NAHUMU

 

Mokapo 1Mokapo 2Mokapo 3

 

1        Mokapo 1

1. Liloba ya kosambisama oyo etalaki Ninive; buku ya emoniseli ya Nahumu, Moelekosi.

2. Yawe azali Nzambe ya zuwa pe mozongiseli mabe na mabe; Yawe azali mozongiseli mabe na mabe pe atondi na kanda; Yawe azongisaka mabe na banguna na ye pe abombaka kanda na ye likolo ya banguna na ye.

3. Yawe azali na kanda noki te pe azali na nguya makasi mingi, pe atalelaka ata moke te moto oyo azali na ngambo lokola mutu oyo azali na mbeba te. Yawe, nzela na ye ezali na kati ya mopepe makasi oyo epupulaka pe na mopepe makasi, pe lipata ezali putulu ya makolo na ye. 4. Apameli mayi monene pe akawusaka yango, pe akokawusaka bibale nionso. Bashane pe Karmele elembi ti na kokawuka, pe fololo ya Liban elembi ti ekawuki. 5. Bangomba ezolenga liboso na ye, pe bangomba mike ezali kopanzana biteni na biteni; pe liboso ya elongi na ye mabele etombwami, pe mokili pe bafandi nionso kati na yango. 6. Nani akotelema liboso ya kanda na ye, pe nani akotelema liboso ya kanda makasi ya kanda na ye? Kanda na ye esopani lokola moto, pe mabanga ebukani liboso na ye.

7. Yawe azali malamu, azali esika ya makasi na mokolo ya pasi, pe ayebi baoyo batiyelaka ye motema; 8. Kasi na nzela ya mpela akobebisa penza esika na ye, pe molili ekolanda banguna na ye. 9. Ozali kokanisa nini po na kotelemela Yawe? Akobebisa penza; bolozi ekobima mbala mibale te. 10. Ata soki bazali lokola banzube oyo ekangisama, pe lokola nde balangwe na vino na bango, bakoliya bango mobimba lokola matiti oyo ekawuki nionso. 11. Na yo, mutu oyo azali kokana mabe po na Yawe, mopesi-toli mabe, 12. Yawe alobi boye: Ata soki bazali ya koka, pe ebele boye, bakokufa, pe bakozala lisusu te. Pe soki naniokolaki bino, nakoniokola bino lisusu te. 13. Pe sik’oyo nakobuka ekangeli na ye likolo na bino, pe nakokata miniololo na yo. 14. Pe Yawe apesi etinda na tina na yo: Bakolona lisusu na kombo na yo te. Na ndako ya banzambe na yo nakolongola ekeko oyo ekatami pe ekeko oyo ya libende, pe nakobongisa lilita na yo, po ozali litioli pamba.

15. Tala na bangomba makolo ya mutu oyo azali komema sango malamu, ya moto oyo azali kosakola kimia! Yuda, sepala bafeti na yo, okokisa bilaka na yo; po belial akoleka lisusu na kati na yo te, abomami mobimba.

 

2        Mokapo 2

1. Ye oyo mobebisi oyo apanzaka amati liboso na yo: bomba esika makasi, batela nzela, kembisa makasi ba loketo na yo, kembisa mingi nguya makasi na yo. 2. Po Yawe azongisi kembo ya Yakobo lokola kembo ya Israel; po bapunzi bapunzi bango pe babesi bitape na bango. 3. Banguba ya bilombe na ye ya makasi elati langi motane, mibali ya nguya pe mpiko balati bilamba ya motane, bibende ya bashar na bango ezali kongenga na mokolo oyo babongisi yango, pe banzete ya sipre ezali koningana. 4. Bashar ezali kopota mbangu na kanda nionso na babalabala, ezali kokende mbangu na bisika ya batu nionso; lolenge na yango ezali lokola bamwinda, bazali kopota mbangu lokola kake. —  5. Ye akanisi batu na ye ya nguya: bakweyi kati na botamboli na bango, bakimi mbangu na mir molayi, pe na esika ebongisama ya kobombana. 6. Bikuke ya bibale efungwami, pe ndako ya mokonzi ekweyi. 7. Ekateli ezwami: bakolongola ye bilamba, bakomema ye mosika, pe basali na ye ya basi bakolela lokola mongongo ya bibenga, na kobetaka-betaka ntolo na bango.

8. Nzokande Ninive banda mokolo azalaki, azalaki lokola liziba ya mayi. Kasi bazali kokima… Botelema! Botelema ! Kasi mutu moko te akobaluka kotala sima. 9. Bopunza palata, bopunza wolo! Ezali na suka te na kitoko ya bozwi ya biloko ya kitoko ya ndenge nionso ya bisengo. 10. Ezali ya kobebisami pe  epunzami, pe etikali ya kobebisama! Pe motema ebukani, pe mabolongo ezali kolenga, pe pasi makasi ezali na loketo nionso, pe bilongi nionso ekomi motane.

11. Wapi esika ya kofanda ya bankosi pe esika oyo bana ya nkosi baliyaka, epayi nkosi ya mobali pe nkosi ya mwasi pe mwana ya nkosi bazalaki kotambola, pe mobangisi moko te abangisaki bango? 12. Nkosi apasolaki oyo ekoki pona bana na ye, pe abomaki pona bankosi na ye ya basi, pe etondisaki mabulu na ye na banyama ya koliya, pe bifandelo na ye na banyama oyo epasolami. 13. Tala, nazali kotelemela yo, elobi Yawe na mapinga; pe nakotumba bashar na bino na milinga; pe mopanga ekoliya bana ya bankosi na yo, pe nakolongola bileyi na yo na mabele; pe mongongo ya bamemi-sango na yo ekoyokana lisusu te.

 

3        Mokapo 3

1. Mawa na engumba ya makila, oyo etondi na lokuta pe na kobotola biloko ya batu! Oyo moyibi na yango etikaka ye te. 2. Makelele ya fimbu pe makelele ya kobetabeta ya bapinɛ, pe kopota mbangu ya bampunda pe bashar oyo ezali kopumbwapumbwa; … 3. Mokumbi punda azali komata likolo, pe mopanga ezali kopela moto, pe kongenga ya likonga, pe ebele ya babomami, pe bitunga ya bibembe, pe bibembe mingi suka te! bakobetaka libaku na kotuta bibembe! 4. Na tina na ebele ya pite ya mwasi ya ndumba ya kitoko pe ya kokamwisa, nganga-kisi ya misala ya soloka, oyo azali koteka bikolo na nzela ya pite na ye, pe mabota na nzela ya kindoki na ye. 5. Tala, nazali kotelemela yo, elobi Yawe na mapinga, pe nakotombola elamba na yo likolo ya elongi na yo, pe nakolakisa bikolo bolumbu na yo, pe soni na yo na bamboka ya bokonzi. 6. Pe nakobwakela yo bosoto likolo, pe nakokomisa yo eloko ya kotiola, pe nakokomisa yo eloko ya kotala pona kotuka. 7. Pe ekokoma ete baoyo banso oyo bakotala yo bakokima yo mosika, pe bakoloba ete: Ninive ebebisami! Nani akoyokela ye mawa? Nakolukela yo babondisi wapi?

8. Ozali mabe moke koleka No-Amona, oyo afandaki likolo na bibale, oyo ezingama na mayi, - ye oyo azalaki na mayi monene pona ebateli na ye, mayi monene pona mir molayi na ye? 9. Etiopi ezalaki nguya makasi na ye, pe Ejipito, pe azalaki na suka te; Puti na Libi bazalaki kati na baoyo bazalaki kosunga ye. 10. Ye pe amemaki pe akendeki na bowumbu; bana ya bana na ye pe baniatamaki na bamitu ya babalabala nionso; pe likolo ya bato na ye ya lokumu babetaki zeke, pe batu minene na ye nionso bakangisamaki na miniololo. — 11. Yo pe okolangwa masanga; okobombama; yo pe okoluka esika makasi ya kobatama mosika ya monguna. 12. Bisika na yo nionso ya makasi ezali lokola banzete ya figi oyo ezali na bafigi na yango ya liboso; soki baningisi yango, bakweyaka na kati ya monoko ya oyo aliaka yango. 13. Tala, batu na yo kati na yo bazali basi; bikuke ya mboka na yo efungwami monene liboso ya banguna na yo, moto ezikisi bikangelo na yo. 14. Otoka mayi pona kozingama, okembisa bisika na yo ya makasi, okota na potopoto pe oniata mabele ya potopoto, pe obongisa furu ya babriki. 15. Kuna, moto ekozikisa yo, mopanga ekoboma yo; ekoliya yo lokola makonki. Bokoma ebele lokola makonki, bokoma ebele lokola makonki. 16. Obakisaki motango ya batu ya mombongo na yo koleka minzoto ya likolo; makonki epalangani, na sima epumbwaka mosika.  17. Bilombe na yo oyo opona bazali lokola makonki, pe bakapiteni na yo bazali lokola lipata ya bamakonki oyo batiyaka mapango na bifelo na mokolo na malili ; moyi ebimi, yango ekopumbwa likolo mosika, pe toyebi te esika bazali. 18. Babateli bampate na yo, Ô mokonzi ya Asuria, batu minene na yo balali wana, batu na yo bapalangani likolo bangomba pe mutu te asangisi bango. 19. Ezali na lisungi moko te pona pota na yo ; pota na yo ezali mabe mingi ; banso oyo bayoki sango na yo bakobeta maboko likolo na yo ; po likolo ya nani mabe na yo elekaki te tangu nionso ?