki mpembeni na bino, toteyaki bino boye : soki mutu alingi kosala te, aliya pe te. 11. Kasi tozali koyoka ete basusu kati na bino bazali kotambola na libanda ya molongo, basalaka ata mosala te, kasi bazalaka na makambu ezanga tina. 12. Nde tozali kopesa mitindo na batu wana, mpe tozali kati na Nkolo Yesu Kristu, kotindika bango, basala misala na kimia po balia lipa na bango moko. 13. Kasi bino, bandeko, botika te kosalaka bolamu. 14. Soki mutu atosi te liloba na biso eza na mukanda oyo, botia ye elembo mpe bozala na eloko te na ye, mpo ayoka soni. 15. Botala ye lokola monguna te, kasi bokebisa ye lokola ndeko.

16. Tika ete Nkolo na kimia ye moko apesa bino kimia tangu nionso mpe na lolenge nionso. Nkolo azala na bino nionso.

17. Mbote ya loboko na ngayi moko Polo, yango ezali elembo na makomi na ngayi nionso ; nakomaka boye.

18. Ngolu na Nkolo na biso Yesu Kristu ezala na bino nionso.