MASESE

Mokapo 1

1. Masese ya Salomo, mwana ya David, mokonzi ya Israel; 2. Pona koyeba bwania pe malakisi, pona kososola maloba ya bososoli; 3. Pona kozwa malakisi kati na bwania, na bosembo, na bosambisi ya sembo, pe na bosembo; 4. Pona kopesa mayele na bayuma oyo bazangi bososoli, pe boyebi pe mayele ya kokanisa na elenge mobali. 5. Mutu ya bwania akoyoka pe akobakisa siansi, pe mutu ya mayele akozwa bososoli ya kokamba. 6. Pona kososola lisese pe sambole, maloba ya batu ya bwania pe maloba na bango oyo ezali na kuku.

7. Kobanga Yawe ezali ebandeli ya boyebi; bazoba batiolaka bwania pe malakisi.

8. Yoka, mwana na ngai, malakisi ya tata na yo, pe kotika te mateya ya mama na yo; 9. Po ekozala na moto na yo ekoti ya lokumu ya ngolu, pe mayaka kitoko na kingo na yo.

10. Mwana na ngai, soki basumuki balingi kopengwisa yo, komitika te. 11. Soki balobi: Yaka elongo na biso, tokotia mitambo pona makila, tokomibomba pona kotala oyo ayebi eloko te kaka pona pamba ; 12. Tokomela bango bazali na bomoyi, lokola Sheol, pe mobimba nionso lokola baoyo bazali kokita na kati ya libulu. 13. Tokokuta biloko ya motuya ya ndenge na ndenge, tokotondisa bandako na biso na biloko topunzi. 14. Zwa eteni na yo kati na biso, ekozala na saki moko ya ebombeli pona biso nyonso : 15. Mwana na ngai, kotambola elongo na bango te; bomba lokolo na yo na nzela na bango ; 16. Po makolo na bango ekimaka mbangu na mabe, pe bazali kosala mbangu pona kosopa makila. 17. Po monyama epalangani pamba liboso ya misu ya nyonso oyo ezali na mapapu ; 18. Pe bango batie mitambo na kotelemela makila na bango moko, pe bamibombi pona bomoyi ya bango moko. 19. Yango ezali boye banzela ya mutu nyonso oyo alukaka litomba ya kozanga bosembo, oyo azali kolongola bomoyi ya baoyo bazali na yango.

20. Bwania agangi na libanda, azali koyokisa mongongo na ye na bisika ya balabala; 21. Azali  koganga na ekoteli ya bisika ya makelele, na bifungeli ya bikuke; alobaka maloba na ye na kti ya engumba: 22. Bayuma oyo bazanga bososoli, kino tangu boni bokolinga boyuma, pe batioli bakosepela na kotiola, pe bazoba bakoyina boyebi? 23. Bozonga na pamela na ngai; tala, nakosopa pona bino molimo na ngai, nakosala bino boyeba maloba na ngai.

24. Po nagangaki pe bino boboyaki, pamba te nasembolaki loboko na ngai pe moko te ayokaki. 25. Pe bobwaki batoli na ngai nyonso pe bolingaki te pamela na ngai,

26. Ngai lokola nakoseka tangu pasi na bino, nakotiola tangu bobangi na bino ekoya,

27. Tangu bobangi na bino ekoya lokola libebi ya mbalakaka pe pasi na bino ekoya lokola mopepe makasi, tangu pasi pe mitungisi ekoyela bino :

28. Bongo bakobelela epayi na ngai, pe nakoyanola te; bakoluka ngai na ngonga ya liboso, kasi bakomona ngai te.

29. Po bayinaki boyebi pe baponaki te kobanga Yawe,

30. Pamba te balingaki toli na ngai te, kasi batiolaki pamela na ngai nyonso,

31. Bakoliya mbuma ya nzela na bango pe bakotonda na toli na bango moko.

32. Po botomboki ya batu pamba ekoboma bango, pe bozwi ya bazoba ebebisaka bango.

33. Kasi oyo akoyoka ngai, akofanda na kimia pe akozala na kimia, na kozanga kobanga mabe.

Mokapo 2

1. Mwana na ngai, soki oyambi maloba na ngai pe obombi mitindo na ngai kati na yo

2. Pona kotia bokebi na litoyi na yo na bwanya, soki otie motema na yo namayele;

3. Soki obengi mayele, soki opesi mongongo na yo na bososoli;

4. Soki oluki yango lokola palata pe oluki yango lokola biloko ya motuya oyo ebombami,

5. Bongo okososola bobangi ya Yawe pe okomona boyebi ya Nzambe.

6. Po Yawe apesaka bwania; na monoko na ye boyebi pe bososoli :

7. Abombaka toli ya malamu pona batu ya sembo; azali nguba pona baoyo batambolaka na kati ya sembo,

8. Pona kobatela banzela ya boyengebene pe kobatela nzela ya basantu na ye.

9. Bongo okososola boyengebene pe bosambisi ya sembo pe sembo, nzela nyonso ya malamu.

10. Soki bwania ekoti na kati ya motema na yo pe boyebi ezali kosepelisa molimo na yo. 11 bososoli ekobatela yo, mayele ekobomba yo:

12. Pona kobikisa yo na nzela ya mabe, na mutu oyo alobaka makambu ya bosoto; 13. Na baoyo babwaka banzela ya sembo pona kotambola na banzela ya molili; 14. Basepeli nakosala mabe, baoyo batondaka na esengo na kati ya mabe, 15. Baoyo banzela na bango ezali ya kotengama pe babungaka na kati ya nzela na bango;

16. Pona kokangola na mwasi mopaya, na mwasi mopaya oyo asalelaka maloba ya sukali, 17. Oyo asundola motambwisi ya bolenge na ye pe abosani boyokani ya Nzambe na ye; 18. Po ndaku na ye ebalusama na epayi ya liwa, pe banzela na ye ememaka epayi ya bakufi : 19. Oyo  nionso akota epayi na ye azonga te pe akoma te na banzela ya bomoyi ; 20. — ete otambola na nzela ya batu malamu pe obatela banzela ya bayengebene. 21. Po batu ya sembo bakofanda na mokili, pe batu oyo bazangi mbeba bakotikala kuna ; 22. Kasi batu mabe bakolongwa na mokili, pe batu ya bokosi bakolongwa na misisa na yango.

Mokapo 3

1. Mwana na ngai, kobosana malakisi na ngai te, pe tika motema na yo ebatela mitindo na ngai ; 2. Po bakobakisela yo mikolo milayi, pe bambula ya bomoyi, pe kimia.

3. Tika ete bolamu pe solo etika yo te; kanga yango na kingo na yo, koma yango na mesa ya motema na yo, 4. Pe okozwa boboto pe bwania malamu na misu ya Nzambe pe ya batu.

5. Tia motema na yo mobimba na Yawe pe kotia motema te na mayele na yo moko ; 6. Na banzela na yo nyonso yeba ye, pe akokamba banzela na yo.

7. Kozala bwania na misu na yo moko te; banga Yawe pe longwa na mabe : 8. Ekozala kisi pona makasi ya nzoto na yo, pe ekopemisa mikuwa na yo.

9. Kumisa Yawe na biloko na yo pe na mbuma ya liboso ya bokoli na yo nyonso. 10. Bongo bandaku na yo ya bibwɛlɛ ekotonda na biloko mingi, pe bambeki na yo ekotonda na vino ya sika.

11. Mwana na ngai, kotiola malako ya Yawe te to koyina pamela na ye te. 12. Po na mutu oyo alingaka, Yawe apesaka ye disiplini, ndenge tata apesaka mwana oyo asepeli na ye.

13. Apambolami mutu oyo azwi bwania, pe mutu oyo azwi bososoli! 14. Po ete kozwa yango ezali litomba malamu koleka litomba ya palata, pe litomba na yango eleki wolo ya malamu. 15. Ezali na motuya mingi koleka rubi, pe eloko moko te oyo ozali naposa na yango ekoki kokokana na ye : 16. Bomoyi molayi ezali na loboko na ye ya mobali, pe na loboko na ye ya mwasi ezali na bozwi pe lokumu ; 17 Banzela na ye ezali banzela ya esengo, pe banzela na ye nyonso ezali kimia. 18. Azali nzete ya bomoyi pona baoyo basimbaka ye, pe oyo asimbaka ye makasi, apambolami.

19. Yawe abandisaki mabele na bwania; na bososoli atiaki likolo. 20 Na boyebi na ye, bozindo ekabwanaki, pe mapata ekitisaki mamwe.

21. Mwana na ngai, kolongola ye na misu na yo te : bomba toli ya malamu pe bososoli, 22. Pe bakozala bomoyi pona molimo na yo pe ngolu ya kingo na yo. 23. Bongo okotambola na kimia malamu na nzela na yo, pe lokolo na yo ekobeta libaku te. 24. Soki olali, okobanga te; kasi okolala pe mpɔngi na yo ekozala elengi. 25. Kobanga te somo ya mbalakaka, to bobebisi ya batu mabe tangu ekoya; 26. Po Yawe akozala elikia na yo pe akobatela lokolo na yo esimbama te.

27. Koboya te bolamu epayi na oyo esengeli, tangu ezali na nguya na yo ya kosala yango.

28. Koloba te na mozalani na yo ete: Kende pe zonga, pe lobi nakopesa yo yango, tangu ozali na yango.

29. Kokanisa mabe te po na moninga na yo, tangu azali kofanda elongo na yo na kimia.

30. Koswana pamba te na mutu, longola kaka soki asali yo mabe.

31. Kolula te mutu ya mobulu, pe kopona ata nzela na ye moko te.

32. Po mutu mabe azali kele epayi ya Yawe, pe sekele na ye ezali epayi ya batu ya sembo. 33. Elakeli mabe ya Yawe ezali na ndako ya batu mabe, kasi apambolaka esika ya kofanda ya bayengebene. 34. Ya solo, akotiola batioli pe akopesa ngolu na batu ya komikitisa. 35. Batu ya bwania bakozwa lokumu, kasi kotombolama ya bazoba ezali soni.

Mokapo 4

1. Bana mibali, boyoka malakisi ya tata pe bosala likebi pona koyeba mayele ; 2. Po nazali kopesa bino mateya ya malamu; kotika mateya na ngai te. 3. Po nazalaki mwana mobali pona tata na ngai, mwana alingami mingi pe se moko na misu ya mama na ngai. 4. Azalaki kolakisa ngai pe kolobaka na ngai: Tika motema na yo esimba maloba na ngai; obatela mitindo na ngai, pe ozala na bomoyi. 5. Zwa bwania, zwa mayele; kobosana yango te, pe kolongwa na maloba ya monoko na ngai te. 6. Kobwaka yango te, pe ekobatela yo; linga yango, pe akobatela yo. 7. Ebandeli ya bwania ezali: Zwa bwania, pe na motuya ya nyonso oyo ozali na yango, zwa mayele. 8. Tombola yango, pe yango ekotombola yo; akopesa yo lokumu tangu okoyamba yango. 9. Akotia ekoti ya lokumu ya ngolu likolo na moto na yo, ekopesa yo motole ya kembo.

10. Yoka, mwana na ngai ya mobali, pe yamba maloba na ngai, pe mibu ya bomoyi na yo ekobakisama. 11. Nakoteya yo nzela ya bwania, nakokamba yo kati na banzela ya sembo. 12. Tangu okozala kotambola, matambe na yo ekozala na mikakatano te, pe soki opoti mbangu, okobeta libaku te. 13. Simba makasi malakisi, kotika yango te; bomba yango, po ezali bomoyi na yo.

14. Kokota na nzela ya batu mabe te, pe kotambola te na kati ya nzela ya mabe. 15. Longwa na yango, koleka na kati na yango te; longwa na yango, pe leka nzela mosusu. 16. Po balalaka te soki basali mabe te, pe pongi na bango elongwaka soki babetisi te mutu libaku. 17. Po baliyaka lipa ya makambu mabe pe bamelaka vino ya mobulu. 18. Kasi nzela ya bayengebene ezali lokola mwinda ya kongenga oyo ezali kongenga pe kongenga kino mokolo ya kokoka ekotiama. 19. Nzela ya batu mabe ezali lokola molili; bayebi te esika nini bakobeta libaku.

20. Mwana na ngai ya mobali, keba na maloba na ngai; tia litoyi na yo na maloba na ngai. 21. Tika ete elongwa na misu na yo te; bomba yango na kati ya motema na yo ; 22. Pamba te ezali bomoyi pona baoyo bakutani na yango, pe nzoto kolongono pona mosuni na bango nyonso.

23. Batela motema na yo koleka na nyonso oyo obatelaka, po na yango maziba nyonso ya bomoyi ewutaka.

24. Longola mabe na monoko na yo, pe longola mosika na yo bokosi mabe ya mbebu.

25. Misu na yo etala sembo liboso, pe popiele na yo etala sembo liboso.

26. Bongisa nzela ya makolo na yo, pe banzela na yo nyonso ezala na molongo. 27. Kobaluka na loboko ya mobali to na loboko ya mwasi te; longola lokolo na yo na mabe.

Mokapo 5

1. Mwana na ngai ya mobali, tia bokebi na bwania na ngai, tia litoyi na yo na bososoli na ngai; 2. Pona obatela makanisi na yo pe mbebu na yo ebatela boyebi.

3. Po mbebu ya mwasi mopaya esopaka mafuta ya nzoyi, pe mafuta ya lolemo na ye ezali elengi koleka mafuta; 4. Pe na sima azali bololo lokola absinte, makasi lokola mopanga ya mino mibale. 5. Makolo na ye ekita ti na liwa, matambe na ye ekoma ti na Sheol, 6. Na boye ete apesa kilo te na nzela ya bomoyi; banzela na ye ezali koyengayenga, ayebi yango te.

7. Pe sik’oyo bongo, bana mibali, boyoka ngai, pe bobaluka te na maloba ya monoko na ngai. 8. Longola nzela na yo mosika na ye, pe kopusana pene na ekoteli ya ndako na ye te; 9. Noki te opesa lokumu na yo epayi ya basusu, pe bambula na yo epayi ya batu ya motema mabe. 10. Noki  te bapaya batonda na bozwi na yo, pe misala na yo ekoma na kati ya ndako ya mopaya; 11. Pe omilela na suka ya mikolo na yo, tangu mosuni na yo pe nzoto na yo ekosila; 12. Pe okoloba ete: Ndenge nini nayinaki malakisi, pe motema na ngai etiolaki pamela? 13. Ndenge nini nayokaki te mongongo ya balakisi na ngai, pe natiaki litoyi na ngai te epayi ya baoyo bazalaki koteya ngai? 14. Nazalaki pene na kati ya makambu nyonso ya mabe, na kati ya lisanga pe liyangani.

15. Mela mayi ewuti na liziba na yo, pe oyo ezali kosopona na liziba na yo. 16. Maziba na yo ekosopana libanda, bibale mike ya mayi na babalabala. 17. Tika yango ezala ya yo moko, kasi ya bapaya elongo na yo te. 18. Tika ete liziba na yo epambolama, pe osepela na mwasi ya bolenge na yo; 19. Mwana ntaba mwasi ya bolingo, pe mwana ya mboloko oyo atondi na ngolu; tika ete mabele na ye elangwisa yo na esengo tangu nyonso; ozala tangu nyonso ya kobendama na bolingo na ye. 20. Pe pona nini, mwana na ngai ya mobali, osengeli mwasi mopaya apengwisa yo na bolingo, pe kosimba-simba mabele ya mwasi mopaya?

21. Po banzela ya mutu ezali liboso ya misu ya Yawe, pe atalelaka banzela na ye nyonso. 22. Mutu mabe, mbeba na ye ekokanga ye, pe akosimbama na basinga ya lisumu na ye; 23. Akokufa pona kozanga disiplini, pe akoyengayenga na monene ya bozoba na ye.

Mokapo 6

1. Mwana na ngai, soki otelemi mopesi garanti pona mozalani na yo, to obetaki loboko na yo pona mopaya, 2. Okangami na motambo ya maloba ya monoko na yo, okangami na maloba ya monoko na yo. 3. Mwana na ngai, sala boye : pe omikangola, lokola okweyi na loboko ya mozalani na yo: kende, omikitisa, pe otingama na kotungisa mozalani na yo. 4. Kotika te ete misu na yo elala, pe masasamba ya misu na yo elala pongi te; 5. Omikangola lokola mboloko na loboko [ya mobomi-nyama], pe lokola ndeke na loboko ya mokangi ndeke.

6. Kende epayi ya furmi, yo goyigoyi; talela banzela na ye pe zala na bwania. 7. Ye, azali na mokonzi te, mokengeli te, pe guvernere te, 8. Abongisaka lipa na ye na eleko ya molunge makasi, pe asangisaka bileyi na ye na tangu ya kobuka mbuma. 9. Kino tangu nini, goyigoyi, okozala ya kolala? Tangu nini okolamuka na pongi na yo? 10. Mwa bapongi, mwa kozwaka bapongi, mwa kokanga maboko pona kolala... 11. Pe kimobola na yo ekoya lokola motambwisi, pe bolumbu na yo lokola mutu azali na bibundeli.

12. Mutu oyo azali kotambola na monoko na ye ya mabe, azali mutu ya Belial, mutu oyo azangi boyengebene; 13. Abetaka-betaka misu na ye, azali koloba na kobetabeta makolo, azali koteya na misapi na ye; 14. Azali na makanisi ya mabe na kati ya motema na ye, akanisaka makambu ya mabe tangu nyonso, alonaka koswana. 15. Yango wana pasi na ye ekoya na mbalakaka; na mbala moko akobukana na mbalakaka, pe lobiko ekozala te.

16. Ezali na makambu motoba oyo Yawe ayinaka, pe ya sambo oyo ezali likambo ya kele na molimo na ye : 17. Misu ya lolendo, lolemo ya lokuta,pe maboko oyo ezali kosopa makila ya oyo ezali na mbeba te, 18. Motema oyo ekanisaka mabongisi mabe, pe makolo oyo ekendaka mbangu na mabe. 19. Motatoli ya lokuta oyo alobaka lokuta, pe oyo abimisaka koswana kati na bandeko.

20. Mwana na ngai, batela etinda ya tata na yo pe kobwaka mateya ya mama na yo te. 21. Kanga yango tangu nyonso na motema na yo, kanga yango na kingo na yo. 22. Tangu okotambola, yango ekokamba yo, tangu okolala, ekokengela yo, tangu okolamuka, ekosolola elongo na yo. 23. Po mobeko ezali mwinda, pe liteya ezali pole, pe pamela ya disiplini ezali nzela ya bomoyi, 24. Pona kobatela yo na mwasi mabe, pe na maloba sukali ya monoko ya mwasi mopaya. 25. Kozala te naposa ya kitoko na ye na motema na yo, pe kotika te ye akanga yo na misu na ye. 26. Po na nzela ya mwasi ya ndumba okokoma ata na mwa limpa, pe mwasi ya mutu mosusu akobengana molimo ya motuya.

27. Mutu akoki kokotisa moto na libumu na ye pe bilamba na ye ezika te? 28. Soki mutu atamboli likolo ya makala oyo ezali kopela, pe makolo na ye ekozika te? 29. Bongo ye oyo akoti epayi na mwasi ya moninga na ye... oyo akosimba ye akozwa etumbu te. 30. Moyibi atiolamaka te soki ayibi pona kotondisa molimo na ye tangu azali na nzala. 31. Pe soki bamoni ye, akozongisa mbala sambo, akopesa biloko nyonso ya ndako na ye. 32. Oyo asali ekobo na mwasi azali zoba; oyo asali yango abebisi molimo na ye moko : 33. Akozwa pota pe kotiola, pe kofinga ye ekolongwamaka te; 34. Po zuwa kati na mutu ezali kanda, pe akoyoka mawa te na mokolo ya kozongisa mabe. 35. Akondima bomikabi nyonso te, pe akotonda te ata soki bozali kopesa makabo mingi.

Mokapo 7

1. Mwana na ngai, batela maloba na ngai pe bomba mitindo na ngai kati na yo. 2. Batela mitindo na ngai, pe okozala na bomoyi, pe liteya na ngai lokola pome ya lisu na yo. 3. Kanga yango na misapi na yo, koma yango likolo ya mesa ya motema na yo. 4. Loba na bwania: Ozali ndeko na ngai ya mwasi! Pe benga mayele moninga na yo. 5. Pona kobatela yo na mwasi oyo mopaya, na mopaya mwasi oyo asalelaka maloba ya sukali.

6. Po nazalaki kotala na fenetre ya ndako na ngai na nzela ya madusu na ngai, 7. Pe namonaki na kati ya bayuma bazanga mayele, namonaki na kati ya bilenge mibali, elenge mobali moko oyo azangi bososoli, 8. Oyo azalaki koleka na balabala pene na songe ya esika oyo mwasi oyo azalaki kofanda, pe azwaki nzela ya ndako na ye. 9. Na pokwa, na pokwa ya moi, na katikati ya butu pe ya molili. 10. Pe tala, mwasi moko bokutani na ye, alataki molato ya mwasi ya ndumba pe na motema ya mayele mabe. 11. Azalaki na makelele pe azalaki motomboki; makolo na ye efandaka te na kati na ndako na ye, 12. Azalaki tangu mosusu na libanda, tangu mosusu na bisika ya batu nyonso, pe azalaki kotala na bisika nyonso. 13. Pe akangaki ye pe azipaki ye na ba beze, pe na elongi ya mpiko alobaki na ye ete: 14. Nazali na mbeka ya kimia elongo na ngai; lelo nasili kokokisa bilaka na ngai. 15. Yango wana nabimaki pona kokutana na yo pona koluka elongi na yo, pe nazwi yo. 16. Natandi batapi likolo na mbeto na ngai, babulangeti ya singa ya Ejipito ya langi ndenge na ndenge; 17. Natiaki malasi ya mire, aloe pe ya sinamome na mbeto na ngai. 18. Yaka, tolangwa bisengo ya kosangisa nzoto ti na tongo, tosepela na bisengo ya nzoto; 19. Po mobali na ngai azali na ndako te, akeyi mosika na mobembo; 20. Azwi saki ya mbongo na loboko na ye, akozonga na ndako na ye na tangu oyo sanza ezalaka mobimba.  21. Abalusaki ye na maloba mingi ya sukali, pe abendaki ye na maloba elengi ya mbebu na ye. 22. Akendeki mbala moko na sima na ye, lokola ngombe akeyi na esika ya kobomama, pe lokola bibende pona etumbu ya zoba, 23. Kino tangu likonga ekotobola fwa na ye; lokola ndeke akokende mbangumbangu na motambo pe ayebi te ete bomoyi na yango ezali na likama.

24. Bongo sik’oyo, bana mibali, boyoka ngai, pe bokeba na maloba ya monoko na ngai. 25. Kotika te ete motema na yo ebaluka epayi na banzela na ye, pe koyengayenga te na banzela na ye; 26. Po asila kokweyisa bazoki mingi, pe babomi oyo aboma bazali bilombe makasi. 27. Banzela ya ndako na ye ezali ya Sheol ekitaki na bashambre ya liwa.

Mokapo 8

1. Bwania ezali koganga te pe mayele ezali kobimisa mongongo na yango te? 2. Na likolo ya bisika oyo etombwama, likolo na nzela, na esika oyo banzela ekabwana, atelemi wana. 3. Na pembeni ya baporte, na ekoteli ya engumba, wana esika aleka pona kokɔta, azali koganga : 4. Na bino, batu, nazali kogangela, pe mongongo na ngai epayi ya bana ya batu! 5. Bino, bayuma bazanga mayele, bososola bososoli, pe bino bazoba, bososola nini ezali bososoli. 6. Boyoka, po nakoloba makambu ya motuya penza, pe kofungwama ya mbebu na ngai ezali makambu ya sembo. 7. Po kati ya monoko na ngai ekomaniola solo, pe mabe ezali likambu ya kele pona mbebu na ngai. 8. Maloba nionso ya monoko na ngai ezali na boyengebene; ezali na eloko moko te ya mabe to ya kobebisama kati na yango; 9. Ezali nyonso polele epayi ya mutu oyo azali na mayele, pe sembo pona baoyo bazwi boyebi. 10. Bozwa malakisi na ngai, kasi palata te, pe boyebi na esika ya wolo ya malamu ; 11. Po bwania ezali malamu koleka rubi, pe eloko moko te oyo tosepelaka na yango ekoki kokokana na yango.

12. Ngai, bwania, nafandi na bososoli, pe nazalaka boyebi na bososoli. 13. Kobanga Yawe ezali koyina mabe. Nayinaka lolendo pe komitombola, nzela ya mbindo, pe monoko mabe. 14. Na ngai, toli pe boyebi ya kosala malamu; Nazali mayele; makasi ezali ya ngai. 15. Na nzela na ngai bakonzi bazali kodondwa, pe basambisi bazali kosambisa bosembo. 16. Na nzela na ngai bankumu bazali kokonza, pe batu minene, basambisi nyonso ya mabele.

17. Nalingaka baoyo balingaka ngai; pe baoyo balukaka ngai bakomona ngai. 18. Bozwi pe lokumu, bomengo pe boyengebene ezali elongo na ngai. 19. Mbuma na ngai ezali malamu koleka wolo ya malamu, ata wolo ya peto; pe lifuti na ngai eleki palata oyo eponami. 20. Natambolaka kati na nzela ya boyengebene, na kati ya banzela ya bosembo, 21. Pona kopesa libula ya biloko ya solosolo na baoyo balingaka ngai pe pona ete natondisa bibombelo na bango ya motuya.

22. Yawe azalaki na ngai na ebandeli ya nzela na ye, liboso ya misala na ye ya kala. 23. Wuta seko napakolamaki mafuta, wuta na ebandeli, yambo ete mabele esalema. 24. tangu bozindo ezalaki te, nabimisamaki, tangu maziba matondi na mayi ezalaki te. 25. Liboso ete bangomba efanda na miboko na yango, liboso ya bangomba mike, nabotamaki. 26. Liboso asala mabele pe bilanga, pe ebandeli ya putulu ya mokili.

27. Tangu atiaki likolo, nazalaki wana; tangu abongisaki serkle oyo ekangaki elongi ya mozindo, 28. Tangu atiaki mapata na likolo, tangu atiaki maziba ya mayi mozindo, 29. Tangu atiaki ndelo pona mayi monene, na boye ete mayi eleka etinda na ye te, tangu atiaki miboko ya mabele. 30. Bongo nazalaki elongo na ye lokola oyo abokolami na ye, esengo na ye ya mokolo na mokolo, kosepelaka na ye tangu nyonso liboso na ye, 31. Kosepelaka na eteni ya mabele na esika oyo ekoki na kofandama, pe bosepeli na ngai ezalaki na bana ya batu.

32. Sik’oyo, bana mibali, boyoka ngai: esengo na baoyo babatelaka banzela na ngai! 33. Boyoka malakisi pe bozala batu ya bwania, pe boboya yango te. 34. Esengo na mutu oyo ayokaka ngai, pona komikengela na bikuke na ngai mokolo na mokolo pe kobatelaka makonzí ya bikoti na ngai! 35. Po oyo nyonso amoni ngai, akozwa bomoyi pe akozwa ngolu epayi ya Yawe ; 36. Kasi oyo asali ngai lisumu, azali koniokola molimo na ye moko mabe; baoyo nyonso bayinaka ngai balingaka liwa.

Mokapo 9

1. Bwania atongi ndako na ye, akati makonzí na yango sambo; 2. Abomi banyama na ye pe asangisi vino na ye pe atandi mesa na ye; 3. Atindi basali na ye ya basi; azali koganga likolo na songe ya bisika oyo etombwama ya engumba: 4. Nani azali zoba? Tika abaluka akota awa. Na oyo azangi bososoli alobi boye: 5. Boya, bolia lipa na ngai pe bomela vino oyo nasangisaki. 6. Botika bazoba pe bozala na bomoyi, pe botambola na kati ya nzela ya mayele.

7. Oyo azali kolakisa mutu ya lolendo, azwaka kotiolama pona ye moko; pe oyo apamelaka mutu mabe, azwaka ngambo pona ye moko. 8. Kopamela mutu ya lolendo te, noki ayina yo; pamela mutu ya bwania, pe akolinga yo. 9. Pesa mutu ya bwania, pe akokoma na bwania mingi koleka; lakisa moyengebene, pe akobakisa boyebi. 10. Kobanga Yawe ezali ebandeli ya bwania, pe boyebi Mosantu ezali bososoli. 11. Po na ngai, mikolo na yo ekobakisama, pe bambula ya bomoyi ekobakisamela yo. 12. Soki ozali mutu ya bwania, okozala mutu na bwania pona yo moko; kasi soki ozali mutu ya lolendo, yo moko nde okomema etumbu.

13. Mwasi ya buzoba azalaka makelele, azalaka zoba, boyebi ezali te kati na ye. 14. Pe afandi na ekoteli ya ndako na ye na kiti ya lokumu, kati na bisika ya likolo ya engumba, 15. Pona  kobenga baleki na nzela, oyo bazali kokende semba na nzela na bango. 16. Nani azali zoba? Tika abaluka awa. Pe na oyo azangi bososoli, alobi ete: 17. Mayi oyo bayibi ezalaka elengi, pe lipa oyo ya kobombana esepelisaka! 18. Pe ayebi te ete bakufi bazali wana, pe ete babiangami na ye bazali na kati ya bozindo ya Sheol.

Mokapo 10

1. Masese ya Salomo.

Mwana ya bwania asepelisaka tata na ye, kasi mwana ya zoba azali mawa ya mama na ye.

2. Biloko ya motuya ya mabe ezali na litomba te, kasi boyengebene ekangolaka na liwa.

3. Yawe atikaka te bomoyi ya moyengebene ezala na nzala, kasi abwakisaka lokoso ya batu mabe.

4. Oyo asalaka mosala na loboko ya kolemba, akomaka mobola, kasi loboko ya molende ekomisaka mozwi.

5. Ye oyo asangisaka biloko na eleko ya molunge azali mwana ya mayele; oyo alali makasi na tangu ya kobuka mbuma azali mwana ya soni.

6. Mapamboli ezali likolo na moto ya moyengebene, kasi mobulu ebombami na monoko ya mutu.

7. Bokundoli ya moyengebene ezali pona lipambolami, kasi kombo ya mutu mabe ekweyaka na kopola.

8. Mutu ya bwania na motema azwaka mitindo, kasi molobi ya zoba na mbebu akoniatama.

9. Oyo azali kotambola na sembo atambolaka na kimia, kasi oyo azali kopengwisa banzela na ye akoyebana.

10. Ye oyo azali kofina misu na liso azali kopesa pasi, pe molobi ya zoba na mbebu na ye akoniatama.

11. Monoko ya moyengebene ezali liziba ya bomoyi, kasi mobulu ebombami na monoko ya mutu mabe.

12. Koyina ebimisaka koswana, kasi bolingo ezipaka mabunga nyonso.

13. Na mbebu ya mutu ya mayele bwania emonanaka, kasi lingenda ezali pona mokongo ya mutu oyo azangi bososoli.

14. Batu ya bwania babombaka boyebi, kasi na monoko ya zoba ezali likama oyo ezali koya.

15. Bozwi ya bazwi ezali engumba na ye oyo ebatelami makasi; kobebisama ya babola ezali bobola na bango.

16. Mosala ya moyengebene ezali pona bomoyi, kasi lifuti ya mutu mabe ezali pona lisumu.

17. Kobatela mateya ezali nzela oyo ememaka na bomoyi, kasi oyo azali koboya pamela azali kobunga nzela.

18. Oyo abombi koyina azali na mbebu ya lokuta, pe oyo azali kopalanganisa maloba mabe azali zoba.

19. Na maloba ebele, kobuka mobeko ezangi te, kasi oyo azali kokanga mbebu na ye azali na bwania.

20. Lolemo ya moyengebene ezali palata ya malamu, kasi motema ya mutu mabe ezali na motuya moke.

21. Mbebu ya bayengebene eleyisaka batu mingi, kasi bazoba bakufaka pona kozanga bososoli.

22. Lipamboli ya Yawe yango nde ekomisaka bozwi, pe komitungisa ebakisaka eloko te na yango.

23. Kosala mabe ezali lokola lisano ya liseki pona zoba, kasi bwania ezali pona mutu ya bososoli.

24. Oyo mutu mabe abangaka ekoyela ye, kasi posa ya bayengebene ekopesama.

25. Lokola mopepe makasi ezali koleka, ndenge moko pe mutu mabe azali lisusu te; kasi moyengebene azali fondatio pona libela.

26. Lokola vinegre na minu pe milinga pona misu boye ezali goyigoyi pona baoyo batindi ye.

27. Bobangi ya Yawe ebakisaka mikolo, kasi mibu ya batu mabe ekomaka mokuse.

28. Kozela ya moyengebene ezali esengo, kasi elikya ya batu mabe ekokufa.

29. Nzela ya Yawe ezali makasi pona batu ya sembo, kasi libebi pona baoyo basalaka mabe.

30. Moyengebene akoningana ata moke te, kasi batu mabe bakofanda te na kati ya mokili.

31. Monoko ya moyengebene ebimisaka bwania, kasi lolemo ya mabe ekolongwa.

32. Mbebu ya moyengebene esosolaka makambu oyo esepelisaka, kasi monoko ya batu mabe ezali kaka mabe.

Mokapo 11

1. kilo ya lokuta ezali likambo ya kele pona Yawe, kasi pwa ya sembo ezali kosepelisa ye.

2. Soki lolendo eye, soni eyaka, kasi bwania ezali elongo na batu ya komikitisa.

3. Bosembo ya batu ya sembo etambwisaka bango, kasi mabe ya batu ya bokosi ebebisaka bango.

4. Bozwi ezali na litomba te na mokolo ya kanda, kasi boyengebene ekangolaka na liwa.

5. Bosembo ya mutu ya sembo ekomisaka nzela na ye semba, kasi mutu mabe akweyaka na mabe na ye.

6. Bosembo ya batu ya sembo ekangolaka bango, kasi batu ya bokosi bakangami na lokoso na bango moko.

7. Tangu mutu mabe akufi, elikya na ye ebungi, pe elikya ya mutu mabe esili.

8. Moyengebene akangolami na pasi, pe mutu mabe akoti na kati na yango na esika na ye.

9. Mutu mabe na monoko na ye abomaka moninga na ye, kasi moyengebene abikisami na nzela ya boyebi.

10. Na kati ya bomengo ya bayengebene, engumba esepelaka; pe tangu batu mabe bazali kokufa ezali na koganga ya esengo.

11. Na lipamboli ya batu ya sembo engumba etombwamaka, kasi na monoko ya batu mabe ekweyisami.

12. Oyo atioli mozalani na ye azali na bososoli te, kasi moto ya mayele afandaka nye.

13. Oyo azali kotambolatambola lokola motongi abimisaka polele basekele, kasi ye oyo azali sembo na elimo abombaka yango.

14. Epayi wapi bokambi ezali te, batu bakweyaka, kasi lobiko ezali na ebele ya bapesi toli.

15. Ezali mabe kozala na garanti pona mopaya, kasi oyo ayinaka baoyo babetaka azali na libateli.

16. Mwasi ya ngolu azwaka lokumu, pe mibali ya bilombe bazwaka bozwi.

17. Mutu malamu asalaka malamu molimo na ye, kasi mutu ya motema mabe aniokolaka nzoto na ye.

18. Mutu mabe asalaka mosala ya bokosi, kasi mutu oyo aloni boyengebene azali na mbano ya solo.

19. Boye boyengebene pona bomoyi, oyo alandaka mabe ezali pona liwa na ye.

20. Baoyo bazali na mitema mabe bazali kele pona Yawe, kasi baoyo bazali sembo na banzela na bango basepelisaka ye.

21. Ya solo, mutu mabe akotalama te pona mutu azangi mbeba, kasi bokitani ya moyengebene ekobikisama.

22. Mwasi kitoko oyo azangi bososoli pe kosambisa azali lokola lopete ya wolo na monoko ya ngulu.

23. Posa ya moyengebene ezali bobele malamu; elikya ya batu mabe ezali kanda.

24. Oyo azali kopalangisa pe akobakisaka lisusu; pe mosusu oyo akobombaka sima mingi koleka oyo esengeli kasi azali kaka na bozangi.

25. Molimo oyo epambolaka akokoma botondi, pe oyo asopelaka mayi ye moko akosopelama  mayi.

26. Oyo abombi ble, batu bakolakelaka ye mabe; kasi lipamboli ekozala likolo na moto ya oyo azali koteka yango.

27. Oyo alukaka bolamu alukaka boboto, kasi mabe eyaka epayi ya oyo alukaka yango.

28. Oyo azali kotiela bozwi na ye motema akokweya, kasi bayengebene bakofungwama lokola likasa.

29. Ye oyo abebisi ndako na ye akozwa libula ya mopepe, pe zoba akozala mosaleli pona mutu ya motema bwania.

30. Mbuma ya moyengebeni ezali nzete ya bomoyi, pe mutu ya bwania alongaka milimo.

31. Tala moyengebene akozwa mbano na mabele, boniboni mingi koleka mutu mabe pe mosumuki !

Mokapo 12

1. Oyo alingaka malakisi alingaka boyebi, pe oyo ayinaka pamela azali zoba.

2. Mutu malamu azwaka ngolu epayi ya Yawe, kasi akokweyisaka etumbu mutu oyo azali kosala mayele mabe.

3. Mutu akembisami te na mabe, kasi mosisa ya moyengebene eninganaki te.

4. Mwasi ya kokoka azali motole ya mobali na ye, kasi oyo ayokisa soni azali lokola kopola na mikuwa na ye.

5. Makanisi ya bayengebene ezali boyengebene, kasi makanisi ya batu mabe ezali bokosi.

6. Maloba ya batu mabe ezali mitambo pona makila, kasi monoko ya batu ya sembo ekangolaka bango.

7. Batu mabe bokweyisami, pe bazali lisusu te; kasi ndako ya bayengebene etikali.

8. Mutu akumisami pona bososoli na ye, kasi motema ya mopengwi ekotiolama.

9. Mutu ya komikitisa oyo azali na mosali aleki mutu ya lolendo oyo azangi lipa.

10. Moyengebene atalelaka bomoyi ya nyama na ye, kasi motema ya mutu mabe ezali motema mabe.

11. Oyo azali kosala bilanga na mabele na ye akotonda na mapa, kasi oyo azali kolanda batu oyo bakoka kosala eloko te azali na bososoli te.

12. Mutu mabe alulaka nyama ya batu mabe, kasi mosisa ya moyengebene ebotaka mbuma.

13. Kati na lisumu ya mbebu ezali na motambo mabe, kasi moyengebene abikisami na pasi.

14. Mutu atondaka na biloko ya malamu oyo ewuti na mbuma ya monoko na ye, pe lifuti ya maboko ya mutu ekozongela ye.

15. Nzela ya zoba ezali sembo na misu na ye moko, kasi oyo ayokaka toli azali na bwania.

16. Kanda ya zoba emonanaka kaka mokolo wana, kasi mutu ya mayele azipaka soni na ye.

17. Oyo alobaka solo asakolaka boyengebene, kasi motatoli ya lokuta asakolaka bokosi.

18. Ezali na mutu oyo alobaka na bokebi makambu oyo ezali kotobola lokola mopanga, kasi lolemo ya batu ya bwania ezali kolongono ya nzoto.

19. Mbebu ya solo ewumelaka libela, kasi lolemo ya lokuta ewumelaka kaka pona mwa tangu moke.

20. Bokosi ezali na kati ya mitema ya baoyo bazali kokana kosala mabe, kasi esengo ezali na kati ya baoyo bazali kopesa toli ya kimia.

21. Mawa moko te ekoyelaka moyengebene, kasi batu mabe bakotonda na mawa.

22. Bambebu ya lokuta ezali kele po na Yawe, kasi asepelaka na baoyo basalelaka bosembo.

23. Mutu ya mayele abombaka boyebi, kasi motema ya bazoba esakolaka bozoba.

24. Loboko ya mutu ya molende ekoyangela, kasi loboko ya goyigoyi ezali pona mikumba.

25. Mitungisi na motema ya mutu ezindisaka ye, kasi liloba ya boboto ekosepelisa ye.

26. Moyengebene azali koteya moninga na ye nzela, kasi nzela ya batu mabe ezali kobungisa bango nzela.

27. Mutu ya goyigoyi atumbaka nyama na ye te, kasi biloko ya motuya ezali ya mutu ya molende.

28. Bomoyi ezali na nzela ya boyengebene, pe liwa ezali te na nzela na yango.

Mokapo 13

1. Mwana ya bwania ayokaka malako ya tata na ye, kasi motioli ayokaka pamela te.

2. Na mbuma ya monoko na ye mutu aliaka biloko ya malamu, kasi posa ya molimo ya mutu ya bokosi ezali mobulu.

3. Ye oyo akengelaka monoko na ye abatelaka molimo na ye; kobebisama ezali pona ye oyo afungolaka mbebu na ye.

4. Molimo ya goyigoyi azalaka naposa, kasi eloko moko ezali te; kasi molimo ya mutu ya molende ekomaka mafuta-mafuta.

5. Moyengebene ayinaka liloba ya lokuta, kasi mutu mabe ayinami pe azipami na soni.

6. Boyengebene ebatelaka nzela ya baoyo bazangi mbeba, kasi mabe ekweyisaka mosumuki.

7. Ezali na mosusu oyo azali komisala  mozwi pe azali ata na eloko te; pe ezali na mosusu oyo azali komisala mobola pe azali na bozwi mingi.

8. Lisiko ya bomoyi ya mutu ezali bozwi na ye; kasi mobola ayokaka pamela te.

9. Pole ya bayengebene ezali esengo, kasi mwinda ya batu mabe ekobomama.

10. Bobele na lolendo nde koswana ewutaka, kasi bwania ezali epayi ya baoyo bazwaka toli.

11. Biloko oyo ewutaka na nzela ya pamba ekitaka, kasi oyo azwi yango na maboko akobakisa yango.

12. Kozela tangu molayi epesaka motema maladi, kasi posa oyo ekokisami ezali nzete ya bomoyi.

13. Oyo atioli liloba akokangama na yango; kasi oyo azali kobanga etinda akozwa mbano.

14. Mateya ya mutu ya bwania ezali liziba ya bomoyi, pona kokima mitambo ya liwa.

15. Bososoli malamu ememaka ngolu, kasi nzela ya mokosi ezali pasi.

16. Mutu nyonso oyo azali na mayele asalaka makambu na boyebi, kasi zoba amonisaka bozoba na ye.

17. Mutu mabe oyo azali momemi-sango akweyaka na mabe, kasi motindami ya sembo azali kolongono ya nzoto.

18. Kimobola pe soni eyaka epayi ya baoyo baboyaka mateya, kasi oyo nyonso abombaka pamela akokumisama.

19. Posa oyo ekokisami esepelisaka molimo, kasi kotika mabe ezali likambu ya soni pona bazoba.

20. Ye oyo atambolaka elongo na batu ya bwania akokoma mutu ya bwania, kasi moninga ya bazoba akobebisama.

21. Mabe elandaka basumuki, kasi bolamu ezali mbano ya bayengebene.

22. Mutu malamu atikaka libula na bana ya bana na ye, kasi bozwi ya mosumuki ebombami pona moyengebene.

23. Ezali na biloko mingi ya kolia na kopetola bilanga ya babola, kasi ezali mosusu akokufa pona bozangi bosembo.

24. Ye oyo aboyaka kobeta mwana na ye lingenda ayinaka, kasi oyo alingaka ye azalaka na molende pona kopesa ye disipilini.

25. Moyengebene aliaka pona kotondisa molimo na ye, kasi libumu ya mutu mabe ekozanga.

Mokapo 14

1. Bwania ya basi etongaka ndako na bango, kasi bozoba ebebisaka yango na maboko na ye moko.

2. Oyo atambolaka na kati na sembo abangaka Yawe, kasi ye oyo azali ya kotengama na banzela na ye, akotiola ye.

3. Fimbo ya lolendo ezali na monoko ya zoba, kasi mbebu ya batu ya bwania ebatelaka bango.

4. Epayi bangombe bazali te, eleyilo ya bibwele ezalaka pamba; pe na makasi ya ngombe ezali na ebele ya bozwi.

5. Motatoli ya sembo akosaka te, kasi motatoli ya lokuta apemaka makambu ya lokuta.

6. Motioli alukaka bwania, kasi ezali wana te; kasi boyebi ezali pete pona oyo azali mayele.

7. Longwa liboso ya mutu ya zoba, oyo kati na ye omoni mbebu ya boyebi te.

8. Bwania ya mutu ya mayele ezali kososola nzela na ye, kasi bozoba ya bazoba ezali bokosi.

9. Bazoba batiolaka lisumu, kasi kati na batu ya sembo boboto ezali.

10. Motema eyebi bololo na yango moko, pe mopaya asanganaka na esengo na yango te.

11. Ndako ya bat mabe ekobebisama, kasi hema ya batu ya sembo ekokola malamu.

12. Ezali na nzela moko oyo ezali komonana malamu epayi na mutu, kasi suka na yango ezali banzela ya liwa.

13. Ata na kati ya koseka motema ezali koyoka pasi, pe suka ya esengo ezali mawa.

14. Motema oyo epengwi ekotonda na banzela na yango moko, kasi mutu malamu na oyo ezali na kati na ye.

15. Yuma andimaka liloba nyonso, kasi mutu ya mayele asosolaka matambe na ye.

16. Mutu ya bwania oyo abangaka, amilongolaka na mabe, kasi zoba azalaka na kanda pe lolendo pe azalaka na elikya.

17. Mutu oyo asilikaka mbangumbangu asalaka bozoba, pe mutu ya mayele mabe ayinamaka.

18. Bayuma bazwaka bozoba lokola libula, kasi batu ya mayele balati motole ya boyebi.

19. Batu mabe bafukama liboso ya batu malamu, pe batu mabe na bikuke ya bayengebene.

20. Mobola ayinami, ata na mozalani na ye, kasi mozwi azali na baninga mingi.

21. Oyo atiolaka mozalani na ye asalaka masumu, kasi ye oyo ayokelaka babola mawa, apambolami!

22. Baoyo bazali kokana mabe bakobunga te? Kasi ngolu pe bosolo ezali elongo na baoyo bakanisaka malamu.

23. Na mosala nyonso, litomba ezali, kasi liloba kaka ya mbebu ememaka na bozangi.

24. Motole ya batu ya bwania ezali bomengo na bango; bozoba ya bazoba ezali bozoba.

25. Motatoli ya sembo abikisaka milimo, kasi bokosi ebimisaka lokuta.

26. Na bobangi Yawe ezali na elikya makasi, pe esika ya kobombana pona bana na ye.

27. Kobanga Yawe Nkolo ezali liziba ya bomoyi pona komibatela na mitambo ya liwa.

28. Na ebele ya batu, kembo ya mokonzi ezali, kasi na bozangi batu ezali libebi ya bokitani ya bokonzi.

29. na kozala malembe na kosilika ezali bososoli monene, kasi oyo azangi motema molayi na molimo atomboli bozoba.

30. Motema ya malamu ezali bomoyi ya mosuni, kasi zuwa ezali kopolisa ya mikuwa.

31. Ye oyo azali koniokola mobola azali kopamela Mokeli na ye, kasi oyo azali kokumisa ye amonisaka boboto epai ya babola.

32. Mutu mabe abenganami na mabe na ye, kasi moyengebene azali na elikya, ata na liwa na ye.

33. Bwania efandaka na kati ya motema ya ye oyo azali na bososoli, kasi oyo ezali na kati ya bazoba eyebani.

34. Bosembo etombolaka ekolo, kasi lisumu ezali soni ya batu ya ekolo.

35. Ngolu ya mokonzi ezali pona ya mosali ya mayele, kasi kanda na ye ezali likolo ya oyo ayokisaka soni.

Mokapo 15

1. Eyano ya boboto elongolaka kanda, kasi liloba ya kozokisa ematisaka kanda.

2. Lolemo ya batu ya bwania ebimisaka malamu ya boyebi, kasi monoko ya bazoba ebimisaka liboma.

3. Misu ya Yawe ezali na bisika nyonso, kotala batu ya mabe pe ya malamu.

4. Lolemo ya boboto ezali nzete ya bomoyi, kasi kozala na maloba mibale kati na yango ezali kobukana ya elimo.

5. Zoba atiolaka malakisi ya tata na ye, kasi ye oyo ayokaka pamela akomaka na bososoli.

6. Ndako ya moyengebene ezali bomengo monene, kasi na mosolo ya batu mabe ezali na mitungisi.

7. Mbebu ya batu ya bwania epalangisaka boyebi, kasi motema ya bazoba ezali bongo te.

8. Mbeka ya batu mabe ezali kele pona Yawe, kasi libondeli ya batu ya sembo ezali kosepelisa ye.

9. Nzela ya mutu mabe ezali kele pona Yawe, kasi alingaka ye oyo azali kolanda boyengebene.

10. Disipilini ya pasi makasi ezali pona ye oyo apengwi nzela; oyo ayinaka makebisi akokufa.

11. Sheol pe libulu bozindo ezali liboso ya Yawe, mingi koleka mitema ya bana ya batu!

12. Motioli alingaka te oyo akokebisaka ye; akendaka te epayi ya batu ya bwania.

13. Motema ya esengo ekomisaka elongi malamu, kasi na mawa ya motema elimo etungisami.

14. Motema ya mutu ya mayele elukaka boyebi, kasi monoko ya bazoba elakisaka bozoba.

15. Mikolo nyonso ya mobola ezali mabe, kasi motema ya malamu ezali feti ya tangu nyonso.

16. Mwa moke na bobangi ya Yawe eleki bomengo monene na mitungisi na yango.

17. Elubu ya ndunda pe na bolingo wana ezali malamu koleka ngombe ya mafuta pe koyina elongo na yango.

18. Mutu ya kanda abimisaka koswana, kasi oyo asilikaka noki te akitisaka matata.

19. Nzela ya goyigoyi ezali lokola lopango ya banzube, kasi nzela ya batu ya sembo esembolami.

20. Mwana ya bwania asepelisaka tata na ye, kasi mutu ya zoba atioli mama na ye.

21. Bozoba ezali esengo pona ye oyo azangi bososoli, kasi mutu ya bososoli azali kotambwisa sembo matambe na ye.

22. Mabongisi elongi te esika oyo lisolo ezali te, kasi na ebele ya bapesi toli elongi.

23. Esengo ezali pona mutu na kati ya eyano ya monoko na ye; pe liloba moko na tangu esengeli ezali malamu penza!

24. Nzela ya bomoyi ezali likolo pona mutu ya bososoli, po balongwa na sheol oyo ezali na se.

25. Yawe akweyisaka ndako ya batu ya lolendo, kasi abatelaka teritware ya mwasi oyo akufela mobali.

26. Makanisi mabe ezali kele pona Yawe, kasi maloba ya boboto ezali peto.

27. Oyo azali koluka litomba oyo ezali sembo te azali kotungisa ndako na ye moko, kasi ye oyo ayinaka makabo akozala na bomoyi.

28. Motema ya moyengebene ekanisaka ndenge ya koyanola, kasi monoko ya mutu mabe esopaka makambo ya mabe.

29. Yawe azali mosika na bato mabe, kasi ayokaka libondeli ya bayengebene.

30. Kongenga ya misu esepelisaka motema; sango malamu esalaka ete mikuwa ekoma mafutamafuta.

31. Litoyi oyo eyokaka pamela ya bomoyi ekofanda na kati ya batu ya bwania.

32. Ye oyo aboyi mateya atioli bomoi na ye; kasi ye oyo ayokaka pamela azwaka bososoli.

33. Kobanga Yawe ezali disipilini ya bwania, pe komikitisa ekendaka liboso ya lokumu.

Mokapo 16

1. Mabongisi ya motema ezali ya mutu, kasi eyano ya lolemo ezali ya Yawe.

2. Banzela nyonso ya mutu ezali peto na misu na ye moko, kasi Yawe amekaka milimo.

3. Tika makambu na yo epayi ya Yawe, pe makanisi na yo ekokokisama.

4. Yawe asala nyonso pona ye moko, ata mutu mabe pona mokolo ya pasi.

5. Lolendo nionso na motema ezali kele pona Yawe; bakotalelama te ete bazali na ngambo te.

6. Na bolamu pe na bosolo, bokundami mabe esalami, pe na bobangi ya Yawe, batu balongwe na mabe.

7. Tangu banzela ya mutu moko esepelisi Yawe, atiaka ata banguna na ye na kimia elongo na ye.

8. Mwa moke na boyengebene ezali malamu koleka litomba mingi kozanga bosembo.

9. Motema ya mutu ebongisaka nzela na ye, kasi Yawe akokembisaka matambe na ye.

10. Kobikola makambu ezali likolo na mbebu ya mokonzi, monoko na ye esalaka libunga te na kosambisa.

11. Ba kilo pe bimekeli ya sembo ezali ya Yawe; bakilo nyonso oyo ezali na saki ezali mosala na ye.

12. Ezali likambo ya kele pona bakonzi kosala mabe, pamba te na nzela ya bosembo kiti ya bokonzi ekembisami.

13. Esengo ya bakonzi ezali mbebu ya sembo, pe alingaka ye oyo alobaka sembo.

14. Kanda ya mokonzi ezali bamemi-sango ya liwa, kasi mutu ya bwania akitisaka ye motema.

15. Bomoyi ezali na pole ya elongi ya mokonzi, pe boboto na ye ezali lokola lipata ya mbula na eleko na yango ya suka.

16. Kozwa bwania ezali malamu koleka wolo ya malamu, pe kozwa mayele koleka palata!

17. Nzela ya batu ya sembo ezali ya kolongwa na mabe; ye oyo abatelaka nzela na ye abatelaka molimo na ye.

18. Lolendo ekendaka liboso ya libebi, pe elimo ya komimatisa liboso ya kokweya.

19. Ezali malamu kozala na elimo ya komikitisa elongo na batu ya komikitisa, na esika ya kokabola biloko oyo epunzami elongo na batu ya lolendo.

20. Ye oyo atiaka likebi na liloba akozwa bolamu, pe ye oyo azali kotia motema na Yawe azali mutu na esengo.

21. Mutu ya bwania ya motema akobengama mutu ya mayele, pe mbebu ya elengi ebakisaka boyebi.

22. Boyebi ezali liziba ya bomoyi pona baoyo bazali na yango, kasi malakisi ya bazoba ezali bozoba.

23. Motema ya mutu ya bwania ekomisaka monoko na ye mayele, pe ebakisaka boyebi na mbebu na ye.

24. maloba kitoko ezali libenga ya mafuta ya nzoyi, elengi pona molimo pe kolongono ya nzoto pona mikuwa.

25. Ezali na nzela moko oyo emonani malamu epayi ya mutu, kasi suka na yango ezali banzela ya liwa.

26. Nzala ya mosali etindikaka ye na mosala pona ye moko, po monoko na ye etindaka ye.

27. Mutu ya belial atimbolaka mabe, pe na mbebu na ye ezali lokola moto oyo ezali kopela. 28. Mutu ya mabe alonaka koswana, pe mutu ya songisongi akabolaka baninga ya motema.

29. Mutu ya mobulu abendaka moninga na ye pe akambaka ye na nzela oyo ezali malamu te.

30. Ye oyo akangi misu na ye pona kobongisa makambu mabe, pe oyo azali kofinafina mbebu na ye, azali kosala mabe.

31. Suki ya pembe ezali motole ya kembo soki ezwami na nzela ya boyengebene.

32. Oyo asilikaka noki te aleki mutu ya makasi, pe oyo azali kokamba elimo na ye koleka mutu oyo azwi engumba.

33. Babwakaka zeke na kati ya loketo, kasi mokano nyonso ezali kowuta na Yawe.

Mokapo 17

1. Eteni ya bileyi ya kokawuka pe kimia ezali malamu koleka ndako oyo etondi na misuni ya bambeka pe koswana.

2. Mosali ya bwania akokonza mwana oyo azali koyokisa soni, pe akokabola libula kati na bandeko na ye.

3. Etumbeli ezali pona palata, pe likalungu pona wolo, kasi Yawe amekaka mitema.

4. Ye oyo asalaka mabe atiaka bokebi na mbebu mabe; mutu ya lokuta apesaka litoyi na monoko ya mabe.

5. Oyo atiolaka mobola azali kofinga mosali na ye; oyo asepelaka na pasi akotalama te ete azali na ngambo te.

6. Motole ya mibange ezali bana ya bana na bango, pe kembo ya bana ezali batata na bango.

7. Mbebu malamu ebongi te na mutu ya mbindo; mingi-mingi mbebu ya lokuta pona mutu ya lokumu?

8. Likabo ezali libanga ya ngolu na misu ya mozwi na yango; ata soki abaluki na nzela nini, akolongaka.

9. Ye oyo azipaka botomboki alukaka bolingo, kasi oyo azongelaka likambu moko akabolaka baninga ya motema.

10. Kopamela ekotaka na bozindo mutu ya mayele koleka kobeta zoba fimbu kama moko.

11. Mutu ya mbindo alukaka bobele botomboki, kasi momemi-sango moko ya motema mabe akotindama pona kobundisa ye.

12. Ebongi na Mutu akutana na urse oyo ebungisi bana na ye na esika ya kokutana na zoba na kati ya liboma na ye.

13. Mabe ekolongwa te na ndako ya ye oyo azali kozongisa mabe na esika ya bolamu.

14. Ebandeli ya koswana ezali lokola kotika mayi esopona; liboso ete matata ekoma makasi, longwa wana.

15. Ye oyo azali kolongisa mutu mabe pe oyo azali kokweyisa bayengebene, bango mibale bazali kele epayi na Yawe.

16. Bongo pona nini motuya ya mbongo ezali na kati ya loboko ya zoba pona kosomba bwania, nzokande azali na bososoli te?

17. Moninga alingaka tango nyonso, pe ndeko abotama pona pasi.

18. Mutu oyo azanga bososoli ye abetaka na kati ya loboko, pe amikotisaka mobateli ya niongo pona mozalani na ye.

19. Ye oyo alingaka koswana alingaka kobuka mobeko; ye oyo atomboli ekuke na ye azali koluka libebi.

20. Ye oyo azali na motema mabe azwaka bolamu te; pe ye oyo azali kosalela mayele mabe na monoko na ye, akweyaka na kati ya mabe.

21. Ye oyo aboti zoba, mawa pona ye; pe tata ya mutu ya liboma akosepela te.

22. Motema ya esengo ezali malamu pona kolongono ya nzoto, kasi elimo oyo etungisami ekawusaka mikuwa.

23. Mutu mabe azwaka kanyaka na ntolo pona kopengwisa banzela ya kosambisa.

24. Bwania ezali liboso ya mutu ya mayele, kasi misu ya zoba ezali na suka ya mabele.

25. Mwana ya zoba azali mawa pona tata na ye pe bololo pona mwasi oyo abotaki ye.

26. Ezali malamu te kopesa etumbu na bayengebene, pe kobeta batu minene pona bosembo na bango.

27. Ye oyo azali na boyebi akangaka maloba na ye, pe mutu ya bososoli azalaka na elimo ya malili.

28. Ata zoba oyo afandi nye, atalamaka lokola mutu ya bwania, - oyo akangi mbebu na ye, azali mutu ya mayele.

Mokapo 18

1. Ye oyo amikaboli ye moko na basusu alukaka oyo esepeli na ye; Atelemelaka bwania nyonso.

2. Zoba asepelaka na bososoli te, kaka ete motema na ye emonisama polele.

3. Soki mutu mabe aye, kotiolama eyaka lokola, pe soni na kofingama eyaka.

4. Maloba ya monoko ya mutu ezali ba mayi ya mozindo, pe liziba ya bwania ezali ebale oyo ezali kosopana.

5. Ezali malamu te kotombola elongi ya mutu ya mabe pona kolongola moyengebene na nzela ya bosembo na ye.

6. Mbebu ya zoba ekotaka na kati ya koswana, pe monoko na ye ebengaka makofi.

7. Monoko ya zoba ezali libebi na ye, pe mbebu na ye ezali motambo pona molimo na ye.

8. Maloba ya ye oyo azali kotonga ezali lokola biteni ya kitoko, pe ezali kokita ti na bashambre ya kati ya libumu.

9. Ye oyo azali mutu alemba na mosala na ye azali ndeko ya mobebisi.

10. Kombo ya Yawe ezali ndako molayi ya makasi; moyengebene akimi na kati na yango pe azali na esika oyo bakoki kopusana pembeni na ye te.

11. Bozwi ya mozwi ezali engumba na ye oyo ebatelami makasi, pe ezali lokola efelo molayi na makanisi na ye.

12. Liboso ya libebi, motema ya mutu emitombolamaka na lolendo, pe komikitisa ezali liboso ya lokumu.

13. Oyo azongisaka liboso ya koyoka ezali liboma pe soni pona ye oyo azali kosala yango.

14. Elimo ya mutu esungaka ye na maladi na ye, kasi nani akoki kotelemisa elimo oyo ebukani?

15. Motema ya mutu ya mayele ezwaka boyebi, pe litoyi ya batu ya bwania elukaka boyebi. 16. Kado ya mutu epesaka ye esika pe ememaka ye liboso ya bankumu.

17. Ye oyo azali mutu ya liboso na esambeli na ye moko azali moyengebene; mozalani na ye aye, pe atelemeli ye.

18. Kobeta zeke esukisaka koswana pe ekabolaka batu ya nguya.

19. Ndeko mobali oyo basali mabe azalaka kokoso pona kolonga koleka engumba oyo ebatelami makasi, pe koswana ezali lokola bikangeli ya ndako ya mokonzi.

20. Na mbuma ya monoko na ye, libumu ya mutu etondaka; pe atondisami na lifuti ya mbebu na ye.

21. Liwa pe bomoyi ezali na nguya ya lolemo, pe ye oyo alingi yango akoliya mbuma na yango.

22. Ye oyo azwi mwasi, azwi eloko ya malamu, pe azwi ngolu epayi ya Yawe.

23. Mobola alobaka na mabondeli, kasi mozwi ayanoli na makasi.

24. Mutu oyo azali na baninga mingi akendaka na komibebisa, kasi moninga azali oyo amopesaka koleka ndeko.

Mokapo 19

1. Mobola oyo atambolaka kati na bosembo na ye aleki malamu mutu oyo azali na mbebu ya mabe pe azali zoba.

2. Bobele bongo, kozanga boyebi kati na molimo ezali eloko malamu te, pe ye oyo azali kosala mbangumbangu na makolo na ye asumukaka.

3. Bozoba ya mutu ebebisaka nzela na ye, pe motema na ye etombokelaka Yawe.

4. Bozwi ebakisaka baninga mingi, kasi mobola akabwani na moninga na ye.

5. Motatoli ya lokuta akotangama te ete azangi likambu, pe ye oyo alobaka lokuta akobika te.

6. Mingi balukaka boboto ya mutu ya lokumu, pe mutu nyonso azali moninga ya mutu oyo apesaka bakado.

7. Bandeko nyonso ya mobola bayinaka ye; boni mingi koleka baninga na ye bakokima mosika na ye ! Aland0i bango na maloba na ye,... bazali lisusu na ye te!

8. Ye oyo azwi bwania alingaka molimo na ye moko; ye oyo abombaka mayele, ezali pona komona bolamu.

9. Motatoli ya lokuta akotangama te ete azangi likambu, pe ye oyo alobaka lokuta akokufa.

10. Ebongi te na zoba kobika bomoyi ya bisengo; boni lisusu na mosali kokonza baprinse!

11. Bwania ya mutu esalaka ete ayokaka kanda noki te, pe kembo na ye ezali koleka likolo ya mabe basali ye.

12. Kanda ya mokonzi ezali lokola konguluma ya nkosi, kasi boboto na ye ezali lokola mamwe likolo na matiti.

13. Mwana ya zoba azali likama pona tata na ye, pe koswana ya mwasi ezali kosopana ya matanga ya mayi tangu nyonso.

14. Ndako pe bomengo ezali libula oyo ezwamaka epayi ya batata, kasi mwasi ya bwania awutaka epayi ya Yawe.

15. Kigoyigoyi ememaka na kati ya pongi makasi, pe molimo oyo ya kigoyigoyi ekufaka nzala.

16. Ye oyo abatelaka mobeko, abatelaka molimo na ye; oyo atiolaka banzela na ye te akokufa.

17. Ye oyo amonisaka mobola boboto, adefisaka Yawe, pe ye akozongisela ye bolamu na ye.

18. Sembola mwana na yo tangu elikya ezali, kasi kotika te ete okende naposa ya koboma ye.

19. Ye oyo azali komata na kanda makasi akomema etumbu; po soki okangoli ye, ekosenga osala yango lisusu.

20. Yoka toli pe zwa malakisi, po ozala na bwania na suka na yo.

21. Makanisi ezali ebele na kati ya motema ya mutu, kasi kaka mabongisi ya Yawe nde ekotelema.

22. Oyo ebendaka kati na mutu ezali bolamu na ye; pe mobola aleki malamu mutu ya lokuta.

23. Kobanga Yawe ememaka na bomoyi, pe akolala na esengo na kozanga mabe ekomela ye.

24. Goyigoyi adindisaka loboko na ye na kati ya sani, kasi azongisaka yango na monoko te.

25. Beta motioli, pe zoba akokoma na mayele; sembola mutu ya mayele, pe akososola boyebi.

26. Ye oyo abebisaka tata na ye pe abenganaki mama na ye, azali mwana oyo azali koyokisa soni pe komema kotiolama.

27. Mwana na ngai, tika koyoka malako oyo epengwisaka mosika na maloba ya boyebi.

28. Motatoli ya Belial atiolaka lisambisi ya sembo, pe monoko ya batu mabe emelaka mabe.

29. Bikateli bibongisami pona batioli, pe kobetama fimbo pona mokongo ya bazoba.

Mokapo 20

1. Vino ezali motioli, masanga ya makasi ezali mobulu, pe oyo nyonso apengwi na kati na yango azali na bwania te.

2. Somo ya mokonzi ezali lokola konguluma ya nkosi; oyo nyonso akosilikisa ye akosala masumu pona molimo na ye moko.

3. Ezali kembo ya mutu koboya matata, kasi zoba nyonso amipesaka na yango.

4. Na tina ya eleko ya malili, goyigoyi asalaka bilanga te; na tangu ya kobuka mbuma, akosengasenga pe akozala na eloko te.

5. Toli na kati ya motema ya mutu ezali mayi ya bozindo, pe mutu ya bososoli akotoka kati na yango.

6. Batu mingi batatolaka moko na moko bolamu na ye, kasi mutu ya sembo, nani akomona ye?

7. Moyengebene atambolaka kati na bosembo na ye; esengo ezali bana na ye sima na ye!

8. Mokonzi afandi na kiti ya bokonzi ya bosambisi; pe na nzela ya misu na ye apalanganisaka mabe nyonso.

9. Nani akoki koloba: Napetoli motema na ngai, nazali peto na lisumu na ngai?

10. Kilo pe kilo, efa pe efa, yango mibale ezali kele liboso ya Yawe.

11. Ata mwana ayebani na misala na ye, soki ezaleli na ye ezali peto pe soki ezali sembo.

12. Pe litoyi oyo eyokaka pe lisu oyo emonaka, Yawe asali yango nyonso mibale.

13. Kolinga pongi te, noki okoma mobola; fungola misu na yo, pe tonda na mapa.

14. Mabe, mabe ! Elobi mosombi; na sima akeyi pe komikumisa.

15. Wolo na rubi ezali mingi, kasi mbebu ya boyebi ezali mbeki ya motuya mingi.

16. Kamata elamba na ye, po amiataki ye garanti pona mutu mosusu; pe zwa eloko ya elaka epayi na ye, na tina ya bapaya.

17. Lipa ya lokuta esepelisaka mutu, kasi na sima monoko na ye etondi na mabanga.

18. Mabongisami ekokisamaka na nzela ya toli; pe bunda etumba na mayele.

19. Motongi akendaka kobimisaka basekele; yango wana, kosangana te na mutu oyo afungolaka mbebo na ye.

20. Ye oyo alakelaka tata na ye to mama na ye mabe, - mwinda na ye ekobomama na kati ya molili.

21. Libula oyo ezwami nokinoki na ebandeli ekopambolama te na suka.

22. Koloba te ete: Nakozongisa mabe. Tiya elikia na Yawe, pe akobikisa yo.

23. Kilo pe kilo ezali kele liboso na Yawe, pe balansi ya lokuta ezali eloko malamu te.

24. Matambe ya mutu ewuti epayi ya Yawe; pe ndenge nini mutu akoki kososola nzela na ye moko?

25. Ezali motambo pona mutu koloba na lombangu ete: Eloko ya bosantu! - pe sima ya kosala ya bilaka, kokanisa na kotalela.

26. Mokonzi ya bwanya apalanganisaka batu mabe pe alekisaka pine likolo na bango.

27. Elimo ya mutu ezali mwinda ya Yawe, oyo ezali kolukaluka na mozindo nyonso ya motema.

28. Bolamu pe bosolo ebatelaka mokonzi, pe na nzela ya bosembo asimbaka kiti na ye ya bokonzi.

29. Kitoko pe lokumu ya bilenge mibali ezali makasi na bango; pe kembo ya mibange ezali suki pembe.

30. Bapota pe kozoka epetolaka mabe, pe makofi, bozindo ya molimo.

Mokapo 21

1. Motema ya mokonzi na kati ya loboko ya Yawe ezali lokola bibale ya mayi; abalusaka yango na nionso oyo alingi.

2. Nzela nyonso ya mutu ezali sembo na misu na ye moko, kasi Yawe amekaka mitema.

3. Kosala oyo ezali sembo pe kosambisa na sembo ezali oyo esepelisaka Yawe koleka mbeka.

4. Kotombola lisu pe kovimbisa motema, mwinda ya batu mabe, ezali lisumu.

5. Makanisi ya mutu ya molende [ememaka] bobele na ebele; kasi kozanga motema molayi ememaka kaka na mobola.

6. Kozwa bomengo na nzela ya lolemo ya lokuta ezali mopepe ya pamba ya tangu mokuse ya baoyo bazali koluka liwa.

7. Mobulu ya batu mabe elongolaka bango, pamba te baboyaka kosala oyo ezali sembo.

8. Nzela ya mutu mabe ezali ya kongumbama, kasi mosala ya ye oyo azali peto ezali sembo.

9. Ezali malamu kofanda na songe ya likoló ya ndako na esika ya kozala na mwasi ya koswana pe elongo na ndako moko.

10. Bomoto nionso ya mutu mabe ezali naposa ya mabe; mozalani na ye azwaka ngolu moko te na misu na ye.

11. Tangu bakopesa etumbu na mutu ya lolendo, mutu ya pamba akomaka mutu na bwania; pe tangu bakolakisa mutu ya bwania, ayambaka boyebi.

12. Ezali na moyengebene oyo atalelaka ndako ya batu mabe; azali kokweyisa batu mabe na likama.

13. Ye oyo akangi litoyi na ye na kolela ya mobola, ye pe akoganga, pe bakoyanola ye te.

14. Likabo oyo esalami na kobombana elongolaka kanda, pe kanyaka na ntolo ekitisaka kanda makasi.

15. Ezali esengo pona bayengebene kosala oyo ezali sembo, kasi ezali libebi pona basali ya mabe.

16. Mutu yo apengwi mosika na nzela ya bwania akofanda na kati ya lisanga ya bakufi.

17. Mutu nyonso oyo alingi bisengo akozala mobola; oyo alingi vino pe mafuta akozala na bozwi te.

18. Mutu mabe azali lisiko pona moyengebene, pe oyo atekaka basusu azali na esika ya batu ya sembo.

19. Ezali malamu kofanda na kati na mokili ya esobe na esika ya kofanda na mwasi ya koswana pe ya kosilikaka.

20. Ezali na bomengo ya kitoko pe mafuta na ndako ya mutu ya bwania, kasi mutu ya zoba akundaka yango.

21. Oyo  alandaka boyengebene pe bolamu akozwa bomoyi, bosembo pe lokumu.

22. Mutu ya bwania amati na kati ya engumba ya bilombe ya nguya pe akweyisaka na se makasi ya libateli na yango.

23. Ye oyo abatelaka monoko na ye pe lolemo na ye akobatela molimo na ye na pasi.

24. Mutu ya lolendo, mutu ya komikumisa, pe motioli—oyo ezali kombo ya mutu oyo asalaka na kanda pe na lolendo.

25. Posa ya goyigoyi ebomaka ye, po maboko na ye eboyaka kosala.

26. Mikolo nionso azalaka naposa na lokoso, kasi moyengebene apesaka pe abombaka te.

27. Mbeka ya batu mabe ezali likambu ya kele; boni lisusu soki bamemi yango na likanisi ya mabe?

28. Motatoli ya lokuta akokufa, kasi mutu oyo akoyoka akoloba pona libela.

29. Mutu mabe akomisaka elongi na ye libanga, kasi mutu ya sembo akembisaka nzela na ye.

30. Ezali bwania moko te, pe bososoli moko te, pe toli moko te liboso ya Yawe.

31. Punda ebongisami pona mokolo ya etumba, kasi lobiko ezali ya Yawe.

Mokapo 22

1. kombo malamu ezali malamu koleka bomengo monene, pe ngolu malamu eleki palata pe wolo.

2. Mozwi na mobola bakutanaka esika moko : Yawe asali bango nyonso.

3. Mutu ya mayele amonaka liboso mabe pe amibombaka, kasi batu ya pamba balekaka pe bamemaka etumbu.

4. Suka ya komikitisa pe ya bobangi ya Yawe ezali bomengo, lokumu, pe bomoyi.

5. Nzube pe mitambo ezali na nzela ya batu mabe; kasi ye oyo abatelaka molimo na ye atikalaka mosika na bango.

6. Kolisa elenge mobali na molongo ya nzela na ye; Ata tangu akokoma mobange, akotika yango te.

7. Mozwi akonzaka babola, pe modefi azalaka mowumbu ya mutu oyo adefisi.

8. Oyo aloni makambu ya mbindo akobuka minioko, pe lingenda ya kanda na ye ekobebisama.

9. Lisu ya boboto ekopambolama, pamba te apesaka lipa na ye epayi ya mobola.

10. Bengana motioli, pe koswana ekosila, pe matata pe soni ekosila.

11. Oyo alingaka motema peto azali na ngolu na mbebu na ye, pe mokonzi azali moninga na ye.

12. Misu ya Yawe ebatelaka boyebi, kasi ye abwakaka maloba ya batu ya bokosi.

13. Goyigoyi alobi: ezali na nkosi moko wana libanda, nakoboma na kati ya babalabala!

14. Monoko ya basi bapaya ezali libulu mozindo; ye oyo Yawe asilikeli ye akokweya na kati na yango.

15. Bozoba ekangami na motema ya mwana moke; lingenda ya kosembola ekobengana yango mosika na ye.

16. Oyo azali koniokola mobola, akopesa ye bomengo; oyo akopesa na bazwi, ekozala pona koweyisa bango na kati ya kimobola.

17. Tiya litoyi na yo pe yoka maloba ya batu ya bwania, pe tiya motema na yo na boyebi na ngai; 18. Po ezali likambu ya esengo soki obateli yango na kati na yo : ekobongisama yango esika moko na mbebu na yo. 19. Po ete elikya na yo ezala na Yawe, nayebisi yo yango lelo. 20. Nakomeli yo te makambu ya malamu penza na toli pe na boyebi; 21. Pona koyebisa yo motindo ya sembo solo ya maloba ya solo, po oyanola maloba ya solo epayi ya baoyo batindi yo?

22. Kopunza mobola te po azali mobola, pe konyata mokeleli te na ekuke; 23. Po Yawe akosamba likambu na bango pe akopunza molimo ya baoyo bazali kopunza bango.

24. Kozala moninga ya mutu oyo azali mokonzi ya kanda te, pe kokota te epayi ya mutu ya mobulu te; 25. Noki te oyekola banzela na ye pe omema motambu na molimo na yo.

26. Kozala te na kati ya baoyo babetaka na loboko, na kati ya baoyo bakomaka garanti pona banyongo. 27. Soki ozali na eloko ya kofuta te, pona nini okondima balongola mbeto na yo na se na yo?

28. kozongisa te na sima mondelo ya kala oyo batata na bino batika.

29. Omoni mutu moko oyo azali na molende na mosala na ye? Akotelema liboso ya bakonzi, akotelema te liboso ya batu ya molili te.

Mokapo 23

1. tangu ofandi pona ete olia lipa elongo na mokonzi moko, kanisa malamu nani azali liboso na yo; 2. Pe tia mbeli na kingo, soki ozali na lokoso. 3. kolula bileyi na ye ya kitoko te, po ezali lipa ya bokosi.

4. Kolemba te pona kozwa bozwi, tia suka na mayele na yo. 5. Okobwaka misu na yo likolo na yango? ... wana ezali lisusu te; po bamisalaka mapapu pe, lokola pongo, bapumbwaka na likolo.

6. Koliya lipa te ya ye oyo azali na lisu mabe te, pe kolula te bileyi na ye ya kitoko; 7. Po lokola akanisaka na kati ya motema na ye, ye pe aza bongo. Lia pe mela, akoloba na yo, kasi motema na ye ezali na yo te. 8. Eteni na yo oyo oliaki, okosanza yango, pe okobungisa maloba na yo ya kosepelisa.

9. Koloba te na matoyi ya zoba, po akotiola bwanya ya maloba na yo.

10. Kozongisa sima te ndelo ya kala te, pe kokota te na kati ya bilanga ya bitike; 11. Po  Mosikoli na bango azali makasi; ye akosamba likambo na bango na kotelemela yo.

12. Tia motema na yo na mateya pe matoyi na yo na maloba ya boyebi.

13. Kozanga te kopesa mwana disipilini; tangu okobɛta ye na lingenda, akokufa te. 14. Okobeta ye na lingenda, kasi okobikisa molimo na ye na sheol.

15. Mwana na ngai, soki motema na yo ezali na bwanya, motema na ngai ekosepela, solo, ata ngai moko, 16. Pe mobimba na ngai ekosepela tangu mbebu na yo ekoloba makambu oyo ezali sembo.

17. Tika ete motema na yo ezala na zuwa te epayi ya basumuki, kasi zala tangu nionso kati na bobangi Yawe, 18. Po ya solo suka ezali, pe elikya na yo ekobebisama te.

19. Yo, mwana na ngai, yoka pe zala na bwania, pe kamba motema na yo na nzela. 20. Kozala te na kati ya balangwi vino to na kati ya balokoso ya misuni. 21. Po molangwi pe lokoso ya bileyi bakokoma babola, pe pongi ekolata bilamba epasuka.

22. Yoka tata na yo oyo abota yo, pe kotiola mama na yo te tangu akokoma mobange.

23. Somba solo, pe koteka yango te; bwanya, mateya, pe bososoli.

24. Tata ya moyengebene akosepela mingi, pe ye oyo aboti mutu ya bwania akosepela na ye. 25. Tika ete tata na yo na mama na yo basepela, pe ye oyo abotaki yo asepela.

26. Mwana na ngai, pesa ngai motema na yo, pe tika misu na yo esepela na banzela na ngai ; 27. Po mwasi ya ndumba azali libulu mozindo, pe mwasi mopaya azali libulu ya mikakatano : 28. Bongo atelemaka na ekenge lokola moyibi, pe abakisaka batu oyo babuki mibeko na kati ya batu.

29. Pona nani azali na : He? Pona nani azali na : Mawa na ngai? Pona nani azali na koswana? Pona nani azali na kopotana? Pona nani aza na bapota ezanga tina? 30. Pona nani azali na misu motane? Pona baoyo bawumelaka pembeni na vino, baoyo bakendaka komeka vino oyo esangisama. 31. Kotala vino te tangu ezali motane makasi, tangu ezali kongenga na kati ya kopo pe tangu ezali kokita na pete nyonso; 32. Na suka, ekoswa lokola nyoka pe ekoswa minu lokola vipere : 33. Misu na yo ekotala basi ya bapaya, pe motema na yo ekoloba makambu ya mabe. 34. Pe okozala lokola ye oyo alali na kati ya motema ya mayi monene, pe lokola ye oyo alali na songe ya singa ya masuwa... 35. Babetaki ngai, kasi nazalaki maladi te; babetaki ngai, kasi nayebaki yango te. Mokolo nini nakolamuka? Nakozongela pe nakoluka yango lisusu!

Mokapo 24

1. Kozala na zuwa te na batu oyo basalaka mabe te, pe kolinga kozala elongo na bango te, 2. Po mitema na bango ekana kaka libebi, pe mbebu na bango elobaka mabe bakosala.

3. Na nzela ya bwania ndako etongamaka, pe na bososoli etongami; 4. Pe na boyebi, bashambrɛ etondi na bozwi nyonso ya motuya pe na biloko ya kitoko na motuya.

5. Mutu ya bwania azalaka makasi, pe mutu ya boyebi alendisaka nguya na ye. 6. Po na litambwisi ya mayele, okobunda etumba na yo, pe lobiko ezali na nzela ya ebele ya bapesi-toli.

7. Bwania ezali ngomba molayi pona zoba; akofungola monoko na ye te na ekuke ya engumba.

8. Ye oyo akanaka kosala mabe akobengama mutu ya mayele mabe.

9. Mabongisi ya bozoba ezali lisumu, pe motioli azali kele epayi na batu. 10. Soki ozali kobungisa motema na mokolo ya pasi, makasi na yo ezali moke.

11. Bikisa baoyo bakomema pona liwa, pe kosundola te baoyo bakokende pona liwa ya mobulu. 12. Soki olobi: Tala, toyebaki te, ye oyo amekaka mitema, akokanisa yango te? pe ye oyo abatelaka molimo na yo ayebi yango te, pe azongiselaka mutu na kotalela mosala na ye.

13. Mwana na ngai, lia mafuta ya nzoyi, po ezali malamu; pe ndambu ya mafuta ya nzoyi ezali elengi na kati ya monoko na yo. 14. Bongo yeba bwania pona molimo na yo : soki ozwi yango, lobi ezali, pe elikya na yo ekobeba te.

15. Mutu mabe, kotia te mitambo na esika oyo moyengebene afandaka, pe kobebisa esika na ye ya kobombana te. 16. Pamba te moyengebene akokweya mbala sambo pe akotelema, kasi batu mabe babataka libaku na kati ya likama.

17. Soki monguna na yo akweyi, kosepela te; pe soki abeti libaku, kotika te ete motema na yo esepela ; 18. Noki Yawe amona yango pe ezala mabe na misu na ye, pe alongola kanda na ye likolo na ye.

19. Kotomboka makasi te na tina ya baoyo bakosalaka mabe, pe kolula batu mabe te; 20. Po ete lobi ezali te pona mutu ya mbindo : mwinda ya batu mabe ekobomama.

21. Mwana na ngai, banga Yawe pe mokonzi; kosangana te na baoyo babulukaka, 22. Pamba te pasi na bango ekoya na mbalakaka, pe nani ayebi libebi ya moko to mosusu?

23. Makambu oyo pe ewuti na batu ya bwania:

Komonisa koponapona kati na kosambisa ezali malamu te.

24. Ye oyo alobi na mutu mabe ete: Ozali moyengebene, batu ya bikolo bakolakela ye mabe, pe bikolo bakosilikela ye. 25. Kasi baoyo bakopamela ye bakondimama, pe lipamboli ya bolamu ekoyela bango.

26. Ye oyo ayanoli na maloba ya sembo, akitisaka mbebu.

27. Bongisa mosala na yo na libanda, pe bongisa malamu elanga na yo, pe na sima tonga ndako na yo.

28. Kozala te motatoli ya mozalani na yo pona likambu te. Bongo olingi okosa na mbebu na yo?

29. Koloba te: Lokola ye asali ngai, nakosala ye; Nakozongisela mutu na lolenge ya mosala na ye.

30. Nalekaki pembeni ya elanga ya mutu ya goyigoyi pe pembeni ya elanga ya vino ya mutu oyo azali na bososoli te; 31. Pe tala, nyonso kuna ekoli na banzube; likolo na yango ezipamaki na basende, pe mir molayi na yango ya mabanga ebukanaki. 32. Bongo natalaki pe natiaki motema na ngai; Namoni, pe nazwaki mateya. 33. Mwa pongi, mwa kopema, mwa kokanga maboko pona kolala..., 34. Pe  kimobola na yo ekoya lokola motamboli, pe bozangi na yo lokola mutu oyo azali na bibundeli. 

Mokapo 25

1. Oyo ezali pe lisusu masese ya Salomo, oyo basali ya Ezekiyas mokonzi ya Yuda bakomaki.

2. Kembo ya Nzambe ezali kobomba likambu, pe kembo ya bakonzi ezali koluka kososola bozindo ya likambu. 3. Likolo na molayi likolo, pe mabele na bozindo, pe motema ya bakonzi, ekoki te kolukama na bozindo na yango.

4. Longola bosoto na palata, pe mbeki moko ekobima pona mosali-wolo. 5. Longola mutu mabe liboso ya mokonzi, pe kiti na ye ya bokonzi ekotongama na boyengebene.

6. Komikumisa te liboso ya mokonzi, pe kotelema te na esika ya batu minene. 7. Po ezali malamu ete baloba na yo: Mata awa, na esika ete bakitisa ya liboso ya mutu ya lokumu oyo misu na yo ekomona.

8. Kobima mbangumbangu te pona kowelana, noki te oyeba nini osengeli kosala na suka, tangu mozalani na yo akoyokisa yo soni.

9. Wela likambu na yo elongo na mozalani na yo, pe kobimisa sekele ya mosusu te, 10. Noki te oyo azali koyoka yo ayokisa yo soni pona songisongi na yo, pe soni na yo elongwa te.

11. Liloba oyo elobami na ndenge malamu ezali lokola bapome ya wolo oyo batia palata.

12. Pete ya wolo pe singa ya motuya ya wolo ya malamu ezali lokola mopameli ya mayele na litoyi oyo ezali koyoka.

13. Momemi-sango ya sembo azali lokola malili ya mbula-pembe oyo ekomaka na tangu ya kobuka mbuma pona baoyo batindi ye; azongisaka molimo ya nkolo na ye makasi.

14. Mutu oyo azali komikumisa pona likabo ya lokuta azali lokola mapata pe mopepe pe mbula te.

15. Na motema molayi mokonzi andimisami, pe monoko ya pete pe ya boboto ebukaka mikuwa.

16. Tangu ozwi mafuta ya nzoyi, lia mingi ndenge osengeli na yango, noki otonda pe osanza yango. 17. Kotia makolo na yo mingi te na ndako ya mozalani na yo, noki atonda na yo pe ayinaka yo. 18. Mutu oyo azali kotatola lokuta pona moninga na ye azali marto, mopanga pe likongo ya makasi.

19. Kotia motema na mokolo ya pasi na mutu oyo atekaka basusu ezali lokola linu oyo ebukani pe likolo oyo ezali ya kolemba.

20. Ye oyo alongoli elamba na ye na mokolo moko ya malili, pe atie vinegre na pota, ndenge wana ezali ye oyo ayembi banzembo na motema oyo etungisami.

21. Soki ye oyo ayinaka yo azali na nzala, pesa ye lipa ya kolia, pe soki azali naposa ya komela, pesa ye mayi amela ; 22. Po okotondisa makala oyo ezali kopela likolo na moto na ye, pe Yawe akozongisela yo yango.

23. Mopepe ya nord ebotaka mbula, pe bilongi ya kanda, lolemo ya kobombana.

24. Ezali malamu kofanda na songe ya likolo ya ndako na esika ya kofanda ndako moko elongo na mwasi ya koswana.

25. Basango malamu oyo ewuti na mboka mosika ezali lokola mayi ya malili pona molimo oyo ezali naposa ya komela.

26. Moyengebene oyo akweyi libaku liboso ya mutu mabe azali libulu ya mayi oyo eniatami na makolo pe liziba ya mayi oyo ebebisami.

27. Kolia mafuta ya nzoyi mingi ezali malamu te, pe koluka kembo na yo moko ezali kembo te.

28. Mutu oyo akonzaka elimo na ye te, azali engumba oyo ebeba, oyo ezali na bamir milayi te.

Mokapo 26

1 Lokola neje na eleko ya molunge, pe lokola mbula na tangu ya kobuka mbuma, boye kembo ebongi te na zoba.

2. Lokola mwano oyo ezali koyengayenga pe irondele oyo epumbwaka, ndenge moko wana pe elakeli mabe ezanga tina ekomaka te.

3. Fimbo ezali pona mpunda, singa kokanga monoko pona ane pe lingenda pona mokongo ya bazoba.

4. Koyanola zoba te na kolanda bozoba na ye, noki yo pe ozala lokola ye.

5. Yanola zoba na lolenge bozoba na ye, noki te azala mutu ya bwania na misu na ye moko.

6. Ye oyo atindaka basango na nzela ya loboko ya zoba, amikataka makolo na ye moko pe amelaka makambu oyo ezangi bosembo.

7. Makolo ya ebosono ezali na makasi te: oyo ezali lisese na monoko ya bazoba.

8. Ye oyo azali kopesa zoba lokumu azali lokola kokangisa libanga na ebambelo ya mabanga.

9. Nzube oyo ekoti na loboko ya molangwi masanga ezali lisese na monoko ya bazoba.

10. Ezali kaka eloko moko : Mobeti masasi oyo azokisaka mutu nyonso; pe azwaka zoba na mosala pe azwaka baleki-nzela na mosala.

11 Lokola mbwa azongi na bisanza na ye, zoba azongelaka bozoba na ye.

12. Omoni mutu oyo amimoni mutu ya bwania na misu na ye moko? Elikya ezali mingi pona zoba koleka pona ye.

13. Goyigoyi alobi: Nkosi akonguluma na nzela, nkosi na kati ya balabala.

14. Ekuke ebalukaka na bifungeli na yango, pe goyigoyi likolo na mbeto na ye.

15. Goyigoyi akotisaka loboko na ye na kati ya saani; alembi pona kozongisa yango na monoko na ye.

16. Goyigoyi na misu na ye moko amimonaka mutu ya bwania koleka batu sambo oyo bayanolaka na bososoli.

17. Asimbaka mbwa na matoyi, ezali oyo, na koleka pe azali kosilika pona koswana oyo ezali ya ye te.

18. Lokola mutu ya liboma oyo abwakaka makonga ya moto, makonga pe liwa, 19. Bongo ezali mutu oyo akosaka moninga na ye pe alobi: Nazalaki kosala kaka maseki?

20. Na bozangi koni, moto ekufaka; pe tangu basongi-songi bazali te, koswana esilaka.

21. Makala likolo na lituka ya moto pe koni likolo na moto, bongo ezali mutu ya koswana pona kopelisa biswana.

22. Maloba ya motongi ezali lokola biteni ya biloko kitoko, pe ekitaka ti na kati ya mitshopo.

23. Mbebu oyo ezikisaka pe motema mabe ezali lokola palata ya mbindo oyo ezipi mbeki ya mabele.

24. Ye oyo ayinaka amibombi na mbebu na ye ; kasi na kati na ye atai bokosi. 25. Tangu akomisi ngolu mongongo na ye, kondima ye te, po ezali na kele sambo na motema na ye.

26. Koyina ekoki kobombama na maske, mabe na ye ekomonana polele na kati ya lisanga.

27. Oyo akotimbola libulu akokweya na kati, pe libanga ekozongela likolo ya ye oyo akobalusa yango.

28. Lolemo ya lokuta eyinaka baoyo ye azokisaki, pe monoko ya maloba ya sukali ememaka libebi.

Mokapo 27

1. Komikumisa te pona mokolo ya lobi, po oyebi te nini mokolo moko ekobota ?

2. Tika mosusu akumisa yo, kasi monoko na yo te, mopaya, pe mbebu na yo te.

3. Libanga ezali kilo pe zelo ezali kilo, kasi kanda ya zoba eleki bango mibale.

4. Kanda ezali motema mabe pe kanda esopanaka, kasi nani akoki kotelema liboso ya zuwa?  5. Kopamela polele eleki bolingo oyo ebombami.

6. Bapota ya moninga ezalaka sembo, kasi ba beze ya ye oyo ayinaka ezalaka mbala na mbala.

7. Molimo oyo etondi eniataka mafuta ya nzoyi na se ya makolo, kasi pona molimo oyo ezali na nzala eloko nyonso ya bololo ezali elengi.

8. Lokola ndeke ayengakayengaka longwa na zala na ye, ndenge moko ezali pe mutu oyo azali koyengayenga mosika longwa na esika na ye.

9. Mafuta pe malasi esepelisaka motema, pe elengi ya moninga ezali toli oyo ewuti na motema.

10. Kobwaka moninga na yo te, to moninga ya tata na yo te, pe kokota na ndako ya ndeko na yo te na mokolo ya pasi na yo. Mozalani oyo azali penepene aleki ndeko oyo azali mosika.

11. Mwana na ngai, zala na bwanya pe sepelisa motema na ngai, po nazala na likambu ya koyanola ye oyo azali kofinga ngai.

12. Mutu ya mayele amonaka mabe liboso pe amibombaka; bazangi mayele balekaka pe bamemaka etumbu.

13. Kamata elamba na ye, pamba te atiamaki garanti pona niongo ya mutu mosusu; pe zwa epayi na ye elembo ya garanti, na tina ya mwasi mopaya.

14. Na ye oyo apamboli moninga na ye na mongongo makasi, oyo alamuki tongotongo, bakotangela ye yango lokola elakeli mabe.

15. Kosopana ya matanga ya mbula tangu nyonso pe mwasi ya biswana ekokani. 16. Oyo azali kokanga ye akokanga mopepe, pe loboko na ye ya mobali ezwi mafuta.

17. Ebende epelisamaka na ebende, pe mutu apelisaka elongi ya moninga na ye.

18. Ye oyo abatelaka nzete ya figi aliaka mbuma na yango, pe ye oyo akengelaka nkolo na ye akokumisama.

19. Lokola na kati ya mayi elongi eyanolaka na elongi, ndenge moko pe motema ya mutu eyanolaka na mutu.

20. Sheol na libulu ya libebisi etondaka ata moke te, pe misu ya mutu etondaka ata moke te.

21. Etumbeli ezali pona palata, pe furu ezali pona wolo, bongo mutu azali pona monoko oyo esanzolaka ye.

22. Ata otuti mutu ya liboma na kati ya liboka, na kati ya bambuma, liboma na ye ekolongwa likolo na ye te.

23. Yeba malamu elongi ya etonga na yo pe tia motema na yo likolo ya etonga na yo; 24. Po ete bomengo ezalaka pona libela te, pe motole ewumelaka te libela na libela? 25. Matiti ya bibwele soki esili, pe matiti ya pete ebimi, pe basangisi matiti ya bangomba. 26. Bana-mpate ezali pona bilamba na yo, pe bantaba ezali pona talo ya elanga; 27. Pe ebele ya miliki ya bantaba na yo pona bileyi na yo, pona koleyisa ndako na yo pe pona bomoyi ya basali na yo ya basi.

 

Mokapo 28

1. Mutu mabe akimaka mbangu tangu mutu moko te akolanda ye, kasi bayengebene bazali na mpiko lokola mwana ya nkosi.

2. Na tina ya mobulu ya mboka moko, bankumu na yango bazali mingi; kasi mutu moko ya bososoli pe ya boyebi, bosikisiki ekowumela.

3. Mobola oyo azali konyokola batu ya bozangi azali mbula makasi oyo esopani pe ememaka lipa te.

4. Baoyo batiki Mobeko bakumisaka batu mabe, kasi baoyo batosaka Mobeko babundisaka na bango.

5. Batu oyo bamipesi na kosalaka mabe basosolaka bosembo te, kasi baoyo balukaka Yawe basosolaka makambu nyonso.

6. Mobola oyo atambolaka na bosembo na ye aleki mutu ya mobulu oyo atambolaka na banzela mibale, atako azali na bozwi.

7. Mwana ya bwania atosaka mobeko, kasi moninga ya batu na bosoto ayokisaka tata na ye soni.

8. Ye oyo abakisaka bozwi na ye na nzela ya intere pe na litomba, abombaka yango pona ye oyo azali na boboto epayi ya babola.

9. Ye oyo alongoli litoyi na ye pona koyoka Mobeko, ata libondeli na ye ezali kele.

10. Ye oyo azali kobungisa batu ya sembo na nzela ya mabe, akokweya ye moko na kati ya libulu oyo atimbolaki, kasi batu oyo bazangi mbeba bakozwa libula ya makambu ya malamu.

11. Mutu ya bozwi azali mutu ya bwania na misu na ye moko, kasi mobola oyo azali na bososoli atimbolaka ye malamu.

12. tangu bayengebene bazali kosepela, kembo monene ezalaka; kasi tangu batu mabe batelemi, batu bamibombaka.

13. Ye oyo abombi masumu na ye akozwa bolamu te, kasi ye oyo ayamboli masumu na ye pe asundoli yango akozwa mawa.

14. Esengo mutu oyo azali kobanga tangu nyonso, kasi ye oyo akomisaka motema makasi akokweya kati na pasi.

15. Nkosi oyo ezali konguluma pe urse oyo ezali kolanda nyama na yango, ezali nde mutu mabe oyo azali kokonza batu ya bobola.

16. Mokonzi oyo azangi bososoli aniokolaka bato mingi, kasi ye oyo ayinaka litomba oyo ezangi bosembo akoyeyisa mikolo na ye molayi.

17. Mutu oyo azali na kilo ya makila ya molimo akokima ti na libulu,... ata ete bakokanga ye te!

18. Ye oyo azali kotambola sembo akobika, kasi ye oyo nyonso akolanda banzela mibale na kogumbama, akokweya mbala moko na kati ya moko na yango.

19. Oyo abalulaka mabele na ye akotonda na lipa, kasi ye oyo alandaka batu moko ya pamba akotonda na bobola.

20. Mutu ya sembo akozwa mapamboli mingi, kasi ye oyo azali kosala mbangumbangu po akoma mozwi akozala te oyo azangi likambu.

21. Kopona-pona bilongi ya batu ezali malamu te; ata pona eteni ya lipa, mutu akosala mabe.

22. Mutu oyo asalaka mbangu pona kozwa bomengo azali na lisu mabe, pe ayebi te ete kozanga ekoyela ye.

23. Ye oyo apamelaka mutu akozwa ngolu na sima, na esika ya ye oyo alobaka maloba ya sukali na lolemo na ye.

24. Ye oyo ayibi tata to mama na ye pe alobi: Oyo ezali kobuka mobeko te, oyo wana azali moninga ya mobebisi.

25. Ye oyo molimo na ye ezali na lolendo abimisaka koswana, kasi ye oyo atieli Yawe motema akokoma mafutamafuta.

26. Ye oyo atiaka motema na ye na motema na ye moko azali zoba ; kasi ye oyo azali kotambola na bwania, ye wana akokangolama.

27. Ye oyo apesaka mobola akozanga eloko moko te, kasi oyo akobalusa misu na ye akotonda na bilakeli mabe.

28. Tangu batu mabe batelemi, batu babombamaka; kasi tangu bakufaka, bayengebene bakomaka mingi.

Mokapo 29

1. Mutu oyo, akopamelaka mbala mingi, akokomisaka kingo na ye makasi, akobukana na mbalakata, pe lobiko ezali te.

2. Soki bayengebene bakomi mingi, batu basepelaka; kasi tangu mutu mabe azali kokonza, batu bakolela.

3. Mutu oyo alingaka bwania azali esengo ya tata na ye, kasi moninga ya bandumba akobungisa bozwi na ye.

4. Mokonzi, na nzela ya lisambisi ya sembo, akotelemisa mboka, kasi mutu oyo azwaka kanyaka abebisaka yango.

5. Mutu oyo azali maloba sukali epayi ya mozalani na ye akotia monyama liboso na makolo na ye.

6. Na mabunga ya mutu mabe ezali na motambo, kasi moyengebene akoyemba na esengo pe akosepela.

7. Moyengebene ayebi likambu ya babola; mutu mabe asosolaka boyebi te.

8. Batu ya matiolii batiaka moto na engumba, kasi batu ya bwania balongolaka kanda.

9. Mutu ya bwania oyo azali koswana na mutu ya zoba, azala na kanda to azala koseka, akozala na bopemi te.

10. Batu oyo basopaka makila bayinaka mutu oyo azangi mbeba, kasi batu ya sembo balukaka bomoyi na ye makasi.

11. Zoba abimisaka libanda elimo na ye mobimba, kasi mutu ya bwania akitisaka yango sima.

12. Soki mokonzi apesi bokebi na liloba ya lokuta, basali na ye nyonso bakozala batu mabe.

13. Mobola na monyokoli bakutanaka esika moko, Yawe angengisaka misu na bango mibale.

14. Mokonzi oyo asambisaka babola na lolenge ya bosolo, kiti na ye ya bokonzi ekotongama libela.

15. Fimbu pe pamela epesaka bwania, kasi elenge mobali oyo amikabi na ye moko ayokisaka mama na ye soni.

16. Tangu batu mabe bakomaka mingi, botomboki ekomaka mingi; kasi bayengebene bakomona kokweya na bango.

17. Sembola mwana na yo, pe akopesa yo bopemi pe akopesa biloko ya kosepelisa molimo na yo.

18. Tangu emoniseli ezali te, batu bazanga ndelo ya kotelema; kasi apambolami ye oyo abatelaka mobeko!

19. Mosali asembolamaka na maloba te; po azali kososola, kasi azali koyanola te.

20. Omoni mutu oyo azali kowela mbangumbangu na maloba na ye? Elikya ezali pona zoba koleka pona ye.

21. Ye oyo azalaka motema pete na mosali na ye wuta na bolenge na ye, akomona ye mwana na ndako.

22. Mutu ya kanda abimisaka koswana, pe mutu oyo amitiaka kanda atondaka na masumu.

23. Lolendo ya mutu ekitisaka ye, kasi ye oyo azali komikitisa ya elimo azwaka kembo.

24. Oyo akabolaka na moyibi ayinaka molimo na ye moko; ayoki bilakeli mabe, kasi abimisi yango polele te.

25. Kobanga batu ememaka motambo, kasi ye oyo atiaka motema na Yawe akotombwama na kati ya kobatelama.

26. Mingi balukaka elongi ya mokonzi, kasi lisambisi ya sembo ya mutu ewuti na Yawe.

27. Mutu ya mbindo azali kele pona bayengebene, pe ye oyo azali sembo na nzela na ye azali kele pona mutu mabe.

Mokapo 30

1 Maloba ya Agure mwana ya Yake, elobeli oyo mutu oyo alobaki na Itiyele, na Itiyele pe na Ukale :

2. Solo, ngai nazali zoba koleka moto nyonso, pe nazali na mayele ya mutu te; 3. Pe nazwaki bwania te, pe nazali na boyebi ya Mosantu te.

4. Nani amati na Likolo, pe nani akiti? Nani asangisi mopepe na kati ya maboko na ye? Nani akangi mayi na kati ya kazaka? Nani atie bandelo nyonso ya mabele? Kombo na ye nani, pe kombo ya mwana na ye nini, soki oyebi?

5. Liloba nyonso ya +Nzambe ezali ya kopetolama; azali nguba pona baoyo bazali kozela ye.

6. Kobakisa te na maloba na ye, noki apamela yo, pe omonana mutu ya lokuta.

7. Nakosenga yo makambu mibale: Koboya ngai yango te liboso nakufa : 8. Longola na ngai makambu ya pamba pe maloba ya lokuta; kopesa ngai bobola to bomengo te; leyisa ngai lipa oyo nazali na yango posa, 9. noki natonda pe nawangana yo pe naloba: Yawe azali nani? Pe noki nakoma mobola pe nayiba pe nalapa ndayi ya lokuta na kombo ya Nzambe wa ngai.

10. Kofunda mosali te epayi ya nkolo na ye, noki alakela yo mabe pe ozwa etumbu.

11. Ezali na lisanga ya batu oyo elakelaka mabe tata na ye pe epambolaka mama na ye te. 12. lisanga ya batu oyo ezali peto na misu na yango moko pe basakolami te ya mbindo na bosoto na yango, 13. Lisanga ya batu moko, … misu na yango ezali na lolendo, pe bapopiele na yango etombwami! 14. Lisanga ya batu oyo minu na yango ezali mipanga pe mashoire na yango ezali lokola bambeli, pona koboma babola likolo na mabele pe bakeleli na kati ya bato.

15. Sonzo ezali na bana basi mibale: Pesa! Pesa! Ezali na biloko misatu oyo etondaka te, mineyi oyo elobaka te : Ekoki!... 16. Sheol pe libumu oyo ebotaka te, mabele oyo etondaka na mayi te, pe kopela moto oyo elobaka te: Ekoki!

17. Lisu oyo ezali kotiola tata pe kotiola botosi epayi ya mama, bakokombele ya ebale bakotobola ye misu pe bana ya mpongo bakolia ye.

18. Pona ngai biloko misatu elekelaka ngai mingi, pe mineyi nasosolaka yango te :

19.  Nzela ya mpongo na likolo, nzela ya nyoka likolo ya libanga, nzela ya masuwa na kati ya motema ya mayi monene, pe nzela ya mobali epayi ya elenge mwasi. 20. Na boye ezali nzela ya mwasi ya ekobo: Aliaka pe apangusi monoko na ye pe alobi: Nasali mabe ata moko te.

21. Na se ya makambu misatu, mabele ezali koningana, pe na se ya makambu mineyi ekokoka yango te. 22. Na se ya mosali tangu akomi mokonzi, pe mutu ya liboma tangu atondi na lipa; 23. Na se ya mwasi oyo ayinama tangu azobala, pe mosali ya mwasi tangu azwi libula ya nkolo na ye ya mwasi.

24. Ezali na biloko mineyi ya mike na mabele, pe bazali na bwania na kati ya batu ya bwania : 25. Bafurmi, batu oyo bazangi makasi, pe babongisaka bileyi na bango na eleko ya molunge; 26. Balapin ya zamba, batu bazangi nguya, pe batonga bandako na bango na kati ya libanga; 27. Mabanki bazali na mokonzi te, kasi babimaka bango nyonso na molongo; 28. Okangi moselekete na maboko na yo, pe ezali na bandako minene ya bakonzi.

29. Ezali na biloko misatu oyo bazali na botamboli kitoko, pe mineyi oyo etambolaka kitoko : 30. Nkosi, elombe makasi na kati ya banyama, oyo abalukaka te epayi ya mutu moko; 31. Punda oyo azali na loketo ya makasi; to ntaba; pe mokonzi, oyo mutu moko te akoki kotelemela ye.

32. Soki ozalaka zoba na komitombola to okanaki mabe, tia loboko na yo na monoko na yo;

33. Po kofinafina miliki ebimisaka manteka, pe kofinafina zolo ebimisaka makila, pe kofinafina kanda ebotaka koswana.

Mokapo 31

1. Maloba ya Mokonzi Lemuele, lisakoli oyo mama na ye ateyaki ye : 2. Nini, mwana na ngai? Pe nini, mwana ya libumu na ngai? Pe nini, mwana ya bilaka na ngai? 3. Kopesa makasi na yo na basi te, pe banzela na yo na baoyo babungisaka bakonzi te.

4. Ezali pona bakonzi te, Lemuele, ezali te pona bakonzi bamela vino, to pe batu minene baloba: Masanga ya makasi ezali wapi? 5. Noki te bamela pe babosana mobeko, pe babebisa esambiselo ya bana nyonso ya pasi.

6. Pesa masanga makasi epayi ya ye oyo alingi kokufa, pe vino epayi ya baoyo motema na bango ezali bololo. 7. Tika amela pe abosana bobola na ye, pe akanisa lisusu mawa na ye te.

8. Fungola monoko na yo pona baba, pona tina ya babola nyonso. 9. Fungola monoko na yo, sambisa na boyengebene, pe sala bosembo epayi ya baoyo bazali koniokwama pe baoyo bazali babola.

10. Mwasi ya motema pe bizaleli malamu! Nani akoki kozwa ye? Po talo na ye ezali koleka mayaka ya talo.

11. Motema ya mobali na ye etielaka ye motema, pe akozanga biloko ya kopunza te.

12. Asalaka ye bolamu pe kasi mabe te mikolo nyonso ya bomoyi na ye.

13. Alukaka suki ya mpate pe lin, pe asalaka na maboko na ye na esengo.

14. Azali lokola masuwa ya mosali mombongo, amemaka lipa na ye wuta mosika.

15. Alamuki tangu butu ezali nanu pe apesaka bileyi na ndako na ye pe mitindo na basali na ye ya basi.

16. Akanisaka elanga moko pe asombaka yango; na mbuma ya maboko na ye aloni elanga ya vino.

17. Akangi loketo na ye na makasi pe alendisaka maboko na ye.

18. Amonaka ete lifuti na ye ezali malamu; mwinda na ye ekufaka te na butu.

19. Atiaka loboko na ye na lidusu ya tonga, pe misapi na ye esimbaka tonga ya bilamba.

20. Asembolaka loboko na ye epayi ya baoyo bazali koniokwama pe asembolaka maboko na ye epayi ya baoyo bazali na bosenga.

21. Abangaka neje te pona ndako na ye, pamba te batu nyonso ya ndako na ye balati bilamba ya motane-bulé.

22. Amisalelaka batapi; bilamba ya lin ya kitoko pe ya motane-bule ezali bilamba na ye.

23. Mobali na ye ayebani na bikuke ya engumba tangu afandi na kati ya bampaka ya mboka. 24. Atongaka bilamba pe atekaka yango; pe apesaka mikaba epayi ya moteki.

25. Alata makasi pe lokumu, pe asekaka mokolo oyo ezali koya.

26. Afungolaka monoko na ye na bwania, pe mobeko ya bolamu ezali na lolemo na ye.

27. Akengelaka banzela ya ndako na ye pe aliaka te lipa ya kigoyigoyi.

28. Bana na ye ya mibali batelemaka pe balobaka na ye mopambolami, pe mobali na ye pe akumisaka ye :

29. Bana basi mingi basalaki na bizaleli malamu, kasi yo oleki bango nyonso. 30. Ngolu ezali na bokosi, pe kitoko ezali pamba; kasi mwasi oyo abangaka Yawe, ye nde akokumisama.

31. Bopesa ye mbuma ya misala maboko na ye, pe tika misala na ye ekumisa ye na bikuke.