Mokanda ya Daniel
Mokapo 1 — Mokapo 2 — Mokapo 3 — Mokapo 4 — Mokapo 5 — Mokapo 6 — Mokapo 7 — Mokapo 8 — Mokapo 9 — Mokapo 10 — Mokapo 11 — Mokapo 12
1. Na mbula ya misato ya boyangeli ya Yoyakime, mokonzi ya Yuda, Nabukodonozor mokonzi ya Babilone ayaki na Yerusaleme pe azingaki yango; 2. Pe Nkolo apesaki Yoyakime mokonzi ya Yuda na loboko na ye, pe ndambo ya bambeki ya ndako ya Nzambe, pe amemaki yango na mokili ya Shinare, na ndako ya nzambe na ye.
3. Pe mokonzi alobaki na Ashpenaze, mokonzi ya ba enike na ye, amema kati na bana mibali ya Israel, pe bokitani ya bokonzi pe kati na baoyo ya libota ya lokumu. 4. bilenge mibali oyo ata mbeba moko ezali kati na bango te, pe bilongi ya kitoko, pe bateyama na mayele nyonso, pe bazali baoyo bayebi boyebi, pe baza na bososoli na siansi, pe baoyo bazali na makoki ya kotelema na kati ya ndako ya mokonzi, — pe pona koteya bango makomami pe monoko ya Bakaladea. 5. Pe mokonzi apesaki bango pona mokolo na mokolo eteni ya bileyi kitoko ya mokonzi pe vino oyo azalaki komela, pona kokolisa bango mbula misato, pe na suka na yango batelema liboso ya mokonzi.
6. Pe kati na bango ezalaki, na kati ya bana mibali ya Yuda, Danyele, Anania, Mishayele, pe Azariya; 7. Pe mokonzi ya ba enike apesaki bango bakombo: na Danyele apesaki kombo Beltshasar, pona Anania Shadrake, pona Mishayele Meshake, pe pona Azaria Abed-nego. 8. Danyele atiaki na kati ya motema na ye ete akomikomisa mbindo te na bileyi kitoko ya mokonzi pe na vino oyo amelaka; pe asengaki na mokonzi ya ba enike ete amikomisa mbindo te.
9. Pe Nzambe apesaki Danyele ngolo pe boboto liboso ya mokonzi ya ba enike. 10. Pe mokonzi ya ba enike alobi na Danyele: Nazali kobanga nkolo na ngai mokonzi, oyo apesi bileyi na bino pe masanga na bino; pe pona nini akomona bilongi na bino mawa koleka oyo ya bilenge oyo ya mbula na bino? Pe bokweyisa moto na ngai liboso ya mokonzi. 11. Pe Danyele alobi na kapita oyo mokonzi ya ba enike atiaki likolo ya Danyele, Anania, Mishayele pe Azaria: 12. Omeka, nabondeli yo, basali na yo mikolo zomi, pe bopesa biso ndunda ya koliya pe mayi ya komela; 13. Pe bakotala na miso na yo, bilongi na biso pe na bilongi ya bilenge mibali oyo bazali koliya bileyi kitoko ya mokonzi; pe okosala na basali na yo na ndenge oyo okomona. 14. Pe ayokaki bango na likambo oyo, pe atiaki bango na momekami mikolo zomi; 15. Pe, na suka ya mikolo zomi, bilongi na bango ezalaki komonana malamu pe mafuta-mafuta koleka oyo ya bilenge mibali nyonso oyo bazalaki koliya bileyi kitoko ya mokonzi. 16. Na bongo, kapita alongolaki bileyi na bango ya kitoko pe vino ya masanga na bango, pe apesaki bango ndunda.
17. Pe na bilenge mibali, mineyi wana, Nzambe apesaki bango siansi pe boyebi mateya na mikanda nyonso pe na bwanya nyonso; pe Danyele azalaki na bososoli na emonaneli nyonso pe kati na bandoto. 18. Pe na suka ya mikolo oyo mokonzi alobaki ete bamemela ye bango, mokonzi ya ba enike amemaki bango liboso ya Nabukodonozor; 19. Pe mokonzi alobaki elongo na bango, pe na kati na bango nyonso, moko te amonanaki lokola Danyele, Anania, Mishayele, pe Azaria; pe batelemaki liboso ya mokonzi. 20. Pe na makambu nyonso oyo esengaki bwanya pe bososoli, oyo mokonzi atunaki bango mituna, amonaki ete baleki mbala zomi koleka babikoli nyonso pe batu nyonso ya soloka oyo bazalaki na kati ya bokonzi na ye mobimba. 21. Pe Danyele azalaki wana kino na mbula ya liboso ya Mokonzi Sirise.
1. Pe na mbula ya mibale ya bokonzi ya Nabukodonozor, Nabukodonozor alotaki bandoto, pe elimo na ye etungisamaki, pe pongi na ye etikaki ye. 2. Pe mokonzi apesaki mitindo babenga babikoli, pe bandoki, pe basali maji, pe Bakaladea, pona koyebisa mokonzi bandoto na ye; pe bayaki pe batelemaki liboso ya mokonzi. 3. Pe mokonzi alobi na bango: Naloti ndoto moko, pe elimo na ngai etungisami pona koyeba ndoto. 4. Pe Bakaladea balobaki na mokonzi na monoko ya Siriyake: Ô mokonzi, zala na bomoyi libela! Yebisa ndoto yango na basali na yo, pe tokopesa ndimbola na yango. 5. Mokonzi ayanoli pe alobi na Bakaladea: Likambu oyo elobami na ngai: soki boyebisa ngai te ndoto pe ndimbola na yango te, bakopasula bino na biteni, pe bandako na bino ekokoma bitika ya bosoto; 6. Kasi soki bomonisi ndoto yango pe ndimbola na yango, bokozwa epayi na ngai makabo pe bakado pe lokumu monene. Boye boyebisa ngai ndoto na ndimbola na yango. 7. Bayanolaki pona mbala ya mibale pe balobaki: Tika mokonzi aloba ndoto na basali na ye, pe tokopesa ndimbola na yango. 8. Mokonzi ayanoli pe alobi: Nayebi malamu penza ete bolingi bozwa tango, po bomoni ete likambo yango elobami na ngai; 9. Nzokande soki boyebisa ngai ndoto te, ezali na mobeko moko pe kaka moko pona bino; po bobongisi liloba ya lokuta pe ya bopengwi pona koloba yango liboso na ngai, nakozelaka tangu ebongwana. Yango wana, boyebisa ngai ndoto yango, pe nakoyeba ete bokopesa ngai ndimbola na yango. 10. Bakaladea bayanolaki liboso ya mokonzi, pe balobaki: Ezali na mutu moko te awa na mabele oyo akoki kolakisa likambo oyo mokonzi azali kosenga; yango wana mokonzi moko te, ata azalaki monene pe na nguya, asenga likambo ya boye epayi ya babikoli moko te, to mutu na maji, to Mokaladea; 11. Pe likambo oyo mokonzi azali kosenga ezali pasi, pe ezali na mutu moko te oyo akoki komonisa yango liboso ya mokonzi, longola kaka banzambe oyo efandali na bango ezali elongo na mosuni te.
12. Na tina na yango, mokonzi asilikaki pe asilikaki makasi, pe apesaki motindo ete baboma batu nyonso ya bwania ya Babilone. 13. Pe mokano moko ebimisamaki ete batu ya bwania babomama; pe balukaki Danyele pe baninga na ye, pona koboma bango. 14. Bongo Danyele ayanolaki na bokebi pe na bososoli na Arioka, kapiteni ya bakengeli ya mokonzi oyo babomaka, oyo abimaki pona koboma batu ya bwania ya Babilone; 15. Ayanolaki pe alobaki na Arioka, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi: Pona nini mobeko oyo ezali makasi penza ewuti epayi ya mokonzi? Na boye, Arioke ayebisaki Danyele likambo yango. 16. Pe Danyele akotaki pe asengaki mokonzi tango pona kolimbola mokonzi.
17. Bongo Danyele akendaki na ndako na ye pe ayebisaki likambu yango na Anania, Mishayele na Azaria, baninga na ye. 18. Pona kosenga, epayi ya Nzambe ya likolo ayoka mawa na tina ya sekele yango, po ete Danyele na baninga na ye babomama te elongo na ndambo ya batu mosusu ya bwania oyo batikalaki ya Babilone. 19. Na boye, sekele yango esilaki komonisama epayi ya Danyele na kati ya emoniseli ya butu. Na sima, Danyele apambolaki Nzambe ya likolo. 20. Danyele ayanolaki pe alobaki: Kombo ya Nzambe ekumisama, seko na seko ! Po bwania pe nguya ezali ya ye, 21. Ye nde abongolisaka tangu pe basanza, oyo alongolaka bakonzi pe atiaka bakonzi, oyo apesaka bwania na batu ya bwania pe boyebi na baoyo bazali na mayele : 22. Ye nde amonisaka makambu ya mozindo pe ya kobombana; ayebi nini ezali na molili, pe pole efandi elongo na ye. 23. Yo, Nzambe ya batata na ngai, nakosanzola yo pe nakokumisa yo, po opesi ngai bwania pe nguya, pe sik’oyo oyebisaki ngai makambu oyo tosengaki yo, pe oyebisaki biso likambo oyo mokonzi asengaki.
24. Yango wana Danyele akotaki epayi ya Arioke, oyo mokonzi aponaki pona koboma batu ya bwania ya Babilone; akendaki pe alobaki na ye boye: koboma te batu ya bwania ya Babilone; mema ngai liboso ya mokonzi, pe nakopesa mokonzi ndimbola. 25. Bongo Arioke amemi Danyele nokinoki liboso ya mokonzi, pe alobaki na ye boye: Namoni mutu moko, ya bana mibali ya bakangami ya Yuda, oyo akoyebisa mokonzi ndimbola. 26. Mokonzi azongiselaki Danyele, oyo kombo na ye Belteshazare: Okoki koyebisa ngai ndoto oyo namonaki pe ndimbola na yango? 27. Danyele ayanolaki liboso ya mokonzi pe alobaki: Sekele oyo mokonzi azali kosenga, batu ya bwania, batu ya soloka, babikoli, baoyo basakolaka makambo oyo ekoya, balongi te kolakisa mokonzi; 28. Kasi ezali na Nzambe moko na likolo oyo amonisaka basekele pe ayebisi Mokonzi Nabukodonozor oyo ekokoma na mikolo ya suka. Ndoto na yo pe bimoniseli ya moto na yo, na mbeto na yo, yango oyo:
29 Yo, ô mokonzi,… makanisi na yo, na mbeto na yo, emati [na kati ya molimo na yo], oyo esengeli kokoma sima ya oyo; pe ye oyo amonisaka basekele ayebisaka yo nini ekokoma. 30. Pe po na ngai, ezali na bwania moko te oyo ezali kati na ngai koleka batu nyonso oyo bazali na bomoi nde sekele oyo emonisami epayi na ngai : ezali po ete ndimbola epesamela na mokonzi, pe oyeba makanisi ya motema na yo.
31. Yo, ô mokonzi, omonaki, pe tala ekeko moko monene: ekeko yango ezalaki monene, pe kongenga na yango ezalaki ya kokamwa; etelemaki liboso na yo, pe lolenge na ye ya komonana ezalaki somo. 32. Moto ya ekeko yango ezalaki ya wolo ya peto; ntolo na ye pe maboko na ye ya palata; libumu na ye pe mipende na ye ya motako; 33. Makolo na ye, ya ebende; makolo na ye, ndambo ya ebende pe ndambo ya mabele ya lima. 34. Omoni, ti libanga moko ekweyaki kozanga maboko; pe ebetaki ekeko na makolo na yango ya ebende pe ya mabele ya lima, pe anikaki yango na kobuka yango; 35. Bongo enikamaki na koniatama esika moko ebende, mabele ya lima, motako, palata pe wolo, pe ekomaki lokola matiti ya mbuma na eleko ya molunge; pe mopepe ememaki bango mosika, pe esika moko te ezwamaki pona bango; pe libanga oyo ebetaki ekeko ekomaki ngomba monene oyo etondisi mabele mobimba. 36. Yango wana ezali ndoto, pe tokoloba ndimbola na yango liboso ya mokonzi.
37. Yo, ô mokonzi, ozali Mokonzi ya bakonzi, oyo Nzambe ya likolo apesi bokonzi, pe nguya, pe makasi, pe nkembo; 38. Pe bisika nyonso oyo bana ya batu bafandi, banyama ya zamba pe bandeke ya likolo, atie yango na kati ya maboko na yo pe asali ete yo okonza likolo na bango nyonso. 39. Yo, ozali moto wana ya wolo. Pe sima na yo bokonzi mosusu ekotelema, oyo ekozala ya se na yo; na sima ya misato bokonzi mosusu, ya motako, oyo ekoyangela likolo mabele mobimba. 40. Pe bokonzi ya mineyi ekozala makasi lokola ebende. Lokola ebende ezali konika pe konyata na kopanza biloko nyonso, pe ebende ebukaka biloko yango nyonso, ndenge moko pe ekonika pe ekobuka. 41. Pe lolenge omonaki makolo pe misapi ya makolo ndambo ya mabele ya lima ya mosali bambeki pe ndambo ya ebende, bokonzi ekokabwana; pe ekozala na kati na yango bokasi ya ebende, lokola omonaki ebende esangani na mabele ya lima ya mafuta; 42. Pe na oyo etali misapi ya makolo ezalaki ndambo ya ebende pe ndambo ya mabele ya lima, bokonzi ekozala na ndambo makasi pe ekozala na ndambo ya kolemba. 43. Ndenge omonaki ebende esangani na mabele ya lima ya mafuta, bakosangana na bokitani ya batu, kasi bakokangama moko na mosusu te, lolenge wana ebende esanganaka te na mabele ya lima. 44. Pe na mikolo ya bakonzi wana, Nzambe ya lola akotia bokonzi oyo ekobebisama soko moke te; pe bokonzi yango ekoleka te epayi ya batu mosusu; akonyata pe akobebisa ba bokonzi nyonso wana, kasi ye akowumela pona libela. 45. Lokola omoni ete wuta na ngomba, libanga yango ekweyaki kozanga maboko, pe eniataki bibende, motako, mabele ya lima, palata pe wolo, Nzambe monene ayebisi mokonzi makambu oyo ekokoma na sima. Pe ndoto ezali ya solo, pe ndimbola na yango ezali ya solo.
46. Bongo mokonzi Nabukodonozor akweyaki na elongi na ye pe agumbamaki liboso ya Danyele, pe apesaki mitindo ete babonzela ye likabo pe mpaka ya malasi. 47. Mokonzi ayanolaki pe alobi na Danyele: Ya solo, Nzambe na bino azali Nzambe ya banzambe pe Nkolo ya bakonzi pe mobimisi ya basekele, pamba te ozalaki na likoki ya kobimisa sekele yango. 48. Bongo mokonzi atombolaki Danyele na lokumu, pe apesaki ye makabo mingi ya minene, pe akomisaki ye guvernere likolo ya etuká mobimba ya Babilone, pe mokambi monene ya batu nyonso ya bwania ya Babilone. 49. Pe Danyele asengaki mokonzi, pe atiaki Sadrake, Meshake pe Abedenego na likolo ya misala ya etuka ya Babilone. Pe Danyele atelemaki na ekuke ya mokonzi.
1. Nabukodonozor, mokonzi, asalaki ekeko ya wolo; molayi na yango ezalaki mapeko tuku motoba, monene na yango, mapeko motoba; atelemisaki yango na kati plene ya Dura, na etuka ya Babilone. 2. Pe Nabukodonozor, mokonzi, atindaki basangisa basatrape, bakambi, baguvernere, bazuzi minene, bakengeli ya mosolo, bapesi-toli (baoyo bapesaka toli ya mibeko), baoyo bayebi makambu ya mibeko, pe basambisi nyonso ya bituka, po ete baya pona bobulisi ya ekeko oyo Nabukodonozor, mokonzi, atelemisaki. 3. Na bongo, basatrape, bakambi, baguvernere, bazuzi minene, bakengeli ya mosolo, bapesi-toli (baoyo bapesaka toli ya mibeko), baoyo bayebi makambu ya mibeko pe basambisi nyonso ya bituka basanganaki pona kobulisa ekeko oyo Nabukodonozor, mokonzi, atelemisaki. Pe batelemaki liboso ya ekeko oyo Nabukodonozor atelemisaki.
4. Pe molobeli moko agangaki na mongongo makasi: Epesameli bino motindo, batu, bikolo, pe minoko. 5. Tangu kaka bokoyoka lokito ya liseke, ya flite, ya lindanda, ya sambike, ya fanfari, ya nzenze, pe ya miziki ya ndenge nyonso, bino bokongumamela pe bokokumisa ekeko ya wolo oyo Nabukodonozor, mokonzi atelemisi; 6. Pe mutu nyonso oyo akonguma te pe akokumisa te, akobwakama kaka na ngonga wana na etumbeli ya moto. 7. Yango wana, na tangu penza oyo batu nyonso bayokaki lokito ya liseke, ya flite, ya lindanda, ya sambike, ya fanfari, pe ya miziki ya ndenge nyonso, batu nyonso, batu ya bikolo pe minoko nyonso, bangumamaki pe bakumisaki ekeko ya wolo oyo Nabukodonozor, mokonzi atelemisaki.
8. Na tina na yango, kaka na tangu wana, mibali ya Bakaladea bayaki pe bafundaki Bayuda. 9. Bazwaki maloba pe balobaki na Mokonzi Nabukodonozor: Ô mokonzi, zala na bomoi libela na libela! 10. Yo, ô mokonzi, opesaki motindo ete mutu nyonso oyo akoyoka lokito ya liseke, ya flite, ya lindanda, ya sambike, ya fanfari, ya semfoni, pe ya miziki ya ndenge nyonso, anguma pe akumisa ekeko ya wolo. 11. Pe mutu nyonso oyo akonguma te pe akokumisa te, akobwakama na etumbeli ya moto. 12. Ezali na mibali ya Bayuda oyo otia likolo ya misala ya bituka ya Babilone, Shadrake, Meshake pe Abedenego : mibali bakotosa yo te, ô mokonzi, bakosalela banzambe na yo te, pe bakokumisa ekeko ya wolo oyo otelemisi te. 13. Bongo Nabukodonozor na kanda pe asilikaki makasi pe apesaki mitindo ete bamema Sadrake, Meshake na Abedenego; nde bamemaki batu wana liboso ya mokonzi. 14. Nabukodonozor azwaki maloba pe alobi na bango: Shadrake, Meshake, pe Abedenego, ete bozali kosalela nzambe na ngai te pe bokokulisa ekeko ya wolo oyo natelemisi te? 15. Sik’oyo soki, na tangu boyoki lokito ya liseke, ya flite, ya lindanda, ya sambike, ya fanfari, ya senfoni, pe lolenge nyonso ya miziki, bozali pene ya kogumbamela pe ya kokumisa ekeko oyo nasali…; kasi soki bokumisi ye te, na mbala moko kaka bokobwakama na etumbeli ya moto oyo ezali kopela. Pe azali Nzambe nini oyo akobikisa bino na loboko na ngai? 16 Shadrake, Meshake na ye Abedenego bayanolaki pe balobi na mokonzi: Nabukodonozor, ezali na tina te ete toyanola yo na likambo yango. 17. Soki ezali bongo, Nzambe na biso oyo tosalelaka akoki kobikisa biso na etumbeli ya moto oyo ekotumbama makasi, pe na loboko na yo, ô mokonzi, akobikisa biso. 18. Pe soki te, yeba, ô mokonzi, ete tokosalela banzambe na yo te, pe ete tokokumisa ekeko ya wolo oyo otelemisi te.
19. Bongo Nabukodonozor atondisamaki na kanda, pe kozala ya elongi na ye ebongwanaki epayi ya Shadrake, Meshake pe Abedenego. Azwaki maloba pe apesaki mitindo ete bapelisa na kongalisa moto yango mbala sambo koleka ndenge ezalaki momeseno ya kongalisa na kopelisa yango; 20. Apesaki mitindo na bilombe mibali ya mapinga na ye, bakanga Shadrake, Meshake pe Abedeenego basinga pe babwaka bango na kati ya etumbeli ya moto makasi. 21. Bongo batu yango wana bakangi bango na minyololo na bakazaka na bango, pe bilamba na bango, pe bakapo na bango, pe bilamba na bango mosusu, pe babwakaki bango na katikati ya etumbeli ya moto oyo ezali kopela makasi. 22. Lokola liloba ya mokonzi ezalaki makasi pe etumbeli ezalaki moto makasi koleka, epeleli ya moto ebomaki batu wana oyo babwakaki Sadrake, Meshake na Abedenego; 23. Pe mibali yango misatu, Shadrake, Meshake pe Abedenego, bakweyaki ya kongama na minyololo na kati ya etumbeli ya moto.
24. Bongo mokonzi Nabukodonozor ayokaki somo pe atelemaki nokinoki azwi maloba pe alobi na bapesi-toli na ye: Tobwaki batu misatu oyo bakangisami na minyololo katikati ya moto te? Bayanolaki pe balobaki na mokonzi: Ya solo, Ô mokonzi! 25. Ye ayanoli pe alobi: Tala, namoni batu mineyi bakangolama na minyololo, bakotambola na katikati ya moto, pe bazali na mabe te; pe komonana ya oyo ya mineyi ezali lokola ya mwana ya banzambe. 26. Bongo Nabukodonozor apusanaki pene na efungeli ya etumbeli ya moto makasi; azwi liloba pe alobi: Sadrake, Meshake pe Abedenego, basali ya Nzambe Oyo-Aleki-Likolo, bobima pe boya! Na sima, Shadrake, Meshake pe Abedenego babimaki na kati ya moto. 27. Ba-satrape, bakambi, baguvernere, pe bapesi toli ya mokonzi, oyo basanganaki, bamonaki batu oyo likolo na nzoto na bango moto ezalaki na nguya te: suki ya mito na bango ezikisamaki te, pe bilamba na bango ebongwanaki te, pe solo ya moto elekaki likolo na bango te. 28. Nabukodonozor azwaki liloba pe alobi: Apambwolama Nzambe ya Shadrake, Meshake pe Abedenego, oyo atindaki anjelu na ye pe abikisaki basali na ye, oyo batielaki ye motema, pe babongolaki liloba ya mokonzi, pe bakabaki banzoto na bango, po basalela pe bakumisa nzambe mosusu te longola kaka Nzambe na bango. 29. Pe na nzela na ngai, motindo epesami ete na batu nyonso, libota, pe monoko, oyo nani akoloba mabe na kotuka Nzambe ya Shadrake, Meshake, pe Abedenego, akokatama na biteni, pe ndako na ye ekoma esika ya bosoto, po ete ezali na Nzambe mosusu te oyo akoki kobikisa na lolenge boye. 30 Bongo mokonzi atombolaki na lokumu Shadrake, Meshake na Abedenego na etuka ya Babilone.
1. Mokonzi Nabukodonozor, epayi ya batu nyonso, bikolo nyonso pe minoko nyonso, oyo bafandi na mabele mobimba: Tika kimia na bino efulukama mingi. 2. Emonani malamu na miso na ngai na koyebisa bilembo pe makamwisi oyo Nzambe-Aleki-Likolo asali epayi na ngai. 3. Bilembo na ye, ezali ya minene koleka! Pe makamwisi na ye, ezali ya nguya mingi! Bokonzi na ye ezali bokonzi ya seko, pe kokonza na ye ezali ya bokitani na bokitani. 4. Ngai, Nabukodonozor, nazalaki na kimia na kati ya ndako na ngai, pe nazalaki na esengo pe kofuluka malamu na ndako na ngai ya bokonzi. 5. Nalotaki ndoto moko, pe ebangisaki ngai, pe makanisi oyo nazalaki na yango na mbeto na ngai, pe bimoniseli ya moto na ngai, etungisaki ngai. 6. Pe na ngai, motindo moko epesamaki, ete bamema liboso na ngai batu banso ya bwania ya Babilone, ete bakoka kolimbola ngai ndimbola ya ndoto. 7. Na sima, babikoli, bandoki, Bakaladea pe baoyo batalaka minzoto pona kobikola bayaki; pe nalobaki ndoto liboso na bango, kasi bayebisaki ngai te ndimbola na yango; 8. Kasi na suka Danyele akotaki liboso na ngai, oyo kombo na ye Belteshazare, lolenge ya kombo ya nzambe na ngai, pe na kati na ye elimo ya banzambe basantu ezali; pe nalobi ndoto liboso na ye.
9. Belteshazare, mokonzi ya babikoli, lokola nayebi ete elimo ya banzambe basantu ezali kati na yo, pe ete sekele moko te ezali kokoso pona yo, yebisa ngai bimoniseli ya ndoto oyo namonaki pe ndimbola na yango. 10. Nzokande bimoniseli ya moto na ngai likolo na mbeto na ngai yango oyo: Namonaki, pe, tala, nzete moko na kati-kati ya mabele, pe molayi na yango ezalaki monene. 11. Nzete ekolaki pe ekomaki makasi, pe molayi na yango ekomaki ti na likolo, pe bazalaki komona ti na suka ya mabele mobimba. 12. Nkasa na yango ezalaki kitoko pe mbuma na yango ezalaki mingi, pe na kati na yango ezalaki na bileyi pona batu nyonso; na nse ya elili na yango banyama ya zamba bafandaki, pe bandeke ya likolo bafandaki na bitape na yango; pe na ye mosuni nyonso eleyisamaki. 13. Namonaki na bimoniseli ya moto na ngai, na ikolo ya mbeto na ngai, pe, tala, mokengeli moko, mosantu, akitaki wuta na likolo. 14. Agangaki na makasi, pe alobi boye: Kweyisa nzete, pe kata bitape na yango, pe bwaka nkasa na yango, pe panza mbuma na yango; tika banyama bakima na se na yango, pe bandeke balongwa na bitape na yango. 15. Kasi, tika mokuwa ya misisa na yango na mabele, ekangami elongo na singa ya ebende pe ya motako, na kati ya matiti ya elanga; pe tika ete asukolama na mamwe ya likolo, pe tika ete azala kokabola elongo na banyama, bisika na matiti ya mabele; 16. Tika ete motema na ye ya moto ebongwana, pe motema ya nyama epesamela ye; pe tika ete tangu sambo eleka likolo na ye. 17. Liloba yango ezali na mobeko ya bakengeli, pe likambu, na nzela ya liloba ya basantu, po ete batu na bomoyi bakoka koyeba ete Oyo-Aleki-Likolo akonzaka likolo ya bokonzi ya batu, pe ete apesaka yango na oyo alingi, pe atombolaka mutu pamba kati na bango. 18. Ndoto oyo ngai, Mokonzi Nabukodonozor, namonaki yango; pe yo, Belteshazare, yebisa ndimbola, pamba te batu nyonso ya bwania ya bokonzi na ngai bakokaki te kolimbola ngai ndimbola; kasi yo, okoki, po elimo ya banzambe basantu ezali kati na yo.
19. Bongo Danyele, kombo na ye Belteshazare, akamwaki pona ngonga moko penza, pe makanisi na ye etungisaki ye. Mokonzi azwaki liloba pe alobi: Belteshazare, tika ete ndoto pe ndimbola na yango etungisa yo te. Belteshazare ayanolaki pe alobi: Nkolo na ngai! Ndoto yango ezala pona baoyo bayinaka yo, pe ndimbola na yango ezala pona banguna na yo. 20. Nzete oyo omonaki, oyo ekolaki pe ekomaki makasi, pe oyo molayi monene na yango ekomaki ti na likolo, pe oyo bazalaki komona na mabele mobimba, 21. Pe nkasa na yango ezalaki kitoko pe mbuma na yango ezalaki mingi, pe ezalaki na bileyi pona banso, oyo na se na yango banyama ya zamba bafandaki, pe na kati ya bitape na yango bandeke ya likolo bazalaki kofanda : 22. Ezali yo, ô mokonzi, oyo okomaki monene pe okomi na nguya; pe monene na yo ebakisami pe okomi kino na likolo, pe kokonza na yo kino na suka ya mabele. 23. Pe na oyo mokonzi amonaki mokengeli moko, mosantu, akitaki wuta na likolo, pe alobi: Kweyisa nzete yango pe bebisa yango; kasi tika mokuwa ya misisa na yango na mabele, ekangami na singa ya ebende pe ya motako, na matiti ya elanga, pe tika yango esukolama na mamwe ya likolo, pe azala na kokabola elongo na banyama ya zamba ti tangu sambo ekoleka likolo na ye, — 24. Oyo ezali ndimbola, ô mokonzi, pe mokano ya Oyo-Aleki-Likolo, ya nini oyo ekokomela mokonzi, nkolo na ngai mokonzi : 25.Bakobengana yo na kati ya batu, pe efandeli na yo ekozala elongo na banyama ya zamba, pe bakoleyisa yo matiti lokola bangombe, pe okosukola na mamwe ya likolo, pe tangu sambo ekoleka likolo na yo, kino okoyeba ete Oyo-Aleki-Likolo akonzaka likolo ya bokonzi ya batu, pe akopesa yango na nani oyo ye alingi. 26. Pe po na oyo elobamaki ete batika mokuwa ya misisa ya nzete, bokonzi na yo ekotikalela yo, tangu okoyeba ete likolo ekonzaka. 27. Yango wana, ô mokonzi, tika ete toli na ngai endimama na yo : tika masumu na yo na nzela ya boyengebene, pe mabe na yo na nzela ya mawa epayi ya banyokwami, soki ekoki kozala bobakisi ya bolamu pe kimia na yo.
28. Nyonso wana ekomelaki Mokonzi Nabukodonozor. 29. Na suka ya sanza zomi na mibale, azalaki kotambola likolo ya ndako monene ya bokonzi ya Babilone. 30. Mokonzi azwaki liloba pe alobi: oyo ezali te Babilone monene, oyo natongaki pona kozala ndako ya bokonzi na ngai, na nguya ya makasi na ngai pe pona nkembo ya kongala na ngai? 31. Maloba ezalaki nanu na kati ya monoko ya mokonzi, mongongo moko ekweyaki longwa na likolo: Mokonzi Nabukodonozor, balobi na yo : Bokonzi elongwe na yo; 32. Pe bakobengana yo na kati ya batu, pe bofandi na yo ekozala elongo na banyama ya zamba; bakoleyisa yo matiti lokola bangombe, pe tangu sambo ekoleka likolo na yo, kino okoyeba ete Oyo-Aleki-Likolo akonzaka likolo ya bokonzi ya batu pe apesaka yango na oyo ye alingi. 33. Bobele na tangu yango liloba ekokisamaki likolo na Nabukodonozor: abengamaki na kati ya batu, pe aliaki matiti lokola bangombe, pe nzoto na ye esukolamaki na mamwe ya likolo, kino suki na ye ekomaki molayi lokola ya mpongo, pe manzaka na ye lokola ya bandeke.
34. Pe na suka ya mikolo yango, ngai, Nabukodonozor, natombolaki misu na ngai epayi ya likolo, pe boyebi na ngai ezongelaki ngai, pe napambolaki Oyo-Aleki-Likolo, pe nasanzolaki pe nakumisaki ye oyo azali na bomoyi libela seko, oyo kokonza na ye ezali kokonza ya seko, pe oyo bokonzi na ye ezali ya bokitani na bokitani; 35. Pe bafandi nionso mabele bazali kotangama lokola eloko te, pe asalaka lokola asepeli na kati ya limpinga ya likolo, pe kati ya bafandi na mabele; pe ezali na mutu moko te oyo akoki kokanga loboko na ye pe koloba na ye: Ozali kosala nini? 36. Na tangu wana boyebi na ngai ezongelaki ngai, pe pona nkembo ya bokonzi na ngai, kongela na ngai pe kembo na ngai ezongelaki ngai, pe bapesi-toli na ngai pe batu minene na ngai balukaki ngai, pe nazongaki na bokonzi na ngai, pe monene na ngai ebakisami makasi penza. 37. Sik’oyo, ngai, Nabukodonozor, nasanzolaka pe natombolaka pe nakumisaka Mokonzi ya likolo, oyo misala na ye nyonso ezali solo, pe banzela na ye ezali sembo, pe oyo azali na nguya ya kokweyisa na se baoyo bazali kotambola na lolendo.
1. Mokonzi Belshatshar asalaki feti monene pona nkoto ya batu na ye ya lokumu, pe amelaki vino liboso ya ba nkoto. 2. Belshatshar, tangu azalaki komeka vino, alobaki ete bamema bambeki ya wolo pe ya palata oyo tata na ye Nabukodonozor azwaki na tempelo oyo ezalaki na Yerusaleme, po mokonzi na batu na ye ya lokumu, basi na ye pe bamakangu na ye, bamela na yango. 3. Bongo bamemaki bambeki ya wolo oyo bazwaki na tempelo ya ndako ya Nzambe, oyo ezalaki na Yerusaleme; pe mokonzi pe batu minene na ye, basi na ye pe makango na ye, bamelaki na yango. 4. Bamelaki vino pe basanzolaki banzambe ya wolo pe ya palata, ya motako, ya ebende, ya nzete pe ya mabanga. 5. Kaka na ngonga wana, misapi ya loboko ya mutu moko ebimaki pe ekomaki, na ngambo ya etelemelo ya mwinda, likolo ya etando ya mir ya ndako monene ya mokonzi; pe mokonzi amonaki eteni ya loboko oyo ezalaki kokoma. 6. Bongo langi ya elongi ya mokonzi ebongwamaki, pe makanisi na ye etungisaki ye; pe bokangi ya loketo na ye efungwamaki, pe mabolongo na ye etutanaki moko na mosusu.
7. Mokonzi agangaki na mongongo makasi ete bamema batu na soloka, Bakaladea pe baoyo batalelaka minzoto pona koloba makambu ekoya. Mokonzi azwaki maloba pe alobi na batu ya bwania ya Babilone: Nani oyo akotanga makomi oyo pe akopesa ngai ndimbola na yango, akolata bilamba ya motane-bule, pe sheneti ya wolo na kingo na ye, pe akozala na bokonzi lokola mutu ya misato na kati ya bokonzi. 8. Bongo batu nyonso ya bwanya ya mokonzi bayaki, kasi bakokaki te kotanga makomi yango pe koyebisa mokonzi ndimbola na yango. 9. Bongo mokonzi Beltshashar atungisamaki makasi, pe langi na ye ebongwamaki; pe batu ya lokumu na ye bakamwaki pe bayokaki pasi. 10. Mokonzi-mwasi, na tina ya maloba ya mokonzi pe ya batu minene na ye, akotaki na ndako ya feti. Mokonzi-mwasi azwaki maloba pe alobaki: Ô mokonzi, zala na bomoyi libela! Tika ete makanisi na yo etungisa yo te, pe kobongola langi te:11. Ezali na mutu moko na kati ya bokonzi na yo, oyo kati na ye elimo ya banzambe basantu ezali; pe na mikolo ya tata na yo, pole na komona polele, pe bososoli, pe bwania lokola bwanya ya banzambe, ezwamaki kati na ye; pe mokonzi Nabukodonozor, tata na yo,- tata na yo, ô mokonzi, atiaki ye mokonzi ya babikoli, ya batu na soloka, ya Bakaladea, ya batali bilembo. 12. Po ete elimo moko ya kokamwa, pe boyebi siansi pe bososoli pona kolimbola bandoto pe kolimbola makambu ya pasi pona kososola pe kosilisa mikakatano ya pasi pe kofungola oyo ekangama, emonanaki kati na ye, na Danyele, oyo mokonzi apesaki ye kombo Belteshazare. Yango wana, tika ete Danyele abengama, pe akolakisa ndimbola.
13. Na sima, bamemaki Danyele liboso ya mokonzi. Mokonzi azwi maloba pe alobi na Danyele: Ozali Danyele oyo, moko na bana mibali ya bokangami ya Yuda, oyo mokonzi, tata na ngai amemaki na Yuda? 14. Pe nayoki koloba na tina na yo, ete elimo ya banzambe ezali kati na yo, pe ete pole, pe bososoli, pe bwania ya kokamwa ezwami kati na yo. 15. Pe sik’oyo, batu ya bwanya, bandoki, bamemaki liboso na ngai, po ete bakoka kotanga makomi oyo pe koyebisa ngai ndimbola, pe bakokaki te kolakisa ndimbola ya maloba yango. 16. Pe nayoki na oyo etali yo ete okoki kopesa bandimbola pe kosilisa mikakatano ya pasi pe kofungola oyo ekangama. Sik’oyo, soki okoki kotanga makomi pe koyebisa ngai ndimbola, okolata elamba ya motane-bule, pe okozala na sheneti ya wolo na kingo na yo, pe okozala na bokonzi lokola mutu ya misato na kati ya bokonzi.
17. Bongo Danyele ayanolaki pe alobi liboso ya mokonzi: Makabo na yo etikala epayi na yo, pe pesa mbano na yo na mutu mosusu. Nzokande, nakotanga makomi yango na mokonzi, pe nakoyebisa ye ndimbola na yango. 18. Ô mokonzi, Nzambe Oyo-Aleki-Likolo apesaki Nabukodonozor, tata na yo bokonzi, pe monene, pe lokumu, pe nkembo; 19. Pe na tina ya monene oyo apesaki ye, batu, mabota pe minoko nionso, balengaki liboso na ye, pe babangaki ye; abomaki oyo alingi, pe abatelaki na bomoyi oyo ye alingi; atombolaki oyo ye alingi, pe akitisaki oyo ye alingi. 20. Kasi tangu motema na ye emitombolaki pe elimo na ye ekomaki makasi kino na lolendo, abwakami na kiti na ye ya bokonzi, pe lokumu na ye elongolamaki ye; 21. Pe abenganamaki na kati ya bana ya batu, pe motema na ye ekomaki lokola ya banyama, pe bofandi na ye ezalaki elongo na bampunda ya zamba; baleyisaki ye matiti lokola bangombe, pe nzoto na ye esukolamaki na mamwe ya likolo, kino ayebaki ete Nzambe Oyo-Aleki-Likolo akonzaka likolo ya bokonzi ya batu, pe ete atiaka nani oyo ye alingi. 22. Pe yo, mwana na ye Beltshashar, okitisi motema na yo te, atako oyebaki makambu wana nyonso. 23. Kasi omitomboli liboso ya Nkolo ya likolo; pe bamemaki liboso na yo bambeki ya ndako na ye, pe yo na batu minene na yo, basi na yo pe makango na yo, bomelaki vino kati na yango; pe bosanzoli banzambe ya palata pe ya wolo, ya motako, ya ebende, ya nzete pe ya mabanga, oyo bamonaka te pe bayokaka te pe basosolaka te; pe Nzambe oyo na loboko na ye pema na yo ezali, pe oyo banzela na yo nyonso ezali ya ye, okumisi ye te. 24. Bongo suka ya loboko esilaki kotindama na ye, pe likomi oyo esili kokomama. 25. Pe tala likomi oyo ekomami: MENÉ, MENÉ, TEKEL, UFARSIN! 26. Tala ndimbola ya maloba. MENÉ: Nzambe atangi bokonzi na yo, pe asukisi yango. 27. TEKEL: Omekamaki na balansi, pe omonanaki ete ozangi kilo. 28. PERES: Bokonzi na yo ekabwani, pe epesami na Bamede pe na Baperse.
29. Bongo Beltshashar alobaki, ete balatisa Danyele bilamba ya motane-bule, pe sheneti ya wolo na kingo na ye, pe basakola ete akozala mutu ya misato na kati ya bokonzi. 30. Na butu wana, Beltshashar mokonzi ya Bakaladea abomamaki. 31. Pe Dareyavesh, Momede, azwaki bokonzi, azalaki na mbula soki tuku motoba na mibale (62).
1. Esepelaki na Dario kotiya basatrape kama moko na tuku mibale (120), pona bazala na kati ya bokonzi mobimba; 2. Pe likolo na bango, bakambi misatu, oyo Danyele azalaki moko na bango, pona ete basatrape bayebisa bango, pe ete mokonzi abebisama ata moke te. 3. Pe ye Danyele alekaki bakambi na basatrape, po ete elimo moko ya kokamwa ezalaki kati na ye; pe mokonzi akanisaki kotiya ye likolo ya bokonzi mobimba.
4. Bongo bakambi na basatrape bazalaki koluka likambu moko ya kofunda Danyele na oyo etali bokonzi; pe bakokaki te kozwa tina ya kofundama to mbeba moko, po ete azalaki sembo; pe bozangi moko to mbeba moko te ezwamaki kati na ye. 5. Pe mibali yango balobaki: Tokomona kati na Danyele likambo moko te ya kofunda ye, longola bobele kaka tomona eloko ya kotelemela ye na tina ya mobeko ya Nzambe na ye. 6. Bongo bakonzi wana na basatrape wana bayanganaki na ebele ya batu epayi ya mokonzi, pe balobaki na ye boye: Mokonzi Dario, obika libela! 7. Bakonzi banso ya bokonzi, ba prefe pe ba satrape, bapesi toli pe baguvernere, basanganaki likita elongo pona koyokana ete mokonzi atia mobeko pe atiya epekiseli makasi, ete ye oyo nyonso akosala bosenga na nzambe moko to na mutu nani mosusu, na kati ya mikolo tuku misatu, longola se yo, ô mokonzi, akobwakama na kati ya libulu ya nkosi. 8. Sik’oyo, ô mokonzi, tia epekiseli, pe sinyatili na makomi po ete esila kobongwana te, na lolenge ya mobeko ya Bamede pe Baperse, oyo ekoki kolongwama te. 9. Na tina wana, Mokonzi Dario atiaki sinyatili na makomi yango pe na komipekisa.
10. Nzokande Danyele tangu ayebaki ete likomi yango etiamaki sinyatili, akotaki na ndako na ye; pe maninisa na ye ezalaki polele na ndako na ye ya likolo, etalani na Yerusaleme, afukamaki na mabolongo na ye mbala misatu na mokolo, pe azalaki kosambela, pe kopesa matondi liboso ya Nzambe na ye, ndenge azalaki kosala liboso. 11. Kasi batu yango basanganaki na ebele ya batu pe bamonaki Danyele azali kobondela pe kopesa libondeli na ye liboso ya Nzambe na ye. 12. Bongo bapusanaki pe balobaki liboso ya mokonzi, na oyo etali epikameli ya mokonzi: Otiaki sinyatili te na epekiseli, ete mutu nyonso oyo na bowumeli ya mikolo tuku misatu, akosenga nzambe moko to mutu ata nani, longola kaka yo moko, ô mokonzi, akobwakama na libulu ya bankosi? Mokonzi ayanolaki pe alobi: Likambu ezali solo, na lolenge na mobeko ya Bamede pe ya Baperse, oyo ekoki kolongwama te. 13. Bongo bazongiselaki pe balobaki liboso ya mokonzi: Danyele, oyo azali na bana ya bakangami ya Yuda, azali kotiela yo likebi te, ô mokonzi, to pe na epekiseli oyo otie sinyatili na yo, kasi ye azali kobondela mbala misatu na mokolo. 14. Bongo mokonzi, tangu ayokaki maloba yango, ayokaki mawa mingi, pe akanisaki na bokebi penza Danyele po ete abikisa ye, pe kino tangu moyi elali, asalaki makasi ya kobikisa ye. 15. Bongo batu yango basanganaki na ebele ya batu epayi ya mokonzi, pe balobaki na mokonzi: Yeba, ô mokonzi, ete oyo ezali mobeko ya Bamede pe ya Baperse, ete epekiseli to mobeko moko te oyo mokonzi atie ekoki kobongwana te. 16. Bongo mokonzi apesaki mitindo, pe bamemaki Danyele pe babwakaki ye na libulu ya bankosi.
Mokonzi azwaki maloba pe alobi na Danyele: Nzambe na yo, oyo osalelaka tangu nyonso, ye, akobikisa yo. 17. Pe libanga moko ememaki pe batiaki yango na likolo ya efungeli ya libulu, pe mokonzi akangaki yango na elembo na ye pe na elembo ya batu minene na ye, po ete makanisi na tina ya Danyele ebongwana te. 18. Bongo mokonzi akendaki na ndako na ye ya mokonzi, pe alekisaki butu mobimba na kokila bileyi, pe alingaki te ete bamemela ye ba makango; pe pongi na ye ekimaki mosika na ye.
19. Bongo mokonzi atelemaki na tongotongo, pe akendaki mbangu-mbangu na libulu ya bankosi. 20. Pe lokola azalaki kopusana penepene na libulu, agangi epayi na Danyele na mongongo ya mawa. Mokonzi azwi maloba pe alobi na Danyele: Danyele, mosali ya Nzambe na bomoyi, Nzambe na yo, oyo ozali kosalela tangu nyonso, abikisi yo na nkosi? 21. Bongo Danyele alobi na mokonzi: Ô mokonzi, obika libela! 22. Nzambe na ngai atindaki anjelu na ye pe akangaki minoko ya bankosi, pe basali ngai ata mabe moko te, pamba te liboso na ye bozangi mbeba na ngai emonanaki, pe liboso na yo te, ô mokonzi, nasali likambu moko ya mabe te. 23. Bongo mokonzi asepelaki makasi mingi pe alobi ete basengeli kobimisa Danyele na libulu. Pe Danyele abimisamaki na libulu, pe mabe moko te emonanaki likolo na ye, po ete atielaki Nzambe na ye motema. 24. Pe mokonzi apesaki mitindo, pe bamemaki batu wana oyo bafundaki Danyele, pe babwakaki bango na libulu ya bankosi, bango, na bana na bango, na basi na bango; pe bakomaki nanu bakomaki na se ya libulu te bankosi basilaki kozwa bango pe babukaki mikuwa na bango nyonso.
25. Bongo Mokonzi Dario akomaki: Epayi ya batu, bikolo nyonso pe minoko nyonso, oyo bafandi na mabele mobimba! Tika ete kimia na bino ekoma mingi! 26. Ngai napesi motindo oyo : ete na kati baguvernema nyonso ya bokonzi na ngai bakolenga liboso ya Nzambe ya Danyele pe bakobanga ye; po azali Nzambe na bomoyi, pe akowumela libela, pe bokonzi na ye ezali oyo ekobebisama te, pe bokonzi na ye kino suka. 27. abikisaka pe akangolaka, pe asalaka bilembo pe makamwisi na likolo pe na mabele : pe ye oyo abikisi Danyele na nguya ya bankosi.
28. Pe Danyele oyo akendaki liboso na tangu na bokonzi ya Dario, pe na bokonzi ya Sirise Moperse.
1. Na mbula ya liboso ya Beltshashar mokonzi ya Babilone, Danyele amonaki ndoto moko pe bimoniseli ya mutu na ye, na mbeto na ye. Na sima, akomaki ndoto yango, pe ayebisaki makambu yango.
2. Danyele azwaki maloba pe alobi : Nazalaki komona na emoniseli na ngai ya butu, pe tala, mipepe mineyi ya likolo koningisaka likolo ya mayi monene penza. 3. Pe banyama minene mineyi ebimaki na mayi monene, ya bokeseni moko na mosusu. 4. Ya liboso azalaki lokola nkosi, pe azalaki na mapapu ya mpongo. Namonaki kino mapapu na ye elongwaki, pe atombolamaki wuta na mabele, pe atelemaki likolo na makolo na ye, lokola mutu; pe motema ya mutu epesamelaki ye. 5. Pe tala mosusu, nyama ya mibale, lokola urse, pe etelemaki na ngambo moko. Pe azalaki na mikuwa misatu na kati ya monoko na ye, na kati-kati ya minu na ye; pe balobaki na ye boye: Telema, lia misuni mingi. 6. Sima na yango, namonaki, pe tala mosusu, lokola nkoyi; pe azalaki na mapapu mineyi ya ndeke na mokongo na ye; pe nyama yango ezalaki na mito mineyi; pe bokonzi ya kokonza epesamelaki ye.
7. Na sima na yango, namoni na kati ya bimoniseli ya butu, pe tala nyama ya mineyi, azalaki kolengisa pe ya somo pe ya nguya mingi, pe ezalaki na minu minene ya ebende : azalaki kolia pe kokata biteni na biteni ; oyo etikalaki aniataki-niataki yango na makolo na ye. Pe azalaki ya bokesani na banyama nyonso oyo ezalaki liboso na ye; pe ezalaki na maseke zomi. 8. Nazalaki kotala ba maseke, pe tala liseke mosusu, ya moke, emati kati na yango, pe misato ya maseke ya yambo elongwamaki liboso na yango. Pe, tala, na liseke yango ezalaki na misu lokola misu ya mutu, pe monoko kolobaka makambu minene ya lolendo. 9. Nazalaki komona kino ti tangu batiaki bakiti ya bokonzi, pe Mobange ya Mikolo afandaki. Elamba na ye ezalaki pembe lokola neje, pe basuki ya moto na ye lokola suki ya mpate; kiti na ye ya bokonzi ezalaki ya milinga ya moto; bapine ya bakiti ya bokonzi, moto oyo ezali kopela. 10. Ebale moko ya moto ezalaki kosopana pe kobima liboso na ye. Bankoto na nkoto basalelaki ye, pe ba nkoto zomi mbala nkoto zomi na ba nkoto zomi mbala nkoto zomi batelemaki liboso na ye. Bosambisi efandaki, pe mikanda efungwamaki. 11. Bongo nazalaki komona, na tina ya mongongo ya maloba minene oyo liseke ebimisaki, - Nazalaki komona kino nyama ebomamaki; pe nzoto na ye ebebisamaki pe apesamaki pona etumbama na moto. 12. Po na banyama mosusu, bokonzi ya kokonza elongwaki bango; kasi bokobi ya bomoyi epesamelaki bango, kino eleko moko pe tangu moko.
13. nazalaki komona na bimoniseli ya butu, pe tala, lokola mwana ya mutu ayaki elongo na mapata, pe ayaki epayi ya Mobange ya mikolo, pe bamemaki ye liboso na ye. 14. Pe bapesaki ye bokonzi ya kokonza, pe kembo, pe bokonzi, ete batu nionso, pe bikolo nionso, pe minoko nionso, bazalaki kokumisa. Bokonzi ya kokonza na ye ezali bokonzi ya kokonza ya seko, oyo ekoleka te, pe bokonzi ya kokonza na ye oyo ekobebisama te.
15. Ngai Danyele, natungisami na kati ya elimo na ngai na kati ya nzoto na ngai, pe bimoniseli ya moto na ngai ezalaki kotungisa ngai. 16. Napusanaki penepene na moko ya baoyo batelemaki wana, pe natunaki ye bosolo na tina na nyonso wana. Pe ayebisaki ngai, pe ayebisaki ngai ndimbola ya makambu : 17. Banyama minene wana, oyo ezali mineyi, ezali bakonzi mineyi oyo bakobima na mabele; 18. Pe basantu ya Oyo-Aleki-Likolo bakozwa bokonzi, pe bakozwa bokonzi libela na libela.
19. Bongo nazalaki naposa ya koyeba solo na tina na nyama ya mineyi, oyo ekesani na bango nyonso, ya somo penza: minu na ye ezalaki ya ebende, pe manzaka na ye ya motako; aliaki, kokata biteni-biteni, pe anyataki na makolo na ye oyo etikalaki; … 20. Pe asimbaki maseke zomi oyo ezalaki likolo na moto na ye, pe asimbaki mosusu oyo ezalaki komata, pe oyo liboso na ye misatu bakweyaki, liseke oyo ezalaki na misu pe monoko koloba makambu minene, pe oyo amonanaki monene koleka basusu 21. Nazalaki kotala; pe liseke yango kobundisa basantu, pe elongaki bango, 22. Kino Mobange ya Mikolo ayaki, pe esambiselo epesamelaki na basantu ya Oyo-Aleki-Likolo, pe tangu ekomaki oyo basantu bazwaki bokonzi.
23. Alobi boye: Nyama ya mineyi ekozala bokonzi ya mineyi na mabele, ekozala ya bokeseni na ba bokonzi nionso, pe ekolia mabele mobimba, pe akonyata yango na se ya makolo, pe akokata yango biteni na biteni. 24. Pe maseke zomi… ezali bakonzi zomi oyo bakobima na bokonzi. Pe moko mosusu akobima sima na bango; pe akozala ya bokeseni na baoyo ya yambo; pe akokweyisa bakonzi misatu. 25. Pe akoloba maloba pona kotelemela Oyo-Aleki-Likolo, pe akoniokola basantu ya Oyo-Aleki-Likolo, pe akokanisa kobongola bileko pe mibeko, pe bakokabama na loboko na ye kino tangu pe ba tangu pe ndambu moko ya tangu. 26. Pe bosambisi ekofanda; pe bakolongola ye bokonzi, pona kobebisa ye pe koboma ye kino na suka. 27. Pe bokonzi, pe kokonza, pe monene ya ba bokonzi nionso oyo ezali na se ya likolo, ekopesama na batu na basantu ya Oyo-Aleki-Likolo. Bokonzi na ye ezali bokonzi ya seko, pe ba bokonzi nyonso bakokumisa ye pe bakotosa ye.
28. Kino sik’oyo, suka ya lisolo. Po na ngai, Danyele, makanisi na ngai etungisaki ngai mingi, pe langi na ngai ebongwanaki kati na ngai. Kasi nabombaki likambu yango na motema na ngai.
1. Na mbula ya misatu ya bokonzi ya mokonzi Belshatshar, emoniseli moko emonanaki epayi na ngai, Danyele, sima ya emoniseli oyo emonanaki na ngai na ebandeli. 2. Pe namonaki na kati ya emoniseli; pe ekomaki ete, tangu namonaki, ete nazalaki na Susa, ndaku ya mokonzi oyo ezali na kati ya etuka ya Elama. Pe namoni na emoniseli, pe nazalaki pembeni ya ebale Ulayi. 3. Pe natombolaki misu na ngai, pe namonoki; pe, tala, mpate-mobali moko etelemaki liboso ya ebale, pe ezalaki na maseke mibale; pe maseke mibale ezalaki milayi, pe moko elekaki mosusu, pe oyo eleki likolo etombolaki ya suka. 4. Pe namonaki mpate-mobali yango kobetabeta na maseke epayi ya westi, pe epayi ya nord, pe epayi ya sudi; pe nyama moko te ekokaki kotelema liboso na ye, pe ezalaki na mutu moko te oyo akokaki kokangola na loboko na ye; pe asalaki lokola alingaki, pe akomaki monene. 5. Pe nazalaki kokanisa, pe tala, ntaba moko kowuta wuta na westi likolo ya etando ya mabele mobimba, pe ye asimbaki mabele te; pe ntaba azalaki na liseke ya lolenge monene kati na misu na ye. 6. Pe akomaki epayi ya mpate-mobali oyo ezalaki na maseke mibale, oyo namonaki kotelema liboso ya ebale, pe akimaki mbangu likolo na ye na kanda na ye ya makasi. 7. Pe namonaki ye kokoma penepene na mpate-mobali, pe asilikelaki ye pe abetaki mpate-mobali, pe abukaki maseke na ye mibale, pe mpate-mobali yango ezalaki na nguya te ya kotelema liboso na ye: abwakaki ye na mabele pe anyataki yango na makolo, pe ezalaki na mutu moko te akokaki kokangola mpate-mobali na loboko na ye.
8. Pe ntaba akomaki monene penza; pe tango akomaki makasi, liseke monene ebukanaki, pe maseke mineyi ya komonana monene etombolamaki na esika na ye epayi ya mipepe mineyi ya likolo. 9. Pe na moko kati na bango ebimaki liseke moko ya moke, pe ekolaki mingi penza epayi ya sudi, pe epayi ya esti, pe epayi ya [mokili] ya kitoko. 10. Pe ekolaki kino na lipinga ya likolo, pe ekwayesaki na mabele ndambo ya mapinga pe ya minzoto, pe aniataki bango na se ya makolo. 11. Pe atelemaki kino epayi ya mokonzi ya mapinga; pe mbeka ya tangu nyonso elongwamaki epayi na ye, pe esika ya mosantu na ye ebalukamaki. 12. (Pe tangu ya mpasi etiamaki pona mbeka ya tangu nyonso pona tina ya kobuka mobeko). Pe abwakaki solo na mabele, pe asalaki pe alongaki na nionso oyo asalaki. 13. Pe nayokaki mosantu moko azalaki koloba; pe mosantu mosusu alobaki na mutu oyo azalaki koloba: kino tangu nini emoniseli ya mbeka ya tangu nionso pe ya bobuki mobeko ya kobebisa, pona kokaba esika esantu pe lipinga pona koniatama na se ya makolo? 14. Pe alobi na ngai: Kino pokwa nkoto mibale na kama misato (2300) pe ba tongo; bongo esika mosantu ekopetolama na kolongisama.
15. Pe ekomaki ete ngai, Danyele, tangu namonaki emoniseli, nalukaki kososola yango; pe, tala, lokola komonana ya mutu moko etelemaki liboso na ngai; 16. Pe nayokaki mongongo ya mutu moko na katikati ya Ulayi; pe agangaki pe alobi: Gabriel, sosolisa emoniseli na mutu oyo. 17. Pe apusanaki penepene na esika nazalaki, pe tangu ayaki, nalengaki, pe nakweyaki na elongi na ngai; pe alobi na ngai: Sosola, mwana ya moto, po ete emoniseli ezali pona tangu ya suka.
18. Nzokande, tangu azalaki koloba elongo na ngai, nazalaki na boyebi lisusu te, elongi na ngai na mabele; pe asimbaki ngai pe atelemisaki ngai na esika oyo nazalaki. 19. Pe alobi: Tala, nakolakisa yo nini ekosalema na batangu ya suka ya kanda; po ezali tangu moko oyo ebongisami pona suka. 20. Mpate-mobali oyo omonaki, oyo ezalaki na maseke mibale, ezali bakonzi ya Mede pe ya Perse. 21. Pe ntaba ya suki ezali mokonzi ya Yavane (Grese); pe liseke monene oyo ezalaki kati na misu na ye ezali mokonzi ya yambo; 22. Ete ebukanaki, pe mineyi ebimaki na esika na yango, ete ba bokonzi mineyi makobima na ekolo wana, kasi na nguya na ye te. 23. Pe na mikolo ya suka ya bokonzi na bango, tangu babuki mibeko bakotondisa mezire, mokonzi moko akotelema ya elongi ya botioli basusu, pe makasi na masano ya elimo ya komekaka bososoli ya baoyo bazali na ye; 24. Pe nguya na ye ekozala makasi, kasi na nguya na ye moko te; pe akoyeyisa bobebisami na ndenge ya kokamwa, pe akolonga na misala na ye pe akosala; pe akobebisa bilombe pe batu ya basantu; 25. Pe na mayele na ye ya bokosi akosala ete bokosi elonga malamu na kati ya loboko na ye; pe akomimatisa na kati ya motema na ye; pe na nzela ya bomengo akobebisa batu mingi; pe akotelemela mokonzi ya bankumu, kasi akobukana na loboko te. 26. Pe emoniseli ya pokwa pe ya tongo, oyo elobamaki, ezali bosolo. Pe osimba makasi emoniseli, po ezali na mikolo mingi kino tangu yango.
27. Pe ngai, Danyele, nazalaki wana nzoto kolemba, pe nazalaki maladi na mikolo mosusu; na sima natelemaki pe nazalaki kosalela makambu ya mokonzi. Pe nakamwaki emoniseli, kasi mutu moko te asosolisaki ngai yango.
1. Na mbula ya liboso ya Dario mwana ya Asuruse, ya bokitani ya Bamede, oyo akomaki mokonzi likolo ya bokonzi ya Bakaladea, 2. Na mbula ya liboso ya bokonzi na ye, ngai, Danyele, nasosolaki na mikanda ete motango ya bambula oyo liloba ya Yawe eyaki epayi ya Yilimia profete, pona kokokisama ya ba libebisemi ya Yerusaleme, ezalaki mbula tuku sambo (70). 3. Pe natie elongi na ngai epayi ya Nkolo Nzambe, pona koluka na nzela ya losambo pe na libondeli, na kati ya kokila bileyi, pe na saki pe na putulu. 4. Pe nabondelaki epayi na Yawe, Nzambe na ngai, pe nayambolaki, pe nalobi: Nabondeli yo, Nkolo, *Nzambe monene pe ya somo, oyo abombaka boyokani pe bolamu pona baoyo balingaka yo, pe babombaka mitindo na yo. 5. Tosumumaki, tosalaki mabe, tosalaki makambu ya mabe, pe totombokaki pe tobalukaki mosika na mitindo na yo pe ya mibeko na yo; 6. Pe toyokaki te basaleli na yo baprofete, oyo balobaki na kombo na yo epayi ya bakonzi na biso, pe na bankumu na biso, pe na batata na biso, pe na batu nyonso ya mboka. 7. Na yo, Nkolo, boyengebene, pe na biso mobulungano ya bilongi, lokola lelo, - na batu ya Yuda pe na bafandi ya Yerusaleme, pe na Israel mobimba, na baoyo bazali penepene pe na baoyo bazali mosika, kati na mikili nyonso oyo obengani bango, na tina ya bozangi bosembo na bango, na nzela na yango bazalaki na bosembo te epayi na yo. 8. Yawe, na biso mobulungano ya bilongi, na bakonzi na biso, na bankumu na biso pe na batata na biso, po tosali yo lisumu. 9. Na Nkolo Nzambe na biso mawa pe bolimbisi, po totombokelaki ye. 10. Pe toyokaki mongongo ya Yawe, Nzambe na biso te, pona kotambola na lolenge ya mibeko na ye, oyo atiaki liboso na biso na nzela ya basali na ye baprofete. 11. Pe Israel mobimba abuki mobeko na yo pe abaluki na kozanga koyoka mongongo na yo. Bongo elakeli mabe pe ndayi esopamaki likolo na biso, oyo ekomami na kati ya mobeko ya Mose, mosali ya Nzambe, po tosalelaki ye lisumu; 12. Pe akokisaki maloba na ye oyo alobaki na kotelemela biso pe na kotelemela basambisi na biso baye basambisaki biso, na koyeyisa likolo na biso mabe monene boye ete etikala kosalama te na se ya likolo mobimba lokola oyo esalami na Yerusaleme. 13. Lokola ekomami na Mobeko ya Mose, Mabe oyo nionso eye likolo na biso; pe tobondeli Yawe, Nzambe na biso te, ete tolongwa na mabe na biso, pe tososola bosolo na yo. 14. Yawe akengeli mabe, pe amemeli yango likolo na biso; po Yawe, Nzambe na biso, azali sembo na kati ya misala na ye nyonso; pe toyokaki mongongo na ye te. — 15. Pe sik’oyo, Nkolo, Nzambe na biso, yo oyo obimisaki batu na yo na mboka ya Ejipito na loboko makasi, pe omisali kombo, lokola ezali lelo: tosumukaki, tosalaki mabe. 16. Nkolo, na lolenge ya boyengebene na yo nyonso, tika kanda na yo pe kanda makasi na yo elongwa, nabondeli yo, na engumba na yo Yerusaleme, ngomba na yo mosantu. Po na tina ya masumu na biso pe na tina ya mabe ya batata na biso, Yerusaleme pe batu na yo tokomi bileko ya kofingama ya batu nyonso oyo bazali zingazinga na biso. 17. Pe sik’oyo, yoka, Ô Nzambe na biso, losambo ya mosali na yo pe mabondeli na ye, pe pona bolingo ya Nkolo, tika ongengisa elongi na yo likolo ya esika mosantu ya yo oyo ebebisami.18. Tia litoyi na yo, Ô Nzambe na ngai, pe yoka; fungola misu na yo, pe tala kobebisama na biso, pe ya engumba oyo ebengami na kombo na yo. Po ezali te na tina ya boyengebene na biso nde tozali kopesa mabondeli na biso liboso na yo, kasi na tina ya mawa na yo minene. 19. Nkolo, yoka; Nkolo, limbisa; Nkolo, zala na bokebi pe sala; kowumela te, na tina na yo moko, Nzambe na ngai; po engumba na yo pe batu na yo babengami na kombo na yo.
20. Pe nazalaki lisusu koloba, pe kobondela, pe koyambolaka lisumu na ngai, pe lisumu ya batu na ngai Israel, pe nalakisaki libondeli na ngai liboso ya Yawe, Nzambe na ngai, pona ngomba mosantu ya Nzambe na ngai, — 21. Nazalaki nanu kobondela, pe mutu Gabriel, oyo namonaki na emoniseli na ebandeli, apumbwaki nokinoki, asimbaki ngai pene na ngonga ya libonza ya gato ya pokwa. 22. Pe asosolisaki ngai, pe alobaki na ngai, pe alobi: Danyele, nabimi sik’oyo pona kopesa kongengisa bososoli na yo. 23. Na ebandeli ya mabondeli na yo, liloba ebimaki, pe nayaki kosakola yango epayi na yo, po ozali molingami. Na yango, sosola liloba, pe ozala mayele na kati ya emoniseli. 24. Baposo tuku sambo (70) etiamaki likolo ya batu na yo pe likolo ya engumba na yo mosantu, pona kosilisa botomboki, pe pona kosilisa na masumu, pe pona kosala bopetoli pona mbindo, et pona komema boyengebene ya bikeke, pe kokangisa emoniseli pe profete, pe kopakola mafuta na mosantu ya bosantu. 25. Pe yeba, pe sosola: Kobanda na kobima ya liloba ya kozongisa pe kotonga lisusu Yerusaleme, kino na Masiya, mokonzi, ezali baposo sambo na baposo tuku motoba na mibale; esika pe libulu ekotongama lisusu, pe na kati ya tangu ya miniokoli. 26. Pe sima ya baposo tuku motoba na mibale, Masiya akobomama pe akozala na eloko te; pe batu ya mokonzi oyo akoya bakobebisa engumba pe esika esantu, pe suka na yango ekozala na mpela oyo etondi; pe ti na suka ekozala na etumba, mobeko makasi ya libebi. 27. Pe akosala boyokani makasi elongo na ebele pona poso moko; pe na katikati ya poso akopekisa mbeka pe libonza; pe na tina ya bobateli ya biloko ya somo, mobebisi moko akoya, pe yango kino bobebisami nionso oyo epesameli ekosopama likolo ya baoyo batikali pamba.
1. Na mbula ya misato ya bokonzi ya Sirise, mokonzi ya Perse, liloba moko emonisamaki epayi ya Danyele, oyo abengami Belteshatshare; pe liloba yango ezali solo, kasi tangu ya komekama oyo ekanami ezali molayi. Pe asosoli liloba pe asosolaki emoniseli.
2. Na mikolo wana, ngai, Danyele, nazalaki kolela poso misatu mobimba; 3. Nazalaki koliya te lipa ya elengi, pe mosuni pe vino ekotaki te na monoko na ngai; pe namipakolaki malasi te kino baposo misatu mobimba esilaki.
4. Pe mokolo ya tuku mibale na mineyi ya sanza ya yambo, nazalaki pembeni ya ebale monene Idekele; 5. Pe natombolaki misu, pe namonoki; pe tala mutu moko alataki lino, pe loketo na ye elataki mokaba ya wolo ya Ufaze; 6. Pe nzoto na ye ezalaki lokola krizolite, pe elongi na ye lokola komonana ya kake, pe misu na ye lokola milinga ya moto, pe maboko na ye pe makolo na ye lokola motako oyo epetolami, pe mongongo ya maloba na ye lokola mongongo ya batu mingi. 7. Pe ngai Danyele, namonaki emoniseli yango ngai moko, pe batu oyo bazalaki elongo na ngai bamonaki emoniseli yango te, kasi kolenga monene ekwelaki bango, pe bakimaki mbangu pona komibomba. 8. Pe natikalaki ngai moko, pe namonoki emoniseli monene oyo; pe makasi etikalaki te kati na ngai, pe kitoko na ngai ebongwanaki na kobeba, pe nazalaki lisusu na makasi te. 9. Pe nayokaki mongongo ya maloba na ye; pe lokola nazalaki koyoka mongongo ya maloba na ye, nakweyaki na elongi na ngai kati ya koyeba lisusu te, pe na elongi na ngai na mabele. 10. Pe, tala, loboko moko esimbaki ngai pe elingisaki ngai, na mabolongo pe na maboko na ngai. 11. Pe alobi na ngai: Danyele, mutu ya lokumu pe ya esengo, sosola maloba oyo nazali koloba na yo, pe telema na esika wapi ozali; po natindami sik’oyo epayi na yo. Pe lokola azalaki koloba na ngai, liloba oyo, natelemaki na kolengaka. 12. Pe alobi na ngai : kobanga te, Danyele, po wuta mokolo ya yambo otiaki motema na yo pona kososola, pe komikitisa liboso ya Nzambe na yo, maloba na yo eyokamaki, pe ngai, nayaki na tina ya maloba na yo; 13. Kasi mokonzi ya bokonzi ya Perse atelemelaki ngai mikolo tuku mibale na moko, pe tala, Mikaele, moko ya bakonzi ya liboso, ayaki na kosunga ngai. 14. Pe naye pona kosala ete ososola nini ekokomela batu na yo na suka ya mikolo; po emoniseli yango ezali pona mikolo ekoya. 15. Lokola azalaki koloba na ngai, na lolenge ya maloba oyo, natiaki elongi na ngai na mabele pe nakomaki baba. 16. Pe, tala, lokola bokokani na bana na batu asimbaki mbebu na ngai. Pe nafungoli monoko na ngai pe nalobaki, pe nalobi na mutu oyo atelemaki liboso na ngai: Nkolo na ngai, na nzela ya emoniseli mawa ekangi ngai, pe nabombi ata makasi moko te. 17. Pe ndenge nini mosali ya nkolo na ngai, oyo, akoloba na nkolo na ngai, oyo? Po pona ngai, wuta sik’oyo makasi moko te etikali kati na ngai, pe pema etikali kati na ngai te. 18. Pe oyo azalaki na komonana lokola ya mutu asimbaki ngai lisusu, pe alendisaki ngai, 19. Pe alobi : Kobanga te, mutu ya lokumu pe ya esengo; kimia ezala na yo! Zala makasi, pe zala makasi! Pe tangu azalaki koloba na ngai, nazwaki makasi, pe nalobi: Tika nkolo na ngai aloba, po olendisi ngai.
20. Pe alobi: Oyebi tina nini nayaki epayi na yo? Pe sik’oyo nakozonga pona kobundisa mokonzi ya Perse; pe tangu ngai nakobima, tala, mokonzi ya Yavane (Grese) akoya. 21. Nzokande nakoyebisa yo makambu oyo ekomami na kati ya likomi ya bosolo; pe moko te atelemi makasi elongo na ngai pona kotelemela baoyo wana, longola kaka Mikaele, mokonzi na bino.
1. Pe ngai, na mobu ya yambo ya Dario Momede, natelemaki wana pona kosunga ye pe kolendisa ye. 2. Pe sik’oyo nakoyebisa yo bosolo: Tala, bakonzi misatu lisusu bakotelema na Perse; pe ya mineyi akokoma mozwi na bomengo monene koleka banso, pe tangu akokoma makasi na nzela ya bomengo na ye, akolamusa nyonso pona kotelemela bokonzi ya Yavane (Grese).
3. Pe mokonzi moko elombe ya nguya akotelema pe akokonza na bokonzi monene, pe akosala na ndenge ya bosepeli na ye. 4. Pe tangu akotelema, bokonzi na ye ekobukana na biteni pe ekokabwana epayi ya mipepe mineyi ya likolo, pe ekokitana te epayi ya bakitani na ye, pe ekozala te na lolenge ya kokonza ya bokonzi oyo ye asalelaki; po bokonzi na ye ekolongolama, pe ekozala na basusu, longola se baoyo ya ye.
5. Pe mokonzi ya sudi akozala makasi, pe moko ya bankumu na ye; kasi mosusu akozala makasi koleka ye, pe akokonza; kokonza na ye ekozala kokonza monene. 6. Pe na suka ya mibu mingi, bakosangana elongo; pe mwana mwasi ya mokonzi ya sudi akoya epayi ya mokonzi ya nord pona kosala ebongiseli ya malamu; kasi akobatela makasi ya loboko na ye te; pe akotelema te, to loboko na ye te; pe ye, pe baoyo bamemaki ye, pe ye oyo abotaki ye, pe ye oyo asalisaki ye na mikolo wana, bakokabama.
7. Kasi moko ya bitape ya misisa na ye akobima na esika na ye, pe akoya epayi ya mapinga, pe akokota na esika makasi ya mokonzi ya nord; pe akosala na kotelemela bango pe akomilakisa na nguya; 8. Pe akomema kutu banzambe na bango pe bikeko na bango oyo batumbi bibende na bowumbu na Ejipito, elongo na biloko na bango ya motuya, palata pe wolo; pe akobika mibu mingi koleka mokonzi ya nord. 9. Pe oyo akoya na bokonzi ya mokonzi ya sudi, pe akozonga na mokili na ye.
10. Kasi bana na ye ya mibali bakosilika pe bakosangisa ebele monene ya mapinga pona kobunda; pe moko na bango akoya pe akodindisa pe akoleka; pe akozonga pe akotindika etumba kino na esika makasi na ye. 11. Pe mokonzi ya sudi akosilika, pe akobima, pe akobunda na ye, akotelemela mokonzi ya nord na bitumba; pe akotelemisa ebele monene, kasi ebele ekokabama na loboko na ye. 12. Pe tangu ebele ya bato bakolongwa, motema na ye ekotombwama, pe akokweyisa ba nkoto zomi mbala nkoto zomi; kasi akolonga te. 13. Pe mokonzi ya nord akozonga pe akotelemisa ebele monene koleka oyo ya yambo; pe na suka ya eleko ya bambula, akokende liboso na lipinga monene pe na bozwi monene. 14. Pe na kati ya mikolo yango, mingi bakotelemela mokonzi ya sudi, pe batu ya mobulu ya batu na yo bakotelema pona kokokisa bimoneseli; kasi bakokweya. 15. Pe mokonzi ya nord akoya, pe akotombola terase, pe akobotola engumba oyo ebatelami makasi; pe mapinga ya sud bakoka kotelema te, to pe bilombe ya batu na ye; pe makasi moko te ekozala kati na ye pona kotelema. 16. Kasi ye oyo akoya kotelemela ye akosala ndenge alingi, pe ekozala na mutu moko te oyo akokoka kotelemela ye; pe akotelema na kati ya mboka ya kitoko, na kozalaka na bobebisami na loboko na ye; 17. Pe akokamba elongi na ye pona koya na makasi ya bokonzi na ye mobimba, pe batu ya sembo elongo na ye, pe akosala; pe akopesa ye mwana mwasi ya basi pona kopengwisa ye; kasi ekosimba te, pe ekozala pona ye te.18. Akotia elongi na ye epayi ya bisanga, pe akobotola mingi na yango. Kasi mokambi moko akosukisa pona ye, na lolendo na ye ya kofinga, pe akokweyisa yango likolo na ye moko, na kozanga lolendo ya kofinga pona ye; 19. Pe akotia elongi na ye epayi ya bisika makasi ya mboka na ye moko; pe akobeta libaku pe akokweya, pe akomonana te.
20. Bongo moko akotelema na esika na ye oyo akosala ete moniokoli ya batu aleka na nzela ya kembo ya bokonzi; kasi sima ya mwa mikolo akobukana, na nzela ya kanda te, to na etumba te.
21. Pe oyo abongi na kotiolama akotelema na esika na ye, oyo lokumu ya bokonzi ekopesamela ye te; kasi akokota na kimia, pe akobotola bokonzi na mayele mabe ya maloba ya kobenda boboto ya batu ; 22. Pe mapinga oyo etondi ekolongwa mobimba liboso na ye pe ekobukana, ata mokonzi ya boyokani. 23. Pe tangu kaka akosangana na ye na boyokani, akosala na bokosi, pe akomitombola pe akokoma na nguya na nzela ya batu moke. 24. Na tangu ya kimia, akokota na bisika ya etuka oyo eleki bozwi, pe akosala oyo batata na ye pe batata ya batata na ye basalaki te; akokabola bango biloko oyo epunzami, pe biloko oyo epunzami, pe bomengo, pe akosala mayele mabe pona kobundisa bisika makasi, pe yango pona mwa tangu.
25. akolamusa nguya na ye pe motema na ye na mokonzi ya sudi, na lipinga monene. Pe mokonzi ya sudi akobunda elongo na lipinga monene pe ya nguya mingi. Kasi akotelema te, po bakokanisela ye mayele mabe; 26. Pe baoyo bazali koliya bileyi na ye ya kitoko bakobuka ye; pe lipinga na ye ekopanzana pe ekokweyisama, pe batu mingi bakokweya na kobomama. 27. Pe bakonzi oyo mibale bakozala na mokano ya kosala mabe, pe bakoloba lokuta na mesa moko; kasi yango ekolonga te, pamba te suka ekozala kaka pona tangu oyo etiami. 28. Pe akozonga na mboka na ye na bomengo mingi, pe motema na ye ekotelemela na botomboki boyokani bosantu, pe akosala, pe akozonga na kati ya mboka na ye.
29. Na tangu oyo etiami, akozongela lisusu pe akoya na kati ya sudi; kasi mbala ya suka ekozala te lokola ya yambo; 30. Po ba masuwa ya Kitime ekoya kotelemela ye; pe akolemba nzoto, pe akobaluka pe akozala na kanda na boyokani bosantu, pe akosala; pe akozonga pe akotia likebi na ye na baoyo babwaki boyokani mosantu. 31. Pe makasi kowuta na ye makotelema, pe bakokomisa mbindo esika mosantu, ndako makasi, pe bakolongola mbeka ya tangu nyonso, pe bakotia eloko ya mbindo oyo ezali kobebisa. 32. Pe na maloba ya elengi akokamba na bobwaki Nzambe baoyo basalaka mabe na boyokani; kasi batu oyo bayebi Nzambe na bango bakozala makasi pe bakosala. 33. Pe batu ya bwania bakopesa mayele na ebele ya batu; pe bakokweya na mopanga pe na moto, na bokangami pe na bopunzi, mikolo mingi. 34. Pe tangu bakokweya, bakosungama na mwa lisungi moke, pe mingi bakosangana elongo na bango na maloba ya elengi ya lokuta. 35. Pe na kati ya batu ya bwania bamosusu bakokweya pona komeka bango boye, pe pona kopetola bango, pe kokomisa bango pembe, ti na tangu ya suka; po ekozala lisusu kaka pona tangu oyo etiami.
36. Pe mokonzi akosala ndenge ya mokano na ye, pe akomitombola, pe akomitombola likolo ya nzambe nyonso, pe akoloba makambu ya mbindo ya kokamwa na kotelemela *Nzambe ya *banzambe; pe akokende liboso kino kanda ekokokisama; po oyo ekanamaki ekosalema. 37. Pe akozala na limemia te na Nzambe ya batata na ye, pe akozala na limemia te na posa ya basi, to epayi ya nzambe moko te; po akotelema likolo ya nyonso; 38. Kasi akokumisa nzambe ya bisika makasi na esika na ye: na wolo, na palata, na mabanga ya talo, pe na biloko ya kitoko, akokumisa nzambe oyo batata na ye bayebaki te; 39. Pe akosala na bisika makasi ya bisika makasi, elongo na nzambe moko ya mopaya: na baoyo bakoyeba ye akobakisela bango kembo; pe akotia bango bakonza likolo ya ebele ya batu pe akokabola bango mboka lokola mbano.
40. Pe na tangu ya suka, mokonzi ya sudi akobundisa ye, pe mokonzi ya nord akosopana likolo na ye lokola mopepe makasi, na bashar pe na batamboli ya bapunda, pe na masuwa mingi, pe akokota na kati ya mboka pe akotindisa yango na masuwa pe akoleka; 41. Pe akoya na mboka ya kitoko, pe ebele bakokweya; kasi baoyo bakobika na loboko na ye: Edom, pe Moabe, pe bakonzi ya bana ya Amoni. 42. Pe akosembola loboko na ye likolo ya mikili, pe mokili ya Ejipito ekobika te. 43. Pe akokonza likolo na ye biloko ya motuya ya wolo pe ya palata, pe biloko nyonso ya kitoko ya Ejipito; pe batu ya Libie pe batu ya Etiopi bakolanda matambe na ye. 44. Kasi basango ya esti pe ya nord ekolengisa ye, pe akobima na kanda makasi pona kosilisa batu pe koboma batu ebele penza. 45. Pe akolona bahema ya ndako na ye ya bokonzi kati na ba mayi minene pe ngomba ya bosantu kongela; pe akokoma na suka na ye, pe ekozala na mutu te pona kosunga ye.
1. Pe na tangu wana Mikaele, mokonzi monene, akotelema, oyo atelema na kobatela pona bana ya batu na yo; pe ekozala tangu ya miniokoli lokola ezalaki te wuta ekolo moko ezalaki kino tangu wana. Pe na tangu wana batu na yo bakokangolama: oyo nyonso akozwama akomama na kati ya buku. 2. Pe mingi ya baoyo balali na putulu ya mabele bakolamuka, bamosusu pona bomoyi ya seko, pe basusu pona kotiolama, pona kozala eloko ya kotiolama ya seko. 3. Pe batu ya bwania bakongenga lokola kembo ya etando, pe baoyo bateyaka boyengebene epayi ya batu mingi, lokola minzoto, libela pe seko. 4. Pe yo, Danyele, bomba maloba yango pe kanga elembo na buku yango ti tangu ya suka. Mingi bakopota mbangu awa na kuna na kotala nionso na bozindo; pe boyebi ekobakisama.
5. Pe ngai, Danyele, natalaki; pe tala mibale mosusu oyo batelemaki, moko na ngambo oyo, na libongo ya ebale, pe mosusu na ngambo mosusu, na libongo ya ebale. 6. Pe alobaki na mutu oyo alataki bilamba ya lino oyo azalaki likolo ya mayi ya ebale: kino tangu nini suka ya makamwisi oyo? 7. Pe nayokaki mutu oyo alataki bilamba ya lino oyo azalaki likolo ya mayi ya ebale; pe atombolaki loboko na ye ya mobali pe loboko na ye ya mwasi epayi ya likolo, pe alapaki ndayi na ye oyo azali na bomoyi libela, ete ekozala pona tangu moko boye, pe ba tangu mosusu, pe ndambu ya tangu; pe tangu akosilisa kobuka pe kopanza makasi ya batu mosantu, makambu wana nionso ekosila.
8. Pe ngai, nayokaki, kasi nasosolaki te. Pe nalobaki: Nkolo na ngai, mbano ya makambu oyo ekozala nini? 9. Pe alobi : Kende, Danyele; po maloba oyo ebombami pe ekangamaki kino tangu ya suka. 10. Mingi bakopetolama pe bakokoma pembe pe bakopetolama; pe batu mabe bakosala kaka makambu mabe, pe ata moko te ya batu mabe akososola; kasi batu ya bwania bakososola. 11. Pe wuta tangu oyo mbeka ya tangu nyonso ekopekisa kopesama, pe eloko ya mbindo oyo ebebisami ekotiama, ekozala mikolo nkoto moko na kama mibale na tuku libwa (1290). 12. Esengo na ye oyo akozela pe akokoma na mikolo nkoto moko na kama misatu na tuku misatu na mitano (1335)! 13. Pe yo, kende kino na suka; pe okopema pe okotelema pona eteni na yo na suka ya mikolo.