MOKANDA YA YOWELE

 

Mokapo 1Mokapo 2Mokapo 3Mokapo 4

 

1        Mokapo 1

1. Liloba ya Yawe epayi ya Yowele mwana mobali ya Petuwele.

2. Boyoka yango, bino mibange, pe botia matoyi, bino banso bafandi na mboka. Yango esalemaki na mikolo na bino, to ata na mikolo ya batata na bino? 3. Boyebisa yango na bana na bino ya mibali, pe bana na bino ya mibali epayi ya bana na bango ya mibali, pe bana na bango ya mibali epayi ya bokitani mosusu. 4. Oyo bilengi makonki etikaki, makonki eliaki yango; pe oyo makonki etikaki, makonki mike eliaki, pe oyo makonki mike etikaki, mabanki mosusu eliaki.

5. Bolamuka, bino balangwi masanga, pe bolela; pe boganga, bino nionso bameli vino, na tina ya vino ya sika, pamba te balongoli yango na minoko na bino. 6. Po ekolo moko emati likolo ya mboka na ngai, ya nguya makasi pe ya kotanga motango te. Minu na ye ezali minu ya nkosi ya mobali, pe azali na minu minene ya nkosi ya mwasi. 7. Akomisi elanga na ngai ya vino esobe pamba, nzete na ngai ya figi ya liboke ya nzete; alongolaki yango mobimba, pe abwakaki yango na mabele; bitape na yango ekomi pembe. 8. Olela lokola ngondo oyo alati elamba ya saki pona mobali ya bolenge na ye! 9. Mbeka ya mbuma pe likabo ya masanga elongwe na ndako ya Yawe; banganga-Nzambe, basali ya Yawe, bazali na matanga ya kolela; 10. Bilanga etikali esobe pamba, mabele ezali na matanga ya kolela; Po ble etikali pamba, vino ya sika ekawuki, mafuta ya sika ekawuki.

11. Bozala na soni, bino basali bilanga; bolela, bino basali vino, na tina ya ble pe orje, po ete mbuma ya bilanga ekufi! 12. Nzete ya vino ekawuki, pe nzete ya figi ekawuki, — nzete ya grenade, nzete ya mbila pe nzete ya pome; banzete nionso ya bilanga ekawuki; po esengo ekauki na kati ya bana ya batu.

13. Banganga-Nzambe, bomilata basaki pe bolela; boganga, bino oyo basaleli ya etumbelo; boya, bolekisa butu kati na bilamb ya saki, bino basaleli ya Nzambe na ngai! Po likabo ya mbuma pe likabo ya masanga elongwe na ndako ya Nzambe na bino. 14. Bosantisa kokila bileyi, bobenga liyangani ya bule; bosangisa bampaka, bafandi nionso ya mboka, na ndako ya Yawe Nzambe na bino, pe bobelela Yawe.

15. Oh, mokolo nini oyo! Po mokolo ya Yawe ekomi pene, pe ekoya lokola libebi epayi ya Mokoki-ya-Nguya-Nionso. 16. Bileyi elongwe na miso na biso te, pe esengo na kosepela elongwe na ndako ya Nzambe na biso? 17. Milona yango epolaka na se ya eteni ya mabele na yango; bandako babombelaka biloko ya bilanga ezali pamba; mabulu ya bobombi biloko ya bibwele ebaluki, pamba te ble ekawuki. 18. Bibwele yango ezali kolela! Bibwele minene balembi, pamba te matiti ya koleyisa banyama ezali te; bitonga mikemike ya bibwele ezali pe na koniokwama. 19. Nakobelela, epayi na yo Yawe; po moto ezikisi matiti ya koleyisa banyama na esobe, pe moto ezikisi banzete nionso ya bilanga. 20. Banyama ya zamba bakoganga epayi na yo, po miluka ya bibale ekawuki, pe moto ezikisi matiti ya koleyisa banyama na esobe.

 

2        Mokapo 2

1. Bobeta kelelo na Siona, bosala makelele makasi na ngomba na ngai mosantu! Bafandi nionso ya mokili balenga, po mokolo ya Yawe ezali koya; po ekomi pene, 2. Mokolo moko ya molili pe ya kozanga pole, mokolo ya mapata pe ya molili makasi: epalangani lokola tongotongo likolo ya bangomba, batu ebele mingi pe ya nguya makasi, oyo ezalaki te wuta kala, pe sima na ye ekozala te ti na bambula ya mabota pe mabota.

3. Liboso na ye moto ezozikisa pe sima na ye moto ezopela; liboso na ye mboka ezali lokola elanga ya Edene, pe sima na ye, bobele esobe ya kobebisama; pe eloko moko te ekimi ye. 4. Lolenge na ye ezali lokola lolenge ya bapunda, pe bazali kopota mbangu lokola baoyo batambolaka na bapunda. 5. Bazali kopumbwa: … ezali lokola lokito ya bashar na songe ya ngomba, lokola lokito ya kopela ya moto oyo ezali kozikisa matiti, lokola bato ya nguya babongisami na etumba. 6. Liboso na ye batu bazali koniokwama na pasi, bilongi nionso ekomi motane. 7. Bazali kopota mbangu lokola bilombe ya nguya, bazali komata na mir molayi lokola batu ya bitumba; batambolaka moko na moko na banzela na ye, pe babongoli banzela na bango te; 8. Pe bazali kofinana moko na mosusu te. Moko moko na bango azali kotambolaka na nzela na ye; pe bakimi mbangu na kati ya bibundeli ya banguna pe bazoki te; 9. Bapalanganaki na engumba, bakimaki mbangu na mir molayi, bamataki na bandako, bakotaki na bafenetre lokola moyibi. 10. Liboso na ye mabele ekoningana, likolo ezali kolenga, moyi na sanza ekomi molili, pe minzoto ebungisi kongenga na yango. 11. Pe Yawe abimisi mongongo na ye liboso ya lipinga na ye, po kamp na ye ezali monene penza, po oyo asalelak liloba na ye azali na nguya; po mokolo ya Yawe ezali monene pe ya somo penza; pe nani akoki koyika mpiko na yango?

12. Bongo ata sik’oyo, elobi Yawe, bozonga epayi na ngai na motema na bino mobimba, na kokila bileyi, na kolela pe na bileli; 13. Pe bopasola mitema na bino kasi bilamba na bino te, pe bozonga epayi ya Yawe Nzambe na bino; po asalaka ngolu pe ayokelaka mawa, azali na kanda noki te pe azali monene na boboto, pe abongolaka mokana na ye pona kosala pasi mabe. 14. Nani ayebi? akozonga pe akobongola lisusu motema pe akotika lipamboli, likabo pe likabo ya masanga na Yawe Nzambe na bino.

15. Bobeta kelelo na kati ya Siona, bosantisa kokila bileyi, bobenga liyangani ya lokumu; 16. Bosangisa batu, bosantisa lisanga, bosangisa bampaka, bosangisa bana na baoyo bakomelaka mabele; mobali ya libala abima na shambre na ye, pe mwasi ya libala abima na shambre na ye ya libala; 17. Tika banganga-Nzambe, basali ya Yawe, balela na kati-kati ya bokoteli na etumbelo, pe baloba ete: Ô Yawe, yokela batu na yo mawa, pe kopesa libula na yo te na kotiolama, po bakoma lisese ya kofingama ya bikolo. Pona nini bakoloba kati na batu ete: wapi Nzambe na bango?

18. Bongo Yawe akoyokela mboka na ye zuwa, pe akoyokela batu na ye mawa. 19. Pe Yawe akoyanola pe akoloba na batu na ye: Tala, nazali kotindela bino mbuma pe vino ya sika pe mafuta, pe bokotonda; pe nakokaba bino lisusu te na kofingama na kati ya bikolo; 20. Pe nakolongola mosika na bino ye oyo awutaka na nor, pe nakobengana ye na mokili ya kokawuka pe ya pamba, elongi na ye ekobaluka epayi ya mayi monene ya esti, pe suka na ye epayi ya mayi monene ya westi; pe solo na ye ekomata, pe bokono na ye ekobima, po ete amitomboli pona kosala makambu minene. 21. Kobanga te, mabele; sepela pe tonda na esengo; po Yawe asali makambu minene. 22 Banyama ya zamba, bobanga te, pamba te matiti ya koleyisa banyama na esobe ekobima lisusu, po nzete ekobota mbuma na yango, nzete ya figi pe nzete ya vinyo ekopesa bozwi na yango. 23. Pe bino, bana mibali ya Siona, bosepela pe bozala kosepela na Yawe Nzambe na bino; po apesi bino mbula ya liboso na ndenge ya bosembo, pe akitiseli bino mbula ya liboso pe mbula ya suka, na ebandeli ya eleko. 24. Pe bisika ya kotuta mbuma ekotonda na ble, pe bambeki ekotonda na vino ya sika pe na mafuta; 25. Pe nakozongisela bino bambula oyo mayoyo, yelek, pe makonki, pe bambinzo baliaki, lipinga monene na ngai oyo natindaki kati na bino. 26. Pe bokoliya mingi pe bokotonda, pe bokosanzola kombo ya Yawe Nzambe na bino, oyo asaleli bino makambu ya kokamwa; pe batu na ngai bakoyoka lisusu soni te pona libela. 27. Pe bokoyeba ete nazali na kati-kati ya Israel, pe ete ngai Yawe nazali Nzambe na bino, pe mosusu azali te; pe batu na ngai bakoyoka lisusu soni te pona libela.

 

3        Mokapo 3

1. Pe ekokoma, sima ya oyo, ete nakosopa Molimo na ngai likolo ya batu nionso, pe bana na bino mibali pe bana basi na bino bakoloba na profesi, mibange na bino bakolota bandoto, bilenge mibali na bino bakomona bimoniseli; 2. Pe lisusu likolo ya basali ya mibali pe ya basi na mikolo wana nakosopa Molimo na ngai. —  3. Pe nakopesa bilembo makamwisi na likolo pe na mabele, makila, pe moto, pe makonzí ya milinga; 4. Moyi ekobongwana molili, pe sanza ekobongwana makila, liboso ete mokolo monene pe ya somo ya Yawe eya.

5. Pe ekokoma ete oyo nionso akobelela kombo ya Yawe akobika. Po lobiko ekozala na Ngomba Siona, pe na Yerusaleme, lokola Yawe alobi, pe pona baoyo batikali, oyo Yawe akobenga.

 

4        Mokapo 4

1. Po tala, na mikolo wana pe na tangu wana nakozongisa bakangami ya Yuda pe ya Yerusaleme, 2. Nakosangisa bikolo nionso, pe nakokitisa bango na lobwaku ya Yehoshafate (Yawe mosambisi), pe kuna nakosamba elongo na bango na tina ya batu na ngai pe libula na ngai, Israel, oyo bapalanganisi na kati ya bikolo; pe bakaboli mboka na ngai, 3. Pe babwakaki zeke likolo ya batu na ngai, pe bakabaki mwana mobali pona mwasi ya ndumba, pe batekaki mwana mwasi pona vino, pe bamelaki yango. 4. Pe bino pe, bolingi nini epayi na ngai, Turo pe Sidone, pe bino nionso bituka ya Bafilistia? Oyo ezali mbano oyo ozali kopesa ngai? Pe soki opesi ngai mbano, nakokweyisa mbano na yo noki-noki pe mbangu na moto na yo; 5. Po bozwi palata na ngai pe wolo na ngai, pe bomemi biloko na ngai ya kitoko koleka na batempelo na bino. 6. Pe boteki bana mibali ya Yuda pe bana mibali ya Yerusaleme epayi ya bana ya Yavane, pona kolongola bango mosika na ndelo na bango. 7. Tala, nakolamusa bango wuta esika wapi botekaki bango, pe nakozongisa misala na bino ya yo likolo ya mitu na bino; 8. Pe nakoteka bana na bino ya mibali pe ya basi na maboko ya bana ya Yuda, pe bakoteka bango epayi ya Bashebayim, na ekolo moko ya mosika; po Yawe alobi.

9. Bosakola likambu oyo na kati ya bikolo, bomibongisa pona etumba, bolamusa batu ya nguya; bapusana, bamata, batu nionso ya bitumba! 10. Bosala bambeli na bino ya bilanga po ekoma mipanga, pe bambeli na bino ya bibende oyo bokataka matiti ekoma makonga. Tika batu ya bolembu baloba: Nazali elombe! 11. Bokima mbangu pe boya, bino bikolo nionso, na bipayi nionso, pe bosangana elongo! Kuna, Yawe, kitisa mibali na yo ya nguya! 12. Tika ete bikolo elamuka pe emata na lobwaku ya Yehoshafate (Yawe mosambisi), po nakofanda kuna pona kosambisa bikolo nionso, ya bipayi nionso.

13.  Botia mbeli, po mbuma ya kobuka eteli; boya, bokita, po ete esika ya kokata vino etondi, bambeki etondi; po mabe na bango ezali monene. 14. Ebele ya batu, ebele ya batu, kati na lobwaku ya bikateli! Po mokolo ya Yawe ekomi pene na kati ya lobwaku ya bikateli. 15. Moyi pe sanza ekokoma molili, pe minzoto ekobungisa kongenga na yango; 16. Pe Yawe akongulama na Siona, pe akobimisa mongongo na ye longwa na Yerusaleme, pe likolo pe mabele ekoningana; pe Yawe akozala ekimelo ya batu na ye pe ebombamelo ya bana ya Israel. 17. Pe bokoyeba ete ngai Yawe nazali Nzambe na bino, nafandi na Siona, ngomba na ngai mosantu. Pe Yerusaleme ekozala mosantu, pe bapaya bakoleka lisusu na kati na yango te.

18. Pe ekokoma na mokolo yango, bangomba ekosopa vino ya sika, pe bangomba mike ekosopa miliki, pe bibale mike nionso ya Yuda ekosopa mayi; pe liziba moko ekobima na ndako ya Yawe, pe ekosopa mayi na lobwaku ya Shitime. 19. Ejipito ekozala pamba, pe Edome ekozala esobe ya pamba, na tina ya mobulu na bango epayi ya bana ya Yuda, pamba te basopaki makila ya baoyo basali eloko te na mokili na bango. 20. Kasi Yuda ekofandama libela na libela, pe Yerusaleme bakofanda na mabota na mabota. 21. Pe nakopetola bango na makila oyo napetolaki bango te : pe Yawe akofanda na Siona.