MIKA

 

Mokapo 1Mokapo 2Mokapo 3Mokapo 4Mokapo 5Mokapo 6Mokapo 7Banoti

 

 

1        Mokapo 1

1. Liloba ya Yawe oyo eyaki epayi na Mika ya Moreshete, na mikolo ya Yotame, Akaz pe Ezekiasi, bakonzi ya Yuda, oyo amonaki yango na tina ya Samaria pe Yerusaleme.

2. Boyoka, bino nyonso; botia matoyi na bokebi, mabele, pe nionso oyo ezali kati na yo; pe ete Nkolo Yawe, azala motatoli kotelemela bino, Nkolo, wuta na ndaku monene ya bosantu na ye. 3. Po, tala, Yawe akobima na esika na ye, pe akokita pe akotambola na bisika oyo etombwana na mabele; 4. Pe bangomba ekoniangwama na se na ye, pe mabwaku ekopasulama lokola mafuta liboso ya moto, lokola bamayi oyo ekotiola na esika ya kotengama. 5. Nionso wana, na tina ya libungi ya Yakobo pe pona masumu ya ndako ya Israel! Botomboki ya Yakobo ezali ya nani? Oyo ezali ya Samaria te? Pe ya nani, ya bisika ya likolo oyo etombwana ya Yuda? Ezali te ya Yerusaleme? 6. Pe nakokomisa Samaria liboke kati na bilanga, bilanga ya vino; pe nakobwaka mabanga na yango na lobwaku, pe nakotia polele miboko na yango. 7. Pe bikeko na ye nionso ekobukana na biteni; pe bakado na ye nionso ya kindumba ekozikisama na moto; pe nakokomisa bikeko na ye nionso pamba; po asangisi ye elongo na kado ya mwasi ya ndumba, pe bakokoma lisusu kado ya mwasi ya ndumba. —

8. Na tina wana, nakolela, pe nakoganga; Nakotambola makolo ngulu pe bolumbu; Nakolela lokola bambwa ya zamba, pe nakolela lokola ba otrishe. 9. Po pota na ye ekoki ekosilaka te; po ekomi kino na Yuda, ekomi kino na ekuke ya batu na ngai, kino na Yerusaleme. 10. Boyebisa yango na Gate te, pe bosopa kolela te kati na Beth-Leyafra, bomilalisa na kopakula na putulu. 11. Leka, yo mofandi ya Safire, bolumbu na yo polele! Mofandi ya Tshaanan abimaki te pona kolela ya Beth-Ayetshel; akolongola bino ebombelami na ye. 12. Pamba te mwasi mofandi ya Marote azalaki kozela bolamu, kasi mabe ekitaki kowuta na Yawe na ekuke ya Yerusaleme. 13. Kangisa shar na mpunda, yo mofandi ya Lakisi, azalaki mbuma ya liboso ya lisumu pona mwana mwasi ya Siona; pamba te kati na yo botomboki ya Israel emonanaki. 14. Yango wana, okopesa ba kado ya bokabwani na Moreshete-gate. Bandako ya Akzib ekozala lokuta pona bakonzi ya Israel. 15. Epayi na yo, nakomema lisusu molongi ya libula, mofandi ya Maresha; kembo ya Israel ekokoma kino na Adulama. 16. Omikokola libandi pe kata suki na yo pona bana mibali ya esengo na yo; pe komisa libandi monene, lokola mpongo; po bakeyi na bokangami na bowumbu mosika na yo.

 

2        Mokapo 2

1. Mawa na baoyo babanzaka kosala mabe pe babongisaka kosala mabe likolo na bambeto na bango! Na pole ya tongo, bakosalaka yango, po pona bango nguya ezali na loboko na bango. 2. Pe baluli bilanga pe babotoli yango, pe bandako, pe babotoli yango na makasi; pe bakoniokola mutu pe ndako na ye, mutu na libula na ye. 3. Yango wana, Yawe alobi boye: Tala, nazali kokana mabe pona libota oyo, bokokoka te kolongola kingo na bino; pe bokotambola te moto likolo, po ezali tangu ya mabe. 4. Na mokolo wana, bakozwa bino yo lokola lisese, pe bakolela na kolela ya mawa; bakoloba: Tobebisami mobimba; abongoli eteni ya batu na ngai: lokola alongoli epayi na ngai! Epai na ye oyo abwaka bondimi, akaboli bilanga na biso. 5. Yango wana, okozala na mutu moko te oyo akosembola singa pona kokabola na lisanga ya Yawe.

6. Kosopa maloba te, bazali kosopa maloba. Soki basopeli batu yango maloba te, soni ekolongwa te. 7. Yo oyo obengami ndako ya Yakobo: Yawe azali na mokuse? Yango wana ezali misala na ye? Maloba na ngai esalaka malamu te na mutu oyo atambolaka sembo? 8. Kala mingi te, batu na ngai batelemaki lokola monguna: bokolongola elamba likolo na nzambala ya baoyo bazali koleka na libateli, oyo batiki bitumba; 9. Bobengani basi ya batu na ngai na bandako ya bisengo na bango; likolo na bana na bango bolongoli kembo na ngai, pona libela. 10. Botelema pe bokende! Po oyo ezali esika ya bopemi te, na tina ya bosoto oyo ememaka libebi: libebi ezali somo! 11. Soki mutu azali kotambola na mopepe pe lokuta, akokosa, koloba : nakosopa maloba na tina ya vino pe masanga ya makasi ! Akozala mosopi maloba ya batu oyo. 12. Nakosangisa yo, Yakobo, yo mobimba; Nakosangisa penza batikali na yo Israel; Nakotsa bango esika moko lokola bitonga ya Bozra, lokola etonga na matiti ya koleyisa bibwele. Bakonguluma na tina ya batu. 13. Ye oyo atobolaka bamir amataki liboso na bango; babukaki pe balekaki na ekuke, pe babimaki na nzela na yango, pe mokonzi na bango alekaki liboso na bango, pe Yawe azali na moto na bango.

 

3        Mokapo 3

1. Pe nalobi: Boyoka, nabondeli bino, bino bakambi ya Yakobo, pe bino bakonzi ya ndako ya Israel: Ezali na bino te koyeba nini ezali malamu? 2. Bino oyo boyina malamu pe bolingaka mabe, bozali kolongola loposo na bango likolo na bango, pe mosuni na bango likolo na mikuwa na bango, 3. Bakoliya mosuni ya batu na ngai, pe bokolongola loposo na bango likolo na bango, pe bokobukaka mikuwa na bango, pe bokokataka yango biteni-biteni lokola na nzungu, pe lokola mosuni na katikati ya nzungu 4. Bongo bakobelela epayi ya Yawe, pe akoyanola na bango te, kasi akobomba elongi na ye liboso na bango na tangu wana, ndenge basalaki mabe.

5. Boye Yawe alobi pona baprofete oyo bazali kobungisa batu na ngai; baoyo bazali koswa na mino na bango, pe bazali koganga: Kimia! Pe soki mutu atie eloko moko te na kati ya monoko na bango, bakobongisaka etumba pona kobundisa ye. 6. Yango wana pona bino, bokozala na butu, kozanga emoniseli, pe bokozala na molili kozanga kobikola; pe moyi ekolala likolo ya baprofete, pe mokolo ekozala molili likolo na bango. 7. Pe bamoni makambu bakoyoka soni, pe babikoli bakoyoka soni, pe bango nionso bakozipa mandefu na bango, pamba te eyano ya Nzambe ezali te. 8. Kasi ngai, natondi na nguya na nzela ya Molimo ya Yawe, pe na bosambisi, pe na nguya, pona koloba na Yakobo botomboki na ye, pe na Israel lisumu na ye. 9. Nabondeli bino, boyoka likambu oyo, bino bakambi ya ndako ya Yakobo, pe bino bakonzi ya ndako ya Israel, oyo boyinaka kosambisa pe bobebisi boyengebene nionso, 10. Bokotonga Siona na makila, pe Yerusaleme na mabe. 11. Bakonzi na ye bakosambisaka pona makabo, pe banganga-Nzambe na ye bakoteyaka pona lifuti, pe baprofete na ye bazali kobikola pona mbongo, pe batielaka Yawe motema, kolobaka: Yawe azali te na kati na biso? Mabe moko te ekoyela biso! 12. Yango wana, na tina na bino, Siona ekotimbolama lokola elanga, pe Yerusaleme ekozala bitunga ya mabanga, pe ngomba ya ndako, bisika ya likolo ya zamba. —

 

4        Mokapo 4

1. Pe ekokoma na suka ya mikolo, ngomba ya ndako ya Yawe ekotelemisama likolo ya bangomba, pe ekotombwama likolo ya bangomba mike; pe batu ebele bakosopana kuna; 2. Bikolo ebele bakokende, pe bakoloba: boya, pe tomata na ngomba ya Yawe, pe na ndako ya Nzambe ya Yakobo, pe akoteya biso banzela na ye, pe tokotambola kati na banzela na ye ya mike. Po na Siona malakisi ekobima, pe na Yerusaleme, liloba ya Yawe. 3. Pe akosambisa kati na batu ebele, pe akozala mosambisi ya sembo pona bikolo ya nguya kino oyo ya mosika; pe bakotuta mipanga na bango po ekoma bakongo, pe makonga na bango na bambeli ya kokata matiti: ekolo ekotombola mopanga te likolo na ekolo mosusu, pe bakoyekola lisusu bitumba te. 4. Pe bakofanda, moko na moko na se ya nzete na ye ya vino pe na se ya nzete na ye ya figi, pe ekozala na mutu moko te pona kolengisa bango : po monoko  ya Yawe na mampinga elobi. 5. Po batu nionso bakotambola, mutu moko na moko na kombo ya nzambe na ye; kasi biso, tokotambola na kombo ya Yawe Nzambe na biso pona libela pe pona bomoyi nionso. 6. Na mokolo yango, elobi Yawe: Nakosangisa ye oyo azali kotambola tengu-tengu, pe nakosangisa ye oyo bazalaki kobenganaka ye, pe ye oyo likolo na ye namemelaki ye minioko. 7. Pe  nakokomisa ye oyo azalaki kotambola tengu-tengu, ndambu oyo etikali, pe oyo babenganaki mosika, nakokomisa ekolo moko ya makasi; pe Yawe akoyangela likolo na bango na Ngomba ya Siona banda wana pe libela na libela. 8. Pe yo, ndako molayi ya etonga, ngomba moke molayi ya mwana mwasi ya Siona, epayi na yo ekokoma pe bokonzi ya liboso ekoya, - bokonzi, epayi ya mwana mwasi ya Yerusaleme.

9. Sik’oyo, pona nini ozali koganga? Mokonzi moko te azali kati na yo? Mopesi toli na yo akufi? Po pasi ekangi yo lokola mwasi oyo azali kobota. 10. Zala na kati ya pasi pe kolela, mwana mwasi ya Siona, lokola mwasi oyo azali kobota; po sik’oyo okobima na engumba, pe okofanda na bilanga, pe okokoma kino na Babilone; kuna okokangolama; kuna Yawe akosikola yo na loboko ya banguna na yo. 11. Pe sik’oyo bikolo mingi basangani kotelemela yo, kolobaka: Tika azala mbindo, tika liso na biso emona Siona! 12. Kasi bayebi makanisi ya Yawe te, pe basosoli te mabongisi na ye; po asangisi bango lokola liboke ya matiti na esika ya kotuta mbuma. 13. Telema pe niata, mwana mwasi ya Siona, po nakokomisa liseke na yo ebende, pe nakokomisa basabo (1) na yo na bronze, pe okobuka ebele ya batu; pe nakobulisa biloko na bango pona Yawe, pe biloko na bango epayi ya Nkolo ya mabele mobimba.

 

5        Mokapo 5

1. Sik’oyo omisangana na mampinga, mwana mwasi ya mampinga; azingaki biso; babeti mosambisi ya Israel na lingenda na litama. 2. (Pe yo, Betheleme Efrata, ata kozali moke na kati ya bankoto ya Yuda, wuta na yo akobima po na ngai ye oyo akokonza na Israel, Ye oyo ebandeli na ye ezali ya tangu ya kala, wuta mikolo ya seko). 3. Yango wana akokaba bango ti tangu oyo mwasi oyo azali kobota akobota; pe ndambu ya bandeko na ye oyo batikali bakozonga epayi ya bana ya Israel. 4. Pe akotelema pe akoleyisa bampate na ye na makasi ya Yawe, na kembo ya kombo ya Yawe Nzambe na ye. Pe bakofanda, po sik’oyo akozala monene ti na suka ya mabele. Pe ye oyo akozala kimia. 5. Tangu Moasuria akoya na mokili na biso pe akoniata likolo kati na bandako na biso ya minene, tokotelemisa babateli sambo ya bampate pe bakonzi mwambe ya batu pona kobundisa ye. 6. Pe bakobebisa mokili ya Asuria na mopanga, pe mokili ya Nimirod na kati ya bikuke na yango. Pe akokangola biso na Moasuria, tangu akoya na mokili na biso, pe akotia makolo na kati ya ndelo na biso. 7. Pe ndambu oyo batikali na Yakobo bakozala na kati ya batu ebele lokola mbula ya pete (2)  oyo ewuti na Yawe, lokola mbula-pembe likolo ya matiti, oyo ezelaka mutu te, pe ezali kotalela bana ya batu te. 8. Pe batikali ya Yakobo bakozala na kati ya bikolo, na katikati ya batu ebele, lokola nkosi na kati ya banyama ya zamba, lokola mwana-nkosi na kati ya bitonga ya bampate, oyo, soki aleki, aniati pe apasoli biteni-biteni, pe mutu moko te akoki kokangola. 9. Loboko na yo ekotombolama likolo ya banguna na yo, pe banguna na yo nionso bakobomama.

10. Pe ekosalama na mokolo wana, elobi Yawe, nakokata bampunda na yo na katikati na yo, pe nakobebisa bashar na yo; 11. Pe nakolongola bingumba ya mokili na yo, pe nakobuka bisika na yo nionso ya makasi; 12. Pe nakolongola bondoki na loboko na yo, pe okozala na baoyo bakoki kosakola makambu te; 13. Pe nakolongola kati na yo bililingi na yo oyo eyemami pe bikeko na yo, pe okofukamela lisusu te mosala ya maboko na yo. 14. Pe nakolangola ba Ashera (3) na yo na kati na yo, pe nakobebisa bingumba na yo. 15. Pe nakozongisa mabe na likolo ya bikolo, na kanda makasi pe na kanda, oyo bayoka te.

 

6         Mokapo 6

1. Boyoka, nabondeli bino, oyo Yawe alobi: Telema, samba likambu na yo liboso ya bangomba, pe tika bangomba mike eyoka mongongo na yo ! 2. Boyoka, bangomba, lisambisi ya Yawe afundi, pe bino miboko ya mabele oyo ebongwanaka te; po Yawe azali na likambu ya matata na batu na ye, pe akosamba na Israel. 3. Batu na ngai, nasali yo nini, pe nalembisi yo na nini? Yanola ngai! 4. Po nabimisaki yo na mokili ya Ejipito, pe nasikolaki yo na ndako ya bowumbu; pe natindi Mose, Aaron pe Miriame liboso na yo. 5. Batu na ngai, omikundola makanisi, nabondeli yo, makambu oyo ya Balak mokonzi ya Moaba, abongisaki, pe oyo Balam, mwana ya Beyor ayanolaki ye longwa na Shitiyime kino na Giligale, po boyeba misala ya sembo ya Yawe.

6. Nakoya na nini liboso na Yawe, pe nakofukama liboso ya Nzambe ya likolo? Nakoya liboso na ye na makabo ya kotumba mobimba, elongo na bana ya ngombe oyo bazali na mbula moko? 7. Yawe akosepela na bankoto ya bampate-mibali, na nkoto zomi ya bibale ya mafuta? Nakopesa mwana na ngai ya liboso pona bobuki na ngai mobeko, mbuma ya libumu na ngai pona lisumu ya molimo na ngai? 8. Ayebisi yo, ô mutu, nini ezali malamu. Pe nini Yawe azali koluka epayi na yo, longola se kosala oyo ezali sembo, kolinga boboto, pe kotambola na komikitisa elongo na Nzambe na yo?

9. Mongongo ya Yawe ezali koganga epayi ya engumba, pe bwanya ezali na lisu na kombo na yo. Boyoka lingenda pe nani oyo asaleli yango! 10. Ezali lisusu na biloko ya motuya ya mabe na ndako ya mutu mabe, pe mwa efa (4), eloko oyo elakelami mabe? 11. Nakozala peto na balansi oyo ya mbindo pe na saki ya kilo ya lokuta? 12. Po ete bazwi na ye batondi na koniokola batu, pe bafandi na ye balobaka lokuta, pe lolemo na bango ezali lokuta na kati ya monoko na bango : 13. Ngai pe nakobelisa yo na kobetaka yo, nakobebisa yo na tina ya masumu na yo. 14. Yo okoliya, pe okotonda te, pe libumu na yo ekozala na nzala; pe okolongola pona kobomba, kasi okobikisa eloko te; pe eloko nionso oyo okobikisaki, nakopesa yango na mopanga. 15. Okolona, ​​pe okobuka mbuma te; okoniata ba olive, kasi okomipakola mafuta te pe na vino ya sika, kasi okomela vino te. 16. Po bazali kotosa mibeko ya Omiri pe misala nionso ya ndako ya Akab; pe bozali kotambola na kati ya mabongisi na bango, po nakomisa yo esika oyo etikali ya pamba, pe bafandi na yango eloko ya koseka; pe bokomema kofinga ya batu na ngai.

 

7        Mokapo 7

1. Mawa na ngai! Po nazali lokola tangu bazali kobuka mbuma ya eleko ya molunge, lokola oyo tokangisaka na tangu ya kobuka mbuma ya vino: ata liboke te ya mbuma ya vino pona koliya! Mbuma moko te ya liboso oyo molimo na ngai ezalaki na posa na yango! 2. Mutu oyo azali kobanga Nzambe alimwe na mokili, pe ezali na batu ya sembo kati na batu; banso bamitiyaki na esika ya kobombana pona [kosopa] makila; Moko-moko na bango azali koluka ndeko na ye na monyama; 3. Maboko mibale ezali pene pona kosala mabe, ete bakoka kosala yango malamu; mokonzi akosenga kaniaka, pe mosambisi asambisi pona mbano, pe mutu monene azali komonisa lokoso ya molimo na ye; pe bazali kosangisa likambu yango. 4. Oyo aleki malamu na kati na bango azali lokola nzube, oyo eleki sembo, mabe koleka lopango ya nzube. Mokolo ya bakengeli na yo pe ya botali yo ekomi; sik’oyo ekozala mobulungano na bango. 5. Kondimela moninga te; kotiyela moninga motema te; bomba bikuke ya monoko na yo liboso ya ye oyo alali na tolo na yo. 6. Po mwana mobali akotiola tata, mwana mwasi azali kotelemela mama na ye, bokilo ya mwasi akotelemela mama bokilo na ye; Banguna ya mutu ezali batu ya ndako na ye. 7. Kasi ngai, nakotala epayi ya Yawe, pe nakozela Nzambe ya lobiko na ngai; Nzambe na ngai akoyoka ngai.

8. Kosepela te na tina na ngai, monguna na ngai : ata nakweyi, nakotelema; soki nafandi kati na molili, Yawe akozala pole na ngai. 9. Nakomema kanda ya Yawe, po nasali ye lisumu, kino akosambisa likambu na ngai pe akolongisa ngai. Akobimisa ngai na pole ; Nakomona boyengebene na ye. 10. Pe monguna na ngai akomona, pe soni ekozipa ye, ye oyo azalaki koloba na ngai: wapi Yawe Nzambe na yo? Misu na ngai ekotala ye; pe sik’oyo akoniatama na se lokola potopoto ya babalabala.

11. Na mokolo oyo bamir na yo ekotongama, na mokolo yango ndelo oyo etiami ekozonga sima. 12 Na mokolo yango, bakoya kino epayi na yo wuta na Asuria pe na bingumba ya Ejipito, pe longwa na Ejipito kino na ebale, pe longwa na mayi monene kino na mayi monene, pe longwa na ngomba kino na ngomba. 13. Kasi mboka ekotikala pamba, na tina ya bafandi na yango, pona mbuma ya misala na bango. 14. Leyisa pe batela batu na yo na lingenda na yo, etonga ya libula na yo oyo efandi yango moko na kati  zamba, na katikati ya Karmele; tika ete baleyisa na Bashane pe na Galadi lokola na mikolo ya kala. 15. Lokola na mikolo oyo obimaki na mokili ya Ejipito, nakomonisa ye makambu ya kokamwa. 16. Bikolo bakomona pe bakoyoka soni pona nguya na bango nionso; bakotiya maboko na bango na monoko, matoyi na bango ekoyaka lisusu te. 17. Bakolembola putulu lokola nyoka; lokola banyama oyo bangulumaka na mabele, bakobima na kolenga-lenga na bisika na bango oyo ya makasi; bakoya na bobangi epayi ya Yawe Nzambe na biso, pe bakobanga yo.

18. Nani azali *Nzambe lokola yo, oyo alimbisaka mabe pe alekaka na likolo ya bobuki mobeko ya libula na ye oyo etikali? Abatela kanda na ye libela te, po asepelaka na boboto. 19. Akoyokela biso mawa lisusu, pe akotiya mabe na biso na se ya makolo na ye; pe okobwaka masumu na bango nionso na bozindo ya mayi monene. 20. Okokokisa bosembo na yo epayi ya Yakobo, pe boboto na yo epayi ya Abraham, oyo olapaki ndayi epayi ya batata na biso wuta mikolo ya kala.

 

8        Banoti

1. Basabo ezali kolobela makolo ya punda oyo eniataka likolo ya oyo azali kotambola pe oyo ebetaka makasi penza nakosala pasi mingi,

2. Mbula ya pete ezali matanga ya mikemike ya mayi oyo ekokweya na esika ya sika,

3. Ashera, elilingi ya Astarte, nzambe-mwasi ya kobota ya batu ya kanana oyo bazalaki koloba ete azali mwasi ya Baal,

4. Efa, ezali mezire oyo basalelaka pona bambuma ya ble, masangu to biloko ya koliya ; ekokani na ba litre tuku mibale na mibale (22)