Mokanda ya Izaya

 

Mokapo 1Mokapo 2Mokapo 3Mokapo 4Mokapo 5Mokapo 6Mokapo 7Mokapo 8Mokapo 9Mokapo 10Mokapo 11Mokapo 12Mokapo 13Mokapo 14Mokapo 15Mokapo 16Mokapo 17Mokapo 18Mokapo 19Mokapo 20Mokapo 21Mokapo 22Mokapo 23Mokapo 24Mokapo 25Mokapo 26Mokapo 27Mokapo 28Mokapo 29Mokapo 30Mokapo 31Mokapo 32Mokapo 33Mokapo 34Mokapo 35Mokapo 36Mokapo 37Mokapo 38Mokapo 39Mokapo 40Mokapo 41Mokapo 42Mokapo 43Mokapo 44Mokapo 45Mokapo 46Mokapo 47Mokapo 48Mokapo 49Mokapo 50Mokapo 51Mokapo 52Mokapo 53Mokapo 54Mokapo 55Mokapo 56Mokapo 57Mokapo 58Mokapo 59Mokapo 60Mokapo 61Mokapo 62Mokapo 63Mokapo 64Mokapo 65Mokapo 66

 

Mokapo 1

1. Emoniseli ya Izaya mwana ya Amote amonaki na tina ya Yuda pe Yerusaleme na mikolo ya Uziya, Yotame, Akaze pe Hizikiya, bakonzi ya Yuda.

2. Boyoka, likolo, pe botia litoyi, mabele! Po Yawe alobi: Nabokoli pe nakolisi bana, pe bango basili kotombokela ngai. 3. Ngombe eyebi nkolo na yango, pe punda esika nkolo na yango aleyisaka; Israel ayebi te, batu na ngai aza na mayele te. 4. Aa ! Ekolo ya kosumuka, batu oyo bazali na kilo ya mikumba ya mbindo, bokitani ya batu ya mabe, bana oyo bamibebisi! Babwaki Yawe, batioli Mosantu ya Israel; babaluki na bozongi sima. 5. Na tina likambu nini bosengeli kobetama lisusu? Bokobakisa botomboki na bino! Moto mobimba ezali maladi pe motema mobimba ezali kobela. 6. Kobanda na se ya makolo ti na moto, eloko moko ya malamu ezali te na kati na ye; nyonso ezali bapota, pe kozokisama, pe bapota oyo efungwami; bazipi yango te, bakangi yango te, pe balembisi yango na mafuta te. 8. Pe mwana mwasi ya Siona atikali lokola kapo ya kolala na elanga ya vino, lokola ndako moke ya kobwaka na elanga ya konkombre, lokola engumba oyo banguna bazingi. 9. Soki Yawe ya mapinga atikaki biso mwa ndambo moke te, mbele tolingaki kozala lokola Sodoma, mbele tolingaki kozala lokola Gomora.

10. Boyoka liloba ya Yawe, bino bakambi ya Sodoma; botia litoyi na mobeko ya Nzambe na biso, batu ya Gomora. 11. Ebele ya bambeka na bino ezali na litomba nini pona ngai? Elobi Yawe. Natondi na makabo ya kotumba ya bampate-mibali pe mafuta ya banyama ya mafuta; kasi nasepelaka te na makila ya bangombe, ya bana ya mpate, to ya bantaba. 12. Tangu bozali koya komonana liboso na elongi na ngai, nani asengi yango na maboko na bino, ete boniata lopango na ngai? 13. Bokoba te komema makabo ya pamba; mpaka ya malasi ezali kele liboso na ngai, sanza ya sika pe Sabata, kobengisa liyangani; Nakoki koyika te kondima mabe pe elambo ya lokumu. 14. Basanza na bino ya sika pe mayangani na bino, molimo na ngai eyina yango; yango ezali mokumba pona ngai; Nalembi koyika mpiko na kokumba yango. 15. Pe tangu bokosembola maboko na bino, nakobombela bino miso na ngai; atako osali mabondeli mingi, nakoyoka te. Maboko na yo etondi na makila. 16. Botelema, bomipetola; longola mabe ya misala na yo na miso na ngai; botika kosala mabe, 17. Boyekola kosala malamu; luka bosembo, bopesa esengo baoyo baniokwamaki; bosala bosembo na bana bitike, samba likambu ya mwasi akufela mobali.

18. Boya, pe tolobana elongo, elobi Yawe: Ata soki masumu na bino mazali lokola motane, makokoma pembe lokola neje; atako soki mazali motane lokola motane makasi, makokoma lokola suki ya mpate. 19. Soki bolingi pe boyoki, bokoliya biloko ya malamu ya mboka; 20. Kasi soki boboyi pe botomboki, bokobomama na mopanga; po monoko ya Yawe nde elobi yango.

21. Ndenge nini akomi mwasi ya ndumba, engumba ya sembo, oyo atondaki na makambo ya sembo; bosembo efandaki kati na ye, kasi sik'oyo nde efandi babomi! 22. Palata na yo ekomi bosoto, vino na yo esangani na mayi. 23. Bankumu na yo bakomii batomboki pe baninga ya miyibi; mutu nyonso alingaka kaniaka pe alandaka mabonza. Basalaka sembo te na bana bitike, pe likambu ya mwasi oyo akufela mobali ezali na tina te pona bango.

24. Yango wana Nkolo, Yawe ya mampinga, Nguya ya Israel, alobi: Aa, ngai nakosepela na banguna na ngai pe ngai nakozongisa mabe na banguna na ngai! 25. Pe nakobalola loboko na ngai likolo na yo pe nakopetola yo mobimba na bosoto na yo lokola na sabuni, pe nakolongola eteni na yo nyonso ya ebende.  26. Pe nakozongisa basambisi na yo lokola na ebandeli, pe bapesi-toli na yo lokola na mikolo ya ebandeli. Na sima, yo okobengama engumba ya boyengebene, engumba ya sembo. 27. Siona ekosikolama na nzela ya bosambisi, pe baoyo ya yo bakozonga na nzela na boyengebene. 28. Kasi bobebisi ya babuki mibeko pe basumuki ekoya na mbala moko, pe baoyo babwaki Yawe bakosila.

29. Po bakoyoka soni pona banzete ya shene oyo bosepelaki na yango, pe bokoyoka soni pona bilanga oyo bosilaki kopona. 30. Po bokozala lokola nzete ya shene oyo kasa na yango ekawuki, pe lokola elanga oyo ezangi mayi. 31. Pe elombe akozala kobendama, pe mosala na ye ekozala epeleli, pe nionso mibale ekozika elongo, pe mutu akozala te pona koboma yango.

Mokapo 2

1. Liloba ya Izaya mwana ya Amoze amonaki pona Yuda pe Yerusaleme.

2. Pe ekokoma na suka ya mikolo, ete ngomba ya ndako ya Yawe ekotongama na likolo ya bangomba, pe ekotombwama na likolo ya bangomba mike; pe bikolo nionso bikosopana epayi na yango ; 3. Pe ebele ya batu bakokende pe bakoloba: Boya, tomata na ngomba ya Yawe, na ndako ya Nzambe ya Yakobo; pe akoteya biso banzela na ye, pe tokotambola na banzela na ye. Po na Siona nde mobeko ekobima, pe na Yerusaleme liloba ya Yawe. 4. Pe akosambisa na kati ya bikolo, pe akosalela bosambisi na ebele ya batu. Pe na mipanga na bango bakosala bitimboli, pe na makonga na bango na basinga ya kokata matiti: ekolo moko ekotombola lisusu te mopanga na ekolo mosusu, pe bakoyekola bitumba lisusu te. 5. Boya, ndako ya Yakobo, pe totambola kati na pole ya Yawe!

6. Po obwaki batu na yo, ndako ya Yakobo, po batondi na biloko oyo ewuti na esti, pe bazali basali maji lokola Bafilistia, pe basangani elongo na bana ya bapaya. 7. Pe mboka na bango etondi na palata pe wolo, pe suka ezali te na bomengo na bango; pe mboka na bango etondi na bapunda, pe suka ezali te na bashar na bango; 8. Pe mboka na bango etondi na banzambe ya bikeko; bagumbamelaka liboso ya mosala ya maboko na bango, oyo misapi na bango esali. 9. Pe mutu ya batu akogumbama, pe mutu monene akokitisama; pe kolimbisa bango te! 10. Kota na kati ya libanga, pe mibomba na kati ya putulu, liboso na somo ya Yawe pe mosika na kongala ya kembo na ye. 11. Misu ya lolendo ya mutu ekokitisama, pe lolendo ya batu ekokita, pe Yawe kaka ye moko akotombolama likolo na mokolo yango.

12. Po ezali na mokolo pona Yawe na mapinga ya kotelemela nyonso oyo ya lolendo pe emitombolama, pe kotelemela nyonso oyo etombwama likolo; pe bakokweya na se; 13. Pe kotelemela banzete nyonso ya sedre ya Liban, milayi pe etombwama, pe likolo ya banzete nyonso ya shene ya Bashane; 14. Pe kotelemela bangomba milayi nyonso, pe kotelemela bangomba mikemike nyonso oyo etombwana; 15. Pe kotelemela bandako molayi nyonso, pe mir milayi nyonso oyo ebatelami makasi; 16. Pe pona kotelemela masuwa nyonso ya Tarshisi, pe kotelemela misala nyonso ya mayele ya kosepelisa. 17. Pe lolendo ya mutu ekokita, pe botomboli ya batu ekokita, pe Yawe kaka ye moko akotombolama na mokolo wana ; 18. Pe banzambe ya bikeko nionso ekolimwa penza. 19. Pe bakokota na mabulu ya mabanga pe mabulu na mabele liboso na somo ya Yawe pe liboso ya kongala na kembo na ye, tangu akotelema pona kobeta mabele na bobangi. 20. Na mokolo yango, mutu akobwaka banzambe ya bikeko na ye ya palata pe banzambe na ye bikeko ya wolo, oyo asalaki pona kogumbamela yango, oyo ya bampuku batobolaka mabulu pe ya shove-suri. 21. Pona kokota na kati ya mabulu ya mabanga pe na madusu ya bisika ya mabanga-mabanga, liboso na somo ya Yawe pe liboso na kongala ya kembo na ye, tangu akotelema pona kobeta mabele na bobangi.

22. Bosilisa na mutu oyo pema na ye ezali na kati ya zolo na ye, po nini esengeli kosala ye?

 Mokapo 3

1. Po tala, Nkolo, Yawe ya mapinga, alongoli na Yerusaleme pe na Yuda lisungi pe esimbeli, lisungi nyonso ya mapa pe lisungi nyonso ya mayi. 2. Elombe mobali pe mobundi, mosambisi pe profete, mobikoli pe mpaka; 3. Mokonzi ya tuku mitano, pe mutu ya lokumu, pe mopesi-toli, pe mosali ya maji, pe nganga ya kisi.  4. Pe nakopesa bango bilenge mibali po bazala bankumu na bango, pe bana mike bakokonza bango. 5. Pe batu bakoniokwama, mutu na nzela ya mutu, pe mutu na nzela ya mozalani na ye; elenge mobali akoniokola mobange, pe mozangi tina akotiola mutu ya lokumu. 6. Bongo soki mutu moko akangi ndeko na ye na ndako ya tata na ye, alobi: Ozali na kazaka, okozala mokambi na biso, pe libebi yango ekozala na se ya loboko na yo. 7. Akolapa ndayi na mokolo yango, akoloba: Nakoki kozala monganga te, pe na ndako na ngai lipa pe kazaka ezali te; bokokomisa ngai mokambi ya batu te. 8. Po Yerusaleme ebeti libaku, pe Yuda ekweyi; po ete monoko na bango pe misala na bango ezali kotelemela Yawe, pona kotomboka na misu na kembo na ye. 9. Lolenge ya bilongi na bango etatoli na kotelemela bango, pe ekosakola lisumu na bango lokola Sodoma; bakobombaka yango te. Mawa na milimo na bango! Po bamemeli libabe likolo ya bango moko.

10. Boloba na moyengebene, malamu ekoya, po bakoliya mbuma ya misala na bango. 11. Mawa na mutu mabe! Mabe ekoyela ye, po mosala ya maboko na ye ekofutamela ye. 12. Pona batu na ngai, bana bazali koniokola bango, pe basi bazali kokonza bango. Batu na ngai, baoyo bazali kokamba yo babungisi yo nzela pe babebisi nzela ya banzela na yo.

13. Yawe atelemi wana pona kosamba, pe atelemi pona kosambisa batu ya bikolo. 14. Yawe akoya na kosambisa elongo na bampaka ya batu na ye pe elongo na bankumu na ye, koloba: Pe bino, bino bosili kotumba elanga ya vino; biloko ya babola ezali na bandako na bino. 15. Pona nini, bozali koniata batu na ngai pe konika babola? Elobi Nkolo, Yawe na mapinga.

16. Pe Yawe alobi: Po bana basi ya Siona bazali na lolendo, pe bazali kotambola na kingo etombwami pe na kobwaka misu ya bilula, pe bazali kotambola na matambe ya konguluma pe bakobetisa lokito ya koganga na makolo na bango. 17. Nkolo akokomisa motole ya mito ya bana basi ya Siona libandi, pe Yawe akobimisa bolumbu na bango polele. 18. Na mokolo wana Nkolo akolongola biloko ya kokembisa na pete ya misapi ya makolo, ya moyi mike pe ya sanza; 19. Biloko ya matoyi ya mayaka, brasele ya maboko pe bilamba ya kozipa; 20. Mitole, basheneti, mikaba, milangi ya malasi, pe bakisi ya komibatela;

21. Bapete ya misapi, pe bapete ya zolo; 22. Bilamba ya feti, pe nzambala, kazaka, pe basakoshi; 23. Pe bilamba ya kitalatala emonisaka polele, bashemise ya lino, bizipeli ya moto, pe bilamba ya petepete. 24. Pe ekokoma ete na esika ya malasi ekozala na solo ya kopola; pe na esika ya mokaba, singa ya kekele; pe na esika ya suki oyo ekangami na mayele, libandi; pe na esika ya elamba ya talu malamu, elamba ya saki; pe kokawuka na esika ya kitoko. 25. Batu na yo bakokweya na mopanga, pe bilombe na yo ya nguya, na kati ya etumba. 26. Pe bikoteli na ye ekolela pe ekozala na matanga; pe, lokola pamba, akofanda na mabele.

Mokapo 4

1. Pe basi sambo bakokanga mobali moko na mokolo wana, bakoloba: Tokoliya lipa na biso moko pe tokolata bilamba na biso moko, kaka bobele po kombo na yo ebengama likolo na biso; longola kotiolama na biso.

2. Na mokolo yango, Etape ya Yawe ekozala pona kongala pe pona kembo, pe mbuma ya mabele pona lokumu pe pona kitoko, pona baoyo babikaki ya Israel. 3. Pe batikali na Siona, pe batikali na Yerusaleme, akobengama mosantu : Oyo nionso akokomama kati na baoyo bakozala na bomoyi kati na Yerusaleme,  4. Tangu Nkolo akopetola bosoto ya bana basi ya Siona pe akosukola makila ya Yerusaleme kati na ye, na nzela ya molimo ya bosambisi pe na molimo ya bosilisi. 5. Pe Yawe akokela likolo ya esika nyonso ya kofanda na Ngomba Siona pe likolo ya mayangani na yango lipata pe milinga na moyi, pe kongenga ya moto ya moto na butu; po likolo ya kembo nyonso ekozala na ezipeli. 6. Pe ekozala na tabernakle pona elili, na moyi pona molunge, pe esika ya kobombama pe esika ya kobombama na mopepe makasi pe na mbula.

Mokapo 5

1. Bongo nakoyembela molingami na ngai loyembo ya molingami na ngai likolo ya elanga na ye ya vino: Molingami na ngai azalaki na elanga ya vino na mopanzi ya ngomba moko ya bana mibali ya mafuta. 2. Bongo atimbolaki yango pe alongolaki mabanga pe alonaki yango na banzete ya vino ya malamu koleka; pe atongaki ndako molayi na katikati na yango, pe lisusu akataki esika ya kokamola vino pe azalaki kozela ete ebota mbuma ya vino ya malamu, pe ebimisaki mbuma ya vino oyo epola. 3. Pe sik'oyo, bino bafandi ya Yerusaleme pe mibali ya Yuda, bosambisa, nabondeli bino, kati na ngai na elanga na ngai ya vino. 4. Nini lisusu esengeli nasala pona elanga na ngai ya vino, oyo nasali te pona yango? Pona nini, tangu nakanisaki ete ekobota mbuma ya vino ya malamu, ebimisaki mbuma ya vino ya kopola? 5. Sik'oyo nakoyebisa bino nini nakosala na elanga na ngai ya vino: Nakolongola lopango na yango, pe ekoniatama; Nakobuka lopango na yango, pe nakoniatama na makolo; 6. Pe nakokomisa yango esobe; bakobongisa yango te, matiti mabe ekolongwama te, kasi nzube pe sende ekobima; pe nakopesa mitindo na mapata ete esopa mbula te likolo na yango. 7. Po elanga ya vino ya Yawe ya mapinga ezali ndako ya Israel, pe batu ya Yuda bazali nzete esepelisaka ye. Pe azelaki kozela bosambisi ya sembo, kasi tala kosopana makila; bosembo, kasi tala koganga!

8. Mawa na baoyo bazali kobakisa ndako na ndako, oyo bazali kosangisa elanga na elanga, kino esika ekozala te pe bozala bafandi bino moko na katikati ya mboka! 9. Na matoyi na ngai Yawe ya mapinga alobi: Solo bandako mingi ya minene pe ya kitoko ekobebisama pe ekotikala polele na bozangi mutu ya kofanda! 10. Po elanga ya vino ya ba ekitare misato (3,5ha) na ndambo ekobota te tuku mitano ya litre (50l) ya vino, pe oyo homer moko (300 litre) ya mboto ekobota efa moko (30litre).

11. Mawa na baoyo balamukaka tongotongo pe bakimaka mbangu sima masanga makasi, pe bawumelaka ti na molili pe bapeli na vino! 12. Pe lindanda, banzenze, mbunda pe ndule ya flite, pe vino, na bafeti na bango; nzokande batalelaka mosala ya Yawe te, pe bamonaka te mosala ya maboko na ye. 13 Yango wana batu na ngai bakokende na bokangemi, zambi bazali na boyebi te; pe batu na bango ya kembo bakufi na nzala, pe ebele ya batu na ye bakawuki naposa ya mayi. 14. Yango wana Sheol ekomisi baposa na ye monene pe efungoli monene monoko na yango kozanga ndelo; pe kongala kitoko na ye ekokita kuna, pe ebele na yango, pe mobulu na yango, pe esengo na yango. 15. Pe mutu ya batu akogumbama, pe mutu monene akokitisama; pe misu ya batu ya lolendo ekokita. 16. Pe Yawe ya mapinga akotombwama na nzela ya kosambisama, pe Nzambe mosantu akosantisama na boyengebene. 17. Pe bana ya mpate bakoleyisa lokola na matiti na bango ya koleyisa banyama, pe bapaya bakoliya bisika ya libebi ya banyama ya mafuta.

18. Mawa na baoyo babendaka mabe na basinga ya pambapamba, pe masumu lokola na basinga ya pusupusu, 19. Oyo balobaka ete: Tika asala mbangu, tika asala mosala na ye noki, po tomona yango; pe tika mabongisi ya Mosantu ya Israel epusana penepene, pe eya, po ete tokoka koyeba yango. 20. Mawa na baoyo bazali kobenga mabe malamu pe malamu mabe, oyo batiaka molili na esika ya pole pe pole na esika ya molili, oyo batiaka bololo na esika ya elengi pe elengi na esika ya bololo! 21. Mawa na baoyo bazali bwania na miso na bango moko pe mayele na motuya na bango moko! 22. Mawa na baoyo bazali bilombe pona komela vino pe batu bazali na makasi pona kosangisa masanga ya makasi! 23. Bakolongisa mutu mabe pona kanyaka pe balongolaka bosembo ya moyengebene! 24. Yango wana, lokola lolemo ya moto ezali koliya matiti, pe lokola matiti ya kokawuka ezali kosila na moto, bongo misisa na yango ekokoma lokola kopola, pe fololo na yango ekobima lokola putulu. Pamba te batioli mobeko ya Yawe na mapinga pe baboyi liloba ya Mosantu ya Israel. 25. Yango wana kanda ya Yawe epelisameli batu na ye; pe asembolaki loboko na ye likolo na ye, pe abetaki ye; pe bangomba eninganaki; pe bibembe na bango bikomaki lokola bosoto na katikati ya balabala. Po na nyonso wana kanda na ye esilaki te, pe loboko na ye etikali kaka ya kotelema.

26. Pe akotombola bendele liboso ya bikolo ya mosika, pe akobeta sifle moko longwa na suka ya mabele; pe tala, akoya mbangumbangu pe noki. 27. Na kati na yango, mutu moko te alembi to abetaka libaku; mutu moko te akonimba to akolala pongi; mutu moko te azali na mokaba ya loketo na ye oyo efungwami to singa ya sandale na ye egungwami. 28. Makonga na ye ezali songe makasi, pe tolotolo na ye nyonso ezali ya kotelema; makolo ya bapunda na ye ezali lokola libanga ya mabanga, pe bapine na ye lokola mopepe makasi. 29. Konguluma na ye ezali lokola oyo ya nkosi ya mwasi; azali konguluma lokola bana ya nkosi; azali koganga, akangi nyama oyo akoliya pe amemi yango, pe moko te akobikisa. 30. Na mokolo wana, lokola mayi monene, akoganga likolo na ye; pe akotala mboka, pe tala, molili pe pasi; pole ekómi molili na likolo na yango.

Mokapo 6

1. Na mbula ya liwa ya Mokonzi Uziya, namonaki Nkolo afandi na kiti moko ya bokonzi, oyo etalama pe etombwama makasi, pe basonge ya elamba na ye etondisaki tempelo. 2. Baserafa batelemaki likolo na ye; moko na moko azalaki na mapapu motoba: mibale ezipaki bilongi na bango, pe na mibale ezipaki makolo na bango, pe na mibale ezalaki kopumbwa. 3. Pe moko agangaki epayi na mosusu, pe koloba: Mosantu, mosantu, mosantu, Yawe na mapinga, mabele mobimba etondi na kembo na ye! 4. Pe miboko ya bikuke eninganaki na tina ya mongongo ya ye oyo azalaki koganga, pe ndako etondaki na milinga. 5. Bongo nalobaki: Mawa na ngai! Po nabungi ; po ngai, nazali mutu ya bibebu ya mbindo, pe nafandi nakati ya batu oyo ya bibebu ya mbindo ; po misu na ngai emoni Mokonzi, Yawe na mapinga. 6. Bongo moko ya baserafa apumbwaki epayi na ngai, azalaki na likala ya moto na loboko na ye oyo elongo na basinga azwaki likolo na etumbelo. 7. Pe asimbaki yango na monoko na ngai pe alobaki: Tala, oyo etuti mbebu na yo, pe mabe na yo elongwe, pe masumu na yo elimbisami.

8. Pe nayokaki mongongo ya Nkolo koloba: Nakotinda nani? Nani akokende pona biso? Pe nalobaki : Ngai oyo; tinda ngai. 9. Pe alobi: Kende pe loba na batu oyo: na koyoka, bokoyoka, kasi bokososola te; pe nakomona, bokomona, kasi bokoyeba te. 10. Sala mitema ya batu oyo ekoma mafutamafuta, pe komisa matoyi na bango kilo, pe zipa misu na bango, noki te amona na misu na ye, pe ayoka na matoyi na ye, pe motema na ye esosola, pe abongwana pe abika. 11. Bongo nalobaki: Kino tangu nini, Nkolo ? Pe alobaki: Kino bingumba ekotikala pamba kozanga ata mofandi moko, pe bandako ekozala ata na mutu moko te, pe mabele ekoma nionso  ya kobebisama, 12. Pe Yawe asila kolongola batu mosika na yango, pe kobebisama monene ezala na katikati ya mboka. 13. Kasi ndambo ya zomi ekozala kaka wana; ekozonga pe ekozikama, lokola nzete ya terebinte pe nzete ya shene, oyo mosisa na yango etikali tangu bakati yango; momboto mosantu ekozala mosisa na yango.

Mokapo 7

1. Pe ekomaki ete na mikolo ya Akaze mwana ya Yotame, mwana ya Uziya, mokonzi ya Yuda, Retshini mokonzi ya Siria pe Pekak mwana ya Remayatu, mokonzi ya Israel, bamataki na Yerusaleme pona kobunda na yango. Kasi bakokaki kozinga ye te. 2. Pe bayebisaki na ndako ya David, koloba: Siria eye kosalisa Efrayime. Pe motema na ye eninganaki, pe motema ya batu na ye, lokola banzete ya zamba eninganaka liboso ya mopepe. 3. Pe Yawe alobaki na Izaya ete: Bima pona kokutana na Akaze, yo na Sheyare-yashube mwana na yo, na suka ya nzela ya liziba ya mayi ya likolo, na nzela oyo ezali komema na elanga ya basukoli bilamba; 4. Pe okoloba na ye: Mikeba pe zala kimia; kobanga te, pe motema na yo elemba te liboso ya biteni oyo mibale ya moto oyo ezali kobimisa milinga, liboso ya kanda makasi ya Retshini pe ya Siria, pe ya mwana ya Remaliyayu. 5. Po ete Siria akani mayele mabe pona yo, Efrayime na mwana ya Remaliyayu, balobi: 6. Tomata kobundisa Yuda pe tobangisa ye kuna, pe tosala esika ya kobukana, pe totiya mwana ya Tabeele mokonzi likolo na yango. 7. Boye elobi Nkolo, Yawe: Ekokoka te, pe ekosalema te. 8. Po mokambi ya Siria ezali Damas, pe mokambi ya Damasi ezali Retshini. Na bowumeli ya mbula tuku motoba na mitano lisusu, Efrayime ekobukana pe ekozala batu te. 9. Pe mokonzi ya Efrayime azali Samaria, pe mokonzi ya Samaria azali mwana ya Remaliyayu. Soki bondimi te, bokotelema te.

10. Pe Yawe alobaki lisusu na Akaze, na koloba: 11. Senga pona yo elembo kowuta epayi na Yawe Nzambe na yo; senga yango na bisika ya bozindo ya se to na likolo koleka. 12. Pe Akaze alobi: Nakosenga te, pe nakomeka Yawe te. 13. Pe alobi: Boye boyoka, ndako ya David: Ezali likambo moke pona bino kolembisa batu, ete bolembisa pe lisusu Nzambe na ngai? 14. Yango wana Nkolo akopesa bino elembo: Tala, ngondo akozwa zemi pe akobota mwana mobali, pe bakobenga kombo na ye Emanuel (Elongo na biso *Nzambe). 15. Akoliya kreme pe mafuta ya nzoyi, po ayeba koboya mabe pe kopona malamu. 16. Po liboso mwana ayeba koboya mabe pe kopona malamu, mboka ya bakonzi mibale, oyo ozali kobanga, ekosundolama. 17. Yawe akomemela yo pe batu na yo pe ndako ya tata na yo mikolo ya ndenge wana, mikolo oyo esila kokoma te banda mokolo oyo Efrayime akabwanaki na Yuda, -mokonzi ya Asuria.

18. Pe ekokoma boye na mokolo yango, Yawe akobeta sifle pona nzizi oyo ezali na suka ya bibale ya Ejipito pe pona nzoyi oyo ezali na mokili ya Asuria; 19. Pe bakoya pe bango nyonso bakofanda na kati ya mabwaku ya esobe, pe na mabulu ya mabanga, pe na matiti nyonso ya banzube, pe na matiti nyonso ya koleyisa banyama. 20. Na mokolo yango, Nkolo akokata suki na jileti ya kodefa na ngambo mosusu ya Ebale, elongo na mokonzi ya Asuria, moto pe suki ya makolo, pe akolongola lisusu mandefu. 21. Pe ekokoma na mokolo wana, ete mutu moko akobokola mwana-ngombe pe bampate mibale; 22. Pe ekozala, na ebele ya miliki oyo babimisi, akolia kreme; po baoyo nyonso batikali na katikati ya mboka bakolia kreme pe mafuta ya nzoyi. 23. Pe ekokoma na mokolo wana, ete esika nyonso wapi ezalaki na nzete ya vino nkoto moko ya biteni ya palata nkoto moko ekozala na basende pe banzube; 24. Pe akoya kuna na bafleshe pe na likonga, po ete mboka mobimba ekozala basende pe banzube. 25. Pe bangomba nyonso oyo balongolaki matiti na kongo, - okoya kuna te na bobangi ya basende pe nzube; pe ekozala esika ya kotinda ngombe, pe pona bampate koniata yango.

Mokapo 8

1. Bongo Yawe alobi na ngai: Kamata etando moko ya monene pe koma likolo na yango na ekomeli ya mutu: Maher-shalal-hash-baz. 2. Pe nazwaki batatoli ya sembo pona kopesa litatoli: nganga-Nzambe Uriya pe Zakari mwana ya Yereberekiayu. 3. Bongo napusanaki epayi ya profetese, pe azwaki zemi pe abotaki mwana mobali. Pe Yawe alobi na ngai: Benga kombo na ye Maher-shalal-hash-baz. 4. Po liboso ete mwana ayeba kobenga: Tata na ngai, pe Mama na ngai, bakomema nguya ya Damas pe biloko ya Samaria liboso ya mokonzi ya Asuria.

5. Pe Yawe alobaki na ngai lisusu, kolobaka: 6. Po ete batu oyo baboyi mayi ya Shilo, pe amoni esengo na ye na kosepela elongo na Retshini pe kati na mwana ya Remalaya. 7. Na tina na yango, tala, Nkolo akomema likolo na bango mayi ya ebale, nguya makasi pe monene mingi, mokonzi ya Asuria pe kembo ya ye mobimba; pe akomata likolo ya banzela na yango nyonso ya mayi pe akokatisa likolo na mabongo na yango nyonso ; 8. Pe akoleka na Yuda, akozindisa pe akoleka, akokoma ti na kingo; pe kopanzana ya mapapu na ye ekotondisa monene ya mboka na yo, O Emanuel.

9. Bosangana pe boganga egangeli ya bitumba, bino batu, pe bokobukana na biteni; pe bofongola matoyi, bino nyonso oyo bofandi mosika na mabele! Bomikanga mokaba, pe bokobukana! Bomikanga mokaba, pe bokobukana! 10. Bobongisa mabongisi, kasi ekosimba te; Boloba liloba, pe ekotelema te, po Nzambe azali elongo na biso (Emanuel). 11. Po boye Yawe alobi na ngai na loboko makasi, pe akebisi ngai na tambola te na nzela ya batu oyo, koloba: 12. Boloba te likita, na kolanda makambu nyonso oyo batu oyo bazali koloba, pe kobanga te bobangi na bango, pe koyoka somo te. 13. Yawe ya mapinga, ye, bosantisa ye, pe tika ye azala bobangi na bino, pe ye azala somo na bino. 14. Pe akozala esika mosantu, esika ya kobeta libaku pe libanga monene ya kotungisa pona bandako nyonso mibale ya Israel, pe motambo pe moniama pona bafandi ya Yerusaleme. 15. Pe mingi kati na bango bakobeta libaku pe bakokweya, pe bakobukana, bakokangama, pe bakozwa bango. 16. Kangá litatoli, tia elembo na Mibeko na kati ya bayekoli na ngai. 17. Pe nakozela Yawe oyo akobomba elongi na ye mosika na ndako ya Yakobo, pe nakozela ye.

18. Tala, ngai na bana oyo Yawe apesi ngai, tozali pona bilembo pe pona makamwisi na Israel kowuta na Yawe ya mapinga oyo afandaka na Ngomba Siona. 19. Pe soki balobi na bino: Boluka baleli milimo pe babikoli, oyo bazali koyimayima na bonganga pe kolobaloba na mongongo ya se,… batu moko balukaka Nzambe na bango te? Akokende epayi ya bakufi pona batu ya bomoyi? 20. Na Mobeko pe na litatoli! Soki balobi na lolenge na liloba oyo te, tongo moko te ekozala pona ye.

21. Pe akoleka wana, na moniokoli pe na nzala; pe ekokoma, tangu akoyoka nzala, ete akotungisama pe akolakela mabe mokonzi na ye pe Nzambe na ye. 22. Pe akotala likolo pe akotelemisa misu na ye na mabele, pe tala, pasi pe molili, molili ya pasi makasi! pe akobwakama na kati molili makasi. 23. Nzokande molili ekozala te likolo ya mboka oyo azalaki na kati ya pasi, tangu na ebandeli atiolaki mboka ya Zabulone pe mboka ya Naftali ; pe na sima akokumisa nzela ya mayi monene, na ngambo mosusu ya Yordani, Galile ya bikolo.

 

 

Mokapo 9

1. Batu oyo batambolaki na kati ya molili bamoni pole moko monene; baoyo bafandaki na kati ya mboka ya elili ya liwa, pole engali likolo na bango pole. 2. Okomisi ekolo monene, obakisaki esengo na ye; bakosepelaka liboso na yo, lokola esengo na tangu ya kobuka mbuma, lokola basepelaka na tangu azali kokabola biloko oyo epunzami. 3. Po obuki ekanganeli oyo ezalaki na bango, lingenda na mapeka na bango, lingenda ya moniokoli na bango, lokola na mikolo ya Midiane. 4. Po sapato nyonso ya etumba oyo balataka pona mobulu, pe kazaka oyo ezingami na makila, ekokoma eloko oyo ezali kozika, bileyi ya moto. 5. Po mwana moko abotameli biso, mwana mobali apesameli biso, pe bokonzi ekozala likolo na mapeka na ye ; kombo na ye ekobengama Mosungi na kokamwa, Mopesi-toli, *Nzambe ya nguya, Tata ya seko, Mokonzi ya Kimia. 6. Mboka ya bokonzi na ye ekofulukama pe kimia ekozala na suka te, likolo ya kiti ya bokonzi ya David pe na bokonzi na ye, pona kotelemisa yango pe kosimba yango na bosambisi pe bosembo wuta tangu oyo pe libela. Zuwa ya Yawe na mapinga akosala bongo.

7. Nkolo atindi liloba epayi ya Yakobo, pe likweyi likolo na Israel. 8. Pe batu nyonso bakoyeba, Efrayime na baoyo bafandi na Samaria, oyo bazali koloba na lolendo pe na komitambola ete: 9. Babriki ekweyi, tokotonga na mabanga oyo babongisa; banzete ya sikomore ekatami, tokotia banzete ya sedre na esika na yango. 10. Kasi Yawe akolamusa banguna ya Retshine pona kobundisa ye. 11. Pe akopesa banguna na ye bibundeli, Basiria na esti pe Bafilistia na westi; pe na monoko polele bakoliya Israel. Pona nyonso wana kanda na ye elongwi te, pe loboko na ye esembolami nanu.

12. Kasi batu bazongi te epayi ya ye oyo abeti bango, pe baluki Yawe ya mapinga te. 13. Pe Yawe akokata na Israel moto pe mokila, etape ya nzete ya mbila pe mbila, na mokolo moko. 14. Mobange pe mutu ya limemia, ye, azali moto, pe profete oyo azali koteya lokuta azali mokila. 15. Po bakambi ya batu oyo bazali kobungisa bango nzela, pe baoyo bazali kokambama na bango bazali komelama. 16. Yango wana Nkolo akosepela te na bilenge mibali na bango, pe akoyokela bitike pe basi bakufela mibali na bango mawa te; po bango nionso elongo bazali batu ya mbindo pe basali ya mabe, pe monoko nyonso elobaka liboma. Pona nyonso wana, kanda na ye elongwi te, pe loboko na ye esembolami nanu.

17. Po mabe ezali kopela lokola moto; eliaka banzube pe basende, pe etumbaka matiti ya zamba, ezali kobalukabaluka pe komata na likonzí ya milinga. 18. Na kanda ya Yawe ya mapinga mboka eziki moto, pe batu bazali lokola bileyi ya moto : moko te akoyokela mosusu mawa te. 19. Bakobukaka na loboko ya mobali, pe bazali na nzala; pe bakolia na loboko ya mwasi, pe batondi te. Bazali koliya moko na moko mosuni ya loboko na ye : 20. Manase, Efrayime, pe Efrayime, Manase; bango nionso elongo bazali kotelemela Yuda. Pona nyonso wana, kanda na ye ebaluki te, pe loboko na ye ezali lisusu ya kosembolama.

Mokapo 10

1. Mawa na baoyo bazali kobimisa mibeko ya mabe pe bakomaka makomi ya koniokola. 2. Pona kopekisa bosembo esalama pona babola pe kolongola lotomo ya baoyo bazali koniokwama na kati ya batu na ngai, pona kozwa basi oyo bakufela mibali lokola bileyi na bango ya kolia pe kopunza bana bitike. 3. Pe bokosala nini na mokolo ya botali pona libebi oyo ekowuta mosika? Okokima epayi ya nani pona kozwa lisalisi, pe okosundola kembo na yo wapi? 4. Bakofukama na se ya batu ya boloko, pe bakokweya na se ya baoyo bakufi. Pona nyonso wana, kanda na ye ebaluki te, pe loboko na ye ezali lisusu ya kosembolama.

5. Aa, Asuria, lingenda ya kanda na ngai! Pe nzete oyo ezali na loboko na bango ezali kanda na ngai! 6. Nakotinda ye pona kobundisa ekolo oyo ya mbindo; pe nakopesa ye etinda moko na kotelemela batu oyo bapesa ngai kanda, pona kopunza pe kokamata biloko, pe konyata bango na se ya makolo lokola potopoto ya balabala. 7. Kasi akanisaka bongo te, pe motema na ye ekanisaka bongo te; po ezali na motema na ye kobebisa pe kokata bikolo, ya moke te. 8. Po alobaki: Bankumu na ngai bazali bango nyonso te bakonzi? 9. Kalno azali lokola Karkemhisi te? Amate ezali te lokola Arpade te? Samaria ezali te lokola Damas? 10. Lokola loboko na ngai ezwi ba bokonzi ya banzambe ya lokuta (pe bikeko na bango elekaki oyo ya Yerusaleme pe ya Samaria). 11. Nakosala te pona Yerusaleme pe bikeko na yango ndenge nasalaki pona Samaria pe pona banzambe na ye lokuta?

12. Pe ekosalema, tangu Nkolo akosilisa mosala na ye nionso na Ngomba Siona pe na Yerusaleme, ete nakopesa etumbu na mbuma ya lolendo ya motema ya mokonzi ya Asuria pe kembo ya lolendo ya misu na ye. 13. Po alobi: Na nguya ya loboko na ngai nasali yango, pe na bwania na ngai, po nazali mayele; pe nalongoli bandelo ya bikolo, pe napunzi biloko na bozwi na bango ya motuya, pe lokola ye oyo ya nguya nakitisi baoyo bafandaki na bakiti ya bokonzi. 14. Pe loboko na ngai ezwi bozwi ya bikolo lokola zala, pe lokola mutu alokoti maki oyo esundolami, ngai pe nalokoti mabele mobimba, moko azali te oyo aningisi lipapu moko, oyo afongoli monoko to agangi. 15. Kongo ekomikumisa na kotelemela mutu oyo akataka elongo na yango? Si ekotombwama na kotelemela mosaleli na yango? Lokola nde lingenda ekoningisa baoyo batombolaka yango, to lokola nde lingenda etombolaka oyo ezali mabaya te! 16. Yango wana Nkolo, Yawe ya mapinga, akotinda bokondi na bambinga na ye, pe akopelisa moto na se ya kembo na ye lokola moto oyo ezali kopela. 17.  Pe pole ya Israel ekozala moto, pe Mosantu na ye akozala moto; pe ekozika pe ekotumba banzube pe basende na ye na mokolo se moko. 18. Pe akosilisa kembo ya zamba na ye pe elanga na ye ya kobota mbuma, wuta molimo pe mosuni; pe akozala lokola maladi oyo azali kokonda. 19. Pe bitikali ya banzete ya zamba na ye ekozala moke, pe mwana mobali ya moke akokoma yango. 20. Pe ekokoma na mokolo yango, batikali ya Israel, pe babiki ya ndako ya Yakobo, bakomipesa lisusu te epayi ya ye oyo azalaki kobeta bango, kasi bakomipesa na Yawe, Mosantu ya Israel, na bosolo. 21. Batikali bakozonga, batikali na Yakobo, epayi ya Nzambe makasi; 22. Pamba te soki batu na yo Israel bazali lokola zelo ya mayi monene, batikali moko bakozonga; mokano ya bobebisami oyo ezwami ekopanzana lokola mpela na bosembo. 23. Po Nkolo, Yawe ya mapinga, akokisa bobebisami na katikati ya mboka mobimba lokola akanaki.

24 Yango wana Nkolo, Yawe ya mapinga alobi boye: Batu na ngai oyo bafandi na Siona, bobanga Moasuria te; oyo akobeta yo na lingenda pe akotombola nzete na ye likolo na yo na ndenge ya Ejipito. 25. Po lisusu mwa tangu moke penza, pe etumbu ekokokisama, pe kanda na ngai likolo na bobebisi na bango. 26. Pe Yawe ya mapinga akotombola fimbo pona bango, ndenge abetaki Midian na libanga ya Orebe; pe lingenda na ye ekozala likolo na mayi monene, pe akotombola yango na ndenge ya Ejipito. 27. Pe ekokoma na mokolo yango, mokumba na bango ekolongwa na lipeka na yo, pe ekanganeli na bango na kingo na yo; pe ekanganeli ekobebisama na tina ya mafuta.... 28. Ayaki na Ayate, alekaki na Migrene, atikaki biloko na ye na Mikemashe. 29. Balekaki na esika oyo ya defile; bateaki kaa na bango na Geba. Rama elengi, Gibea ya Saulo akimi. 30. Ganga na mongongo, mwana mwasi ya Galime! Sala keba, Layish! Mobola Anathoth! 31. Madmena apakati mbangu na kokima, bafandi ya Gebime bazali kokima. 32. Mokolo moko lisusu ya bopemi na Nob; azali kobeta loboko na ye na ngomba ya mwana mwasi ya Siona, ngomba ya Yerusaleme... 33. Tala, Nkolo, Yawe ya mapinga, akokata bitape milayi na mobulu, pe baoyo bazali milayi bakokatama, pe baoyo bazali likolo bakokitisa bango. 34. Pe akokata matiti ya zamba na ebende, pe Liban ekokweya na nguya moko.

Mokapo 11

1. Pe etape moko ekobima wuta na nzete ya Yese, pe etape moko wuta na misisa na ye ekobota mbuma. 2. Pe likolo na ye  Molimo ya Yawe ekofanda, Molimo ya bwania pe ya mayele, Molimo ya toli pe ya nguya, Molimo ya boyebi pe ya kobanga Yawe. 3. Pe esengo na ye ekozala bobangi ya Yawe; pe akosambisa te engebene na bomoni bwa miso bwa ye, mpe akopamela te engebene na matoyi ma ye; 4. Kasi akosambisa babola na boyengebene pe akopamela na bosembo batu ya komikitisa ya mabele. Akobeta mboka na lingenda ya monoko na ye pe na mopepe ya mbembu na ye akoboma mutu mabe. 5. Bosembo ekozala mokaba ya loketo na ye, pe bosembo ekozala mokaba ya loketo na ye. 6. Pe mbwa ya zamba akofanda elongo na mwana-mpate, pe nkoyi akolala elongo na mwana ya ntaba; pe mwana-ngombe pe mwana-nkosi pe nyama ya mafuta bakozala elongo moko, pe mwana moke akokamba bango. 7. Ngombe ekoliya elongo na urse, pe bana na bango bakolala esika moko, pe nkosi akoliya matiti lokola ngombe. 8. Mwana oyo azali komela mabɛlɛ akosakana likolo ya libulu ya kobra, pe mwana oyo atiki mabɛlɛ akosembola loboko na ye likolo ya libulu ya nyoka. 9. Bakosalana pasi te pe bakobebisa te na ngomba na ngai mobimba ya bule; po mabele ekotonda na boyebi ya Yawe, lokola mayi mazipi mayi monene. 10. Pe na mokolo wana ekozala mosisa moko ya Izayi, akotelema lokola elembo ya batu; bikolo bakoluka ye, pe bopemi na ye ekozala kembo.

11. Pe ekokoma na mokolo wana ete Nkolo akotia loboko na ye lisusu mbala ya mibale pona kokangola batikali ya batu na ye, oyo batikali, wuta na Asuria, pe wuta na Ejipito, pe wuta na Patrosi, pe wuta na Kushe, pe wuta na Elam, pe wuta na Shinare, pe wuta na Amate, pe wuta na ba esanga ya mayi monene. 12. Pe akotelemisa bendele liboso ya bikolo pe akosangisa baoyo babenganaki na Israel pe akosangisa bapalangani na Yuda longwa na suka mineyi ya mabele. 13. Pe zuwa ya Efrayime ekolongwa, pe banguna baniokoli ya Yuda bakolongwa; Efrayime akosalela Yuda zuwa te, pe Yuda akozala te monguna ya Efrayime. 14. Kasi bakopumbwa na lipeka ya Bafilistia epayi ya westi, bakopunza elongo bana mibali ya esti : Edome pe Moabe bakozala biloko ya maboko na bango, pe bana mibali ya Amona bakotosa bango. 15. Pe Yawe akokawusa monoko ya mayi monene ya Ejipito; pe akoningisa loboko na ye likolo ya Ebale na kati ya mopepe makasi, pe akobeta yango na bibale sambo, pe akosala ete batambola na kati na yango na sapato. 16. Pe ekozala na nzela yoko ebongisami pona batikali ya batu na ye, baoyo batikali, wuta na Asuria, na lolenge na oyo esalemaki na Israel na mokolo oyo amataki wuta mboka ya Ejipito.

Mokapo 12

1. Pe okoloba na mokolo wana: Nakokumisa yo, O Yawe, po ete osilikela ngai, kasi kanda na yo ebaluki, pe obondisi ngai. 2. Tala, Nzambe ya lobiko na ngai; Nakotiela motema pe nakobanga te; po Yah, Yawe, azali makasi na ngai pe loyembo na ngai, pe azalaki lobiko na ngai. 3. Pe bokotoka mayi na esengo na maziba ya lobiko. 4. Pe bokoloba na mokolo yango: Botonda Yawe, bobelela kombo na ye; boyebisa na kati ya batu misala na ye; boyebisa ete kombo na ye ezali ya kotombwama. 5. Boyemba Yawe, po asali makambu ya kembo. Yango eyebani na mabele mobimba. 6. Boganga na esengo pe sepela, mofandi ya Siona, po monene kati na yo ezali Mosantu ya Israel.

Mokapo 13

1. Kosakola etali Babilone, oyo Izayi mwana ya Amoze amonaki.

2. Tombola bendele na ngomba moko ya pamba, sembola mongongo na yo epayi na bango, ningisa loboko na yo pe bakota na baporte ya batu ya lokumu minene. 3. Ngai, napesi mitindo na basantu na ngai; Nabengi pe batu na ngai ya nguya na kanda na ngai, baoyo basepelaka na monene na ngai. 4. Mongongo ya ebele ya batu na bangomba, lokola ya batu minene, mongongo ya mobulu ya ba bokonzi ya bikolo oyo esanganaki esika moko... Yawe ya mapinga azali kotala lipinga ya basoda ya etumba. 5. Bawuti na mboka mosika, na suka ya likolo, Yawe, pe bisaleli ya kanda na ye, pona kobebisa mokili mobimba. 6. Bolela, po mokolo ya Yawe ekomi pene! Ekoya lokola libebi oyo ewuti na Oyo-ya-Nguya-Nyonso. 7. Yango wana maboko nyonso ekozala na bolembu, pe motema ya mutu nyonso ekobukana. 8. Bakotungisama na kobanga; pasi pe mawa ekosimba bango; bakozala na pasi lokola mwasi oyo azali kobota; bakotalana na kokamwa; bilongi na bango ekozala lokola milinga ya moto.

9. Tala, mokolo ya Yawe ezali koya, motema mabe, na kanda pe kanda ya kanda, po ya kokomisa mabele eloko pamba; pe akoboma basumuki na yango. 10. Po minzoto ya likolo pe bituluku na yango ya minzoto ekopesa pole na yango te; moyi ekozala molili na kobima na yango, pe sanza ekopesa pole na yango te. 11. Pe nakopesa etumbu na mokili pona mabe na yango, pe batu mabe pona mbeba na bango. Nakosilisa lolendo ya batu ya lolendo pe nakokitisa komimatisa ya batu ya mobulu. 12. Nakokomisa mutu na motuya koleka wolo ya malamu, pe mutu na motuya mingi koleka wolo ya Ofire. 13. Yango wana nakoningisa likolo, pe mabele ekoningana wuta esika na yango, na kanda ya Yawe ya mapinga pe na mokolo ya kanda na ye ya makasi. 14. Pe ekozala lokola mboloko oyo abengami pe etonga ya bibwele oyo mutu moko te akosangisaka. Moko na moko akobaluka epayi ya batu na ye pe akokima na mboka na ye. 15. Mutu nyonso oyo akozwama akotobolama, pe mutu nyonso oyo akokangama akokweya na mopanga. 16. Bana na bango ya mike bakobukana na biteni liboso ya misu na bango, bakopunza bandako na bango, pe basi na bango bakosangisama nzoto na makasi.

17. Tala, nazali kolamusa Bamede pona kobundisa bango, oyo bapesaka motuya ya palata te, pe basepelaka na wolo te. 18. Pe likonga na bango ekobeta bilenge mibali, pe bakoyokela mbuma ya libumu mawa te; lisu na bango ekoyokela bana mawa te. 19. Pe Babilone, kitoko ya ba bokonzi, kembo ya lolendo ya Bakaladea, ekozala lokola tangu Nzambe akweyisaki Sodomo na Gomora. 20. Ekofandaka lisusu batu te, pe bakofandaka lisusu kuna te na milongo na nionso, pe Arabe akotelemisa ndaku na ye kapo kuna te, pe babateli ya mpate bakolalisa te bibwele na bango kuna. 21. Kasi banyama ya esobe bakolala kuna, pe ba Ibu ekotondisa bandako na yango, pe ba OtrIches ekofanda kuna, pe bantaba ya zamba ekopumbwa kuna.  22. Pe bashakalbakobunda na bandako na yango ya minene, pe bambwa ya zamba na bandako ya kitoko. Mpe ntango na ye ekómi pene, mpe mikolo na ye ekoumelaka te.

Mokapo 14

1. Po Yawe akoyokela Yakobo mawa pe akopona lisusu Israel pe akotia bango na bopemi na mboka na bango. Mopaya akosangana na bango pe akobakisama na ndako ya Yakobo. 2. Pe mabota bakozwa bango pe bakomema bango na esika na bango, pe ndako ya Israel ekozwa yango na mabele ya Yawe, pona basali mibali pe basali ya basi. Bakokanga na bawumbu baoyo bakangaki bango pe bakokonza baoyo bazali koniokola bango.

3. Pe ekokoma na mokolo oyo Yawe akopesa bino bopemi na mosala makasi na yo pe na mitungisi na yo pe pasi na yo oyo osalaki na kibowumbu na yo. 4. ete okoyemba nzembo oyo ya kotuka likolo na mokonzi ya Babilone, pe okoloba: Ndenge nini moniokoli asili? Ndenge nini oyo akonzaka na nko asili!? 5. Yawe abuki lingenda ya batu mabe, lingenda ya bokonzi ya baoyo bakonzaka. 6. Ye oyo, na kanda na ye, abetaki bikolo kozanga kotika, oyo azali kokonza bikolo na kanda na ye, azali koniokola na kozanga kopema. 7. Mboka mobimba ezali na kimia pe bopemi; kosepela na banzembo ya elonga. 8. Banzete ya sipre pe basepeli pona yo, banzete ya sedre ya Liban: Banda okweyaki na se, mokati-kati amati lisusu kobundisa biso te! 9. Sheol oyo ya se ezali koningana pona yo, kokutana na yo tangu ozali koya, kolamusa bakufi pona yo, bantaba-bakambi nyonso ya mabele, kosembola bakonzi nyonso ya bikolo na bakiti na bango ya bokonzi. 10. Bango nyonso bakoyanola yo pe bakoloba na yo: Yo pe okomi na bolembu, lokola biso; okomi ya kokona na biso. 11. Lolendo na yo ekiti na Sheol, na lokito ya mandanda na yo. Bankusu bapalangani na se na yo, pe mitsiopi ezali ezipeli na yo.

12. Ndenge nini okweyi wuta na likolo, monzto engengaka, mwana ya tongo-tongo? Okweyisami kino na mabele, yo oyo okonzaka bikolo! 13. Pe yo, olobaki na kati ya motema na yo: Nakomata na likolo, nakotia kiti na ngai ya bokonzi likolo ya minzoto ya Nzambe, pe nakofanda likolo ya ngomba ya lisanga, na bozindo penza ya nord. 14. Nakomata likolo oyo etombwama koleka ya mapata; Nakomikomisa lokola Oyo-Aleki-Likolo. 15. Nzokande, bakitisi yo na Sheol, na bozindo ya Libulu. 16. Baoyo bakomona yo batie misu na bango likolo na yo, bakotala yo na likebi, pe bakoloba: Ye oyo nde azali mutu oyo aningisi mabele, oyo azalaki kolengisa ba bokonzi, 17. Oyo akomisaki mokili esobe pe abebisaki bingumba na yango? Azalaki kotika te bakangami na ye bazonga na ndako. 18. Bakonzi nyonso ya bikolo, bango nyonso balali na kembo na bango, moko na moko na ndako na ye ; 19. Kasi yo, obwakami libanda na lilita na yo lokola etape ya nzete oyo epesaka nkele, ozipami na baoyo babomami, otobolamaki na mopanga, okiti kino na mabanga ya libulu, lokola ebembe oyo eniatami na se ya makolo. 20. Okosangana elongo na bango na lilita te; Po obebisaki mboka na yo pe obomaki batu na yo. Bokitani ya batu mabe ekokanisama ata moke te.

21. Bongisa esika ya koboma pona bana na bango na tina ya mbindo ya batata na bango; batelema te pe bazwa mabele to batondisa elongi ya bingumba ya mokili te. 22. Nakotelema bango, elobi Yawe ya mapinga, pe na Babilone nakolongola kombo pe batikali, bana pe bakitani, elobi Yawe. 23. Pe nakokomisa yango esika ya bandeke ya makolo milayi pe ya maziba ya potopoto; pe nakokombola yango na kikombo ya libebi, elobi Yawe na mapinga.

24. Yawe ya mapinga alapi ndayi: ya solo, lokola nakanisaki, bongo ekosalama; pe lokola nabongisaki, yango ekokisama bongo. 25. Nakobuka Moasuria na mokili na ngai; pe nakoniata ye na se ya makolo na bangomba na ngai; pe ekanganeli na ye ekolongwa likolo na bango, pe mokumba na ye ekolongwa likolo na mapeka na bango. 26. Oyo ezali mabongisi oyo ebongisami likolo ya mabele mobimba, pe oyo ezali loboko oyo esembolami likolo ya bikolo nyonso. 27. Po Yawe ya mapinga abongisi, pe nani akolongola yango? Pe loboko na ye esembolami, pe nani akolongola yango?

28. Na mbula ya liwa ya Mokonzi Akaze, esakoli oyo elobami : 29. Kosepela te, Filistia mobimba, ete lingenda oyo ebetaki bino ebukani; po na mosisa ya nyoka ekobima vipere, pe mbuma na yango dragon oyo epelaka moto na kopumbwaka. 30. Pe bana ya liboso ya babola bakoleyisa pe batu mikakatano bakolala na kimia. Kasi nakoboma mosisa na yo na nzala, pe batikali na yo bakobomama. 31. Ganga na kolela, Ekuke! Engumba, ganga na mongongo makasi! Bokosila, Bafilistia nyonso! Po milinga ezali kowuta na nord, pe mutu moko te akozanga na kati ya mayangani na ye ya basoda. 32. Pe akoyanola nini epayi ya bamemi-sango ya bikolo? Ete Yawe atongi Siona, pe kati na yango babola ya batu na ye bazwi ekimelo.

 

Mokapo 15

1. liloba likolo ya Moabe. Po na butu moko Ar ya Moabe etikali pamba pe ebebisami, po na butu moko, Kiri ya Moabe etikali pamba pe ebebisami: ... 2. Bakomata na Bayite pe na Dibone, na bisika oyo etombwana, pona kolela; Moabe ezali koganga na kolela Nebo pe na Medeba; mito nyonso bakokoli, mandefu nyonso ekatami. 3. Na babalabala na yango balati bilamba ya saki; na likolo na bandako na yango pe na bazando na yango, batu nyonso bazali kolela pe kosopa pinzoli; 4. Pe Eshibone azali koganga, pe Eleyale; mongongo na bango eyokani ata na Yayaze. Yango wana batu ya Moabe oyo bazali na bibundeli bazali koganga; molimo na ye ezali kolenga na kati na ye.  5. Motema na ngai ezali koganga pona Moabe; bakimi na ye bakimi ti na Soare, ti na Eglate-shelishiya; po bazali komata likolo ya Luwite na kolela, po na nzela ya Oronayime batomboli koganga moko ya libebi. 6. Po mayi ya Nimirim ekotikala pamba; po matiti ekawuki, matiti ya motane ekufi, pe matiti ezali lisusu te. 7. Yango wana bamemi bomengo na bango pe ebombelo na bango ya biloko na ebale ya Sole. 8. Po koganga na kolela ezingi ndelo ya Moabe; koganga na yango eyokani ata na Eglayime, pe koganga na yango kutu ti na Beere-elime. 9. Po mayi ya Dimona etondi na makila; po nakomemela Dimona mingi koleka: nkosi likolo ya baoyo babiki na Moabe pe likolo ya batikali na mboka.

Mokapo 16

1. Botinda Mwana na Mpate ya ye oyo akonzaka mboka - wuta na libanga (sela) kino na esobe - kino na ngomba ya mwana mwasi ya Siona. 2. Pe lokola ndeke oyo akimi zala, lokola maki ya ndeke na zala oyo babengani, bakozala bongo bana basi ya Moabe na bisika oyo ebale Arnome ekabwani. 3. Pesa toli, zwa mokano; sala ete elili na yo ezala lokola butu na kati-kati ya midi; bomba baoyo bapalanganaki, kokaba te ye oyo akimi. 4. Tika bapalangani na ngai bafanda elongo na yo, Moabe! Zala ekimelo na bango liboso ya mobebisi. Po moniokoli akozala lisusu te, libebi ekosila; monyati akolimwa na mboka. 5. Pe kiti ya bokonzi ekotelemisama na motema mawa, pe akofanda likolo na yango na bosolo, na hema ya Davidi, akosambisa, koluka bosembo, pe kosala boyengebene nokinoki.

6. Toyokaki lolendo ya Moabe, amitombolaka mapeka, lofundu na ye, lolendo na ye, pe kanda na ye; biloba-loba na komikumisa na ye ezanga tina. 7. Yango wana Moabe ekoganga na kolela pona Moabe; nyonso wana ekoganga na kolela! Okolela pona gato esalami na mbuma ya vino ya Kire-Areshete, yo nyonso na mawa. 8. Po bilanga ya Eshibone ekawuki, elanga ya vino ya Sibema. Bankolo ya bikolo babebisi banzete na yango ya vino ya malamu : ekomi ti na Yazere, bakoyengayenga na esobe; bitape na yango etandamaki koleka mayi monene. 9. Yango wana nakolela elongo na kolela ya Yazere pona elanga ya vino ya Sibema; Nakomelisa bino mayi na pinzoli na ngai, Eshbone pe Eleyale, po likolo ya biloko na bino bosangisi pe bobuki, koganga ya bobuki ekweyi. 10. Pe esengo pe bosepeli esilaki wuta na bilanga ya kobota mbuma, pe kati na bilanga ya vino bazali koyemba te, koyemba to koganga po ya esengo ezalaki te; ye oyo akamolaka na koniata vino azali lisusu kokamola na koniata vino na bisika ya kokamola na koniata vino te; Nasilisi makelele. 11. Yango wana mitshopo na ngai ezali kosala makelele makasi lokola nzenze pona Moabe, pe kati na ngai pona Kire-Eresi. 12. Pe ekosalema boye: tangu Moabe akomonana pe akolemba na esika oyo etombwana, pe akokota na esika mosantu na ye pona kobondela, akolonga te.

13. Oyo ezali liloba oyo Yawe alobaki kala likolo ya Moabe. 14. Pe sik'oyo Yawe alobi, kolobaka: Na mbula misato, lokola mbula ya mofutami, kembo ya Moabe ekotiolama elongo na ebele monene na ye; pe batikali bakozala moke, pe bakozala tina te.

Mokapo 17

1. Liloba likolo ya Damas.

Tala, Damas akotika kozala engumba pe ekokoma liboke ya biloko oyo ebeba.  2. Bingumba ya Aroyere esundolami; bakokoma esika ya bibwele oyo bakolala kuna, pe mutu moko te akobangisa bango. 3. Esika makasi ekozala te na Efrayime, pe na bokonzi ya Damas; pe batikali ya Siri bakozala lokola kembo ya bana ya Israel, elobi Yawe na mapinga.

4. Pe ekosalema na mokolo wana ete kembo ya Yakobo ekokita, pe mafuta ya mosuni na ye ekokoma ya kokonda. 5. Pe ekozala lokola tangu mobuki-mbuma azali kosangisa ble, pe loboko na ye ezali kobuka matoyi ya mbuma; ekozala lokola tangu bakosangisa matoyi ya mbuma na Lobwaku ya Refayime. 6. Pe ekotikala kobuka mbuma, lokola tangu baningisi nzete ya olive: mbuma mibale to misatu na likolo na yango, pe mineyi to mitanu kati na bitape oyo ebotaka mbuma, elobi Yawe, Nzambe ya Israel.

7. Na mokolo wana, mutu akotala epayi ya Mokeli na ye, pe misu na ye ekomona Mosantu ya Israel; 8. Pe akotala te na bitumbelo, mosala ya maboko na ye, pe akobalusa misu na ye te na oyo misapi na ye esali, to na Baashera, to na makonzí oyo ebulisami na moyi. 9. Na mokolo yango, bingumba na ye oyo ebatelami ekokoma lokola bisika ya kosundilama ya zamba pe ya songe ya ngomba, oyo esundolami liboso ya bana ya Israel; pe ekozala ya kobebisama. 10. Po obosani Nzambe ya lobiko na yo, pe omikundoli te na kokanisa libanga ya esika makasi na yo. Yango wana okolona milona ya kitoko, pe okolona yango na banzete ya vino ya bapaya. 11. Kaka na mokolo oyo okolona, ​​okomona ekoli, pe na tongo ekobimisa molona na yo ekobimisa fololo; kasi na mokolo ya kobuka pona kozwa biloko, mbuma ekozala liboke, pe pasi ekobikisama te.

12. Mawa na makelele ebele ya batu ebele! — bazali kotia makelele lokola makelele ya mayi monene, — pe na koganga ya bikolo! Bazali koganga na makasi lokola makelele ya mayi minene. 13. Mabota ya bikolo bazali koganga lokola mayi monene ezali koganga makelele, kasi akopamela bango, pe bakokima mosika, pe bakobengana lokola matiti ekawuka na bangomba liboso ya mopepe, pe lokola matiti ya matiti liboso ya mopepe makasi : 14. Na tangu ya pokwa, tala somo ezali, liboso tongo etana, bazali lisusu te. Oyo ezali libonza ya baoyo babotolaka biso biloko, pe mbano ya baoyo bapunzaka biso.

 

Mokapo 18

1. Aa! Mokili oyo ezali kobwaka elili elongo na mapapu na yo, oyo ozali na ngambo mosusu ya bibale ya Etiopie, 2. Oyo etindaka bantoma na nzela ya mayi monene pe na bamasuwa ya papirise, na ngambo mosusu ya mayi: Bokende, bamemi-sango ya mbangu, epayi ya ekolo oyo batu bakonda milayi pe baposo ya nzoto kongala, epayi ya batu ya kokamwa banda na tangu oyo pe koleka mosika, epayi ya ekolo oyo ezali kozela, kozela pe koniata na se ya makolo, oyo bibale na yango epunzaki mabele na bango. 3. Bino nyonso oyo bafandi na mokili, pe bino baoyo bofandi na mboka, tangu drapo etombolami likolo ya bangomba, bomona; pe tangu kelelo ekobeta, boyoka!

4. Po Yawe alobi na ngai boye: Nakozala kimia pe nakotala wuta na esika na ngai ya kofanda, lokola molunge ya moyi, lokola lipata ya mamwe na molunge ya kobuka mbuma. 5. Po liboso ya kobuka mbuma, tangu fololo ekosila pe fololo ekokoma mbuma ya vino ya motane oyo eteli, akokata bitape na yango na basinga ya kokata pe akolongola bitape. 6. Bakosundolama esika moko pona bandeke oyo eliaka na bangomba pe pona banyama ya mabele; pe bandeke oyo eliaka banyama mosusu ekolekisa bango na eleko ya molunge, pe banyama nyonso ya mabele ekolekisa bango na eleko ya malili. 7. Na tangu wana likabo moko ekopesama epayi ya Yawe ya mapinga wuta na batu bakonda milayi pe baposo ya nzoto kongala, epayi ya batu ya kokamwa wuta tangu wana pe mosika, longwa na ekolo moko oyo ezali kozela, kozela pe koniatama na nse ya makolo, oyo bibale epunzi mokili na yango, kino na esika oyo kombo ya Yawe ya mapinga ezali, na Ngomba Siona.

Mokapo 19

1. Liloba likolo na Ejipito. Tala, Yawe azali koya na Ejipito na lipata ya mbangu, pe banzambe ya biikeko ya Ejipito ezali koningana na tina ya kozala na ye, pe motema ya Ejipito ezali kolemba-lemba kati na ye. 2. Pe nakotombola Moejipito po na kobundisa Moejipito; pe bakobunda, moko na moko na ndeko na ye pe moko na moko na moninga na ye, engumba na engumba, pe bokonzi na bokonzi. 3. Pe elimo ya Ejipito ekolongwa na kati na ye, pe nakobebisa mabongisi na ye; pe bakotuna mituna epayi na banzambe ya bikeko, pe ya batu oyo babelelaka bakufi, baoyo babelelaka milimo, pe babikoli. 4. Pe nakokaba Ejipito na loboko ya bankolo ya mitema makasi, pe mokonzi moko ya mobulu na kanda akokonza likolo na bango, elobi  Nkolo, Yawe ya mapinga. 5. Pe mayi ya monene ekokawuka, pe ebale ekokawuka pe ekosila; 6. Pe bibale ekokoma kobimisa solo mabe; bibale ya Ejipito ekokita pe ekokawuka, banzete ekonoma penepene na mayi pe nzete ya misisa milayi oyo ekolaka na bisika ya mayi mingi ekokawuka. 7. Bisika ya matiti ya matiti na Nil, na libongo ya Nil, pe bilanga nyonso oyo baloni pembeni-pembeni ya Ebale Nil, ekokawuka, ekobongwana putulu, pe ekozala lisusu te. 8. Pe balobi-mbisi bakolela; pe baoyo nyonso babwaki ndobo na kati ya Nil bakolela, pe baoyo bakobwaka monyama likolo ya mayi bakolemba. 9. Pe baoyo basalaka balino oyo bakata bakoyoka soni, pe baoyo basalaka bilamba ya pembe. 10. Pe masungí na ye ebukani; baoyo nyonso bazali kozwa lifuti bazali na mawa na elimo.

11. Bazali kaka maboma, bakonzi ya Tanisi, batu ya bwania oyo bazali bapesi toli ya Farao; toli na bango ekomi buzoba. Ndenge nini okoki koloba na Farao ete: Nazali mwana ya batu ya mayele ya kosala, mwana ya bakonzi ya kala? 12. Bazali wapi ? Wapi batu na yo ya bwania? Tika bango bayebisa yo, nabondeli yo, pe bayebisa yo oyo Yawe ya mapinga akani pona Ejipito. 13. Bankumu ya Tanisi bakomi maboma, bakonzi ya Memfisi bakosami, pe libanga ya songe ya mabota na yango amemi Ejipito na libunga. 14. Yawe asopi na kati na ye elimo moko ya kopengwisa, pe bapengwisi Ejipito na misala na ye nyonso oyo azali kosala, lokola molangwi masanga azali kotengatenga na kosanza na ye ; 15. Pe ekozala te pona Ejipito mosala moko oyo moto to mokila, etape ya mbila to nzete ya mayi ekoki kosala.

16. Na mokolo yango, Ejipito ekozala lokola basi, pe ekolenga pe akobanga na tina ya koningana ya loboko ya Yawe ya mapinga, oyo aningisi likolo na ye. 17. Pe mabele ya Yuda ekozala eloko ya somo pona Ejipito; ye nyonso oyo akokanisa yango akobanga na tina ya mabongisi ya Yawe ya mapinga, oyo abongisi pona kotelemela ye. 18. Na mokolo yango, bingumba mitanu ekozala na mokili ya Ejipito oyo ekoloba monoko ya Kanana pe ekolapa ndayi na kombo ya Yawe ya mapinga; moko na bango ekobengama Iraheres (engumba ya kobebisa). 19. Na mokolo yango, ekozala na etumbelo pona Yawe na katikati ya mokili ya Ejipito, pe likonzí pona Yawe na ndelo na yango. 20. Pe ekozala elembo pe litatoli pona Yawe na mapinga na kati ya mokili ya Ejipito. Po bakobelela Yawe na tina ya baniokoli na bango, pe akotindela bango mobikisi pe mobateli, pe akokangola bango. 21. Pe Yawe akomiyebisa na Ejipito, pe Baejipito bakoyeba Yawe na mokolo yango; pe bakosalela ye na mbeka pe likabo, pe bakolapa ndayi epayi ya Yawe pe bakokokisa yango. 22. Pe Yawe akobeta Ejipito; akobeta pe akobikisa; pe bakobaluka epayi ya Yawe, pe akoyokela bango mawa pe akobikisa bango. 23. Na mokolo yango, nzela moko oyo ebongisami kobanda na Ejipito ti na Asuria; pe Asuria ekoya na Ejipito, pe Ejipito na Asuria; pe Ejipito ekosala elongo na Asuria. 24. Na mokolo yango, Israel akozala ya misatu, elongo na Ejipito pe na Asuria, lipamboli na katikati ya mabele ; 25. Po ete Yawe ya mapinga akopambola bango, na koloba: Apambolama Ejipito batu na ngai, pe Asuria mosala ya maboko na ngai, pe Israel libula na ngai.

Mokapo 20

1. Na mbula oyo Tartana (jeneral mokonzi) ayaki na Ashdode, tangu Sargone mokonzi ya Asuria atindaki ye pe abundisaki Ashdode pe azwaki yango : 2. Na tangu wana, Yawe alobaki na nzela ya Izaya mwana ya Amoze ete: Kende, longola elamba ya saki na loketo na yo pe longola sapato na yo na makolo. Pe asalaki bongo, akendaki bolumbu pe makolo ngulu. 3. Pe Yawe alobi: ndenge kaka mosali na ngai Izaya atambolaki bolumbu pe makolo ngulu na mbula misatu lokola elembo pe ndakisa likolo na Ejipito pe ya Etiopie, 4. Bongo mokonzi ya Asuria akokamba bakangami ya Ejipito pe bamemami na bowumbu ya Etiopie, bilenge pe mikolo, bolumbu pe makolo ngulu, pe mutakala, bolumbu ya soni ya Ejipito. 5. — Pe  bakolenga pe bakoyoka soni na tina ya Etiopie, elikia na bango, pe na tina ya Ejipito, lolendo na bango. 6. Pe mofandi ya mopanzi oyo akoloba na mokolo wana: Oyo ezali elikia na biso, epayi ya baaoyo tokimaki mbangu pona kozwa lisungi, pona tokangolama na misu ya mokonzi ya Asuria! Pe biso, ndenge nini tokokima?

Mokapo 21

1. Liloba oyo etali esobe ya mer. Lokola mipepe makasi tangu ezali koleka na sud (Negev), ewuti na esobe, na mboka ya somo. 2. Emoniseli moko ya mabe emonisami epayi na ngai: Moteki bmoninga azali koteka moninga, pe mobebisi azali kobebisa. Mata, Elam! Zinga Mede na etumba! Nasilisi kolela na ye nyonso. 3. Yango wana loketo na ngai etondi na pasi; pasi ekangi ngai lokola pasi ya mwasi oyo azali kobota; Nagumbami, na boye ete nayoka te; Nazali kotungisama na boye ete nazali komona te. 4. Motema na ngai ezali kobeta makasi; kolenga ezwi ngai; butu ya esengo na ngai, abongoli yango na kolenga pe koningana.

5. Bongisa mesa; kengela; boliya, bomela... Telema bino bakonzi, pakola mafuta na ebundeli ya bukliye! 6. Po boye Nkolo alobi na ngai: Kende, tiya mokengeli; tika ayebisa oyo azali komona. 7. Pe amonaki lipinga ya baoyo batambolaka likolo na bapunda : batumbwisi bapunda mibale mibale ; lipinga ya bakamela. Pe ayokaki na likebi, na bokebi, bokebi monene mingi; 8. Pe agangaki lokola nkosi: Nkolo, natelemi na ndako ya mokengeli tangu nyonso na moyi, pe nazali wana na esika na ngai ya kokengela butu mobimba… 9. Pe tala, ezali koya shar ya batu, batambwisi mpunda mibale mibale! Pe ayanolaki pe alobaki: Ekweyi, ekweyi, Babilone pe bikeko nyonso ya banzambe na ye ebukani na mabele.

10. Yo, ble na ngai ya kotuta, pe mwana ya esika na ngai ya kotuta! Nayebisi yo makambu oyo nayoki epayi ya Yawe ya mapinga, Nzambe ya Israel.

11. Liloba oyo etali Duma : Abeleli ngai wuta na Seyire : Mokengeli, butu ezali ndenge nini? Mokengeli, butu ezali ndenge nini? 12. Mokengeli alobi: Tongo ezali koya, pe butu ezali pe bongo. Soki olingi kotuna, tuna, zonga, yaka.

13. Liloba oyo etali Arabie. Bosengeli kolala butu mobimba na esobe ya Arabie, bino batomboli ya Badedane pona mombongo. Bomemela mayi na baoyo bazali naposa ya mayi! 14. Bafandi na mboka ya Tema bayaka na lipa na bango pona kokutana na ye oyo akimi; 15. Po liboso ya mipanga bakimaka, liboso ya mopanga oyo ebendami, liboso ya likonga oyo engumbami, pe liboso ya kilo ya etumba. 16. Po boye Nkolo alobi na ngai: Na mobu moko, lokola mibu ya mofutami, kembo nionso ya Kedare ekosila, 17. Pe batikali ya babeti makonga ya bilombe ya nguya ya bana ya Kedare, bakokita; po Yawe, Nzambe ya Israel, alobi.

Mokapo 22

1. Liloba oyo etali lobwaku ya emoniseli. Bongo nini ozali na yango ete bomata mobimba na likolo ya bandako, 2. Yo oyo otondaki na esengo, engumba ya makelele, engumba ya esengo? Babomi na yo babomami na mopanga te, bakufaki na etumba te ; 3. Bakonzi na bino nyonso bakimi elongo; bakangami na likonga; batu na yo nyonso oyo bazwami bakangami elongo; bakimaki mosika. 4. Na yango wana nalobaki: Bozala mosika na ngai, tika nalela na motema bololo! Bowela nokinoki te kobondisa ngai pona libebi ya mwana mwasi ya batu na ngai.

5. Po ezali mokolo ya pasi pe ya koniata na se pe ya somo kowuta epayi ya Nkolo, Yawe ya mapinga, kati na lobwaku ya emoniseli; oyo ezali kobuka mir molayi, pe makelele emati na ngomba. 6. Elam amemi mbeli, elongo na bashar ya batu oyo batambolaka na punda; pe Kiri abimisi nguba yango. 7. Pe ekosalema ete mabwaku na bino boponi makotondisama na bashar, pe batambwisi bapunda bakotelema na ekuke. 8. Pe alongoli ezipeli na Yuda. Pe otalaki mokolo wana epai ya ebombelo ya bibundeli ya ndako ya zamba; 9. Pe bomonaki bisika oyo epasukaki na engumba ya David, ete ezali mingi; pe bosangisaki mayi ya liziba ya se; 10. Pe botangi bandaku ya Yerusaleme; pe bobukaki bandaku pona kokembisa mir ya molayi; 11. Pe bosalaki ebombelo ya mayi na kati ya bamir pona maziba ya mayi ya kala; kasi botalaki te epayi ya ye oyo asalaki yango, pe bobalusaki misu na bino te epayi ya ye oyo asalaki yango wuta kala.

12. Pe Nkolo, Yawe ya mapinga, abengaki mokolo wana pona kolela pe na bileli, pe kokata mikokoli pe kolata bilamba ya saki. 13. Pe tala, esengo pe kosepela! Bakoboma bangombe pe bakokata bampate, bakoliya mosuni pe bakomela vino: Toliya pe tomela, po lobi tokokufa. 14. Pe emonisaki na matoyi na ngai kowuta epayi ya Yawe ya mapinga: Soki mabe oyo elimbisameli bino, kino bokokufa, elobi Yawe, Yawe ya mapinga!

15. Boye Nkolo, Yawe ya mapinga alobi: Kende, kota epayi ya guvernere, epayi ya Shebena, oyo azali kokamba ndako. 16. Likambo na yo ezali nini awa, pe nani yo ozali na ye awa, ete omitimbola lilita awa, lokola ye oyo atimboli lilita na ye likolo pe akokata esika ya kofanda na kati ya libanga? 17. Tala, Yawe akobwaka yo na se na nguya mutu moko ya nguya pe akozipa yo mobimba. 18. Kozinga, akozinga yo lokola bale na mokili ya etando. Kuna okokufa, pe kuna bashar ya kembo na yo ekozala, ô kofingama ya ndako ya bankolo na yo! 19. Pe nakobengana yo na esika na yo pe nakotiya yo na se longwa na esika na yo. 20. Pe ekozala na mokolo wana nakobenga mosali na ngai Eliyakime mwana ya Ilikiyawu; 21. Pe nakolatisa ye elamba na yo, pe nakolendisa ye na mokaba na yo, pe nakotiya bokonzi na yo na loboko na ye; pe akozala tata pona bafandi ya Yerusaleme pe na ndako ya Yuda. 22. Pe nakotiya fungola ya ndako ya David likolo na lipeka na ye; pe akofungola, pe mutu moko te akokanga; pe akokanga, pe mutu moko te akofungola. 23. Pe nakotiya ye lokola sete na esika oyo etongama makasi malamu, pe akozala kiti ya bokonzi ya kembo pona ndako ya tata na ye. 24. Pe kembo nyonso ya ndako ya tata na ye ekobakama likolo na ye: bakitani pe bana, bambeki nyonso ya mike, ezala bakopo pe bilok'oyo batiaka vino. 25. Na mokolo yango, elobi  Yawe ya mapinga, sete oyo ekangamaki na esika ya makasi ekolongwama, pe ekobukana pe ekokweya; pe mokumba oyo ezalaki likolo na yango ekokatama, po Yawe alobi.

Mokapo 23

1. Liloba oyo etali Tiro.

Boganga na kolela, bamasuwa ya Tarshishi, po ete etikali mpamba, na boye ete bandako ezali te, ata mutu te akokota. Wuta na mokili ya Shipre, emonisami epayi na bango. 2. Fanda nye, bafandi ya esanga! Batu ya mombongo ya Sidone oyo bazali koleka pembeni ya mayi monene batondisi yo! 3. Pe likolo na ba mayi ya minene momboto ya Shiyikore, bobuki mbuma ya Nile, ezalaki lifuti na yango; pe ezalaki zando ya bikolo. 4. Yoka soni, Sidon, po mayi monene elobaki, nguya ya mayi monene, koloba: Nazalaki na mosala makasi te, naboti te, nakolisi bilenge mibali te, pe nabokolaki bilengi basi-ngondo te. 5. Tangu sango yango ekomaki na Ejipito, balengaki na pasi na sango ya Tyro. —

6. Boleka na Tarshishi, boganga na kolela, bino bafandi ya esanga! 7. Oyo nde esengo na bino, oyo ezalaki wuta na mikolo ya kala? Makolo na ye emema ye po afanda mosika lokola mopaya. 8. Nani oyo asali mabongisi po na Tiro, mopesi mitole, oyo batu ya mombongo na ye bazalaki bankumu, oyo bateki mombongo na ye bazalaki bato minene ya mabele? 9. Yawe ya mapinga abongisi mabongisi oyo pona kobebisa lolendo ya kembo nyonso, pona kolakela mabe batu minene nyonso ya mabele.

10. Omipanza na mokili na yo lokola Nile, mwana mwasi ya Tarshishi; dike to libongo moko ezali ezali te pona kokanga! 11. Asemboli loboko na ye likolo ya mayi monene; alengisi ba bokonzi. Yawe apesi etinda pona kobebisa Kanana, ete babebisa bisika ya makasi, 12. Pe alobi: Okosepela lisusu te, yo ngondo oyo aniokwami, mwana mwasi ya Sidone! Telema, kende na Kitime; kuna pe bopemi ekozala te pona yo. 13. Tala mokili ya Bakaladeya: batu wana bazalaka te; Asuria atongaki yango pona bafandi ya esobe: balongolaki bandako na bango milayi, babukaki bandako na bango ya minene, akomisaki yango bitika. 14. Boganga na kolela, bamasuwa ya Tarshishi, pamba te esika makasi na bino ebebisami.

15. Pe ekokoma na mokolo wana, ete Tiro ekobosanama mibu tuku sambo, engebene na mikolo ya mokonzi. Na suka ya mibu tuku sambo ekozala pona Tiro lokola loyembo ya mwasi ya ndumba. 16. Simba lindanda pe kende zingazinga ya engumba, yo mwasi ya ndumba oyo babosana! Beta miziki ndenge okoki pe yemba banzembo mingi, po bakanisa yo. 17. Pe ekosalema na suka ya mibu tuku sambo, Yawe akopesa Tiro etumbu, pe akozongela lifuti na pite na ye pe akosala pite na ba bokonzi nyonso ya mabele, likolo na mabele. 18. Pe lifuti na ye pe makabo oyo epesameli ye ekozala mosantu pona Yawe; ekosangisama te to ekotiama na magazin te; po biloko na ye ya mombongo ekozala pona baoyo bafandi liboso ya Yawe, pona koliya ti kotonda, pe kolata bilamba kitoko.

Mokapo 24

1 Tala, Yawe azali kotika mboka polele pamba pe akokomisa yango esobe pamba; pe akobalusa likolo na yango, pe akopanza bafandi na yango. 2. Pe ekozala lokola na batu, ndenge moko na nganga-Nzambe; lokola na mosali, ndenge moko na bankolo na ye; lokola na mosali ya mwasi, ndenge moko na nkolo na ye ya mwasi; lokola na mosombi, ndenge moko na motekisi; lokola na modefisi, ndenge moko na modefi; lokola na mutu oyo adefi na litomba, ndenge moko pe na mutu oyo adefi na ye na litomba. 3. Mokili ekotikala polele pe ekopunzama penza; po Yawe alobi liloba oyo. 4. Mokili ezali matanga pe kolemba, mokili ekawuki pe elembi; bakambi ya batu ya mboka bazali kolemba. 5. Pe mokili ebebisami na se ya bafandi na kati na yango; po babuki mibeko, babongoli mibeko, pe babukaki kondimana ya seko. 6. Yango wana elakeli mabe esili koliya mboka, pe bafandi na yango bapesameli etumbu po ya mbeba na bango; yango wana bafandi ya mboka batumbami, pe batu moke batikali. 7. Vino ya sika ezali kolela, nzete ya vino ezali kolemba; baoyo nyonso bazalaki na esengo na motema bazali kopema; 8. Esengo ya mbunda esili, makelele ya kosepela ya baoyo bazali kosepela esili, esengo ya lindanda esili; 9. Bakomelaka vino te na koyemba nzembo, masanga makasi ezali bololo pona baoyo bamelaka yango. 10. Engumba oyo etikali polele pe ebebi; ndako nyonso ekangami, po mutu moko te akota na yango. 11. Ezali na mongongo koganga na kati ya babalabala na tina ya vino. Esengo nyonso ekomi molili, kosepela elongwe na mokili. 12. Kobebisama etikali na engumba, pe ekuke ebukani—ezali ya kobebisama.

13. Po ekozala bongo na katikati ya mokili, na kati ya batu ya bikolo—lokola tangu baningisi nzete ya olive, lokola kobuka mbuma ya vino oyo ezali kobukama tangu kobuka mbuma esili. 14. Bango bakotombola mongongo na bango pe bakoganga na esengo wuta na mayi monene pona kembo ya Yawe. 15. Yango wana, bakokumisa Yawe na bisika ya pole, kombo ya Yawe, Nzambe ya Israel, na kati ya bisanga ya mayi monene. 16. Banda na suka ya mabele, toyoki baloyembo: lokumu na moyengebene!

Pe nalobi : kokonda pona ngai, kokonda pona ngai, mawa na ngai ! Bateki baninga basili koteka. Koteka baninga ! Bateki baninga, bateki. 17. Kobanga, libulu pe motambo ezali likolo na yo, mofandi na mboka. 18. Pe ekosalema, ete ye oyo akimi mosika ya mongongo akokweya na kati ya libulu, pe oyo akomata wuta katikati ya libulu akokangama na motambo; po maninisa ya likolo efungwami, pe miboko ya mabele eningani. 19. Kobukana, mabele ebukani penza, kopanzana, mabele epanzani, koningana, mabele eningani; 20. Kotelengana, mabele etelengani lokola molangwi masanga; ezali koningana epayi na epayi lokola esika ya kobombama ya butu; bobuki na yango mobeko ezali kilo likolo na yango; ekokweya pe ekotelema lisusu te.

21. Pe ekosalema boye na mokolo yango, Yawe akopesa etumbu na mapinga oyo ezali na likolo, na likolo, pe bakonzi ya mabele oyo bazali likolo na mabele. 22. Pe bakosangisama na kati ya libulu, lokola bakangami basangani elongo, pe bakokangama na boloko; pe sima ya mikolo mingi bakozwa etumbu. 23. Pe sanza ekokoma motane, pe moyi ekoyoka soni; po Yawe ya mapinga akoyangela likolo na Ngomba Siona pe na Yerusaleme, pe liboso ya bampaka na ye, na kembo.

Mokapo 25

1. Yawe, ozali Nzambe na ngai; Nakotombola yo, nakoyemba masanzoli ya kombo na yo, po osali makambu ya kokamwa, mabongisi ya wuta kala, bosembo pe solo. 2. Po okomisi engumba liboke ya mabanga, engumba ya makasi ekomi pamba, ndako monene ya bapaya, ezali lisusu engumba te, ekotongama lisusu te. 3. Yango wana bilombe ya nguya bakopesa yo kembo; engumba ya bikolo ya somo ekobanga yo. 4. Po ozalaki esika makasi ya ebatelami pona babola, esika makasi ya ebatelami pona mobola na pasi na ye, ekimelo pona mopepe makasi, elili pona molunge; po ete mopepe makasi ya somo esili lokola mbula ya mopepe makasi na mir moko. 5. Okitisi makelele ya mobulu ya bapaya, lokola molunge na esika ya kokawuka; lokola molunge na elili ya lipata, loyembo ya batu ya somo ekiti. 6. Pe Yawe ya mapinga akosala na ngomba oyo po na bikolo nyonso feti ya biloko ya mafuta, feti ya vino oyo ewumeli na ebombeli ya masanga, ya mafuta ya pete, ya vino ya kala oyo epɛtolami malamu. 7. Akobebisa na ngomba oyo elongi ya elamba oyo ezipaka batu nyonso, pe ezipeli oyo epalangani likolo ya bikolo nyonso. 8. Akodindisa liwa na elonga; pe Nkolo Yawe akopangusa pinzoli likoli na bilongi nyonso, pe akolongola soni ya batu na ye likolo na mabele mobimba; po Yawe alobi.

9. Pe ekolobama na mokolo wana: Tala, oyo Nzambe na biso; tozelaki ye, pe akobikisa biso; oyo ezali Yawe; tozelaki ye. Tosepela pe tosepela na lobiko na ye. 10. Po loboko ya Yawe ekopema likolo ya ngomba oyo, pe Moabe ekoniatama na se na ye lokola matiti ya matiti oyo eniatami na bosoto. 11. Pe akosembola maboko na ye kuna, lokola najere azali kosembola maboko na ye pona konaje pe akobuka lolendo na ye pe mayele mabe ya maboko na ye. 12. Pe akobuka bamir na yo ya milayi pe bisika na ye ya makasi ya bibateli, akokitisa yango na mabele, ata na putulu.

Mokapo 26

1. Na mokolo yango, loyembo oyo ekoyembama na mokili ya Yuda :

Tozali na engumba moko ya makasi : atie lobiko lokola bamir milayi pe bibombelo 2. Fungola bikuke, pe tika ekota, ekolo ya sembo oyo ebatelaka boyokani! 3. Okobatela na kimia, na kimia elimo oyo emitiki na yo, po ete etie motema na yo. 4. Botia motema na Yawe, kino libela; po na Yah, Yawe, azali Libanga ya tangu nionso. 5. Po akokitisa baoyo bafandi likolo; akokitisa engumba oyo etombwami, akokitisa yango na mabele, akokitisa yango na putulu. 6. Likolo ekoniata yango, makolo ya mobola, matambe ya mutu ya bolembu.

7. Nzela ya moyengebene ezali sembo. Yo oyo ozali sembo, sembola nzela ya bayengebene. 8. Solo, na nzela ya bisambisi na yo, ô Yawe, totie elikia na yo; Posa ya molimo na biso ezali sima ya kombo na yo pe ya bokundoli na yo. 9. Molimo na ngai ezali naposa na yo na butu; iyo, elimo na ngai kati na ngai ezali koluka yo na molende; po tangu bisambiseli na yo eza likolo na mabele, bafandi na mokili bayekolaka boyengebene. 10. Soki basali ngolu epayi ya mutu mabe, akoyekola boyengebene te; na mokili ya sembo akosala mabe, nzokande akomona kongala ya Yawe te. 11. O Yawe, loboko na yo etombolami, kasi bazali komona te; bakomona zuwa na yo pona batu pe bakoyoka soni. Pe bakozika na moto oyo ebongisami pona banguna na yo.

12. Yawe, okotia kimia pona biso; po yo pe osali misala na biso nyonso pona biso. 13. Yawe Nzambe na biso, bankolo mosusu longola kaka yo nde bakonzi likolo na biso : kaka na nzela na yo nde tokoloba kombo na yo. 14. Bakufi bakobika bomoyi te, pe baoyo bakufaki bakotelema te; po otali bango pe obebisi bango, pe osilisaki bokundoli na bango nyonso. 15. Obakisi ekolo, ô Yawe; obakisi pona ekolo; ozwi kembo, olongoli bango tii na suka nyonso ya bandelo ya mabele. 16. Yawe, na kati ya pasi na bango balukaki yo; basopaki libondeli na bango na mongongo ya se, tangu opesaki bango etumbu. 17. Lokola mwasi ya zemi oyo azali pene pona kobota, akoniokwamai napasi pe azali koganga na kati ya pasi na ye, biso pe tozalaki bongo liboso na yo, Yawe : 18. Tozwaki zemi, tozalaki na kati ya bapasi, kasi ezali lokola tobotaki mopepe; tosilaki kobikisa mboka te, pe bafandi ya mokili bakweyaki.

19. Bakufi na yo bakobika bomoyi, bibembe na ngai bakotelema. Bolamuka pe boyemba na esengo, bino bofandi na kati ya putulu; po mamwe na yo ezali mamwe ya pole, pe mabele ekobwaka bakufi libanda. 20. Yaka, batu na ngai, kota na bashambre na yo pe kanga bikuke na yo; omibomba pona mwa tangu moke, kino kanda ekoleka. 21. Po tala, Yawe abimi na esika na ye pona kotala mabe ya bavandi ya mabele likolo na bango, pe mabele ekomonisa makila na ye pe akobomba lisusu te babomami na ye.

Mokapo 27

1. Na mokolo yango, Yawe akopesa etumbu na mopanga na ye ya makasi, ya monene, pe ya nguya, leviatane, nyoka oyo ekimaka, pe leviatane, nyoka ya kongumbama, pe akoboma elima mabe oyo ezali na kati ya ebale monene.

2. Na mokolo yango : nzete ya vino ya esengo, boyemba pona yango : 3. Ngai, Yawe, nakobatela yango; Nakosopela yango mayi tangu nyonso; noki eloko moko te akende kotala yango, nakobatela yango butu na moyi. 4. Kanda ezali te kati na ngai, O ! Soki ezalaki banzube pe basende kobundisa ngai na etumba, nalingaki kotambola pona kobundisa yango; Nalingaki kotumba yango esika moko. 5. To tika asimba makasi na ngai lokola libateli, asala kimia elongo na ngai, asala kimia elongo na ngai!

6. Na mikolo ekoya, Yakobo akozwa misisa, Israel akobimisa fololo pe akobimisa mito, pe akotondisa mokili na mbuma. 7. Abeti ye na ndenge abetaki mobeti na ye? Abomi ye ndenge abomaki baoyo babomaki ye? 8. Bobenganaki ye libanda, bosambisaki ye ; Abenganaki ye na mopepe na ye ya makasi, na mokolo ya mopepe na ye ya esti. 9. Yango wana, na nzela na yango, mabe ya Yakobo ekozipama. Pe oyo ezali mbuma nyonso ya lisumu na ye oyo elongolami: tangu akokomisa mabanga nyonso ya etumbelo lokola mabanga ya pembe ya ebukani, ba Ashera pe makonzí oyo ebulisami pona moyi ekotombolama te. 10. Po ete engumba oyo ebatelami etikali pamba, esika ya kofanda oyo esundolami pe etikali pamba lokola esobe; mwana ya ngombe akoliya kuna pe akolala kuna, pe akoliya bitape na yango. 11. Tangu bitape na yango ekokawuka, ekobukana; basi bakoya kotumba yango. po bazali batu bazangi basosoli te; yango wana Mokeli na bango akoyokela bango mawa te, pe Mobongisi na bango akolakisa bango ngolu te.

12. Pe ekosalema boye: na mokolo yango, Yawe akotuta mbuma longwa na ebale ya Ebale ti na ebale ya Ejipito, pe bokoyangana moko na moko, E bana ya Israel. 13. Pe ekosalema boye: na mokolo wana, kelelo monene ekobeta, pe baoyo babungaki na mokili ya Asuria, pe baoyo bapalanganaki libanda na mokili ya Ejipito, bakoya pe bakogumbamela liboso ya Yawe likolo na ngomba mosantu, oyo ezali na Yerusaleme.

Mokapo 28 1. Mawa motole ya lolendo ya balangwi masanga ya Efrayime, pe fololo oyo esili kokawuka na kitoko na ye, oyo ezali likolo na moto ya lobwaku ya bozwi ya baoyo vino ebebisa! 2. Tala, Nkolo azali na moko ya makasi pe ya nguya, lokola mopepe makasi ya mbula ya mabanga, mopepe ya kobebisa; lokola mopepe makasi ya mayi oyo eleki ndelo, na loboko akokweyisa na mabele. 3. Motole ya lolendo ya balangwi masanga ya Efrayime ekoniatama na makolo, 4. Pe fololo oyo esili kokawuka na kitoko na yango oyo ezalaki kongala likolo na moto ya lobwaku ya bozwi, ekozala lokola mbuma ya liboso liboso ya eleko ya molunge: tangu kaka ye oyo azali kotala yango amoni yango, tangu kaka ezali na loboko na ye, akomela yango.

5. Na mokolo wana, Yawe na mapinga akozala motole ya kitoko pe ekoti ya mokonzi ya kitoko na batikali ya batu na ye. 6. Pe pona elimo ya kosambisa na ye oyo afandi pona kosambisa, pe makasi pona baoyo bakobengana etumba kino na ekuke.

7. Kasi baoyo lisusu babungaki nzela na vino pe babungaki nzela na tina ya masanga ya makasi. Nganga-nzambe na profete bapengwi na tina ya masanga ya makasi, vino emeli bango, bamibungisi nzela na tina ya masanga ya makasi; basali libunga na kati ya emoniseli na bango, bakobeta libaku na kosambisa. 8. Po bamesa nyonso etondi na bisanza ya bosoto, yango wana esika malamu ezali te. 9.  Akoteya nani boyebi? To na nani akosala ete asosola makambu oyo balobi? Na bana oyo balongoli komela miliki, ba bebe batiki komela mabele ? 10. Po etinda likolo ya etinda, etinda likolo ya etinda; molongo na molongo, molongo na molongo; awa mwa moke, kuna mwa moke... 11. Po na nzela ya bambebu ya kikukuma pe na lolemo ya mopaya, akoloba na batu oyo. 12. Ye oyo alobaki na bango: Awa ezali esika  bopemi, bopemisa oyo alembi ; pe oyo ezali esika ya kopema, kasi balingaki koyoka te. 13. Pe liloba ya Yawe ezalaki epayi na bango etinda likolo na etinda, etinda likolo na etinda; molongo na molongo, molongo na molongo; awa mwa moke, kuna mwa moke; ete bakoka kotambola, pe bakweya na se, pe babukana, pe bakangama na motambo, pe bazwama.

14. Yango wana, boyoka liloba ya Yawe, bino batu ya kotiola, bakambi ya batu oyo bazali na Yerusaleme. 15. Po bolobi: Tosali boyokani elongo na liwa, pe tosali boyokani elongo na Sheol : soki fimbu eye koleka ekokamela biso te ; po tokomisi bokosi ebombeli na biso pe tomibatami na se ya lokuta. 16. Yango wana Nkolo, Yawe alobi boye: Tala, ngai natie lokola fondatio na kati ya Siona, libanga, libanga limekami, libanga ya motuya ya likonzi, fondatio oyo etiami malamu; oyo akotiela ye motema akopota mbangu-mbangu te. 17. Pe natiaki bosambisi lokola singa, pe boyengebene lokola singa ya mbodi; pe mbula ya mabanga ekokombola esika ya kobombana ya lokuta, pe mayi ekodindisa esika ya kobombana. 18. Pe boyokani na bino na liwa ekolongwa, pe boyokani na bino na Sheol ekotelema te. Tangu bolozi ya mpela ekoleka, bokoniatama na makolo na ye. 19. Tangu kaka ekoleka, ekokanga bino; po tongo na tongo ekoleka, butu na moyi, pe ekozala kobangisa kososola makelele na yango ;  20. Po mbeto ezali mokuse mingi pona kolala, pe ezipeli ezali moke penza pona komizipela na yango. 21. Po Yawe akotelema lokola na Ngomba Peratshime, pe akosilika lokola na kati ya lobwaku ya Gibeone, pona kosala mosala na ye, mosala na ye ya kokamwa, pe pona kokokisa mosala na ye, mosala na ye oyo ya momesano te. 22. Sikawa bongo, bozala bato ya maseki te, noki te bokangami bwa bino bokangami; mpo nayoki epai ya Nkolo, Yehova ya mampinga, ete ezali na bosilisi, mpe [bosilisi] epesameli, na mabele mobimba.

23. Botia matoyi na bino pe boyoka mongongo na ngai; bosala keba pe boyoka liloba na ngai. 24. Mosali bilanga abulalaka mabele mikolo nyonso pona kolona? Afungolaka pe atimbolaka mabele na ye pona kolongola matiti? 25. Tangu abongisi likolo na yango, akopanza grene ya aneti pe akolona kumini, pe akolona ble ya kitoko na milongo, pe orje na esika na yango oyo etiami, pe kokona banzete y able na ndelo na yango te? 26. Nzambe na ye azali kotambwisa ye na kosambisa; azali kopesa ye malako. 27. Po abukaka aneti na mbeli ya makasi te to abalusaka pine ya pusu na kumini te; po babetaka aneti na nzete pe kumini na lingenda. 28. Azali konika ble pona lipa, pamba te alingi kotuta yango tangu nyonso te; anikaka yango te na kotambwisaka yango likolo ya pine ya pusu na ye pe ya bapunda na ye. 29. Yango pe ewuti na Yawe ya mampinga; azali ya kokamwa na mabongisi pe monene na mayele.

Mokapo 29

1. Mawa na Ariele, na Ariele, engumba epayi Davidi atiaki kaa! Bakisa mbula na mbula, tika ete bafeti elandana! 2. Kasi nakoniokola Ariele, pe ekozala na kolela pe mawa, pe akozala lokola Ariele pona ngai. 3. Pe nakotiya kaa zingazinga na yo, pe nakozinga yo na makonzí, pe nakotombola bamir milayi makasi po na kobundisa yo. 4. Pe okoloba na komikitisa wuta na mabele, pe liloba na yo ekozala ya kokita wuta na putulu, pe mongongo na yo ekobima lokola elima wuta na mabele; pe liloba na yo oyo ewuti na putulu lokola mongongo ya se. 5. Pe ebele ya banguna na bino bakozala lokola putulu ya malamu, pe ebele ya batu ya nguya lokola matiti oyo ezali koleka; pe na tangu moke, na mbalakata ekosalama. 6. Ewuti na Yawe na mapinga, akoya kotala yo na kake pe na koningana ya mabele pe na mongongo makasi, na mopepe makasi, pe na epeleli ya moto oyo ezali kozikisa. 7. Pe ebele ya bikolo nyonso oyo ezali kobundisa Ariele, pe baoyo nyonso bazali kobunda na ye pe esika makasi na ye, pe bakoniokola ye, bakozala lokola ndoto na emoniseli ya butu. 8. Pe ekozala lokola ye oyo azali na nzala oyo azali kolota, pe tala, azali koliya, pe kolamuka, pe molimo na ye ezali pamba; pe lokola ye oyo azali naposa ya mayi oyo azali kolota, pe tala, azali komela, pe kolamuka, pe tala, alembi, pe molimo na ye ezali naposa ya komela: bobele bongo ekozala ebele ya bikolo nyonso oyo ezali kobunda na Ngomba Siona.

9. Bokamwa pe bokamwa! Bomiboma misu pe bozala misu ekufa! Bolangwa masanga, kasi na vino te; bozala koyengayenga, kasi na masanga makasi te. 10. Po Yawe asopi likolo na bino elimo ya pongi makasi pe akangi misu na bino; azipi baprofete pe bakambi na bino, na bamoni makambu. 11. Pe emoniseli nyonso ekomi pona bino lokola maloba ya mokanda oyo bakangi elembo, oyo epesami na ye oyo ayebi makomi, koloba: Nabondeli yo, tanga oyo, kasi ye alobi: Nakoki kotanga te, po bakangi yango elembo. 12. Pe bapesaki mokanda yango na ye oyo ayebi makomi te, koloba: Nabondeli yo, tanga oyo, kasi ye alobi: Nayebi kotanga te.13. Pe Nkolo alobi: Pamba te batu oyo bazali kopusana penepene na ngai na monoko na bango, pe bazali kokumisa ngai na mbebu na bango, kasi motema na bango ezali mosika na ngai, pe kobanga ngai ezali mobeko oyo batu balakisa; 14. Yango wana, tala ngai, nakosala nanu makambu ya kokamwa, pe nakosala mosala ya bokamwi epayi ya batu oyo: bwania ya batu na bango ya bwania ekobunga, pe bososoli ya mayele ya bango ekobombama.

15. Mawa na baoyo babombaka makanisi na bango na mozindo mosika ya Yawe, pe oyo misala na bango ezali na esika ya molili, pe bazali koloba: Nani azali komona biso? Nani ayebi biso? 16. Mabe na bino!... Mosali-mbeki bakozawa ye lokola mabele basalelaka mbeki, po ete eloko oyo esalemi eloba na mosali na yango ete: Ye nde asalaki ngai te? Pe oyo esalemi eloba na oyo asali yango : Azali na bososoli te? 17. Ezali nanu na mwa tangu moke te, pe Liban ekokoma elanga ya kobota mbuma, pe elanga oyo ebotaka mbuma ekobengama zamba?

18. Pe na mokolo wana bakufi matoyi bakoyoka maloba ya buku, pe misu ya bakufi misu kosikolama na molili pe molili, ekomona. 19. Pe babola bakosepela mingi na Yawe, pe bakeleli kati na batu bakosepela na Mosantu ya Israel. 20. Po mutu ya mobulu akozala lisusu te, pe motioli akosila; pe baoyo nyonso bakanisaka mabe bakolongwa, 21. Baoyo bazali kokweyisa mutu na ngambo pona liloba moko, Bakotia motambo pona baoyo bazali kozwa mokano na ekuke, pe pona eloko te bazali kolongola moyengebene. 22. Yango wana, Yawe oyo asikolaki Abalayama, alobi boye na ndako ya Yakobo: Sik'oyo Yakobo akoyoka soni lisusu te, pe elongi na ye ekozala lisusu motane te; 23. Po tangu ye, bana na ye, bakomona mosala ya maboko na ngai na katikati na ye, bakosantisa kombo na ngai, pe bakosantisa Mosantu ya Yakobo, pe bakolenga Nzambe ya Israel. 24. Pe baoyo bazali kosala libunga na elimo bakososola, pe baoyo bazali koyimayima bakoyekola mateya ya malamu.

 

Mokapo 30

1. Mawa na bana oyo bakotomboka, elobi Yawe, pona kobongisa mabongisi, kasi ewuti na ngai te, pe kosala ba boyokani, kasi na Molimo na ngai te, pona kobakisa lisumu na lisumu; 2. Baoyo bakokita na Ejipito, kasi batuni monoko na ngai te, po na komibomba na libateli ya Farao pe koluka ekimelo na se ya elili ya Ejipito. 3. Pe libateli ya Farao ekozala likambu ya soni pona bino, pe ekimeli na se ya elili ya Ejipito ekozala soni na yo.

4. Po bankumu na ye bazalaki na Tanis, pe bamemi-sango na ye bakomaki na Anes; 5. Bango nyonso bamikomisi soni pona batu oyo bazalaki motuya te pona bango, bakozala ata lisalisi to litomba te, kasi soni pe lisusu kotiolama. 6. Liloba ya mokumba etali banyama ya sud: Na nzela ya mokili ya pasi pe ya minioko, oyo nkosi ya mwasi pe nkosi ewuti kati na yango, vipere pe nyoka oyo epumbwaka ya moto, bamemaka bozwi na bango na mokongo ya bapunda, pe biloko na bango ya motuya na mikongo ya bakamela, epayi ya batu oyo bazali litomba te.

7. Po Ejipito soki esungi lisungi yango ekozala eloko te pe tina te; yango wana nabengi ye kombo: (Rahab) Lolendo oyo esalaka eloko te pe efandi na bopemi.

8. Sik'oyo yaka, koma yango likolo na mesa pe koma yango na kati ya buku (pe ekozala pona mokolo oyo ekoya, pona litatoli kino libela). 9. Po bazali batu ya botomboki, bana ya bokosi, bana oyo bakoyoka mobeko ya Yawe te. 10. Bango oyo balobi na bamoni: Bomonaka te, pe na baoyo bamonaka bimoniseli: Bomonaka bimoniseli ya sembo te pona biso; bolobela biso makambu ya kosepela, bomona bimoniseli ya bokosi. 11. Botika nzela, bolongwa mosika na nzela; longola Mosantu ya Israel liboso na biso. 12. Yango wana, Mosantu ya Israel alobi boye : po boboyi liloba oyo pe botie mitema na moniokoli pe na mobebisi nde botie mitema na bino likolo na ye. 13. Na tina wana, mbeba oyo ekozala likolo na bino lokola lidusu na mir ya molayi, oyo kokweya na yango ekoya na mbala moko, na mbalakata.14. Kobukana na yango lokola kobukana ya mbeki ya mosali mbeki, oyo ebukani biteni na biteni, pe tangu ebukani, eteni moko te ekozwama na yango pona kolongola moto na esika ya kotumba to kotoka mayi na libulu ya mayi.

15. Po boye elobi Nkolo, Yawe, Mosantu ya Israel : Lobiko na bino ezali na nzela ya bozongi pe na bopemi, Makasi na bino ezali na kimia pe na kotia motema, kasi bino bolingaki te. 16. Pe bolobaki : te, po biso tokokima na komata likolo na bapunda, yango wana bokokima ; pe tokomata na oyo ya mbangu ; yango wana baoyo bazali kolanda bino bakozala mbangu. 17. Nkoto moko bakokima na pamela ya moto moko; na pamela ya mitanu, bokokima, kino bokotikala lokola nzete na songe ya ngomba pe lokola bendele na ngomba.

18. Yango wana Yawe akozela pona kosala bino ngolu, pe yango wana akomitombola pona koyokela bino mawa; po Yawe azali Nzambe ya bosambisi; esengo ya baoyo nyonso bazelaka ye. 19. Po batu bakofanda na kati ya Siona, na kati ya Yerusaleme. Okolela lisusu te; na lokito ya kolela na yo, kosala ya ngolu, akosala yo ngolu; tangu kaka akoyoka mongongo ya koganga na yo, akoyanola yo. 20. Pe Nkolo akopesa bino lipa ya pasi pe mayi ya minioko. Kasi molakisi na bino akobombama lisusu te, kasi misu na yo ekomona baoyo bazali kolakisa yo. 21. Pe tangu okokende na loboko ya mobali to okokende na loboko ya mwasi, matoyi na yo ekoyoka liloba moko sima na yo, koloba ete: yango oyo nzela, tambola kati na yango. 22. Pe okotatola ete ezali mbindo bikeko na yo oyo balatisi palata pe bikeko ya libende oyo balatisi wolo; okobwaka yango lokola elamba ya mbindo : Bima! Okoloba na ye.

23. Pe akopesa mbula ya milona na yo oyo okolona na mabele, pe lipa, mbuma ya mabele; pe ekozala mingi pe elengi. Na mokolo wana, bibwele na yo ekolyia matiti na na bisika minene ya matiti ya koleyisa banyama, 24. Pe bangombe pe ba-ane oyo esalaka mosala ya mabele ekoliya bileyi ya mungwa, oyo bapanzi na pawu pe na kiyungulu. 25. Pe likolo na ngomba milayi nyonso pe likolo na ngomba nyonso ya mikuse oyo etombwama, ekozala bibale, bibale ya mayi na mokolo ya kobomama monene, tangu bandako milayi ekokweya. 26. Pe pole ya sanza ekozala lokola pole ya moyi, pe pole ya moyi ekozala mbala sambo, lokola pole ya mikolo sambo, na mokolo oyo Yawe akobongisa bobukani ya batu na ye pe akobikisa pota ya bapota na bango.

27. Tala, kombo ya Yawe ewuti mosika, ezali kopela na kanda na ye lokola moto ya makasi; bambebu na ye etondi na kanda, pe lolemo na ye ezali lokola moto oyo ezali kotumba, 28. Pe pema na ye lokola ebale oyo mayi eleki ndelo, ekomaki ti na kingo, pona koyungola bikolo na kiyungula ya kobebisa pe kotia libende na mbanga ya bikolo pona kobungisa bango. 29. Ekozala pona yo loyembo moko lokola na kati ya butu oyo babulisi feti, pe esengo ya motema lokola ye oyo azali kokende na flite pona kokende na ngomba ya Yawe, na libanga ya Israel. 30. Pe Yawe akobimisa kembo ya mongongo na ye pe akomonisa nguya ya loboko na ye, na kanda makasi pe na kopela ya moto oyo ezali kozikisa, na mbula ekobeta makasi, na mopepe makasi, pe na mbula ya mabanga. 31. Po na tina ya mongongo ya Yawe, Asuria akokweyisama; akobeta ye na lingenda na ye. 32. Pe esika nyonso oyo lingenda oyo ekoleka, oyo Yawe akobeta ye yango etumbu likolo na ye, ekozala na bambunda pe banzenze; pe akobundisa bango na bitumba ya koningisa. 33. Po Tofete (kosambisama na nzela ya moto) abongisami wuta kala; esili kobongisama pona mokonzi. Asali yango mozindo pe monene; Etumbeli na ye ya moto ezali moto pe koni mingi; pema ya Yawe, lokola ebale ya sufre, epelisaka yango.

Mokapo 31

1. Mawa pona baoyo bazali kokita na Ejipito pona kozwa lisalisi, oyo batie motema na bampunda pe batielaka bashar po ezali mingi, pe batu oyo batambolaka na punda, po bazali na makasi mingi, kasi batalaka Mosantu ya Israel te to balukaka Yawe te! 2. Nzokande ye moko azali bwanya pe amemaka pasi pe azongisaka maloba na ye sima te. Atelemi pona kotelemela ndako ya baoyo basalaka mabe pe kotelemela basungi ya baoyo basalaka mbindo. 3. Pe Ejipito bazali batu pe Nzambe te, pe bapunda na bango ezali mosuni kasi elimo te. Pe Yawe akosembola loboko na ye, pe mosungi akobeta libaku, pe ye oyo azalaki kosunga akokweya, pe bango nyonso bakokufa elongo.

4. Po boye Yawe alobi na ngai: Lokola nkosi pe mwana-nkosi, oyo lisanga ya babateli ya mpate babengami pona ye, azali konguluma likolo ya nyama na ye, pe azali kobanga mongongo na bango te to koningana na ebele na bango te, bongo Yawe ya mapinga akokita pona kobunda na Ngomba Siona pe na ngomba na yango. 5. Lokola bandeke oyo epumbwaka, bongo Yawe ya mapinga akozipa Yerusaleme : akobatela ye, akokangola ye, akobomba ye pe akobikisa ye. 6. Bana ya Israele, bozonga epayi na ye oyo bopesaki ye mokongo mobimba!  7.  Po na mokolo yango, mutu na mutu akobwaka bikeko na ye ya palata pe bikeko na ye ya wolo, oyo maboko na bino esalaki pona kosala masumu. 8. Pe Asuria ekokweya na mopanga, kasi ya mutu te; pe mopanga, ya mutu te, ekotobola ye; pe akokima mopanga, pe bilenge mibali na ye bakosala misala ya pasi lokola lifuti mpako. 9. Pe libanga na bango ekoleka na tina ya somo, pe bakambi na ye bakolenga na tina ya bendele, yango nde liloba Yawe, oyo moto na ye ezali na Siona pe etumbeli na ye na Yerusaleme.

Mokapo 32 1. Tala, mokonzi moko akoyangela na bosembo, pe bakambi bakoyangela na bosembo; 2. Pe ekozala na mutu lokola ebombamelo na mopepe pe esika ya kobombana na mbula makasi, lokola bibale ya mayi na esika oyo ekawuka, lokola elili ya libanga moko ya nguya na mabele ya esobe. 3. Pe misu ya baoyo bakomona ekokufa lisusu te, pe matoyi ya baoyo bayokaka ekoyoka. 4. Pe motema ya baoyo bazalaka mbangu-mbangu ekososola boyebi, pe lolemo ya baoyo bazali kolobaloba ekoloba nokinoki pe makambu ya polele. 5. Zoba-zoba akobengama lisusu mutu ya lokumu te, pe mutu ya lokoso akobengama mutu ya motema malamu te. 6. Po zoba-zoba alobaka makambu ya buzoba, pe motema na ye ekanisaka mabe pona kosalela ezaleli ya kozanga Nzambe pe koloba lokuta pona Yawe, pona kokomisa molimo oyo ezali na nzala pamba pe kolongola masanga epayi ya bato oyo bazali naposa ya komela. 7. Mokosi asalelaka mabe lokola ebundeli na ye; azali kokana mabe pona koboma batu ya bopolo na lokuta, ata tangu babola bazali koloba sembo. 8. Kasi mutu ya lokumu akanisaka makambu ya lokumu, pe atelemaka ngwi na makambu ya lokumu.

9. Telema, bino basi ya kimia, boyoka mongongo na ngai ! Bana basi oyo bofandi na kimia, bopesa matoyi na maloba na ngai: 10. Na mikolo ya mbula moko pe mikolo, okolenga, bino oyo bozali na kimia; po bobuki ya mbuma pona kosala vino esili, bosangisi bambuma ekoya te. 11. Bolenga, bino basi oyo bozali na kimia; boningana, bino oyo bomitungisaka te. Bolongola bilamba pe botikala bolumbu, pe bokanga basaki na loketo na bino. 12. Bakobeta mabele na bango na tina ya bilanga ya kitoko, na tina ya bilanga ya vino oyo ebotaka mbuma. 13. Nzube pe basende ekokola na mokili ya batu na ngai, likolo kutu na bandako nyonso ya kitoko ya engumba ya esengo. 14. Po ndako ya mokonzi esundolami, makelele ya mobulu ya engumba esundolami. Ofel (ngomba oyo ebatelami makasi) pe ndako molayi ya mokengeli ekozala mabulu pona libela, esengo pona ba-ane ya zamba, esika wapi ya bibwele pona kolia matiti, 15. Kino Molimo ekosopana likolo na biso wuta likolo, pe esobe ekokoma elanga oyo ebotaka mbuma, pe elanga oyo ebotaka mbuma ekotangama zamba. 16. Pe bosembo ekofanda na esobe, pe boyengebene ekofanda na elanga oyo ebotaka; 17. Pe mosala ya boyengebene ekozala kimia, pe mbuma ya boyengebene bopemi pe bondimi libela. 18. Pe batu na ngai bakofanda na esika ya kimia pe ya libateli, pe bisika ya bopemi ya kimia. 19. Pe mbula ya mabanga ya mabanga ekokweya na zamba, pe engumba ekozinda na kati ya libulu.

20. Esengo na bino oyo bozali kolona pembeni-pembeni ya mayi nyonso, bokotika makolo ya ngombe pe ya ane ekende bisika nyonso!

Mokapo 33

1. Mawa na yo, mobebisi, pe obebisamaki te, pe na yo moteki baninga, pe bateki yo  nanu te! Tangu  okosilisa kobebisa, okobebisama; tangu okosilisa koteka baninga, yo bakoteka yo.

2. Yawe, sala biso ngolu : tokotia elikia epayi na yo. Zala loboko na bango tongo nyonso, pe lobiko na biso na tangu ya pasi!

3. Na lokito ya makelele, batu bakimaki; tangu omitomboli, bikolo epalangani. 4. Pe biloko na bino ya bitumba ekobukana lokola makonki ezali kobuka mbuma; lokola makonki ezali kopumbwa-pumbwa, bakokweya mbangu likolo na yango.

5. Yawe atombolami; po afandi likolo; atondisi Siona na bosembo pe na boyengebene. 6. Pe ekozala libateli bosembo ya tangu na bino, bomengo ya lobiko, bwania pe boyebi. Bobangi ya Yawe ekozala bomengo na ye.

7. Tala, bilombe na bango ya mpiko bazali koganga wuta libanda, bamemi-sango ya kimia bazali kolela na bololo. 8. Banzela ekawuki; moleki nzela na nzela azali te. Abukaki boyokani, atioli bingumba, azali na limemia te pona mutu. 9. Mokili ezali kolela pe kolemba; Liban eyokani soni pe ekawuki; Sharon ekomi lokola esobe, pe Bashane na Karmele ekweyisi makasa na yango. 10. Sik'oyo, elobi Yawe, nakotelema; sik'oyo nakotombwama; sik'oyo namitombolami. 11. Bokozwa zemi ya matiti oyo ekawuki pe okobota matiti; pema na bino ekozala moto oyo ekozikisa bino. 12. Pe batu yango bakozala lokola mabanga ya kalkere na etumbeli oyo ezali kopela; lokola banzubɛ oyo bakata, bakozikisama na moto. 13 boyoka, bino baoyo bozali mosika, oyo nasalaki; pe boyeba nguya na ngai, bino oyo bozali penepene.

14. Basumuki bazali kobanga na Siona; kolɛnga ekangi batu mabe: Nani kati na biso akofanda na moto oyo ezozikisa? Nani kati na biso akofanda na kati ya moto ya seko? 15. Ye oyo azali kotambolaka na bosembo pe alobaka sembo, oyo aboyaka kanyaka, oyo azali koningisa maboko na ye po azwa kado te, oyo azali kokanga matoyi na ye pona koyoka te masolo ya makila, pe oyo akangi misu na ye pona komona mabe te. 16. Ye wana akofanda na likolo; mabanga makasi ya mabanga ekozala esika na ye ya komibatela; lipa na ye ekopesamela ye, ba mayi na ye ekozanga te. 17. Misu na yo ekomona Mokonzi na kitoko na ye; bakomona mboka oyo ezali mosika. 18. Motema na yo ekokanisa na tina ya bobangi: Mokomi ya mikanda azali wapi? Oyo peza kilo azali wapi? Oyo  atangaka bandako milayi azali wapi? 19. Okomona lisusu batu ya lolendo te, batu oyo elobeli na bango ezali molili pona koyoka bango, oyo lolemo na bango ezali kotiola po bokanga tina te.

20. Tala Siona, engumba ya mayangani na biso ya lokumu! Misu na yo ekomona Yerusaleme, esika ya kofanda ya kimia, ndako ya kapo  oyo ekomemama te; ba makonzi na yango ekopikolama soko moke te, pe singa na yango moko te ekokatana; 21. Kasi kuna Yawe azali kembo pona biso, esika ya bibale, ya bibale minene; masuwa moko te ya kopumbwa ekoya kuna, masuwa moko te ya lokumu ekoleka na kati na yango.  22. Po Yawe azali mosambisi na biso, Yawe azali mopesi-mibeko na biso, Yawe azali mokonzi na biso; akobikisa biso. 23. Basinga na yo elembi; bazosimba makasi te makonzí ya masuwa na bango, bakofungolaka vwale ya masuwa te. Bakokabola biloko oyo epunzami mingi, batengu-tengu bapunzi biloko oyo bapunzaki ; 24. Pe mofandi akoloba te: Nazali na maladi ; mabe ya batu oyo bafandi kuna ekolimbisama.

Mokapo 34

1. Bopusana, bikolo, pona koyoka; pe bino batu, botia likebi! Tika ete mabele eyoka, pe nionso oyo ezali na kati, mokili pe nionso oyo ezali na kati. 2. Po kanda ya Yawe ezali likolo ya bikolo nyonso, pe kanda na ye likolo ya mapinga na bango nyonso. Akabi bango na libebi; apesi bango na kobomama. 3. Pe babomi na bango bakobwakama mosika, pe solo mabe ya bibembe na bango ekomata; pe bangomba ekopanzana na kosopana na makila na bango. 4. Pe mapinga nyonso ya likolo epanzani na konyangwana, pe likolo ezingamaki lokola buku, pe mapinga na yango nyonso ekweyaki lokola kasa oyo ezali kokawuka pe kokweya na nzete ya vino, pe lokola oyo ekawuki pe ekweyi na nzete ya figi. 5. Po mopanga na ngai elangwe na likolo : tala, ekokita likolo ya Edome pe likolo ya batu oyo nakabi na bobebisami. 6. Mopanga ya Yawe etondi na makila; ezali ya kotiama mafuta, na makila ya bana ya mpate pe ya bantaba, na mafuta ya rin ya bameme; po Yawe azali na mbeka na Botshira, pe kobomama monene na mokili ya Edome. 7. Pe bampakasa bakokita elongo na bango, pe bana bangombe mibali elongo na banyama ya nguya; pe mokili na bango ekotonda na makila, pe putulu na bango ekotonda na mafuta. 8. Po ezali mokolo pona Yawe kozongisa mabe, mobu ya lifuti pona tina ya Siona.

9. Pe bibale na ye ekobongwana libulu, pe mputulu na yango ekokoma sufre, pe mokili na yango ekokoma libulu oyo ezali kozika; 10. Ekokufa te butu to moyi, milinga na yango ekomata libela; wuta libota kino libota mosusu ekozala esobe; mutu moko te akoleka na kati na yango libela. 11. Ndeke Pelikan na ndeke bitor bakozwa libula na yango, pe ndeke Ibu na ndeke korbo bakofanda kuna. Pe akosembola likolo na ye singa ya eloko te pe mabanga ya pamba.12. Batu na yango ya lokumu bazali na mutu moko te pona kosakola bokonzi, pe bakonzi na yango nyonso bakomi eloko pamba. 13. Banzube ekokola na bandako na yango ya minene, basende pe banzete ya nzube na bandako makasi na yango; pe ekozala esika ya kolala pona bambwa ya zamba, esika ya kobombama pona ba otrishe. 14. Banyama ya esobe bakokutana kuna na bambwa ya zamba, pe ntaba ya zamba ekobelela molongani na ye. Kuna pe Lilith akopema pe akokuta esika na ye ya kofanda ya kimia. 15. Kuna, nioka ekosala zala na ye pe ekobwaka maki, ekobimisa bana ya sika pe ekosanganisa bana na ye na se ya elili na ye; kuna pe bavoturu bakoyangana moko na mosusu. 16. Boluka na buku ya Yawe pe botanga. Ata moko te kati na bango akozanga, moko te akoluka mosusu; po monoko na ngai epesi yango mitindo, pe Molimo na ngai asangisi bango esika moko; 17.  Pe ye  abwaki zeke pona bango, pe loboko na ye ekabolaki yango pona bango na singa: bakozwa yango pona libela; bakofanda kati na yango wuta libota na libota.

Mokapo 35

1. Esobe pe mabele ya kokawuka ekosepela; esika ya matiti ya kokawuka oyo ezali na matiti ya kitoko na banzete mingi te ekosepela pe ekobimisa lokola roze; 2. Ekobimisa fololo mingi pe ekosepela, solo, ekoyemba na esengo pe ekoyemba na mongongo makasi. Kembo ya Liban ekopesamela ye, kembo ya Karmele pe ya Sharon; bakomona kembo ya Yawe, kongala ya lokumu ya Nzambe na biso. 3. Bokembisa maboko oyo elembi pe bopesa makasi na  mabɔlongo oyo elembi. 4. boloba na baoyo mitema ezali kobanga: Bozala na makasi, bobanga te; tala Nzambe na bino: kozongisa mabe likolo na mabe ezali koya, na lifuti ya Nzambe! Ye moko akoya kobikisa bino.

5. Bongo misu ya bakufi miso ekomona, pe matoyi ya bakufi matoyi ekofungwama. 6. Bongo tengu-tengu akopumbwa lokola mboloko, pe lolemo ya baba ekoyemba na esengo. Po mayi ekobima na kati ya esobe, pe bibale ekobima na esika ya matiti ya kokawuka oyo ezali na matiti ya kitoko na banzete mingi te. 7. Pe mabele oyo ezali moto makasi ekokoma liziba, pe mabele ya kokawuka ekokoma ba laki; na kati ya efandelo ya mbwa ya zamba esika azalaki kolala, ekozala na matiti pe banzete oyo ebotaka na mayi pe na papirisi. 8. Pe ekozala wana na nzela moko ya monene pe nzela moko kuna, pe ekobengama Nzela ya Bosantu. Mutu ya mbindo akoleka wana  te, kasi ekozala pona bango wana. Baoyo bazali kotambola na nzela oyo, ata bazoba, bakobunga nzela te. 9. Nkosi akozala wana te, pe nyama moko te ya mabe ekomata kuna to ekomonana kuna, kasi basikolami bakotambola kati na yango. 10. Pe baoyo ya Yawe asikoli bakozonga pe bakoya na Siona elongo na banzembo ya elonga; pe esengo ya suka te ekozala likolo ya mitu na bango; bakozwa kosepela pe esengo, kasi mawa pe kolela ekokima mosika.

Mokapo 36 1. Pe ekomaki na mbula ya zomi na mineyi ya Bokonzi izIkiyas, Senakeribe mokonzi ya Asuria amataki kobundisa bingumba nyonso oyo ebatelami makasi ya Yuda pe abotolaki yango. 2. Pe mokonzi ya Asuria atindaki Rabashake (mokonzi monene ya basoda) longwa na Lakisi na Yerusaleme epayi ya Mokonzi Izikiya elongo na basoda mingi; pe atelemaki pembeni ya nzela ya mayi ya likolo, na nzela ya elanga ya mutu oyo asokolaka bilamba.

3. Bongo Eliyakime mwana ya Ilikiya, oyo azalaki likolo ya ndako ya mokonzi, na Shebena mokomeli, na Yoa mwana ya Azafe, mobombi ya mikanda ya kala, babimaki epayi na ye. 4. Pe Rabashake (mokonzi monene ya basoda) alobaki na bango: Nabondeli bino, bolobá na Izikiya ete: ‘Mokonzi monene, mokonzi ya Asuria alobi boye: Elikya nini ozali na yango? 5. Nalobi, Olobi: ezali kaka maloba ya mbebu : mabongisi pe makasi ezali pona etumba. Sik'oyo, ozali kotiela nani motema ete otombokela ngai? 6. Tala, ozali kotia motema na lisungi ya nzete ya rozo oyo ebukani, na Ejipito, oyo, soki mutu moko atie motema na yango, oyo atobolaka loboko oyo etieli ye elikia. Farao mokonzi ya Ejipito azali bongo pona baoyo nyonso batielaka ye motema. 7. Ete soki olobi na ngai : Biso, tozali kotiela Yawe Nzambe na biso motema, ezali te ye oyo Izikiya alongolaki bisika na ye ya likolo pe bitumbelo na ye, alobaki na Yuda pe Yerusaleme : Bokogumbamela liboso ya etumbelo oyo? 8. Pe sik'oyo, nabondeli yo, bosala boyokani na nkolo na ngai mokonzi ya Asuria, pe nakopesa yo bapunda nkoto mibale soki bokoki kopesa bamemi punda pona komata na yango. 9. Pe ndenge nini okokoka kobalusa elongi na guvernere moko, ya basaleli ya moke ya nkolo na ngai? Pe ozali kotiela Ejipito motema pona bashar pe baoyo batambolaka na punda... 10. Pe sik'oyo, ngai namati na mboka eye na Yawe te pona kobebisa yango? Yawe alobi na ngai: Mata kobundisa mboka oyo pe bebisa yango.

11. Bongo Eliyakime, Shebena pe Yoa balobaki na Rabashake: Tobondeli yo, lobela basaleli na yo na monoko ya Arameyin, po tososoli yango, pe koloba na biso na monoko ya Bayuda te na matoyi ya batu oyo bazali likolo na mir molayi. 12. Bongo Rabashake alobi: nkolo na ngai atindi ngai epayi ya nkolo na yo pe epayi na yo pona koloba maloba oyo? Ezali te epayi ya batu oyo batelemi na mir ya molayi, pona baliya nyei na bango pe bamela masuba na bango elongo na bino?

13. Bongo Rabashake atelemaki pe agangaki na mongongo makasi na monoko ya Bayuda: Boyoka maloba ya mokonzi monene, mokonzi ya Asuria. 14. Boye Mokonzi alobi: Botika te Izikiya akosa bino, po akokoka kobikisa bino te. 15. Pe botika te ete Izikiya andimisa bino ete botiela Yawe motema, na koloba: Yawe akokangola biso penza; engumba oyo ekopesama te na loboko ya mokonzi ya Asuria. 16. Boyoka Izikiya te; po boye mokonzi ya Asuria alobi: Bosala kimia (lipamboli) na ngai pe bobima epayi na ngai. Pe bokoliya moko na moko na nzete na ye ya vino pe moko na moko ya nzete na ye ya figi, pe bokomela moko na moko mayi ya libulu na ye; 17. Kino nakoya pe nakozwa bino pona komema bino na mboka moko lokola mboka na bino, mboka ya ble pe ya vino ya sika, mboka ya lipa pe ya bilanga ya vino. 18. Kotika te ete Izikiya akosa bino na koloba: Yawe akokangola biso. Banzambe ya bikolo bsilaki kokangola moko na moko mboka na ye na loboko ya mokonzi ya Asuria? 19. Bazali wapi banzambe ya Amate na Arpade? Bazali wapi banzambe ya Sefaravayime bazali wapi? Pe bakangolaki Samaria na loboko na ngai? 20. Nani kati banzambe nyonso ya bamboka oyo bakangolaki bamboka na bango na loboko na ngai, ete Yawe akangola Yerusaleme na loboko na ngai? 21. Bongo bafandaki kimia pe bayanolaki ye ata liloba moko te, po yango ezalaki motindo ya mokonzi ete: Bokoyanola ye te.

22. Bongo Eliyakime mwana ya Ilikiya, oyo azalaki likolo ya ndako, na Shebena mokomeli, na Yoa mwana ya Azafe, mobombi ya mikanda ya kala, bakendaki epayi ya Izikiya pe bilamba na bango epasuka, pe bayebisaki ye maloba ya Rabashake.

Mokapo 37

1. Pe esalemaki ete, tangu mokonzi Izikiya ayokaki yango, apasolaki bilamba na ye, pe amizipaki na saki, pe akotaki na ndako ya Yawe. 2. Pe atindaki Eliyakime, oyo azalaki likolo ya ndako, pe Shebena mokomeli, pe bampaka ya banganga-Nzambe, balati bilamba ya saki, epayi ya profete Izaya, mwana ya Amoze. 3. Pe balobi na ye: Izikiya alobi boye: Mokolo oyo ezali mokolo ya pasi pe ya etumbu pe ya kotiolama; po bana baye kino kobotama, pe makasi ezali te pona kobota. 4. Mbala mosusu Yawe Nzambe na yo akoyoka maloba ya Rabashake, oyo nkolo na ye mokonzi ya Asuria atindi pona kofinga Nzambe ya bomoi, pe Yawe Nzambe akopesa etumbu na maloba oyo ayoki. Yango wana, tombola libondeli pona batikali oyo bazali nanu.

5. Basali ya Mokonzi Izikiya bayaki epayi ya Izaya. 6. Pe Izaya alobi na bango: Bokoloba boye na nkolo na bino: Yawe alobi boye: kobanga te na tina maloba oyo oyoki, oyo basali ya mokonzi ya Asuria bafingi ngai. 7. Tala ngai, nakotia elimo moko kati na ye, pe akoyoka sango pe akozonga na mboka ya ye moko, pe nakokweyisa ye na mopanga na mboka ya ye moko.

8. Pe Rabashake azongaki pe akutaki mokonzi ya Asuria azali kobunda na Libina, po ayokaki ete akendaki na Lakisi. 9. Pe ayokaki na tina na Tiraka mokonzi ya Etiopie ete: Abimi pona kobundisa yo. Tangu ayokaki yango, atindaki bamemi-sango epayi ya Izikiya, koloba : 10. Bokoloba boye na Izikiya mokonzi ya Yuda: Tika ete Nzambe na yo, oyo ozali kotiela motema, akosa yo te, na koloba ete Yerusaleme ekokabama te na loboko ya mokonzi ya Asuria. 11. Tala, oyokaki nini bakonzi ya Asuria basalaki epayi ya bikolo nionso, kobebisaka bango penza; pe yo, okokangolama! 12. Banzambe ya bikolo oyo batata na ngai babebisaki nde bakangolaki bango, Gozane, Arane, Rezefe, pe bana mibali ya Edene oyo bazalaki na Telasare? 13. Wapi mokonzi ya Amate, pe mokonzi ya Arpade, pe mokonzi ya engumba ya Sefaravayime, ya Hena pe ya Iva?

14. Pe Izikiya azwaki ba letre yango na loboko ya bamemi-sango pe atangaki yango. Amataki na ndako ya Yawe, pe Izikiya atandaki yango liboso ya Yawe. 15. Pe Izikiya abondelaki epayi ya Yawe na koloba: 16. Yawe ya mapinga, Nzambe ya Israel, oyo ofandi na kati ya bakeruba, yo moko, ozali ndenge moko, yo moko ozali Nzambe ya ba bokonzi nyonso ya mabele; yo nde osala likolo na mabele. 17. Yawe, tia litoyi na yo pe yoka. Yawe, fungola misu na yo pe tala; pe yoka maloba nyonso ya Senakeribe, oyo atindaki pona kofinga Nzambe ya bomoi. 18. Ezali solo, Yawe, bakonzi ya Asuria babebisi bamboka nyonso pe mabele na bango. 19. Pe babwaki banzambe na bango na kati ya moto; po bazalaki banzambe te, kasi mosala ya maboko na batu, mabaya pe mabanga; pe babebisaki yango. 20. Pe sik'oyo, Yawe Nzambe na biso, bikisa biso na loboko na ye, po ete ba bokonzi nyonso ya mabele bayeba ete yo moko ozali Yawe.

21. Pe Izaya mwana ya Amoze atindaki epayi ya Izikiya, koloba: boye elobi Yawe, Nzambe ya Israel: Po na libondeli oyo obondelaki ngai na tina ya Senakeribe, mokonzi ya Asuria; 22. Yango oyo liloba oyo Yawe alobi po na ye: Ngondo mwasi, mwana mwasi ya Siona akotiola yo pe akoseka yo; mwana mwasi ya Yerusaleme aningisi moto na ye na sima na yo. 23. Nani yo ofingi pe otioli? Pe otomboli mongongo na yo pona kotelemela nani? Otomboli misu na yo likolo pona kotelemela Mosantu ya Israel. 24. Na nzela ya basali na yo ofingi Nkolo, pe olobi: Na ebele ya bashar na ngai, namati na likolo ya bangomba, na bisika oyo eleki mosika na Liban, pe nakokata banzete na yango ya sedre milayi, banzete na yango ya sapin oyo eleki malamu, pe nakokoma kino na suka ya songe na yango oyo eleki likolo, na elanga na yango oyo ebotaka. 25. Ngai, natimbolaki pe namelaki mayi; pe nakawukisaki na se ya makolo na ngai bibale nyonso ya Ejipito. 26. Boyokaki te ete nasalaki yango wuta kala, pe ete nasalaki yango banda mikolo ya kala? Sik'oyo nasali yango ekoma, po obebisa bingumba oyo ebatelami makasi ekoma lokola bitunga ya mabanga. 27. Pe bafandi na yango bazali na loboko mokuse, babangaki na somo, pe bazali na soni; bakomaki matiti ya bilanga pe matiti ya motane, matiti na likolo ya bandako pe molona oyo ekawukaka liboso ete ekoma na lititi na yango. 28. Po nayebi esika na yo ya kofanda, kobima na yo pe kokota na yo, pe kanda na yo epayi na ngai. 29. Lokola otondi na kanda pona ngai, pe lolendo na yo emati na matoyi na ngai, nakotia lopete na ngai na zolo na yo pe mokaba na ngai na kati ya mbebu na yo, pe nakozongisa yo na nzela oyo oyaki.

30. Pe oyo ekozala elembo pona yo: Mbula oyo bakolia biloko oyo ebimaka na mbuma oyo ekweyi, pe na mbula ya mibale oyo ekokola yango moko. Pe na mbula ya misatu, bokolona pe bokobuka mbuma, pe bokolona bilanga ya vino pe bokolia mbuma na yango. 31. Pe baoyo batikali na batikali ya ndako ya Yuda ekozwa misisa lisusu na se pe ekobota mbuma na likolo. 32. Po na Yerusaleme baoyo batikali bakobima, pe na Ngomba ya Siona oyo babiki bakobima. Bolingo molende ya Yawe na mapinga ekosala bongo.

33. Yango wana Yawe alobi boye pona mokonzi ya Asuria: Akokota na engumba oyo te, pe akobeta likonga te; akoya liboso na yango te na nguba, pe akotombola mabele te liboso na yango. 34. Na nzela oyo ayaki, na yango akozonga, pe akokota na engumba oyo te, yango nde liloba ya Yawe. 35. Pe nakobatela engumba oyo, pona kobikisa yango, na tina na ngai moko, pe na tina ya David mosali na ngai.

36. Bongo anjelu ya Yawe abimaki pe abomaki mibali nkoto kama moko na tuku mwambe na mitanu (185 000) na kati ya kaa ya Asuria; pe tangu balamukaki na tongo, tala, bango banso bazalaki bibembe ya bakufi. 37. Bongo Senakeribe mokonzi ya Asuria alongwaki pe akendaki pe azongaki, pe afandaki na Ninive. 38. Pe esalemaki ete tangu agumbamaki na ndako ya Nisroke nzambe na ye, Adrameleke na Sazerere, bana na ye ya mibali, babomaki ye na mopanga; pe bakimaki na mboka ya Ararati; pe Ezaradone, mwana na ye ya mobali, akomaki mokonzi na esika na ye.

Mokapo 38

1. Na mikolo wana, Izikiya azalaki maladi oyo ekoboma; pe profete Izaya, mwana ya Amoze, ayaki epayi na ye pe alobaki na ye: Yawe alobi boye: pesa mitindo na ndako na yo, po okokufa pe okobika te.

2. Bongo Izikiya abalusaki elongi na ye epayi ya mir pe abondelaki Yawe. 3. Pe alobaki: Nabondeli yo, Yawe, kobosana te ete natambolaki liboso na yo na solo pe na motema ya kokoka, pe nasalaki oyo ezali malamu na misu na yo. Pe Izikiya alelaki na kolela makasi mingi.

4. Bongo liloba ya Yawe eyaki epayi ya Izaya, koloba : 5. Kende koyebisa Izikiya ete: Tala oyo Yawe, Nzambe ya Davidi tata na yo alobi: Nayoki libondeli na yo pe namoni pinzoli na yo; tala, ngai nakobakisela yo mbula zomi na mitanu na mikolo na yo. 6. Pe nakokangola yo na engumba oyo na loboko ya mokonzi ya Asuria pe nakobatela engumba oyo. 7. Oyo ekozala elembo pona yo oyo ewuti na Yawe, po Yawe akokokisa liloba na ye oyo alobaki. 8. Tala, ngai, nakozongisa sima na degre zomi elili ya degre oyo ekitaka na moyi na kadran ya Akaze. Pe moyi ezongi sima na kadran ya degre zomi na esika akitaki.

9. Ekomeli na Izikiya, mokonzi ya Yuda, tangu azalaki na maladi pe abikaki na maladi na ye.

10. Ngai, nalobaki: Na katikati ya mikolo na ngai nakokende na bikuke ya sheol; Nakozanga bambula na ngai oyo etikali. 11. Nalobaki: Nakomona Yah te, Yah na mokili ya batu ya bomoyi! Nakomona lisusu mutu te elongo kati na bafandi ya mokili. 12. Mikolo ya bomoyi na ngai esili kokende pe elongolami na ngai lokola ndako ya kapo ya mobateli ya mpate. Nakati bomoyi na ngai lokola mosali bilamba; akokabola ngai na suki; wuta moyi kino butu, okosilisa na ngai. 13. Nazwaki molimo na ngai ti na tongo; lokola nkosi, bongo abukaki mikuwa na ngai nyonso. Kobanda tongo ti na butu, okosilisa na ngai!... 14. Lokola irondele, lokola mwano, bongo nazalaki koyimayima, nazalaki kolela lokola ebenga; misu na ngai elembisamaki pe etalaki likolo. Nkolo, koniokolama pona ngai; bikisa ngai. 15. Nakoloba nini? Alobi na ngai, pe ye asali yango. Nakokende kimia mibu na ngai nyonso, na bololo ya molimo na ngai. 16. Nkolo, na nzela makambu oyo mutu azali na bomoyi, pe na makambu oyo nyonso ezali na bomoyi ya molimo na ngai. Pe ozongisi ngai nzoto kolongono, pe ozongisi ngai na bomoyi, 17. Tala, na esika ya kimia nazalaki na pasi ya bololo likolo ya bololo ya ngai ; kasi yo, otombolaki molimo na ngai na bolingo na libulu ya libebi ; po obwaki masumu na ngai nyonso sima ya mokongo na yo. 18. Po ezali te Sheol ekokumisa yo, pe liwa ekoyembela yo masanzoli te ; baoyo bakokita na libulu bakozela lisusu te bosolo na yo. 19. Mutu ya bomoyi, mutu ya bomoyi, akosanzola, ndenge nazali kosala lelo ; tata akoyebisa bana ye bosolo na yo. 20. Yawe alingi kobikisa ngai ; pe tokobeta bibetelo na miziki na mikolo nyonso ya bomoyi na biso, na kati ya ndako ya Yawe.

21. Pe Izaya alobaki : Bakamata liboke ya figi pe botia yango lokola kisi ya pota likolo ya batofina, po ete abika.  22. Pe Izikiya alobaki : Elembo nini ekomonisa ete nakomata na ndako ya Yawe ?

Mokapo 39

1. Na tangu wana, Merodake-baladane, mwana ya Baladan, mokonzi ya Babilone, atindaki ba letre pe likabo epayi Izikiya mokanda, po ayokaki ete azalaki na maladi pe sik'oyo azongeli makasi. 2. Pe Izikiya asepelaki komona bango pe alakisaki bango ndako na ye ya bomengo : palata na wolo, biloko ya solo kitoko pe mafuta ya motuya, ebombelo na ye nyonso ya bibundeli pe biloko nyonso oyo ezalaki na bibombelo na ye ya bozwi. Ezalaki na eloko moko te na ndako na ye to na bakonzi na ye nionso oyo Izikiya alakisaki bango te.

3. Bongo profete Izaya ayaki epai ya Mokonzi Izikiya pe alobaki na ye: Nini batu oyo balobaki? Pe bawutaki wapi? Izikiya alobaki: Bayaki epayi na ngai longwa na mboka mosika, longwa na Babilone. 4. Pe atunaki : Bamoni nini na ndako na yo? Pe Izikiya alobi: Bamoni biloko nyonso oyo ezali na ndako na ngai; ezali na eloko moko te kati na biloko na ngai ya motuya oyo nalakisaki Bango te. 5. Bongo Izaya alobi na Izikiya: Yoka liloba ya Yawe ya mapinga : 6. Tala, mikolo ezali koya, tangu nionso oyo ezali na kati ya ndako na yo, pe nionso oyo batata na yo babombi kino lelo, ekomemama na Babilone; eloko moko te ekotikala, elobi Yawe. 7. Pe bakomema bana na yo ya mibali, oyo bakobima kati na yo, oyo obotaki, pe bakozala bana misala na ndako ya mokonzi ya Babilone. 8. Pe Izikiya alobi na Izaya: Liloba ya Yawe oyo olobi ezali malamu.Bongo alobi: Po ete kimia mpe bobatelami ekozala na mikolo na ngai.

Mokapo 40

1. Bobondisa, bobondisa batu na ngai, elobi Nzambe na bino. 2. Boloba na motema ya Yerusaleme pe bogangela ye ete tangu na ye ya misala ya pasi ekokisami, ete mabe na ye elimbisami; po azwaki na loboko ya Yawe mbala mibale pona masumu na ye nyonso.

3. Mongongo ya ye oyo azali koganga : Na kati ya esobe, bobongisa nzela ya Yawe, na esika ebotaka te bosembola nzela monene pona Nzambe na biso. 4. Lobwaku nyonso ekotondisama, pe ngomba nyonso ya milayi pe ngomba nyonso ya mike ekokita; pe bisika oyo etengama ekosembola, pe bisika ya mabe ekokoma etando malamu. 5. Pe kembo ya Yawe ekomonisama, pe misuni nyonso bakomona yango elongo; po monoko ya Yawe elobaki.

6. Mongongo moko elobi: Boganga. Pe alobi: Nakoganga nini? Misuni nyonso ezali matiti, pe kitoko na yango nyonso lokola fololo ya elanga. 7. Matiti ekawuki, fololo ekawuki; po pema ya Yawe efuli likolo na yango. Ya solo batu bazali matiti. 8. Matiti ekawuki, fololo elembi, kasi liloba ya Nzambe na biso ewumelaka libela.

9. Siona, momemi sango malamu, mata na ngomba moko molayi; tombola mongongo na yo na makasi, Yerusaleme, momemi ya sango malamu: tombola yango, kobanga te; loba na bingumba ya Yuda: Ye oyo Nzambe na bino! 10. Botala, Nkolo Yawe akoya na nguya, pe loboko na ye ekokonza pona ye: tala, lifuti na ye ezali elongo na ye, pe mbano na ye liboso na ye. 11. Akoleyisa etonga na ye lokola mobateli ya mpate; na nzela ya loboko na ye akosangisa bana ya mpate pe akomema yango na ntolo na ye; pe akotambwisa na malembe baoyo bazali nanu komela mabele.

12. Nani ameziraki mayi na libulu ya loboko na ye, to abongisa likolo na misapi, to ameziraki putulu ya mabele na kati ya katini? Nani ameki kilo na bangomba na balansi, to bangomba mike na balansi? 13. Nani akambaki Molimo ya Yawe, pe alakisi ye lokola mutu ya mabongisi na ye? 14. Elongo na nani bakataki likambu, pe apesi ye bososoli, pe alakisaki ye nzela ya boyengebene, pe alakisaki ye boyebi, pe ayebisaki ye nzela ya mayele? 15. Tala, bikolo bitalelami lokola litanga ya katini, pe lokola putulu ya balansi; Tala, alongoli bisanga lokola putulu penza ya moke. 16. Pe Liban ekoki te pona moto, pe banyama na yango ekoki te pona likabo ya kotumba. 17. Bikolo nyonso ezali lokola eloko te liboso na ye; batalelami na ye lokola moke koleka eloko te pe eloko pamba.

18. Bongo na nani bokokokanisa *Nzambe? Pe na elilingi nini bokokokana na ye? 19. Mosali ya maboko anyangwisaka ekeko, pe mosali ya wolo apakolaka wolo likolo na yango pe atiakaka miniololo ya palata. 20. Ye oyo azali mobola pona kobonza likabo, aponaka nzete oyo ekopola te; alukaka mosali oyo ayebi mosala ya maboko po asala ekeko oyo eyemami oyo ekoningana te. 21. Boyebi te? Boyokaki te? Yango esakolamaki epayi na bino wuta ebandeli te? Bososoli te fondatio ya mabele? ... 22. Ezali Ye oyo afandi likolo ya serkle ya mabele, pe bafandi na yango bazali lokola makonki, oyo atamboli likolo lokola rido pe atandi yango lokola ndako ya kapo pona kofanda na kati; 23. Ye oyo akimosi bakonzi na yango eloko pamba, oyo azali kokomisa basambisi ya mabele lokola eloko oyo ezali te. 24. Balonami ata te, bakolonama kutu te, tije na yango ekozwa misisa ata na mabele te, liboso ete apumbwa likolo na yango, pe ekokawuka, pe mopepe makasi ekokombola bango lokola matiti ekawuka. 25. Bongo bokokokanisa ngai na nani, pe bokokokana na ngai? Elobi Mosantu.

26. Botombola misu na bino likolo pe botala! Nani akelaki biloko yangoo, ye oyo abimisi lipinga na bango na motango? Abengaka bango nyonso na kombo. Na monene ya nguya na ye pe na makasi na ye ya nguya, moko te azali kozanga. 27. Pona nini olobi, Yakobo, pe okoloba, Israel, Nzela na ngai ebombami liboso ya Yawe, pe lotomo na ngai ebombami liboso ya Nzambe na ngai?' 28. Oyebi te, oyoki te ete Nzambe ya seko, Yawe, Mozalisi ya suka ya mabele, apemaka te pe alembaka te? Moko te akoki kokundola bozindo ya mayele na ye. 29. Apesaka makasi na ye oyo alembi, pe abakisaka makasi na ye oyo azali na bolembu. 30. Bilenge mibali basilaka makasi pe bakolemba nzoto, pe bilenge mibali bakobeta mabaku pe bakokweya na mabaku. 31. Kasi baoyo bazali kozela Yawe bakozongisa makasi na bango; Bakopumbwa na mapapu lokola mpongo; bakopota mbangu pe bakolemba te, bakotambola pe bakosila makasi te.

Mokapo 41

1. Bofanda nye liboso na ngai, bisanga ; pe tika ete batu ya mboka bazongisa makasi na bango sika! Tika bapusana penepene; bongo tika bango baloba! Topusana elongo na kosambisama! 2. Nani, wuta na esti alamusaka Ye oyo bosembo etambolaka elongo na matambe na ye? Akabaka bikolo liboso na ye pe atiaki bakonzi na se na ye. Akomisaki bango lokola putulu na mopanga na ye, pe na likonga na ye lokola matiti ekawuka oyo mopepe ebengani. 3. Alandaki bango; alekaki na kimia na nzela moko esika makolo na ye ekendeki te. 4. Nani asalaki pe asali boye, kobenga mabota wuta ebandeli? Ngai, Yawe, mutu ya liboso, pe elongo na baoyo bazali ya suka, nazali lolenge moko.

5. Bisanga bamonaki yango pe balengaki, suka ya mabele eninganaki; bapusanaki penepene pe bayaki. 6. Basalisanaki mutu na mozalani na ye, pe alobaki na ndeko na ye: Zala makasi. 7. Pe mosali akembisaki moniangoli wolo; mosemboli bibende na marto akolendisa mobeti na etutelo, kolobaka na sudire : Ezali malamu. Pe akokembisa yango na basete po ete eningana te.

8. Pe yo Israel, mosali na ngai, Yakobo, oyo ngai napona, bakitani ya Abrayam, moninga na ngai, 9. Yo, oyo nazwaki na suka ya mokili, pe nabengi yo wuta na suka ya ndelo, pe nalobi na yo : mosali na ngai, naponi yo pe nabwakaki yo te ; 10. Kobanga te, po nazali na yo ; komitungisa te, po ngai nazali Nzambe na yo. Nakokembisa yo ; ee, nakosunga yo ; ee, nakosimba yo na loboko na ngai ya mobali ya sembo. 11. Tala, bakozala na soni pe bakosambwa baoyo nyonso bakolawukela yo; bakozala lokola eloko pamba, pe baoyo bazali kowelana na yo bakokufa. 12. Okoluka bango, kasi okomona bango te, baoyo bazali kowelana na yo ; baoyo bakobundisa na yo bakozala lokola eloko pamba pe lokola eloko oyo ezali te. 13. Po ngai, Yawe Nzambe na yo, nasimbi loboko na yo ya mobali ; Nalobi na yo : Kobanga te, nakosalisa yo.

14. Kobanga te, yo Yakobo, motiopi ya muke, batu ya Israel ! Ngai nakosalisa yo, elobi Yawe, pe Mosikoli na yo, Mosantu ya Israel. 15. Tala, nakomisi yo mbeli ya sika ya kotuta mbuma, mbeli ya kotuta oyo ezali na mino mibale, oyo ezali makasi pe ya sika : okotuta bangomba pe okokmisa yango putulu, pe okokomisa bangomba mike lokola matiti ekawuka ; 16. Okopanza bango, pe mopepe ekomema bango, pe mopepe makasi ekopanza bango. Pe yo okosepela na Yawe, pe okokumisa Mosantu ya Israel.

17. Bakeleli pe babola bakoluka mayi, kasi ezali te ; minoko na bango ekawuki naposa ya mayi : Ngai, Yawe, nakoyanola bango, Ngai Nzambe ya Israel, nakosundola bango te. 18. Nakofungola bibale esopana na bisika oyo ekawuka pe maziba na katikati ya mabwaku ; Nakobongola esobe na liziba ya mayi, pe mabele ya kokawuka na maziba oyo ezali kosopana. 19. Na kati ya esobe nakokolisa nzete ya sedre, ya akasia, ya mirte pe ya olive; Nakotia nzete ya sipres, ya pine, pe nzete ya bwisi na esika moko na esika oyo ebotaka te ; 20. Po ete bomona pe bayeba pe batalela pe basosola elongo ete loboko ya Yawe nde esali boye, pe Mosantu ya Israel akelaki yango.

21. Bobimisa likambu na bino, elobi Yawe; bomema awa matatoli na bino, elobi mokonzi ya Yakobo. 22. Tika ete bamema yango, pe bayebisa biso nini ekosalema. Boyebisa  biso makambu oyo ya liboso, ndenge yango ezali po totalela yango pe toyeba suka ; to yebisa biso oyo ekoya. 23. Yebisa biso makambo oyo ekoya na sima, po tokoyeba ete bozali banzambe ; ee, bosala malamu pe bosala mabe, po ete totalela pe tomona yango elongo. 24. Tala, bozali moke koleka eloko te, pe mosala na bino ezali eloko te ; oyo aponi bino azali eloko ya kele. 25. Nalamusi ye na nor, pe akoya, wuta na kobima ya moyi, ye oyo azali kobelela kombo na ngai. Akotambola koniata bankumu lokola likolo ya potopoto, pe lokola mosali-mbeki aniataka mabele ya potopoto. 26. Nani asakolaki yango wuta ebandeli, po toyeba pe toloba yango liboso ete : Ezali sembo ? Te, ezali na moko te akosakola yango ; te, ezali na moko te oyo azali koyokisa yango ; te, azali na moko te akoyoka maloba na bino. 27. Ya Yambo, nalobaki na Siona: Tala, tala bango ! pe na Yerusaleme : Nakotinda momemi-sango ya sango malamu ! 28. Pe natalaki, pe ezalaki na mutu moko te—ata na kati na bango—to mopesi toli moko te, pona kotuna bango pe kozwa eyano wuta na bango. 29. Tala, bango nyonso bazali pamba ; misala na bango ezali eloko te ; bikeko na bango ya bibende oyo etumbama na moto ezali mopepe pe pamba.

Mokapo 42

1. Tala mosali na ngai, oyo nazali kosimba, moponami na ngai, oyo molimo na ngai emoni kosepela na ye. Nakotia Molimo na ngai likolo na ye; akobimisa bosambisi pona bikolo. 2. Akoganga te, pe akotombola mongongo na ye te, pe akoyokisa yango na balabala te. 3. Akobuka te nzete ya kolemba oyo ebukani, akoboma te singa ya mwinda oyo ezali kopela moke moke. Akobimisa bosambisi pona solo. 4. Akolemba te, pe akopota mbangumbangu te ti tangu akotia boyengebene awa na mabele; pe bisanga ekozela mobeko na ye.

5. Boye elobi *Nzambe, Yawe, oyo akela likolo pe atanda yango, oyo atanda mabele pe mbuma na yango, oyo apesi pema na batu oyo bazali likolo na yango pe elimo epayi na baoyo batambolaka likolo na yango. 6. Ngai, Yawe, nabengi yo na kati ya  boyengebene; pe nakosimba loboko na yo pe nakobatela yo. Nakopesa yo pona ozala boyokani ya batu, pona ozala mwinda pona bikolo; 7. Pona ofungola misu ya bakufi misu, pona obimisa mokangami libanda ya boloko, pe obimisa na kasho baoyo bafandi na molili. 8. Ngai nazali Yawe: yango nde kombo na ngai; pe nakopesa kembo na ngai na mosusu te, to masanzoli na ngai na bikeko te. 9. Tala, makambo ya liboso masili kosalema, pe nazali kosakola makambo ya sika : liboso ete ekoma, nakoyokisa bango.

10. Boyemba pona Yawe loyembo ya sika, masanzoli na ye wuta na suka ya mabele, bino baoyo bozali kokita na mayi monene, pe nyonso oyo etondi na yango, bisanga pe bafandi na yango! 11. Ete esobe pe bingumba na yango etombola mingongo na yango, bamboka epayi Kedare afandi! Ete bafandi na libanga basepela! Ete baganga longwa na songe ya bangomba! 12. Ete bapesa kembo na Yawe, pe basakola masanzoli na ye na bisanga! 13. Yawe akobima lokola elombe ya nguya; akolamusa zuwa lokola mutu ya etumba; akoganga, solo, akoganga; akomonisa makasi na ye liboso ya banguna na ye. 14. Banda kala, ngai nafandi nye, nafandi nye, namipekisaki. Nakoganga lokola mwasi oyo azali kobota, na tangu moko nakopema pe nakopemapema napasi. 15. Nakobebisa bangomba pe bangomba mike, pe nakokawusa matiti na yango nyonso; Nakobongola bibale bisanga, pe nakokawusa maziba. 16. Pe nakotambolisa bakufi misu na nzela oyo bayebaki te, na banzela bayebaki te nakokamba bango. Nakobongola molili na pole liboso na bango, pe banzela ya kogumbama nakokomisa nzela ya sembo. Nakosala bango makambu oyo, pe nakosundola bango te. 17. Bakozonga sima pe bakozala na soni, soni na baoyo batie motema na ekeko, oyo balobaka na elilingi ya ebende oyo enyangwami: Bino bozali banzambe na biso. 18. Boyoka, bino bakufi matoyi, pe bakufi misu, botala pona komona.

19. Nani akufa misu, longola se mosali na ngai, pe mokufi matoyi, lokola momemi-sango na ngai oyo natindi? Ye oyo akufa misu lokola ye oyo natiela ye motema, pe akufa misu lokola mosali ya Yawe. 20. Pona komona makambu mingi pe azali kokanga tina te? Matoyi na ye efungwama, akoyokaka te. 21. Yawe asepelaki na ye na tina ya boyengebene na ye; akomisaki mobeko monene pe lokumu. 22. Kasi oyo ezali batu oyo bapunzami pe babotola bango; bango nyonso bakangisami na kati ya mabulu pe babombami na boloko; bazali ya kopunzama, mutu moko te akokangola bango; bazali nyama oyo baliaka, mutu moko te oyo akoki koloba : Bozongisa! 23. Nani kati na bino akotia litoyi na yango? Nani akotia likebi pe akoyoka oyo ekoya? 24. Nani akabaki Yakobo po azala ya kopunzama, pe Israel epayi ya baoyo bapunzaki ye? Ezali te Yawe, oyo tosali lisumu epayi na ye? Pe balingaki kotambola na banzela na ye te, pe koyoka mobeko na ye te. 25. Pe asopi likolo na ye moto ya kanda na ye pe nguya ya etumba; pe ezikisaki bango na bisika nyonso, pe atikali koyeba yango te; pe ezikisaki ye, kasi atiaki yango na motema te.

Mokapo 43

1. Kasi sik'oyo Yawe alobi boye, ye oyo akelaki yo, ô Yakobo, pe asalaki yo, ô Israele: Kobanga te, po nasikoli yo; Nabengi yo na kombo na yo, ozali ya ngai. 2. Tangu okoleka na kati ya mayi, nakozala elongo na yo, pe na kati ya bibale, ekozindisa yo te; tangu okotambola na kati ya moto, ekotumba yo te, pe epeleli ya moto ekozikisa yo te. 3. Po ngai nazali Yawe Nzambe na yo, Mosantu ya Israel, Mobikisi na yo. Napesaki Ejipito pona lisiko na yo, Kushe pe Seba pona yo. 4. Banda okomi motuya mingi na misu na ngai, ozali kongala na kembo, pe ngai nalingi yo; pe nakopesa batu na esika na yo pe mabota pona bomoyi na yo. 5. Kobanga te, po nazali elongo na yo. Nakomema bana na yo longwa na esti, pe nakosangisa yo longwa na westi; 6. Nakoloba na nord: Pesa, pe na sudi: Kokanga te. Yeyisa bana na ngai ya mibali wuta mosika, pe bana na ngai ya basi wuta na suka ya mabele; 7. Moko na moko oyo abengami na kombo na ngai, ye oyo nakelaki pona kembo na ngai, oyo nasalaki, ee, oyo nasalaki.

8. Bimisa batu oyo bakufa misu oyo bazali na misu, pe bakufi matoyi oyo bazali na matoyi. 9. Bikolo nyonso basangana esika moko, pe tika ete batu ya mboka basangisana esika moko! Nani kati na bango asakoli likambu oyo, pe ayokisa biso makambu ya liboso? Tika ete babimisa batatoli na bango pe bamilongisa, to bayoka pe baloba: Ezali solo ! 10. Bozali batatoli na ngai, elobi Yawe, pe mosali na ngai oyo naponi, po boyeba pe ete bondima ngai pe bososola ete nazali se ndenge moko. Liboso na ngai Nzambe moko te asalemaki, pe sima na ngai akozala te. 11. Ngai, ngai, nazali Yawe, pe longola ngai mobikisi azali te. 12. Ngai, nasakoli pe nabikisi pe nayokisaki, tangu nzambe mopaya azalaki te kati na bino; pe bozali batatoli na ngai, elobi Yawe, ete nazali Nzambe. 13. Banda mokolo moko ezalaki, nazali kaka lolenge moko, pe mutu moko te akoki kobikisa na loboko na ngai : Nakosala yango, pe nani akozongisa ngai na nzela?

14. Boye Yawe alobi, Mosikoli na bino, Mosantu ya Israele: Na tina na bino, natindaki na Babilone pe nakokitisa bango nyonso lokola batu oyo bakimaka, ata Bakaladea, na kati ya masuwa epayi koganga na bango eyokani. 15. Ngai, nazali Yawe, Mosantu na bino, Mokeli ya Israel, Mokonzi na bino.

16. Yawe alobi boye, ye oyo na kati ya mayi monene asalaka nzela pe nzela ya moke na kati ya ba mayi ya nguya makasi. 17. Ye oyo abimisi bashar pe punda, mapinga pe bilombe ya nguya—balali elongo, bakotelema te; basili koboma lokola singa ya mwinda: 18. Ete bokanisa lisusu te makambu ya liboso, pe botia bokebi te na makambu ya kala. 19. Tala, ngai, nazali kosala likambu ya sika; sik'oyo ekobima; bokoyeba yango te? Ee, na kati ya esobe, nakosala nzela, bibale na bisika oyo ekawuka. 20. Nyama ya zamba akopesa ngai kembo, bambwa ya zamba pe ba otrishe; po natie mayi na kati ya esobe, bibale na esika ekawuka, pona komelisa batu na ngai, moponami ba ngai. 21. Nasali batu oyo pona ngai moko; bakosakola masanzoli na ngai. 22. Kasi obeleli ngai te, ô Yakobo; po olembi ngai, ô Israel. 23. Omemeli ngai te bampate ya bambeka na yo ya kotumba, pe opesi ngai kembo te na bambeka na yo. Nakomisi yo mowumbu te na makabo ya gato, pe nalembisi yo te na mpaka ya malasi. 24. Kasi osombelaki ngai te na mbongo nzete ya solo, pe  otondisaki ngai na mafuta ya bambeka na yo te; kasi okomisi ngai mowumbu na masumu na yo pe olembisi ngai na mabe na yo. 25.  Ngai, ngai, ye oyo apangusa mabunga na yo na tina na ngai moko, pe nakokanisa masumu na yo te. 26. Bokundela ngai makanisi, tosamba elongo; yo moko miloba solo, po ete olonga. 27. Tata na yo ya liboso asalaki lisumu, pe balobeli-balimboli na yo batombokelaki ngai. 28. Pe nakomisi mbindo bakambi ya esika mosantu, pe nakabi Yakobo na libebi pe Israel na kotiolama.

Mokapo 44

1. Pe sik'oyo yoka, Yakobo, mosali na ngai, pe yo, Israel, oyo naponi. 2. Yawe alobi boye, ye oyo asalaki yo pe abongisaki yo wuta na libumu, ye oyo asungaka yo: Kobanga te, Yakobo mosali na ngai, pe yo, Yeshurune, oyo naponi. 3. Po nakosopa mayi likolo ya oyo azali naposa ya mayi, pe bibale mike ya mayi na mabele oyo ekawuki; Nakosopa Molimo na ngai likolo ya bakitani na yo, pe lipamboli na ngai likolo ya baoyo babimi na yo. 4. Pe bakobima na kati ya matiti, lokola banzete ya arabah (oyo ekoloka na bisika ya malili) pembeni ya mayi. 5. Moko oyo akoloba: Ngai, nazali ya Yawe, pe mosusu wana akobengama Yakobo; pe mosusu akokoma na loboko na ye: Nazali ya Yawe, pe akomibenga na kombo ya Israel.

6. Yawe, Mokonzi ya Israel, pe mosikoli na ye, Yawe na mapinga alobi boye: Ngai nazali ya yambo, pe ngai nazali ya suka; pe longola se ngai Nzambe azali te. 7. Pe nani lokola ngai, akobenga, pe akosakola, pe akobongisa yango pona ngai, wuta natelemisa batu ya kala? Bayebisa bango makambu oyo ekosalema pe makambu oyo ekoya. 8. Kolenga te, pe kobanga te. Wuta tangu wana, nasila te koyokisa yo yango pe nasakola yango te? Pe bino bozali batatoli na ngai. Ezali na +Nzambe mosusu longola ngai? Libanga ezali te, nayebi yango te.

9. Baoyo basalaka bikeko, bazali bango nyonso te, pe biloko na bango ya kitoko ezali na litomba te. Pe bango moko bazali batatoli; bazali komona te, pe bayebi te, na tango wana, bakoyoka soni. 10. Nani asali *nzambe moko, to abongisi ekeko oyo ezali na litomba te? 11. Tala, baninga na ye nyonso bakozal na soni, pe basali kati na bango bazali kaka batu. Tika bango nyonso basangana esika moko, tika batelema kaka! Bakolenga, bakoyoka soni elongo! 12. Mosali ya bibende azali na ekateli pe asalaka na yango makala; abongisi ekeko yango na ba marto pe asalaka yango na loboko na ye ya nguya; kasi azali na nzala pe azali na makasi te; ameli mayi te pe alembi. 13. Mosali bikeko ya mabaya asembolaka singa pe adesine lolenge na yango na kre ya motane; asalaka yango na rabo pe adesinaka yango na kompa. Asalaka yango lolenge ya elilingi ya mutu, lolenge ya kitoko ya mutu, po ete efanda na ndako. 14.  Akataka banzete ya sedre pe azwi nzete ya shene ya libaya oyo elukamaka pe na nzete ya shene; aponaka (akembisaka) pona ye kati na banzete ya zamba. Aloni nzete ya pine, pe mbula ekolisaka yango. 15. Pe mutu akozwa yango pona kotumba moto na yango, pe akozwa yango pe ayetoli; apelisi yango pe atumbi lipa. Asali pe yango *nzambe moko pe akumisi yango; asali ekeko na yango pe afukami liboso na yango. 16. Atumbi ndambo na yango na moto; na ndambo aliaka mosuni, atumbaka yango, pe atondi; azali na molunge pe alobi: Aa, aa! Na miyetola, namoni moto! 17. Pe elongo na ndambo oyo etikali asali *nzambe, ekeko na ye; agumbami na se liboso na yango pe akumisi yango, pe abondeli yango pe alobi: Bikisa ngai, po ozali *nzambe na ngai. 18. Bazali na boyebi te, pe basosoli te; po Azipi misu na bango, ete bakoka komona te, pe mitema na bango, ete bakoka kososola te. 19. Pe amizongi kati namotema na ye moko te, pe boyebi ezali te, pe mayele ezali te, pona koloba : Natumbi ndambo na yango na moto, pe natumbaki lisusu mapa na makala na yango, natumbaki mosuni, pe naliaki; pe nakokomisa oyo etikali eloko ya mbindo? Ngai na kogumbamela eteni oyo ewuti na nzete? 20. Azali koliya putulu ya moto; motema ekosami epengwisi ye; akokangola molimo na ye te, pe alobi te: Nazali na lokuta te na loboko na ngai ya mobali?

21. Ô Yakobo, kanisa makambu oyo, pe yo Israel, po ozali mosali na ngai. Nasalaki yo; ozali mosali na ngai, Israel; ngai nakobosana yo te. 22. Nalongoli bobuki mibeko  na yo lokola lipata ya monene, pe masumu na yo lokola lipata : zongela ngai po nasikolaki yo. 23. Baganga na mongongo makasi, bino likolo, po Yawe asali yango; bonganga na mongongo makasi, bino bozindo ya mabele; bosepela na koyemba banzembo ya elonga, bangomba, bazamba, pe nzete nyonso oyo ezali na kati na yango! Po Yawe asikoli Yakobo pe amikumisi na kati ya Israel. 24. Yawe, Mosikoli na yo pe Mokeli na yo wuta na libumu, alobi boye: Ezali ngai, Yawe, oyo asali nyonso; Ngai moko nasembolaki likolo pe na ngai moko, natandaki mabele ; 25. Ye oyo alongolaka bilembo ya bakosi pe ye oyo atiaka mobulu na elimo ya bambikudi, Ye oyo azongisaka sima batu ya bwania pe akomisaka boyebi na bango bozoba ; 26. Nakokisaka liloba ya mosali na ngai pe nakokokisa mabongisi ya bamemi-sango na ngai. Ye alobi na Yerusaleme: Okozala na bafandi, pe na bingumba ya Yuda: Bokotongama, pe nakotombola bitika na yango. 27. Nalobi na mozindo: Zala ya kokawuka, pe nakawusi bibale na yo; 28. Ye oyo alobi na Sirise: Mobateli na ngai ya mpate, pe akokokisa bosepeli na ngai nyonso, koloba na Yerusaleme: Okotongama, pe na tempelo: Fondatio na yo ekotiama.

Mokapo 45

1. Yawe alobi boye na mopakolami na ye, epayi ya Sirise, oyo nasimbi loboko na ye ya mobali pona kotia na se ya makolo na ye bikolo liboso na ye; pe nakofungola loketo ya bakonzi, pona kofungola bikuke mibale liboso na ye, po ete bikuke ekangama te: 2. Ngai, nakokende liboso na yo pe nakokómisa bisika oyo etengama; Nakobuka bikuke ya bronze pe nakokata biteni bikangeli na ye ya bibende. 3. Pe nakopesa yo biloko ya motuya ya molili pe bozwi ya bisika ya kobombana, po oyeba ete ngai, Yawe, oyo abengaki yo na kombo na yo, nazali Nzambe ya Israel. 4. Na tina mosali na ngai Yakobo, pe Israel moponami na ngai, nabengi yo na kombo na yo pe napesi yo kombo, kasi oyebaki ngai te. 5. Ngai, nazali Yawe, pe mosusu azali te; Nzambe mosusu azali te longola kaka ngai. Nakangaki yo mokaba, pe oyebaki ngai te; 6. Po ete bayeba, wuta kobima ya moyi pe wuta kolala na yango, ete mosusu azali te longola se ngai. Ngai, nazali Yawe, pe mosusu azali te, —7. Ngai oyo nasalaki pole pe nakelaki molili; Nasalaka bomengo pe oyo akelaka mabe : Ngai, Yawe, nasalaka makambu oyo nyonso.

8. Likolo, wuta likolo bosopana na se, pe mapata ekitisa boyengebene; tika mabele efungwama, pe tika lobiko ebima pe bosembo ebima. Ngai, Yawe, nakeli yango. 9. Mawa na ye oyo azali kotelemela oyo asala ye! Mbeki ya mabele ya potopoto na kati ya bambeki ya mabele ya potopoto! Mabele ya potopoto ekoki koloba na mosali na ye: Ozali kosala nini? Pe mosala na yo : Azali na maboko te? 10. Mawa na mutu oyo alobi na tata na ye: Obota nini? Pe epayi ya mwasi na ye : Pona nini ozali kobota ? 11. Yawe, Mosantu ya Israel pe ye oyo asala ye, alobi boye: Tuna ngai makambu oyo ekoya; pe senga ngai na tina ya bana na ngai pe na tina ya mosala ya maboko na ngai. 12. Ngai, nasalaki mabele pe nakelaki mutu likolo na yango; ezali ngai, ezali maboko na ngai nde nasembolaki likolo pe mapinga na yango nyonso oyo napesaki mitindo. 13. Ngai, .Nabimisi ye na boyengebene, pe nakokamba banzela na ye nyonso : Ye, akotonga engumba na ngai pe akotika bakangami na ngai bakende na bonsomi, na kozanga talu pe kaniaka, elobi Yawe na mapinga.

14. Yawe alobi boye: Mosala ya Ejipito pe litomba ya Etiopie pe ya Basabeya, mibali ya milayi, ekoleka epayi na bino pe ekozala ya bino. Bakoya epayi na yo pe bakozala ya yo. Bakotambola sima na yo ; bakoleka na minyololo pe bakogumbamela liboso na yo. Bakobondela yo: Ya solo *Nzambe azali na kati na yo; Nzambe mosusu azali te, azali te. 15. Ya solo ozali *Nzambe oyo amibombaka, Nzambe ya Israel, Mobikisi. 16. Bango nyonso bakoyoka soni pe bakozala na mobulu elongo; bakokende elongo na mobulungano, basali ya bikeko. 17. Israel akobikisama na Yawe na lobiko ya seko; Okoyoka soni te pe okobulungana te libela na libela.

18. Po boye Yawe alobi, oyo akelaki likolo, ye Nzambe oyo asalaki mabele pe abongisaki yango, oyo atelemisaki yango, oyo akelaki yango pamba te, kasi akelaki yango pona bafandela yango: Ngai nazali Yawe, pe mosusu azali te. 19. Nalobi na kobombana te, na kati ya esika ya molili na mabele; Nalobi na bakitani ya Yakobo te: Boluka ngai pamba. Nazali Yawe, nakoloba boyengebene pe kosakola oyo ezali sembo.

20. Bosangana esika moko, bopusana penepene, bino baoyo bobiki na bowumbu ya bikolo! Bazali na boyebi te, baoyo bamemaka nzete ya ekeko na bango pe bapesaka libondeli na bango epayi ya *nzambe oyo abikisaka te. 21. Bosakola pe bokende liboso; tika basolola elongo. Nani ayokisaki likambu oyo wuta kala? Nani asakoli yango wuta tangu ya kala? Ezali ngai Yawe te? Pe longola ngai Nzambe azali te; *Nzambe sembo pe Mobikisi azali te longola se ngai. 22. Bobaluka epayi na ngai pe bobikisama, bino banso suka ya mabele; Po ngai nazali *Nzambe, pe mosusu azali te. 23. Likolo na ngai moko, nalapi ndayi, liloba ebimi na monoko na ngai na boyengebene, pe ekozonga te, ete mabolongo nyonso ekogumbama liboso na ngai, pe minoko nyonso ekolapa ndayii. 24. Kati na Yawe kaka, bakoloba, Nazali na boyengebene pe makasi. Bakoya epayi na ye, pe banso oyo bazali na kosilika pona ye bakoyoka soni. 25. Kati na Yawe, bakitani nyonso ya Israele bakozala bayengebene pe bakomikumisa.

Mokapo 46

1. Bel akweyi, Nebo agumbami; bikeko na bango ezalaki likolo na banyama pe bibwele; baoyo bomemaki bazali na mikumba, mokumba pona oyo alembi! 2. Bagumbami, bakweyi elongo; bakokaki te kobikisa mikumba na bango; molimo na bango moko ekeyi na bowumbu.

3. Boyoka ngai, ndako ya Yakobo, pe bino nyonso batikali na ndako ya Israel, bino oyo bomemaki wuta libumu, bokumbami wuta na matrise. 4. Kino na kimobange na bino nazali ndenge moko, pe kino na suki ya pembe, nakomema bino. Ngai, nasali yango; Nakomema, pe ngai, nakomema likolo na ngai moko, pe nakokangola. 5. Okokokanisa ngai na nani, pe okozalisa ngai lolenge moko na nani, to okokanisa ngai pona tozala ndenge moko? 6. Bazali kobimisa wolo na sanduku, pe bakomekaka palata na balansi; bakofutaka mosali ya wolo pona asala *nzambe; bagumbami pe bakumisi ye ; 7. Bakotia yango na mapeka na bango, bakomema yango pe bakotia yango na esika na yango. Pe etelemi, pe ekotika esika na yango te. Bakoganga epayi na yango, kasi eyanoli te, ebikisaka bango napasi na bango te. 8. Bokanisa likambu yango, pe bomilakisa batu; bokanisa yango na motema, babuki mibeko. 9. Bokanisa makambu ya yambo ya kala. Po ngai nazali *Nzambe, pe mosusu azali te; Nazali Nzambe, pe moko te azali lokola ngai, 10. Kosakola banda na ebandeli makambu oyo ekosalema na suka, pe wuta kala kala makambu oyo esalemaki nanu te, koloba: Mabongisi na ngai ekokisama, pe nakosala nyonso oyo esepelisaka ngai. 11. Kobenga wuta na esti ndeke oyo eliaka misuni, wuta mboka mosika mutu moko ya mabongisi na ngai. Ee, nalobi yango, pe nakosala yango ekoma. Nakani yango, pe nakosala yango.

12. Boyoka ngai, bino mitema makasi, oyo bozali mosika na boyengebene! 13. Ngai namemi boyengebene na ngai penepene; ekozala mosika te, pe lobiko na ngai ekowumela te ; pe natie lobiko na Siona, pe kembo na ngai likolo ya Israel.

Mokapo 47

1. Kita pe fanda na kati ya putulu, ngondo mwana mwasi ya Babilone; fanda na mabele, po kiti ya bokonzi ezali te, mwana mwasi ya Bakaladea; po okobengama lisusu te ya boboto pe ya petepete. 2. Kamata mabanga ya konika pe onika farini; longola vwale na yo, tombola elamba na yo, mona mipende na yo, leka na bibale. 3. Bolumbu na yo ekomonana polele; ya solo, soni na yo ekomonana. Nakozongisa mabe, pe nakokutana na mutu moko te.... 4. Mosikoli na biso, kombo na ye ezali Yawe ya mapinga, Mosantu ya Israel.... 5. Fanda na kimia pe kota na kati na molili, mwana mwasi ya Bakaladea; po okobengama lisusu te : Nkolo ya ba bokonzi. 6. Nasilikelaki batu na ngai, nakomisaki libula na ngai eloko ya mbindo, pe nakabaki bango na loboko na yo; omonisaki mawa te epayi na bango; okomisi ekanganeli na yo kilo mingi likolo na mibange. 7. Pe olobaki: Nakozala mwasi nkolo libela, otiaki makambu oyo te na motema, pe omikundolaki te suka na yango.

8. Pe sik'oyo yoka oyo, mwasi oyo amipesa na biyenga, oyo afandi na kimia, oyo alobi na kati ya motema na ye: Ngai, kaka ngai, pe mosusu azali te ; Nakofanda te lokola mokufeli mobali, pe nakoyeba te kozanga bana. 9. Makambu oyo mibale ekokomela yo na psawa, na mokolo moko : kozanga bana pe kokufela mobali; ekoya likolo na yo na makasi mobimba, ata ebele ya bondoki na yo, ata nguya ebele ya bakisi na yo. 10. Otielaki mabe na yo motema; olobaki: Mutu moko te akomona ngai. Bwania na yo pe boyebi na yo ebungisi yo nzela; pe olobi na motema na yo : Ngai, kaka ngai, pe mosusu azali te. 11. Kasi mabe moko ekoyela yo, tongo ya yango okoyeba te; pe likama moko ekokwela yo oyo okoki kokima te, pe libebisi oyo okanisaki te ekoyela yo na mbalakaka.

12. Telema wana na bikelakela na yo, pe na ebele ya misala na yo ya bondoki, oyo osalaki mosala makasi na yango banda bolenge na yo; mbala mosusu okozala na likoki ya kozwa litomba na bango, mbala mosusu okoki kobangisa?

13. Osili kolemba na ebele ya mabongisi na yo : Tika batelema wana pe babikisa yo, baoyo bakabolaka likolo, baoyo batangaka minzoto, baoyo na sanza ya sika, bapesaka boyebi ya makambu ezali koyela yo! 14. Tala, bakozala lokola matiti ya kokawuka; moto ekozikisa bango; bakobikisa milimo na bango te na nguya ya moto. Ekozala na lituka ya makala te ya koyetola na yango, pe moto ya kofanda liboso na yango ekozala te. 15. Boye bakozala pona yo baoyo omilembaki pona bango, baoyo osalaki mombongo na bango banda bomwana na yo. Bakoyengayenga, moko na moko na esika na ye; ekozala na mutu te oyo akobikisa yo.

Mokapo 48

1. Boyoka likambu oyo, ndako ya Yakobo, bino oyo bobengami na kombo ya Israel pe bobimi na mayi ya Yuda, bozali kolapa ndayi na kombo ya Yawe pe bokokanisa Nzambe ya Israel, na kati ya bosolo te, na boyengebene te. 2. Po bakobengamaka na kombo ya engumba mosantu pe batie motema na Nzambe ya Israel, kombo na ye Yawe ya mapinga. 3. Wuta kala nasakolaki makambu ya liboso, pe ebimaki na monoko na ngai pe nayebisaki yango; Nasalaki yango na mbalakaka, pe ekomaki. 4. Po ete nayebaki ete ozali moto makasi, pe kingo na yo ezali lingenda ya ebende, pe mbunzu na yo ezali bronze. 5. Nayebisaki yo yango wuta kala; liboso ete esalama nayebisaki yo yango, noki oloba ete: nzambe na ngai ya ekeko esali bango ; pe ekeko na ngai to elilingi na ngai oyo ya libende oyo enyangwami epesi bango mitindo. 6. Oyokaki bango, tala bango nyonso mobimba. Pe bino, bolingi te kosakolela bango? Nayokisi yo makambu ya sika, kobanda sik'oyo, pe makambu ya kobombama oyo oyebaki te. 7. Bisalisami sik'oyo, kala mingi te; pe liboso ya mokolo oyo oyokaki yango te, noki oloba ete: Tala, nayebaki yango! 8. Pe oyokaki te, pe oyebaki te, pe wuta tangu molayi litoyi na yo efungwamaki te; po nayebi : ete osalaka tangu nyonso na bokosi, pe obengami mobuki mobeko wuta libumu.

9. Na tina ya kombo na ngai nakangi kanda na ngai, pe na tina ya masanzoli na ngai nakomipekisa na tina ya kokata yo. 10. Tala, nakopetola yo, kasi lokola palata te; Naponi yo na kati etumbeli ya pasi. 11. Na tina na ngai moko, na tina na ngai moko, nakosala yango; po ndenge nini ekoki kozala mbindo? Pe kembo na ngai nakopesa yango na mosusu te. 12. Yoka ngai, Yakobo, pe yo, Israele, mobengami na ngai. Ngai nazali ndenge moko, ngai ya liboso, pe ngai ya suka. 13.  Loboko na ngai pe etongaki mabele, pe loboko na ngai ya mobali esembolaki likolo; Ngai nabengi yango; batelemi esika moko. 14. Bomisangana, bino nyonso, pe boyoka. Nani kati na bango aloba makambu oyo? Ye oyo Yawe alinga akosala oyo esepelisaka ye likolo na Babilone, pe loboko na ye ekozala likolo ya Bakaladea. 15. Ngai, ngai nalobi, ngai nabengi ye pe; Namemi ye, pe nzela na ye ekozwa bolamu. 16. Bopusana pembeni na ngai pe boyoka likambo oyo: Nalobaki na kobombana te banda ebandeli; wuta tangu yango ezali, nazali wana; pe sik'oyo Nkolo Nzambe atindi ngai pe Molimo na ye.

17. Boye Yawe, Mosikoli na yo, Mosantu ya Israel, alobi : Ngai, nazali Yawe Nzambe na yo, oyo akolakisa yo pona litomba na yo pe akotambwisa yo na nzela oyo osengeli kotambola. 18. Soki kaka otiaki bokebi na mibeko na ngai, kimia na yo elingaki kozala lokola ebale, pe boyengebene na yo lokola mbonge ya mayi monene. 19. Pe bokitani na yo elingaki kozala lokola zelo, pe baoyo babimi na nzoto na yo lokola mabanga mikemike; kombo na ye elingaki kolongwa te to kobebisama te liboso na ngai.

20. Bobima na Babilone, bokima mosika ya Bakaladea, na mongongo ya loyembo na esengo! Sakola pe yokisa likambu oyo, mema yango ti na suka ya mabele, boloba: Yawe asikoli mosali na ye Yakobo! 21. Pe bayokaki posa ya mayi te tangu atambusaki bango na kati ya esobe; asalaki ete mayi esopana na libanga pona bango; apasolaki libanga, pe mayi esopanaki.

22. Kimia ezali te, elobi Yawe, pona batu mabe.

Mokapo 49

1. Boyoka ngai, bisanga, pe botia bokebi, bino batu ya mosika! Yawe abengaki ngai wuta na libumu; wuta na mitiopo ya mama na ngai asili koloba kombo na ngai. 2. Pe akomisi monoko na ngai lokola mopanga ya makasi; abombi ngai na elili ya loboko na ye, pe akomisi ngai lokola likonga ya makasi; abombi ngai na kati ya ebombeli ya likonga na ye. 3. Pe alobi na ngai: Yo ozali mosali na ngai, Israel, oyo ngai naakomikumisa na kati na ye. 4. — Pe ngai nalobi: Ngai nasali mosala pamba, nasili kobimisa makasi na ngai pamba pe pona eloko te; nzokande bosambisi na ngai ezali epayi ya Yawe, pe mosala na ngai ezali epayi ya Nzambe na ngai.

5. Pe sik'oyo, elobi Yawe, ye oyo abongisaki ngai wuta na libumu po nazala mosali na ye, po na kozongisela ye Yakobo...; atako Israel asili koyangani te, nakokumisama na misu ya Yawe, pe Nzambe na ngai akozala makasi na ngai. 6. Pe alobi: Ezali likambu ya moke po na yo kozala mosali na ngai pona kotelemisa mabota ya Yakobo pe kozongisa babatelami ya Israel ; nakopesa yo po ozala mwinda pona bikolo, po ozala lobiko na ngai ti na suka ya mabele.

7. Boye elobi Yawe, Mosikoli ya Israel, Mosantu na ye, epayi na ye oyo mutu azali kotiola, na ye oyo ekolo ezali koyina, na mosali ya baoyo bazali kokonza: Bakonzi bakomona pe bakotelema, bankumu bakofukamela, na tina ya Yawe oyo azali sembo, Mosantu ya Israel oyo akopona yo. 8. Yawe alobi boye: Na tangu ya ngolu, nayanoli yo, pe na mokolo ya lobiko, nasalisi yo; pe nakobatela yo pe nakopesa yo boyokani ya batu, pona kozongisa mboka, pona kopesa libula ya libula oyo ebebisamaki, 9. koloba na bakangami na boloko: Bobima! Na baoyo bazali na kati ya molili : Bomilakisa! Bakoliya na banzela, pe likolo na bisika nyonso oyo etombwama ekozala matiti na bango ya koleyisa bibwele. 10. Bakoyoka nzala te, pe bakoyoka posa ya mayi te, pe molunge pe moyi ekobeta bango te; po ye oyo azali koyokela bango mawa akokamba bango pe akokamba bango pe akomema bango na maziba ya mayi. 11. Pe nakokomisa bangomba na ngai nyonso nzela, pe banzela minene na ngai ekotombwama. 12. Tala, bango bakowuta mosika; pe tala, basusu wana bakowuta na nord pe na westi, pe basusu wana bakowuta na mboka ya Sinim. 13. Likolo, bosepela, pe mabele zala na esengo ! Bangomba, bopanzana na koyemba! Po Yawe abondisa batu na ye pe akoyokela batu na ye ya pasi mawa. —

14. Siona alobaki: Yawe asundoli ngai, pe Nkolo abosani ngai! 15. Mwasi akoki kobosana mwana na ye oyo akomelisa mabele, pona ayokela mawa te mwana mobali ya libumu na ye? Ata soki basi wana bakobosana; kasi ngai nakobosana yo te. 16. Tala, nakomi yo na kati ya maboko na ngai; bamir milayi na yo ezali tangu nyonso liboso na ngai. 17. Bana na yo ya mibali bakosala mbangumbangu; Baoyo babebisaki yo pe baoyo babukaki yo bakokima mosika na yo. 18. Tombola misu na yo zingazinga na yo pe tala: basangani bango nyonso esika moko pe bakoya epayi na yo. Nazali na bomoyi, elobi Yawe, okolata bango nyonso lokola biju, pe okomilata yango lokola mokaba ya mwasi oyo azali fianse. 19. Po bisika na yo oyo ezali esobe pe bisika na yo oyo ebebisama pe na mboka na yo oyo etikali pamba, ekozala sik'oyo esika moke na tina ya bafandi, pe baoyo bazalaki kopanza yo bakozala mosika. 20. Bana mibali oyo obotaki tangu ozalaki na bana te, bakoloba lisusu na matoyi na yo: Esika yango ezali moke penza pona ngai; salela ngai esika, po ete nakoka kofanda wana. 21. Pe okoloba na motema na yo: Nani aboteli ngai baoyo? Nazalaki na bana te pe ekomba, mokangami pe motelengani; pe baoyo, nani abokolaki bango? Tala, natikalaki ngai moko—baoyo, bazalaki wapi? —.

22. Boye Nkolo Nzambe alobi: Talá, nakotombola loboko na ngai liboso ya bikolo, pe nakotelemisa bendele na ngai liboso ya batu; pe bakomema bana na yo ya mibali na maboko na bango, pe bana na yo ya basi bakomemama na mapeka na bango; 23. pe bakonzi bakozala babokoli yo, pe bankumu na bango ya basi na bango  bakozala bamelisi bana na yo mabele; bakofukama liboso na yo na bilongi na bango na mabele, pe bakolembola putulu ya makolo na yo. Pe okoyeba ete ngai nazali Yawe : baoyo bazali kozela ngai bakoyoka soni te. 24. Bakobotola mutu ya makasi, eloko oyo ye azwi pe ye moyengebene oyo akangami na bowumbu akokangolama? 25. Po boye Yawe alobi: Ata mokangami ya mutu ya makasi akolongolama na ye, pe oyo ezwamaki na mutu ya nguya ekokangolama. Pe ngai nakotelemela ye oyo akotemela yo, pe nakobikisa bana na yo ya mibali. 26. Pe nakopesa baoyo bazali koniokola yo mosuni na bango moko pona kolia, pe bakolangwa makila na bango lokola vino ya elengi. Pe mosuni nyonso ekoyeba ete nazali Yawe, Mobikisi na yo pe Mosikoli na yo, Ya Nguya ya Yakobo.

Mokapo 50

1. Yawe alobi boye: Wapi mokanda ya koboma libala ya mama na bino oyo nazongisaki ye ? To nani oyo azali modefisi na ngai oyo natekelaki ye bino? Tala, na mabunga na bino bomiteki, pe na tina ya masumu na bino mama na bino azongisami.

2. Pona nini nayaki, kasi mutu moko te azalaki wana? Pe nabengaki, kasi ata moko te ayanolaki? Loboko na ngai ezali mokuse ya mokuse mingi pona kosikola, pe nguya ezali te kati na ngai pona kokangola? Tala, na pamela na ngai nakawusaka mayi monene, nakomisaka bibale esobe; mbisi na bango ekomaka solo mabe pona kozanga mayi, pe ekufaka naposa ya mayi. 3. Nalatisaka likolo na moyindo, pe napesaka bango bilamba ya saki pona kozipa yango. 4. Nkolo Yawe apesi ngai lolemo ya bayekoli, po nayeba ndenge ya kosunga ye oyo alembi na liloba moko. Alamusaka ngai tongo nyonso; alamusaka litoyi na ngai po nayoka lokola bayekoli. 5. Nkolo Yawe afungoli ngai litoyi, pe ngai nazalaki motomboki te, pe nazongaki sima te. 6. Napesi mokongo na ngai epayi ya baoyo bazalaki kobeta, pe matama na ngai epayi ya baoyo bazalaki kopikola ba pwale; Nabombi elongi na ngai te na mafinga pe na kobwakela ngai soyi. 7. Kasi Nkolo Yawe akosalisa ngai; yango wana nakoyoka soni te; yango wana natie elongi na ngai lokola libanga, pe nayebi ete nakoyoka soni te. 8. Ye oyo azali kolongisa ngai azali penepene; nani akobunda na ngai? Totelema wana elongo. Nani akosamba ngai na tangu ya kosambisa? Tika apusana pembeni na ngai! 9. Tala, Nkolo Yawe akosalisa ngai; nani akokweyisa ngai? Tala, bango nyonso bakonuna lokola elamba; nselele ekolia bango.

10. Nani kati na bino abangaka Yawe, oyo ayokaka mongongo ya mosali na ye, oyo atambolaka na molili pe azali na pole te, tika ete atie motema na kati ya kombo ya Yawe pe atia motema likolo na Nzambe na ye motema. 11. Tala, bino banso baoyo bopelisaka moto, baoyo bomizinga na epeleli, botambola na mwinda ya moto na bino pe ya mwinda bopelisi; oyo ezala oyo bokozwa yango na loboko na ngai: bokolala na mawa.

Mokapo 51

1. Boyoka ngai, bino oyo bozali kolanda boyengebene, bozali koluka Yawe! Botala libanga oyo bakataki-kataki bino, pe libulu ya mayi oyo bino batimbolamaki. 2. Botala epayi Abraham tata na bino pe epayi ya Sara oyo abotaki bino; po nabengaki ye ye moko, pe napambolaki ye, pe nabakisaki ye. 3. Po Yawe akobondisa Siona pe akobondisa bisobe na ye nyonso, pe akokomisa esobe na ye Edene, pe esika na ye ya ekomba lokola elanga ya Yawe. Kosepela pe esengo ekozwama kuna, ba matondi Nzambe pe mongongo ya nzembo.

4. Botiela ngai likebi, batu na ngai, pe botiela ngai litoyi, ekolo na ngai! Po mobeko moko ekobima na ngai, pe nakotia bosambisi na ngai lokola mwinda ya bikolo. 5. Bosembo na ngai ezali penepene, lobiko na ngai ebimi, pe maboko na ngai ekosambisa batu; bisanga ekozela ngai pe ekozala na elikya na loboko na ngai. 6. Botombola misu na bino na likoló, pe botala na se na mabele; po likolo ekolimwa lokola milinga, pe mabele ekonuna lokola elamba, pe baoyo bafandi kati na yango bakokufa ndenge moko. Kasi lobiko na ngai ekowumela libela, pe boyengebene na ngai ekosila te.

7. Boyoka ngai, bino baoyo boyebi boyengebene, batu oyo mobeko na ngai ezali kati na mitema na bango: Bobanga mafinga ya mutu te, pe bolenga te pona mafinga na bango. 8. Po nselele ekolia bango lokola elamba, pe motiopi ekokatakata bango lokola suki ya mpate; kasi boyengebene na ngai ekowumela libela, pe lobiko na ngai libota na libota.

9. Lamuka, lamuka, milata makasi, loboko na Yawe! Lamuka, lokola na mikolo ya kala, lokola na mabota ya ba tangu oyo eleka! Ezali yo oyo okataki Rahab na biteni-biteni te, pe obetaki elima ya mayi te? 10. Ezali yo te oyo okawusaki mayi monene te, mayi ya mozindo monene? Oyo asalaki bozindo ya mayi monene nzela pona basikolami baleka? 11. Pe baoyo Yawe asikoli bakozonga pe bakoya na Siona na banzembo ya elonga; pe esengo ya seko ekozala likolo ya mito na bango; bakozwa esengo pe kosepela; mawa pe komitungisa ekokima. 12. Ezali ngai, ezali ngai, oyo abondisaka bino! Ozali nani, po obanga na tina ya mutu oyo akokufa, pe mwana ya mutu oyo akokoma lokola matiti, 13. Pe ete obosana Yawe oyo akela yo, oyo atanda likolo pe atonga mabele, pe olenga tangu nyonso mokolo mobimba liboso ya kanda ya moniokoli, tangu azali komibongisa pona kobebisa? Pe kanda ya moniokoli ezali wapi? 14. Ye oyo agumbami na se na miniololo akozwa kala mingi te bonsomi, pe akokufa te na kati ya libulu pe akozanga te lipa na ye. 15. Kasi ngai, nazali Yawe Nzambe na yo, oyo azali koningisa mayi monene, pe kogangela mbonge na yango; kombo na ye ezali Yawe na mapinga. 16. Pe natie maloba na ngai na monoko na yo pe nazipi yo na elili ya loboko na ngai, pona kotanda likolo pe kotia mabele, pe koloba na Siona: Ozali batu na ngai!

17. Lamuka, lamuka, telema, Yerusaleme, oyo ameli kopo ya kanda na ye na loboko ya Yawe, oyo ameli, oyo asilisi kino litanga ya suka ya kopo ya kizunguzungu! 18. Mutu moko te azalaki kotambwisa ye na bana mibali nyonso oyo abotaki, ata moko te oyo asimbaki ye na loboko na bana nyonso oyo abokolaki. 19. Makambu mibale ekomelaki yo—nani akokaki koyokela yo mawa?—kobukama pe libebi, pe nzala pe mopanga. Nakobondisa yo ndenge nini? 20. Bana na yo ya mibali bakweyi na kizunguzungu; balali na bibandeli ya babalabala nionso lokola mboloko oyo ekangami na monyama; batondi na kanda ya Yawe, na pamela ya Nzambe na yo. 21. Yango wana, yoka oyo, yo oyo ozali na pasi pe na kwiti, kasi ya vino te. 22. Boye Nkolo na yo, Yawe, pe Nzambe na yo oyo azali kobundela likambu ya batu na ye alobi boye: Tala, nazwi kopo ya kizunguzungu na loboko na yo, litanga oyo etikali ya kopo ya kanda na ngai; okomela yango lisusu te. 23. Pe nakotia yango na kati ya loboko ya baoyo bazali koniokola yo, oyo balobaki na molimo na yo: Gumbama, po toleka. Pe otiaki mokongo na yo lokola mabele, pe lokola balabala pona baleki.

Mokapo 52

1. Lamuka, lamuka, milata makasi na yo, Siona! Milata bilamba na yo ya kitoko, Yerusaleme, engumba mosantu! Po batu bakatakata ngenga te pe batu ya mbindo bakokota lisusu te na kati na yo. 2. Pupula putulu na yo; telema, fanda, Yerusaleme ; Omilongola miniololo oyo ekangami na kingo na yo ; mokangami, mwana mwasi ya Siona! 3. Po Yawe alobi boye: Bomitekaki pona pamba, pe bokosikolama na mbongo te. 4. Po Nkolo Yawe alobi boye: Na ebandeli batu na ngai bakitaki na Ejipito pona kofanda kuna, pe na likambu te Asuria aniokolaki bango. 5. Pe sik'oyo, nini nasengeli kosala awa? Elobi Yawe, ete batu na ngai balongolami pamba? Baoyo bazali kokonza bango bazali kolelisa bango, elobi Yawe, pe kombo na ngai ezali kofingama tangu nyonso mokolo mobimba. 6. Yango wana batu na ngai bakoyeba kombo na ngai; yango wana na mokolo wana bakoyeba ete nazali ndenge moko, ye oyo akoloba : Ngai oyo!

7. Boni ezali kitoko likolo ya bangomba makolo ya ye oyo azali komema sango malamu, oyo azali kosakola kimia, oyo azali kosakola sango malamu, oyo azali kosakola lobiko, oyo alobi na Siona : Nzambe na yo azali kokonzia! 8. Mongongo ya bakengeli na yo! Batomboli mingongo na bango, bayembi elongo banzembo ya elonga; po bakomona misu na misu tangu Yawe akozongisa Siona. 9. Boganga na esengo pe bosepela elongo, bisika oyo bitikalaki pamba na Yerusaleme; po Yawe abondisi batu na ye; asikoli Yelusaleme. 10. Yawe amonisi loboko na ye mosantu misu ya bikolo nyonso; pe suka nyonso ya mabele ekomona lobiko ya Nzambe na biso. 11. Bokende, bokende, bobima kuna, bosimba eloko ya mbindo te! Bobima na kati na yango, bomipetola, bino baoyo bomemi bambeki ya Yawe! 12. Po bokobima te na kopota mbangu pe bokokende lokola batu oyo bakimi te; po Yawe akokende liboso na bino, pe Nzambe ya Israel akozala oyo azali na sima ya nzela na bino.

13. Tala, mosali na ngai akosala na mayele; akotombolama pe akonetolama, pe akotiama likolo. 14. Kaka lokola batu mingi bakamwaki na somo komona yo—elongi na ye ebebisamaki penza koleka mutu nyonso, pe lolenge na ye ezalaki lokola oyo ya mwana mobali moko te ya mutu— 15. Boye ye akokamwisa bikolo mingi; bakonzi bakokanga minoko na bango na tina na ye; po bakomona oyo bayebisaki bango te, pe bakotala oyo bayokaki te.

Mokapo 53 1. Nani andimaki oyo biso tosilaki koyokisa? Loboko ya Yawe emonisami epayi ya nani? 2. Akomata liboso na ye lokola elenge ya nzete, lokola mosisa ya mabele oyo ekawuki. Azali na lolenge to na kongala moko te; tangu tozali komona ye, azali na lolenge te ete tozala na posa na ye. 3. Atiolami pe aboyami na batu, mutu ya bapasi, pe ayebi nini ezali konikwama, pe lokola ye oyo batu babombaka bilongi na bango epayi na ye; atiolami, pe topesaki ye ata lokumu te.

4. Solo, Ye amemi minioko na biso pe azwaki mikumba ya bapasi na biso; kasi biso, totalaki ye abetamaki, abetamaki na Nzambe, pe aniokwamaki. 5. Kasi azokaki (atobolamaki) pona masumu na biso, atutamaki pona mabe na biso; etumbu ya kimia na biso ezalaki likolo na ye, pe na bapota na ye tobikisami. 6. Biso banso lokola bampate tobungaki nzela, moko na moko na biso abalukaki na nzela na ye, pe Yawe atie likolo na ye mabe na biso nyonso. 7. Ye aniokwamaki pe amonaki pasi, pe afungolaki monoko na ye te. Bamemaki ye lokola mwana ya mpate na abatware pona kobomama, pe liboso ya baoyo bakataki pwale na ye, azalaki lokola mpate oyo afandi nye, pe afungolaki monoko te. 8. Na nzela ya konikwama pe na bosambisi, alongolami; pe nani akosakola libota na ye? Po alongolami na mokili ya batu ya bomoyi; po ya bobuki mibeko ya batu na ngai, ye abetamaki. 9. Pe bapesaki ye lilita na ye elongo na batu ya mabe; Kasi azalaki elongo na mozwi na liwa na ye, po asalaki mobulu te, pe bokosi ezalaki te na monoko na ye. 10. Kasi esepelisaki Yawe abuka ye; atiaki ye na pasi. Soki akabi molimo na ye likabo pona lisumu, akomona bokitani pe akoyeyisa mikolo na ye molayi, pe esengo ya Yawe ekozwa bolamu na loboko na ye. 11. Akomona mbuma ya pasi ya molimo na ye pe akotonda. Na boyebi na ye, mosali na ngai ya sembo akoteya (akokomisa) boyengebene mingi (bayengebene), pe Ye akomema mabe na bango. 12. Yango wana nakopesa ye eteni moko elongo na batu minene, pe akokabola biloko oyo bapunzaki elongo na batu ya makasi, pamba te asopaki molimo na ye ti na liwa pe atangamaki elongo na babuki mibeko, pe amemaki lisumu ya batu mingi pe abondelaki pona bababuki mobeko.

Mokapo 54

1. Ganga na mongongo ya esengo, mwasi ekomba oyo abotaka te; sepela pe ganga na esengo, yo oyo oboti te! Po bana ya mwasi oyo atikali pamba bazali mingi koleka bana ya mwasi oyo abala, yango nde Yawe alobi. 2. Bokomisa monene esika ya ndaku na bino ya kapo, pe tika ete basembola rido ya bandako na bino ya kofanda; kotika esika te; molayi basinga na yo pe kembisa bapike na yo. 3. Po okopanzana na loboko ya mobali pe na loboko ya mwasi, pe bakitani na yo bakozwa bikolo pe bakofandisa bingumba oyo etikali pamba. 4. Kobanga te, po okoyoka soni te; pe komitungisama te, po okotiolama te. Po okobosana soni ya bolenge na yo pe okokanisa lisusu te soni ya kotiolama ya bokufeli-mobali na yo. 5. Po ye oyo asala yo azali mobali na yo; kombo na ye Yawe na mapinga, pe ye oyo asikola yo, Mosantu ya Israel : abengami Nzambe ya mabele mobimba. 6. Po Yawe abengi yo lokola mwasi oyo asundolami pe oyo azali na mawa na elimo, pe mwasi ya bolenge, oyo abwakisami, elobi Nzambe na yo. 7. Po na mwa ntango moke nasundolaki yo, kasi na motema mawa mingi nakosangisa yo. 8. Na bosopani ya kanda nabombelaki yo elongi na ngai po na mwa tangu; kasi na boboto ya seko nakoyokela yo mawa, elobi Yawe, Mosikoli na yo. 9. po oyo ezali pona ngai lokola mayi ya Noa, tangu nalapaki ndayi ete mayi ya Noa ekoleka lisusu likolo ya mabele te; yango wana nalapi ndayi ete nakosilikela yo lisusu te, pe nakopamela yo te. 10. Tangu bangomba ekolongwa pe bangomba mike ekoningina, kasi boboto na ngai ekolongwa epayi na yo te, pe boyokani na ngai ya kimia ekoningana te, elobi Yawe, oyo ayokelaka yo mawa.

11. Ô mwasi ya mawa, oyo atindikami na mopepe makasi, oyo abondisami te, tala, nakotia mabanga na yo na kati ya mabanga ya stibine, pe nakotonga yo na safire; 12. Pe nakokomisa kongela na yo na mabanga ya ribi, pe bikuke na yo na mabanga ya talo, pe bamir lopango na yo nyonso na mabanga ya motuya. 13. Pe bana na yo nyonso ya mibali bakozala bayekoli na Yawe, pe kimia ya bana na yo ekozala monene. 14. Bokozala ya kokisama na boyengebene; okozala mosika na minioko, po okobanga yango te, pe na somo, po ekopusana pembeni na yo te. 15. Tala, bakosangana elongo, kasi ekowuta na ngai te : ye oyo nyonso akosangana po na kotelemela yo, akokwea na tina na yo. 16. Tala, ngai nakelaki mopelisi ya bibende oyo afulaka makala likolo ya moto pe asalaka esaleli po ya mosala na ye; pe ngai nasalaki mobebisi pona kobebisa. 17. Esaleli moko te oyo esalemi pona kobundisa yo ekolonga, pe monoko nyonso oyo ekotelema pona kobundisa yo na kosambisa, okokweyisa yango. Oyo ezali libula ya basali ya Yawe, pe boyengebene na bango ewuti epayi na ngai, elobi Yawe.

Mokapo 55

1. O, oyo azali naposa ya komela, boya na mayi; pe bino oyo bozali na mbongo te, boya, bosomba pe bolia; ee, boya, bosomba na mbongo te pe ofele vino pe miliki. 2. Pona nini bokotanga mbongo pona eloko oyo ezali lipa te, pe mosala na bino pona oyo etondisaka te? Boyoka, boyoka ngai na bokebi pe bolia oyo ezali malamu, pe molimo na bino esepela na biloko ya mafuta. 3. Botanda litoyi na bino pe boya epayi na ngai; boyoka, pe molimo na bino ekozala na bomoyi. Pe nakosala boyokani ya libela elongo na bino, ngolu na ngai epayi ya David.

4. Tala, nakomisi ye litatoli epayi ya batu, mokambi pe mokonzi ya ebele ya batu. 5. Tala, okobenga ekolo moko oyo oyebaki te; pe ekolo moko oyo eyebi yo te ekoya mbangu epayi na yo na tina ya Yawe Nzambe na yo, pe Mosantu ya Israel po apesi yo kembo.

6. Boluka Yawe tangu akomonana; bobelela ye tangu azali penepene. 7. Tika mutu mabe atika nzela na ye, pe mutu ya mbindo makanisi na ye, pe azonga epayi ya Yawe, pe akoyokela ye mawa, pe epayi ya Nzambe na biso, po alimbisaka mingi. 8. Po makanisi na ngai ezali makanisi na bino te, pe banzela na bino ezali banzela na ngai te, elobi Yawe. 9. Po likolo ezali likolo koleka mabele, ndenge moko pe banzela na ngai ezali lkolo koleka banzela na bino pe makanisi na ngai eleki makanisi na bino. 10. Po lokola mbula na neje ezali kokita longwa na likolo pe ezali kozonga kuna te, kasi epolisaka mabele pe ebotisaka yango pe ebotisaka fololo, pe epesaka moloni molona pe lipa na moleyi. 11. Bongo ekozala liloba na ngai oyo ekobima na monoko na ngai: ekozonga pamba epayi na ngai te, kasi ekosala oyo esepelisaka ngai pe ekokokisa mokano oyo natindaki yango. 12. Po bokobima na esengo pe bokokambama na kimia; bangomba pe bangomba mike ekopanzana liboso na bino na banzembo ya elonga, pe banzete nyonso ya zamba ekobeta maboko. 13. Na esika ya nzube, nzete ya sapin ekomata, pe na esika ya basende, mirte ekomata. Pe ekozala pona Yawe kombo pe elembo libela, oyo ekokatama te.

Mokapo 56

1. Yawe alobi boye: Bobatela bosambisi pe bosalela bosembo, po lobiko na ngai ezali penepene pona koya, pe bosembo na ngai pona komonisama. 2. Apambolami mutu oyo asali boye, pe mwana ya mutu oyo asimbi yango makasi; oyo abatelaka Sabata ete abebisa yango te, pe abatelaka loboko na ye po asala mabe te. 3. Pe ete mwana ya mopaya oyo akangami na Yawe aloba te : Yawe akaboli ngai, akaboli ngai penza na batu na ye, pe enike aloba te: Tala, ngai nazali nzete ekawuka. 4. Po Yawe alobi boye: Na ba-enike oyo babatelaka Basabata na ngai pe baponaka makambu oyo nasepelaka na yango pe basimbaka makasi boyokani na ngai, 5. Nakopesa bango na kati ya ndako na ngai pe na kati ya bamir na ngai esika pe kombo kitoko oyo eleki bana mibali pe bana basi; Nakopesa bango kombo ya libela oyo ekolongwaka te. 6. Pe na bana mibali ya bapaya oyo bakangami na Yawe pona kosalela ye pe kolinga kombo ya Yawe, pona kozala basali na ye, - ye oyo nyonso abatelaka Sabata pona kobebisa yango te, pe baoyo basimbaka makasi boyokani na ngai, - 7. Nakomema bango na ngomba na ngai mosantu pe nakosepelisa bango na kati ya ndako na ngai ya losambo : Bambeka na bango ya kotumba pe bambeka na bango ekondimama na etumbelo na ngai, po ndako na ngai ekobengama ndako ya mabondeli pona batu nyonso. 8. Nkolo Yawe, oyo azali kosangisa baoyo babenganaki na Israel, alobi: Nakosangisa lisusu batu mosusu epayi na ye, elongo na baoyo basangani awa.

9. Bino, banyama nyonso ya zamba, boya pona koliya, bino banyama nyonso ya zamba! 10. Bakengeli na ye nyonso bazali bakufi misu, bazanga boyebi. Bango nyonso bazali bambwa ya baba oyo bakoki koganga te, kolota, kolala, kolinga kolala pongi ; 11. Pe bambwa ya mongongo makasi, bayebi kotonda te : bazali babateli ya mpate oyo bazali mayele te. Bango nyonso babalusaka miso na bango na nzela na bango, moko-moko pona bolamu na ye, kino na oyo ya suka. 12. Boya, nakozwa vino, pe biso tokolangwa masanga ya makasi; pe lobi ekozala lokola lelo, pe kutu malamu koleka.

Mokapo 57

1. Moyengebene akokufa, pe mutu moko te akotia yango na motema; pe batu ya bolamu balongwe, kasi mutu moko te asosoli ete moyengebene alongwe mosika liboso ya mabe. 2. Akoti na kimia : baoyo batambolaki na kati ya nzela ya bosembo bapemi likolo na bambeto na bango.

3. Kasi bino, boya awa, bino bana ya bambikudi ya basi, bakitani ya ekobo pe ya mwasi ya ndumba. 4. Nani oyo bino bozali kotiola? Bokosembola monoko na bino liboso ya nani, pe na tina ya nani bokobenda lolemo na bino ? Bino bozali te bana ya kobuka mibeko, bokitani ya lokuta, 5. Boyetolaka moto elongo na bikeko na se ya nzete nyonso ya motane, bozali koboma bana mike na mabwaku, na se ya mabulu ya mabanga? 6. Na mabanga oyo babongisa petepete ya lobwaku ezali eteni na yo : yango ezali oyo ya yo; na yango osopi likabo ya masanga, obonzi likabo ya gato. Nakobondisama na makambu wana? 7. Likolo na ngomba moko molayi pe likolo otie mbeto na yo : kuna pe lisusu omati pona kobonza bambeka. 8. Pe otie ekaniseli na yo sima ya ekuke pe makonzí ya bikuke; po, okimi mosika na ngai, omibimisi. Pe omataki, okimisi mbeto na yo monene, pe otindi bango epayi na yo na koyokana; olingaki mbeto na bango, omoni bolumbu na bango. 9. Pe oyaki epayi ya mokonzi na mafuta, pe obakisaki bampaka na yo ya malasi; pe otindaki bamemi-sango na yo mosika, pe omikitisi kino na kati ya Sheol.

10. Na tina molayi ya nzela na yo, olembi; olobi te : Elikia ezali te! Ozwi makasi ya nguya na yo, yango wana olembi te. 11. Nani ozali kolenga, pe nani ozali kobanga, ete okosa pe okanisaki ngai te, pe ozwi yango na motema te? Banda kala nafandi nye, pe yo ozali kobanga ngai te? 12. Nakosakola boyengebene na yo pe misala na yo, pe ekozala litomba te pona yo. 13. tangu ogangi, tika ebele ya bikeko oyo osangisi bakangola yo! Kasi mopepe ekomema yango nyonso, pe mopepe moko ekolongola yango ; Kasi oyo nyonso akotiela ngai motema, akozwa mabele libula pe akozwa ngomba ya mosantu na ngai. 14. Pe bakoloba: Tombola, tombola, bongisa nzela; longola eloko nyonso oyo ezali kobetisa libaku na nzela ya batu na ngai!

15. Po boye alobi ye oyo azali likolo koleka pe atombwami, oyo afandi na seko, oyo kombo na ye ezali Mosantu: Nafandi na esika ya likolo pe ya mosantu, pe elongo na ye oyo azali na mawa pe molimo ya kobukana, pona kopesa bomoyi na molimo ya ye oyo azali na mawa, pe kopesa bomoyi na molimo ya kobukana. 16. Po nakowelana tangu nyonso te, pe nakosilika libela te; po elimo ekolemba liboso na ngai pe bapema oyo nasalaki. 17. Nasilikaki pona mabe ya lokoso na ye, pe nabetaki ye; Namibombaki pe nasilikaki, pe atambolaki ya kopengwa na bobungi nzela ya motema na ye. 18. Namoni banzela na ye, pe nakobikisa ye, pe nakokamba ye, pe nakozongisa mabondisi epayi na ye pe na libota na ye oyo bazali kolela. 19. Nakeli mbuma ya mbebu. Kimia, kimia na ye oyo azali mosika pe na ye oyo azali penepene ! Elobi Yawe; pe nakobikisa ye. 20. Kasi batu mabe bazali lokola mayi monene oyo etomboki na koningana, po ekokoka kozala na bopemi te, pe mayi na yango ezali kobwaka potopoto pe bosoto.

21. Kimia ezali te, elobi Nzambe na ngai, pona batu mabe.

Mokapo 58 1. Ganga na mongongo makasi, kotika te; tombola mongongo na yo lokola kelelo, pe sakola na batu na ngai botomboki na bango, pe na ndako ya Yakobo masumu na bango. 2. Nzokande balukaka ngai mokolo na mokolo pe basepelaka koyeba banzela na ngai, lokola ekolo oyo ekolinga kosala bosembo pe ekobwaka te bosambisi ya sembo ya Nzambe na ye. Basengi ngai mitindo ya bosembo; basepelaka kopusana penepene na Nzambe. 3. Pona nini tokokila bileyi, kasi omoni yango te? To tosili kokitisa milimo na biso, pe oyebi yango te?

Tala, na mokolo ya kokila bileyi na bino bolukaka bisengo na bino pe bozali koniokola basali na bino na misala makasi nyonso oyo ezali ya bino. 4. Tala, bokila bileyi pona kowelana pe koswana, pe kobeta na likofi moko ya mabe. Sik'oyo bokokilaka bileyi te, pona koyokisa mongongo na bino na likolo. 5. Ezali nde kokila bileyi lokola oyo nde ngai naponi, mokolo oyo mutu amikitaka na molimo na ye? Agumbaka moto na ye lokola nzete oyo ebimaka pembeni na mayi, pe atandaka likolo na ye elamba ya pe putulu—okobenga oyo kokila bileyi, pe mokolo kitoko epayi na Yawe? 6. Ezali nde oyo te kokila bileyi oyo ngai napona, kofongola miniololo ya mbindo, pona kolongola bikangami ya ekanganeli, pe kozongisa bonsomi na baoyo baniokwami, pe ete bobuka ekanganeli nyonso? 7. Ezali nde te okabola lipa na yo elongo na oyo azali na nzala, pe okotisa na kati ya ndako mobola oyo azangi ndako? Tangu omoni mutu moko bolumbu, ozipaka ye, pe omibomba te na mosuni na yo moko?

8. Bongo pole na yo ekobima lokola tongo-tongo, pe kolongono ya nzoto na yo ekobima nokinoki, pe boyengebene na yo ekokende liboso na yo, pe kembo ya Yawe ekozala mokengeli na yo ya sima. 9. Bongo okobelela, pe Yawe akoyanola; okosenga lisungi, pe akoloba: Ngai oyo. Soki olongoli ekanganeli na kati-kati na yo, pe kolakisa mosapi pe koloba maloba ya mabe, 10. Soki ozali kopesa molimo na yo epayi ya ye oyo azali na nzala pe otondisi molimo ya mutu oyo azali napasi, pole na yo ekobima na kati ya molili, pe molili na yo ekozala lokola midi. 11. Pe Yawe akokamba yo tangu nionso pe akotondisa molimo na yo na kati ya bokawuki pe akokembisa mikuwa na yo ezala mbangu; pe okozala lokola elanga oyo basopeli mayi, pe lokola liziba ya mayi oyo mayi na yango ezali kosila te.12. Pe baoyo ya yo bakotonga oyo ebebisamaki wuta kala; okotelemisa ba fondatio oyo etikalaki ya kobukana wuta mabota na mabota, pe okobengama: Mobongisi ya bisika oyo ebukana, Mozongisi ya banzela oyo balekaka malamu.

13. Soko obateli lokolo na yo na kobebisa Sabata pe kosala bosepeli na yo na mokolo mosantu na Ngai, soki obengi Sabata esengo na yo pe okumisi mosantu ya Yawe, pe soki okumisa Ye na koboya kolanda banzela na yo moko pe kolukaka bosepeli na yo moko pe koloba maloba ya pamba, 14. Bongo okomona esengo na Yawe, pe nakomema yo na punda likolo ya bisika oyo etombwana na mabele, pe nakoleyisa yo na libula ya Yakobo, tata na yo, po monoko ya Yawe elobi yango.

Mokapo 59

1 Tala, loboko ya Yawe ekomi mokuse te pona kokangola, to litoyi na ye ekomi kilo pona koyoka ; 2. Kasi ba mbindo na bino esali bokabwani kati na bino na Nzambe na bino, pe masumu na bino ebombi elongi na ye liboso na bino, pona ayoka te. 3. Po maboko na bino ezali mbindo na makila, pe misapi na bino na mbindo; mbebu na bino elobaki lokuta, pe lolemo na bino eyimakayimaki mbindo. 4. Ezali na moko te azali kobelela bosembo, pe moko te akosambisa na bosembo; batiaka elikya na eloko moko te pe balobaka lokuta; basalaka mabongisi ya minyoko pe babotaka mbindo. 5. Bazali kobimisa maki ya banyoka pe kotonga basinga ya arenye : ye oyo akolia maki na bango akokufa, pe soki baniati moko, ekobimisa nyoka. 6. Basinga ya ba arenye na bango ekokoma bilamba te, pe bakomizipa na misala na bango te; misala na bango mizali misala ya mbindo, pe misala ya mobulu mizali na maboko na bango. 7. Makolo na bango ekokende mbangu na mabe pe ekosala nokinoki pona kosopa makila ya ye oyo asali likambo te; makanisi na bango mazali makanisi ya mabe; kobebisama pe kopanzama ezali na banzela na bango. 8. Nzela ya kimia bayebi yango te, pe ezali na bosembo te na banzela ya bango; babebisi banzela na bango; ye oyo azali kotambola na kati na yango ayebi kimia te.

9. Na yango wana, bosambisi ya sembo ezali mosika na biso, pe bosembo ekomeli biso te. Tokotia elikya na pole, pe tala molili ! Kongenga, kasi totamboli na kati ya molili. 10. Tokolukaka komeka-meka na kosimbaka mir lokola bakufi misu, pe tokolukaka komeka-meka tosimbaka lokola nde tozali na misu te; tokobetaka libaku na midi, lokola na molili; kati na baoyo bazali na nzoto kolongono, tozali lokola bakufi. 11. Biso nyonso tozali koganga lokola ba urse pe kolela lokola pijeon. Tozali kozela bosambisi ya sembo, kasi ezali te; lobiko, ezali mosika na biso. 12. Po masumu na biso ezali kofulukama mingi liboso na yo, pe masumu na biso ezali kofunda na biso; po botomboki na biso ezali elongo na biso, pe toyebi mbeba na biso : 13. Kotombokela pe kowangana Yawe, pe kopesa Nzambe na biso mokongo, koloba koniokola pe botomboki, kobangisa makambu pe kobimisa maloba ya lokuta wuta na motema. 14. Pe bosambisi etindamaki sima, pe bosembo etelemi mosika; po bosolo ebeti libaku na balabala, pe bosembo ekoki kokota te. 15. Pe bosolo ezali kozanga, pe ye oyo akimi mabe akomi oyo bakopunza. Pe Yawe amoni yango, pe ezalaki mabe na misu na ye ete bosambisi ya bosembo ezalaki te. —

16. Pe amoni ete ezalaki mutu ata moko te, pe akamwaki ete ezalaki ata na molobeli moko te; pe loboko na ye ebikisaki ye, pe bosembo na ye epesaki ye makasi. 17. Pe alataki bosembo lokola ebombelo ya ntolo, pe ekoti ya lobiko na moto na ye, pe alataki lokola elamba, bilamba ya kozongisa mabe na mabe, pe alataki zuwa lokola nzambala. 18. Lolenge ezalaki etamboli, akofuta lifuti ya kanda epayi ya banguna na ye, kaka bongo na bayini na ye; akozongisa mabe na bisanga. 19. Wuta epayi moyi ekotaka, bakobanga kombo ya Yawe, pe na ebimeli ya moyi, kembo na ye. Tangu monguna akoya lokola ebale, Molimo ya Yawe akotombola bendele pona kotelemelaa ye. 20. Pe Mosikoli akoya na Siona pe epayi ya baoyo bazali na kati ya Yakobo baoyo batiki botomboki na bango, elobi Yawe. 21. Po na ngai, oyo ezali boyokani na ngai na bango, elobi Yawe: Molimo na ngai oyo ezali likolo na yo, pe maloba na ngai oyo natie na kati ya monoko na yo, ekolongwa na monoko na yo te, na monoko ya bakitani na yo te, pe na monoko ya bakitani ya bakitani na yo te, elobi Yawe, banda sik'oyo pe libela na libela.

Mokapo 60

1. Telema, ongenga, po pole na yo eye, pe kembo ya Yawe ekobima likolo na yo. 2. Po, tala, molili ekozipa mabele, pe molili ya monene batu; kasi Yawe akotelema likolo na yo, pe kembo na ye ekomonana likolo na yo. 3. Pe bikolo bakotambola na pole na yo, pe bakonzi na kongenga ya kobima na yo. 4. Tombolá miso na yo zingazinga na yo pe talá: bakosangana bango nyonso esika moko, bakoya epayi na yo; bana na yo ya mibali bakowuta mosika, pe bana na yo ya basi bamemami likolo na maboko na yo. 5. Bongo okomona pe okongenga, pe motema na yo ekobanga pe ekokoma monene; po ebele mingi ya mayi monene ekobaluka epayi na yo, bozwi ya mabota ekoyela yo. 6. Ebele ya bakamela ekozipa yo, bakamela ya Madian pe ya Efa; Bango nyonso bakowuta na Sheba, bakomema wolo pe mpaka ya malasi, pe bakosakola na esengo masanzoli ya Yawe. 7. Bitonga nyonso ya Kedare ekosangana epayi na yo, bampate-mibali ya Nebayote bakosalela yo; likabo oyo endimami, ekomata na etumbelo na ngai; pe nakongalisa ndako na kembo na ngai.

8. Baoyo bazali banani oyo bazali kopumbwa lokola lipata pe lokola bapijeon bakokende na bandako na bango ? 9. Po bisanga bakozelela ngai, pe wuta mosika, ba masuwa ya Tarsis bakoya liboso, pona komema bana na yo ya mibali, palata na bango pe wolo na bango elongo na bango, na kombo ya Yawe, Nzambe na yo, pe Mosantu ya Israel, po apesi yo lokumu. 10. Pe bana mibali ya bapaya bakotonga bamir milayi na yo, pe bakonzi na bango bakosalela yo. Po na kanda na ngai nabetaki yo, kasi na boboto na ngai nakoyokela yo mawa. 11. Pe bikuke na yo ekozala ya kofungwama tango nyonso, ekokangama te butu na moyi te, po ete bamemela yo bozwi ya bikolo, pe pona bamemela yo bakonzi na bango. 12. Po ekolo pe bokonzi oyo ekosalela yo te ekokufa, pe bikolo yango ekobebisama mobimba. 13. Kembo ya Liban ekoya epayi na yo, nzete ya sipre, ya pine pe ya bwisi elongo, pona kokomisa sika esika na ngai ya bosantu; pe nakokumisa esika ya makolo na ngai. 14. Pe bana mibali ya baniokoli na yo bakoya pe bakofukama liboso na yo, pe baoyo nyonso batiolaki yo bakogumbamela na se ya makolo na yo, pe bakobenga yo engumba ya Yawe, Siona ya Mosantu ya Israel.

15. Na esika ete osundolama pe oyinama, po moko te aleka (na nzela na yo), nakokomisa yo lokumu ya libela, pona esengo ya mabota na mabota. 16. Pe okofiba miliki ya bikolo pe okofiba mabele ya bakonzi; pe okoyeba ete ngai, nazali Yawe Mobikisi na yo pe Mosikoli na yo, Ya Nguya ya Yakobo. 17. Na esika ya bronze nakomema wolo, pe na esika ya ebende nakomema palata, pe na esika ya mabaya nakomema bronze, pe na esika ya mabanga, ebende. Pe nakotiela yo bakambi oyo ya kimia, pe ba majistra ya bosembo. 18. Mobulu ekoyokana lisusu te na kati ya mboka na yo, kobebisama pe kopanza na kati ya bandelo na yo; kasi okobenga bamir na yo Lobiko, pe bikuke na yo Masanzoli. 19. Moyi ekozala lisusu pole na yo te na mokolo, pe pole ya sanza ekongengisa yo lisusu te; kasi Yawe akozala pole na yo ya libela, pe Nzambe na yo kembo na yo. 20. Moyi na yo ekolalaka lisusu te, pe sanza na yo ekolongwaka te; po Yawe akozala pole na yo ya libela, pe mikolo ya matanga na yo ekosila. 21. Pe batu na yo, bango nionso, bakozala sembo; Bakozwa mboka pona libela na libela, etape oyo ngai naloni, mosala ya maboko na ngai pona kokumisa ngai. 22. Ya moke akokoma nkoto moko, pe oyo aleki moke akokoma ekolo moko ya makasi. Ngai, Yawe, nakoyesa yango mbangu na tangu.

Mokapo 61

1. Molimo ya Nkolo, Yawe ezali likolo na ngai, po ete Yawe apakoli ngai mafuta pona komemela batu ya komikitisa sango malamu; atindi ngai pona kobikisa baoyo mitema ebukana, pona kosakola bonsomi epayi ya bakangami na bowumbu pe kofungwama ya boloko epayi ya bakangami na boloko, 2. Pona kosakola mbula ya boboto ya Yawe pe mokolo ya Nzambe na biso akozongisa mabe na mabe, pona kobondisa baoyo nyonso oyo bazali na matanga. 3. Pona kotia pe kopesa baoyo bazali kolela na Siona motole kitoko na esika ya putulu ya moto, mafuta ya esengo na esika ya matanga, elamba ya masanzoli na esika ya elimo ya kolemba, po babengama bango banzete ya shene ya boyengebene, elanga ya Yawe pona akumisama.

4. Pe bakotonga lisusu oyo ebebisamaki wuta kala, pe bakotombola bisika ya kala oyo ebukanaka, pe bakozongisa sika bingumba oyo ebukanaki, bisika bitikalaki ya kobeba pona ba jeneratio nionso. 5. pe bapaya bakotelema wana pe bakoleyisa bitonga na bino, pe bana mibali ya bapaya bakozala basali bilanga na bino pe baloni na bino ya vino. 6. Kasi bino bokobengama banganga-Nzambe ya Yawe; bakoloba na bino ete: Basali ya Nzambe na biso. Bokolia bozwi ya bikolo pe bokozwa esika ya kembo na bango. 7. Na esika ya koyoka soni, bokozwa mbala mibale na bango ; na esika ya kosambwa, bakoganga na esngo pona lubula na bango, yango wana na kati na mokili na bango moko, bakozwa libula mbala mibale pe ekozala pona bango esengo ya libela. 8. Po ngai, Yawe, nalingaka bosambisi ya bosembo pe nayinaka oyo ya mbindo eyibami. Nakopesa bango mbano na bango na bosembo pe nakosala boyokani ya seko elongo na bango. 9. Pe bokitani na bango ekoyebana na kati ya bikolo, pe bana na bango na kati ya batu; baoyo nionso bakomona bango bakoyeba bango, ete bazali bokitani oyo Yawe apambola.

10. Komisepela, nakosepela kati na Yawe, molimo na ngai ekosepela na Nzambe na ngai; po alatisi ngai bilamba ya lobiko, azipi ngai na kazaka ya boyengebene, lokola mobali ya libala amitiaka motole na ye ya lokumu lokola nganga-Nzambe, pe lokola elenge mwasi ya libala amilataka na biloko na ye ya motuya. 11. Po lokola mabele ebimisaka mbuma na yango, pe lokola elanga ebimisaka milona na yango, bongo Nkolo Yawe akobimisa boyengebene pe masanzoli liboso ya bikolo nyonso.

Mokapo 62

1. Na tina ya Siona nakofanda nye te, pe na tina ya Yerusaleme nakovanda kimia te, kino boyengebene na ye ebima lokola kongenga ya pole, pe lobiko na ye lokola mwinda oyo ezali kopela. 2. Pe bikolo bakomona boyengebene na yo, pe bakonzi nyonso kembo na yo; pe bokobengama yo na kombo ya sika, oyo monoko ya Yawe Nkolo ekopona. 3. Pe okozala motole ya kitoko na loboko ya Yawe, pe ekoti ya lokumu ya bokonzi na loboko ya Nzambe na yo. 4. Bakobenga yo lisusu te asundolama, pe mokili na yo ekobengama lisusu te esika ebebisama. Po okobengama : Esengo na ngai kati na ye, pe mboka na yo : Mwasi ya libala; po Esengo ya Yawe ezali kati na yo, pe mokili na yo ekobala. 5. Lokola elenge mobali abalaka ngondo, bongo bana na yo ya mibali bakobala yo, pe ndenge mobali ya libala asepelaka pona mwasi na ye ya libala, bongo Nzambe na yo akosepela na tina na yo.

6. Likolo na bamir na yo, Yerusaleme, natie bakengeli; bakofanda nye soko moke te, mokolo mobimba pe butu mobimba. Bino oyo bokundolaka makanisi ya Yawe, bofanda nye te,  7.  Pe bopemisa ye te, ti tangu akotia Yerusaleme pe akokomisa yango tina ya masanzoli na mabele. 8. Yawe alapi ndayi na loboko na ye ya mobali pe na loboko ya nguya na ye: Nakopesa lisusu te ble na yo lokola bileyi epayi ya banguna na yo, pe soki bana mibali ya bapaya bakomela vino na yo oyo osalaki pona yango! 9. Po baoyo basangisi yango bakoliya yango pe bakosanzola Yawe; pe baoyo bakokamola yango bakomela yango na kati ya lopango na ngai ya bule.

10. Boleka, boleka na bikuke; bobongisa nzela pona batu; botombola, botombola nzela monene, bolongola mabanga; botia bendele liboso ya batu! 11. Tala, Yawe ayokisi yango kino na suka ya mabele: Boloba na mwana mwasi ya Siona: Tala, lobiko na yo eye; tala, lifuti na ye ezali elongo na ye, pe mbano na ye liboso na ye. 12. Pe bakobenga bango batu bosantu, basikolami na Yawe; pe yo okobengama oyo alukaka, engumba oyo esundolami te.

Mokapo 63

1. Nani oyo awuti na Edome, na Bozra, na bilamba ya langi ya motane, oyo azali na lokumu na bilamba na ye ya kitoko, oyo azali kotambola na monene ya nguya na ye? Nazali ye oyo alobaka na bosembo, oyo azali na nguya ya kobikisa. 2. Pona nini bilamba na yo ezali motane, pe bilamba na yo ezali lokola y aye oyo azali koniata esika ya kokamola vino?  3. Naniati ngai moko kaka esika ya kokamola vino, pe na kati ya batu, ata moto moko te azali elongo na ngai. Pe naniati bango na kanda na ngai pe nakamoli bango na kanda na ngai, pe ji na yango esopanaki na bilamba na ngai, pe nabebisi bilamba na ngai nyonso. 4. Po mokolo ya bozongisi mabe ezalaki na motema na ngai, pe mobu ya basikolami na ngai eyaki. 5. Pe natalaki, pe mosungi azalaki te; pe nakamwaki ete ezalaki na mutu moko te pona kosunga ngai; nzokande loboko na ngai moko esalisaki ngai, pe kanda na ngai esimbaki ngai. 6. Pe naniataki batu na se ya kanda na ngai pe nalangwisi bango na kanda na ngai; pe nasopaki ji na bango na mabele. —

7. Nakomikundola boboto ya Yawe, masanzoli ya Yawe, lolenge na nyonso oyo Yawe atondiselaki biso, pe bolamu monene alakisaki na ndako ya Israel, oyo atondisaki likolo na biso na lolenge na mawa na ye pe lolenge na ebele ya boboto na ye. 8. Pe alobi: Ya solo, bazali batu na ngai, bana mibali oyo bakokosa te, pe akomi Mobikisi na bango. 9. Na pasi na bango nyonso azalaki na pasi, pe Anjelu ya liboso na ye abikisaki bango; na bolingo na ye pe na ngolu na ye asikolaki bango, pe akumbaki bango, pe amemaki bango mikolo nyonso ya kala. 10. Kasi batomboki pe bayokisaki Molimo Mosantu na ye mawa, pe akomaki monguna na bango; ye moko abundisaki bango.

11. Kasi amikundolaki mikolo ya kala, ya Mose, pe ya batu na ye: Wapi ye oyo amatisaki bango na mayi monene, elongo na babateli ya mpate na ye? Wapi ye oyo atiaki Molimo ya bosantu na ye kati na ye, 12. Loboko na ye ya kembo oyo ezali kokamba bango na loboko ya mobali ya Mose; —oyo akabolaki mayi liboso na bango pona komipesa kombo ya seko, 13. Nani oyo atambusaki bango na bozindo, lokola mpunda na esobe? Babetaki libaku te. 14. Lokola bibwele oyo ezali kokita na lobwaku, Molimo ya Yawe apesaki bango bopemi. Na ndenge wana okambaki batu na yo, pona komisala kombo ya kembo.

15. Tala wuta na likolo, pe mona, wuta esika ya kofanda ya bosantu na yo pe ya kembo na yo ! Zuwa na yo pe misala na yo ya nguya ezali wapi ? Koningana ya motema na yo pe mawa na yo ekangami epayi na ngai? 16. Po ozali tata na biso : soki A raham ayebi biso te, pe Israel andimi biso te, yo, Yawe, ozali Tata na biso ; kombo na yo ezali : Mosikoli na biso wuta kala. 17. Pona nini, Yawe, ozali kopengwisa biso mosika ya banzela na yo ? po okomisa mitema na biso mabanga makasi po tobanga yo te ? Zonga na tina ya basali na yo, mabota ya libula na yo ! 18. Po na mwa tangu moke batu na yo ya bule bazwaki yango ; banguna na biso baniataki esika na yo mosantu na se ya makolo. 19. Tokomi lokola baoyo yo okonza te likolo na bango, oyo babengami na kombo na yo te. O, soki opasoli likolo! Soki olingaki kokita, pe bangomba ekoningana liboso na yo.

Mokapo 64

1. Lokola moto oyo ezali kotumba matiti, lokola moto ekotokisa mayi, pona koyebisa banguna na yo kombo na yo, po bikolo eningana liboso na yo!  2. Tangu osalaki makambu ya somo oyo tozelaki te, okitaki : liboso na yo bangomba eninganaki. 3. pe totikala koyoka nanu te, toyoka te na litoyi, lisu moko te amona yango, longola se yo, O Nzambe, oyo abongisa pona ye yo azali kozela ye. 4. Oye bokutani y aye oyo akosepelaka kosala bosembo, aoyo akanisaka yo na banzela na yo ! Tala, osilikaki, pe tosali lisumu; ...banzela na yo ezali libela, pe tokobika. 5. Biso nyonso tokomi mbindo, pe boyengebene na biso nyonso lokola elamba ya bosoto; biso nyonso tokawuki lokola kasa, pe mabe na biso lokola mopepe ekombolaki biso. 6. Pe ezali na mutu moko te oyo azali kobelela kombo na yo, oyo atelemi pona kokanga yo! Po obombeli biso elongi na yo, pe na tina ya mabe na biso oniangisi biso.

7. Pe sik'oyo, Yawe, ozali Tata na biso : tozali mabele ya lima; ozali ye oyo asalaki biso, pe biso nyonso tozali mosala ya maboko na yo. 8. Kosilika mingi te, ô Yawe, pe komikundola libela te mabe. Tala, biso : tozali banso batu na yo. 9. Bingumba na yo ya bosantu ekomi esobe; Siona ezali esobe, Yerusaleme etikali pamba. 10. Ndako na biso ya bule pe ya kembo, epayi oyo batata na biso bakumisaki yo, etumbami na moto, pe biloko na biso nyonso ya motuya esili kobebisama. 11. Okomikanga, Yawe, na komona makambu oyo ? Okofanda nye pe okoniokola biso mingi?

Mokapo 65

1. Ngai moko namitikaka balukaka na baoyo batunaki ngai te; Namimonisami na baoyo balukaki ngai te. Nalobaki : Ngai oyo, ngai oyo, epayi ya ekolo oyo ebelalaki kombo na ngai te. 2. Nasembolaki loboko na ngai mikolo nyonso epayi ya batu ya botomboki, oyo batambolaki na nzela oyo ezali malamu te, kolanda makanisi na bango moko. 3. Batu oyo bazali tangu nyonso kotumbolaka ngai na elongi, oyo bazali kopesa mbeka na bilanga pe kotumba mpaka ya malasi na bitumbelo ya babriki. 4. baoyo bafandaka na kati ya bakunda pe balekaka butu na bisika ya kobombana; baoyo baliaka mosuni ya ngulu, pe supu ya biloko ya mbindo ezali na kati ya basani na bango; 5. Balobaka: Yo telema mosika, kosimba ngai te, po nazali mosantu liboso na yo. Baoyo bazali milinga na zolo na ngai, moto oyo ezali kopela mokolo mobimba. 6. Tala, ekomami liboso na ngai; Nakofanda nye te, kasi nakozongisa, ee, nakozongisa na kati ya libumu na bango, 7. Elobi Yawe, ba mbindo na bino pe ba mbindo ya batata na bino elongo, oyo bazalaki kotumba mpaka ya malasi na bangomba pe bafingaki ngai na bangomba mike—pe nakomeka mosala na bango ya kala na libumu na bango.

8. Yawe alobi boye: Lokola vino ya sika ezwami na liboke, pe alobi: Bobebisa yango te, po lipamboli ezali kati na yango, nakosala yango pona bolamu ya basali na ngai, po nabebisa nyonso te. 9. Pe nakobimisa mokitani moko na Yakobo, pe na Yuda moko mozwi ya bangomba na ngai; pe baponami na ngai bakozwa libula ya mboka, pe basali na ngai bakofanda kati na yango. 10. Pe Sharon ekokoma esika ya kofanda pona etonga, pe Lobwaku ya Akore esika ya kolala pona bangombe, pona batu na ngai oyo balukaki ngai. 11. Kasi bino baoyo bosundoli Nkolo, bino bobosani ngomba na ngai mosantu, bobongisi mesa pona jipitere, pe botondisi vino esangani pona Venisi; 12. Natangi bino lisusu pona mopanga, pe bino banso bokogumbama na kati ya liwa ya kokatama kingo, po nabengaki pe boyanolaki te, nalobaki pe boyokaki te, pe po ete bokosala oyo ezali mabe na misu na ngai, pe boponaki oyo nasepelaka na yango te.

13. Yango wana, Nkolo Yawe alobi boye: Tala, basali na ngai bakolia, kasi bino bokozala na nzala; Tala, basali na ngai bakomela, pe bino bokozala naposa ya mayi; tala, basali na ngai bakosepela, pe bino bokozala na soni; 14. Tala, basali na ngai bakoyemba na esengo na tina ya esengo ya motema, pe bino bokoganga na tina ya pasi ya motema, pe bokoganga na tina ya kobukana ya molimo. 15. Pe bokotika kombo na bino lokola elakeli mabe epayi na baponami na ngai; po Nkolo Yawe akoboma yo pe akobenga basali na ye na kombo mosusu. 16. Na bongo ye oyo nyonso akomipambola na mokili akomipambola na kombo ya Nzambe ya solo, pe ye oyo nyonso akolapa ndayi na mokili akolapa ndayi na Nzambe ya solo. Po bapasi ya kala ekobosanama pe ekobombama na misu na ngai.

17. Po tala, nazali kokela likolo ya sika pe mabele ya sika, pe bakokanisaka lisusu te makambu oyo elekaki liboso, pe ekomataka lisusu te na mitema.

18. Kasi bosepela pe botonda na esengo libela na oyo nazali kokela; po tala, nazali kokela Yerusaleme po ya esengo, pe batu na ye, esengo ; 19. Pe nakosepela likolo na Yerusaleme pe nakosepela na batu na ngai. Pe mongongo ya kolela pe mongongo ya koganga ekoyokana lisusu kati na ye te. 20. Banda wana, mwana ya mikolo moke akozala lisusu te, pe mobange oyo akokisi mikolo na ye te. Po elenge mobali akokufa na mibu kama, pe mosumuki na mibu kama akolakelama mabe. 21. Pe bakotonga bandako pe bakofanda na yango, pe bakolona bilanga ya vino pe bakolia mbuma na yango ; 22. Bakotonga te pona mete mosusu afanda ; bakolona te pona ete mosusu alia. Po mikolo ya batu na ngai ekozala lokola mikolo ya nzete, pe baponami na ngai bakosalela misala ya maboko na bango. 23. Bakosala mosala ezanga tina te, pe bakobota te pona kobanga somo; po bazali molona ya bapambolami na Yawe, pe bakitani na bango elongo na bango. 24. Pe ekosalema ete, yambo baganga, nakoyanola, pe tangu bazali koloba, nakoyoka. 25. Loup na mwana-mpate bakolia elongo, pe nkosi akolia matiti lokola ngombe; pe putulu ekozala bileyi ya nyoka. Bakosala mabe te pe bakobebisa te likolo na ngomba na ngai mobimba ya bosantu, elobi Yawe.

Mokapo 66

1. Yawe alobi boye: Likolo ezali kiti na ngai ya bokonzi, pe mabele ezali etelemelo na ngai; ndako nini bokotongela ngai, pe esika nini ezali ya kopema na ngai? 2. Biloko oyo nyonso, loboko na ngai esalaki yango, pe biloko yango nyonso esalemi, elobi Yawe. Kasi ezali ye oyo nakotala: oyo azali mobola, pe oyo azali na elimo ya mawa pe ye oyo azali kolenga na liloba na ngai. 3. Ye oyo abomi ngombe, abeti mutu; ye oyo abonzi mbeka ya mwana-mpate, abukaka kingo ya mbwa; oyo apesi likabo ya gato, kasi ezali makila ya ngulu; ye oyo azali kopesa ekaniseli ya mpaka ya malasi azali lokola ye oyo azali kopambola ekeko. Po baponi banzela na bango moko pe milimo na bango esepeli na makambu na bango ya mbindo, 4. Ngai lokola nakopona pe pasi na bango pe nakomemela bango oyo bazali kobanga, po nagangaki, kasi moko te ayanolaki; Nalobaki, kasi bayokaki te, kasi basalaki oyo ezali mabe na misu na ngai pe baponaki oyo nasepelaka na yango te.

5. Boyoka liloba ya Yawe, bino oyo bozali kolenga na liloba na ye: Bandeko na bino oyo bayinaki bino pe babwakaki bino na tina ya kombo na ngai, bazalaki koloba: Tika Yawe akumisama, ete biso tomona esengo na bino! Kasi bango bakoyoka soni.

6. Mongongo ya mobulu ewuti na engumba, mongongo moko ewuti na tempelo, mongongo ya Yawe oyo azongisaka lifuti na banguna na ye.

7. Liboso ayoka pasi ya kobota, abotaki; liboso ete pasi na ye eya, asilaki kobota mwana mobali. 8. Nani ayoki likambu ya boye? Nani amoni likambu ya ndenge wana? Mboka moko ekoki kobotama na mokolo moko? Ekolo ekoki kobotama kaka mbala moko? Po tangu kaka Siona azalaki na pasi ya kobota, abotaki bana na ye ya mibali. 9. Pe ngai nakomema kino na tangu ya kobota, kasi nakobota te? Elobi Yawe. Ngai, oyo nabotisaka, nakokanga libumu? Elobi Nzambe na yo.

10. Bosepela elongo na Yerusaleme pe botonda na esengo na tina na ye, baoyo nyonso balingaka ye; bosepela na esengo elongo na ye, bino nyonso oyo bozali kosala matanga likolo na ye; 11. Po bokomela mabele pe bokotonda na miliki ya mabele libondisi na ye; po bokofiba pe bokosepela na mabele ya kembo na ye. 12. Po Yawe alobi boye: Tala ngai, nakopanza kimia likolo na ye lokola ebale, pe kembo ya bikolo lokola ebale esopani koleka ndelo. Bokomela mabele, bakomema yo na maboko, pe bakobeze-beze yo na mabolongo. 13. Lokola mutu oyo mama na ye akobɔndisa ye, ngai pe bongo nakobondisa bino; pe bokobndisama na Yerusaleme. 14. Pe bokomona yango, pe motema na bino ekosepela, pe mikuwa na bino ekobimisa fololo lokola matiti ya motane. Pe loboko ya Yawe ekoyebana na kati ya basali na ye, pe akosopa kanda na ye likolo ya banguna na ye.

15. Po tala, Yawe akoya na moto, pe bashar na ye lokola mopepe, pona kozongisa kanda na ye na kanda, pe pamela na ye na elongo na kopela moto. 16. Po Yawe akokota na bosambisi elongo na misuni nyonso na nzela ya moto pe na mopanga na ye; pe babomami ya Yawe bakozala mingi. 17. Baoyo bakomibulisa pe komipetola na  kati na bilanga, na kolanda moko na kati-kati, kolia mosuni ya ngulu pe biloko ya mbindo pe mpuku, bakokufa bango nyonso elongo, elobi Yawe.

18. Pe ngai, misala na bango pe makanisi na bango, ekomi pona nasangisa bikolo nyonso pe minoko nyonso, pe bakoya pe bakomona kembo na ngai. 19. Pe nakotia elembo na kati na bango; pe nakotinda baoyo bakokima na kati na bango epayi ya bikolo: na Tarsisi, na Pulo, pe na Lude, oyo bayebi malamu kobwaka likonga; na Tubale pe na Javan, na bisanga mosika, oyo bayoki sango na ngai te, pe bamonaki kembo na ngai te; pe bakosakola kembo na ngai na kati ya bikolo. 20. Pe bakomema bandeko na bino nyonso, kati na bikolo nyonso, na likabo epayi ya Yawe, likolo na bapunda, na bashar, na bashario oyo ezipami kitoko, na bapunda ya mibali pe na bakamela, na ngomba ya mosantu na ngai, Yerusaleme, elobi Yawe, lokola bana ya Israel bakomema likabo na mbeki ya peto na ndako ya Yawe. 21. Pe kati na bango, nakozwa pe bamosusu banganga-Nzambe, Balevi, elobi Yawe.

22. Po lokola likolo ya sika pe mabele ya sika, oyo nazali kosala, ekotikala liboso na ngai, elobi Yawe, ndenge moko pe bokitani na bino pe kombo na bino ekotikala. 23. Pe ekosalema ete banda na sanza ya sika ti na sanza ya sika, pe banda na sabata ti na sabata, mosuni nyonso ekoya pona kogumbamela liboso na ngai, elobi Yawe. 24. Pe bakobima pe bakomona bibembe ya baoyo batombokeli ngai, po ete mitiopi na bango ekokufa te, pe moto na bango ekokufa te, pe bakozala eloko ya kele pona mosuni nyonso.