Mokanda ya Nehemia

 

Mokapo 1Mokapo 2Mokapo 3Mokapo 4Mokapo 5Mokapo 6Mokapo 7Mokapo 8Mokapo 9Mokapo 10Mokapo 11Mokapo 12Mokapo 13

 

1        Mokapo 1

1. Maloba ya Nehemia mwana ya Hakalia.

Pe ezalaki na sanza ya Kisleve, na mbula ya tuku mibale, tangu nazalaki na engumba monene ya Shushan. 2. Bongo Hanani, moko ya bandeko na ngai, ayaki, ye na batu mosusu oyo bawutaki na Yuda. Pe natunaki bango na tina ya Bayuda, ndambu ya baoyo bakimaki na bowumbu, pe na tina ya Yerusaleme. 3. Pe balobaki na ngai: Baoyo batikali na bokangami kuna na etuka bazali na pasi mingi pe na soni monene; pe mir molayi ya Yerusaleme ezali na libebi, pe bikuke na yango ezikisami na moto. 4. Pe tangu nayokaki maloba yango, nafandaki pe nalelaki, pe nalelaki mikolo mingi; pe nakilaki bileyi pe nabondelaki liboso ya Nzambe ya lola, 5. Pe nalobaki : Ô Yawe, Nzambe ya likolo, Nzambe monene pe ya somo, oyo abatelaka kondimana pe boboto epayi ya baoyo balingaka ye pe batosaka mibeko na ye. 6. Nabondeli yo, tia litoyi na yo ezala na likebi pe misu na yo efungwama, po na koyoka losambo ya mosaleli na yo, oyo nazali kobondela liboso na yo butu moyi po na bana ya Israel basaleli na yo, pe koyambola na tina na masumu ya bana Israel, oyo tosali na kotelemela yo! Ngai pe ndaku ya tata na ngai, tosalaki lisumu. 7. Tosaleli yo mabe penza, pe totosi mibeko te, mitindo pe bilakisi, oyo opesaki mosali na yo Mose mitindo. 8. Omikundola, nabondeli yo, liloba oyo opesaki mosali na yo Mose ete: Soki bozali sembo te, nakopalanganisa bino na kati ya bikolo; 9. Kasi soki bozongi epayi na ngai pe botosi mitindo na ngai pe bolandi yango, tangu nakopalangisa bino na suka ya likolo, nakosangisa bino wuta kuna pe nakomema bino na esika wapi napona po kombo na ngai efanda! 10. Bazali basali na yo pe batu na yo, oyo okangolaki na nguya na yo monene pe na loboko na yo ya nguya monene. 11. Nabondeli yo, Nkolo, tia litoyi na yo ezala na bokebi na libondeli ya mosali na yo, pe na libondeli ya basali na yo, oyo basepelaka kobanga kombo na yo; pe tika mosali na yo alonga lelo pe nabondeli yo, pesa ye ngolu liboso ya mutu oyo. Nazalaki mokambi ya masanga ya mokonzi.

 

2        Mokapo 2

1. Pe esalemaki ete na sanza ya Nisan, na mbula ya tuku mibale ya Mokonzi Artashasta, tangu vino ezalaki liboso na ye, nazwaki vino yango pe napesaki yango epayi ya mokonzi; Kasi nazalaki ata moke te na mawa liboso na ye. 2. Pe mokonzi alobaki na ngai ete: Pona nini elongi na yo ezali na mawa? Pe atako bongo ozali maladi te ? Oyo ezali eloko mosusu te bobele mawa ya motema. Nabangaki mingi na tangu wana. 3. Pe nalobi na mokonzi: Tika mokonzi azala na bomoyi libela! Po na nini elongi na ngai ekozala na mawa te, nzokande engumba, esika ya kokundama ya batata na ngai, etikali pamba, pe baporte na yango ezikisami na moto? 4. Pe mokonzi alobaki na ngai: Olingi kozwa nini? Pe nabondelaki Nzambe ya likolo; 5. Pe nalobaki na mokonzi: Soki ezali malamu pona mokonzi, pe soki mosali na yo azali malamu liboso na yo, nabondeli ete otinda ngai na Yuda, na engumba epayi bakundaki batata na ngai, po natonga yango lisusu. 6. Bongo mokonzi alobaki na ngai, pe mokonzi-mwasi afandaki pembeni na ye: Mobembo na yo ekozala tangu boni, pe okozonga tangu nini? Pe esepelisaki mokonzi kotinda ngai; pe napesaki ye tangu. 7. Pe nalobaki na mokonzi: Soki mokonzi amoni malamu, tika bapesa ngai mikanda pona baguvernere na ngambo mosusu ya ebale, po batika ngai naleka ti nakooóma na Yuda; 8. Pe mokanda moko epayi ya Asaf, mobateli ya zamba ya mokonzi, po na apesa ngai mabaya pona kosala baporte ya ndaku monene oyo ekangami na ndako, pe pona mir molayi ya engumba pe pona ndaku oyo nasengeli kokota. Pe mokonzi apesaki ngai yango, pamba te loboko malamu ya Nzambe na ngai ezalaki likolo na ngai.

9. Pe nakomaki epayi ya baguvernere ya ngambu mosusu ya ebale, pe napesaki bango mikanda ya mokonzi ; nzokande mokonzi atindaki bakonzi ya basoda pe ya batambolisi mpunda elongo na ngai. 10. Tangu Sanbalat Moroni pe Tobiya mosali Moamoni bayokaki yango, batungisamaki mingi po ete mutu moko ayaki koluka bolamu ya bana ya Israel. 11. Pe nakomaki na Yerusaleme pe nazalaki wana mikolo misatu. 12. Pe natelemaki na butu, ngai na batu moke elongo na ngai, kasi nayebisaki mutu te nini oyo Nzambe na ngai atiaki na motema na ngai nasala pona Yerusaleme; pe niama moko te ezalaki elongo na ngai longola se niama oyo namataki likolo na yango. 13. Pe nabimaki na butu na ekuke ya lobwaku, pe epayi ya liziba ya dragona, pe epayi ya ekuke ya bosoto; pe natalaki malamu bamir ya Yerusaleme, oyo ezalaki ya kotoboka-toboka, pe bikuke na yango oyo ezikisamaki na moto. 14. Pe nalekaki pembeni na ekuke ya liziba pe na pisini ya mokonzi, pe esika ezalaki te po niama oyo ezalaki na se na ngai eleka. 15. Pe na butu namataki pembeni ya lubwaku, pe natalaki malamu bamir; pe nakotaki lisusu na ekuke ya lobwaku pe nazongaki. 16. Kasi bakonzi bayebaki te esika nakendaki to nini nazalaki kosala; po kino tangu wana nayebisaki Bayuda eloko moko te, to banganga-Nzambe, to batu minene, to bakonzi, to basusu oyo bazalaki kosala mosala yango.

17. Nalobi na bango: Bomoni pasi oyo tozali na yango, ete Yerusaleme etikali pamba, pe bikuke na yango ezikisami na moto. Boya totonga lisusu mir molayi ya Yerusaleme, po tozala lisusu litioli te. 18. pe nayebisaki bango ete loboko ya Nzambe na ngai ezalaki malamu likolo na ngai, pe lisusu maloba ya mokonzi oyo alobaki na ngai. Bongo balobi: Totelema pe totonga! Pe balendisaki maboko na bango po na malamu.

19. Tangu Sanbalat Moroni na Tobiya Moamoni na Geshem Moarabe bayokaki yango, basekaki biso pe batalaki biso na kotiola, balobi: Likambu nini oyo bolingi kosala? Bolingi kotombokela mokonzi? 20. Pe nayanolaki bango pe nalobaki na bango: Nzambe ya likolo, akopesa biso bolamu; pe biso basali na ye tokotelema pe tokotonga. Kasi bozali na eteni te, lotomo te, bokundoli te na Yerusaleme.

 

3        Mokapo 3

1. Eliyashibe nganga-Nzambe monene na bandeko na ye banganga-Nzambe batelemaki pe batongaki ekuke ya Bampate; babulisaki yango pe batelemisaki mapapu na yango. Pe babulisaki yango kino na ndaku molayi ya Meya, kino na ndaku molayi ya Ananel.

2. Pe batu ya Yeriko batongaki pembeni na ye. Pe Zakure mwana ya Imri azalaki pembeni na ye.

3. Pe bana ya Senaa batongaki ekuke ya mbisi; Balatisaki yango mabaya pe batiaki na mapapu na yango, na basete na yango pe bakumba na yango.

4. Pe pembeni na ye, Meremote mwana ya Uriya, mwana ya Hakoze, abongisaki elongo na ye. Pe pembeni na ye, Meshulame mwana ya Berekiya mwana ya Meshezabele abongisaki na mopanzi na ye. Pe Sadok mwana ya Baana abongisaki pembeni na ye. 5. Pe Batekoyi babongisaki pembeni na ye; kasi batu ya lokumu kati na bango bagumbaki kingo na bango te pona mosala ya Nkolo na bango.

6. Pe Yehoyada mwana ya Pasea pe Meshulame mwana ya Besodia babongisaki ekuke ya mir ya kala; Balatisaki yango mabaya pe batyaki na mapapu na yango, na basete na yango pe bakumba na yango.

7. Pe pembeni na ye, Melatia Mogibeona na Yadone Momeronote, mibali ya Gibeone pe ya Mizipa, babongisaki elongo na bango ti kiti ya guvernere na ngambu mosusu ya ebale. 8. Na mopanzi na ye ezalaki na Uziele mwana ya Harhaya, basali ya wolo. Pe Anania, mwana ya basali mafuta pe malasi, abongisaki pembeni na ye. Pe batikaki Yerusaleme kino na mir ya monene. 9. Pe pembeni na ye Refaya mwana ya Hure, mokonzi ya ndambo ya etuka ya Yerusaleme, abongisaki. 10. Pe na mopanzi na ye, Yedaya mwana ya Arumafe abongisaki, na botalani ya ndaku na ye. Pe Atushe mwana ya Ashabeneya abongisaki pembeni na ye, 11. Malakiya mwana ya Arime pe Asube mwana ya Pakatemoabe babongisaki eteni mosusu pe ndaku molayi ya etumbeli briki. 12. Pe pembeni na ye Shalume mwana ya Alokesh, mokonzi ya ndambo mosusu ya etuka ya Yerusaleme, pe ye na bana na ye ya basi babongisaki.

13. Anune na bafandi ya Zanoak babongisaki ekuke ya lobwaku; Batongaki yango, pe batiaki bizipelo na yango, na basete na yango, pe bakumba na yango, pe batongaki nkoto moko ya mir molayi ti na ekuke ya bosoto.

14. Pe Malkiya mwana ya Rekab, mokonzi ya etuka ya Bet-kereme, abongisaki ekuke ya bosoto; atongaki yango pe atiaki na mapapu na yango, biloko oyo esimbaka yango pe banzete na yango.

15. Pe Shalune mwana ya Kole-Oze, mokonzi ya etuka ya Mikpa, abongisaki ekuke ya liziba; atongaki yango, pe azipaki yango, pe atiaki na mapapu na yango, na bikateli na yango, pe na bikangeli na yango; pe atongaki mir molayi ya liziba ya mayi ya Siloe, pembeni ya elanga ya mokonzi, pe kino na bibutelo oyo ezali kokita longwa na engumba ya David.

16. Sima na ye, Nehemia mwana ya Azbuk, mokonzi ya ndambo ya etuka ya Bet-Tshur, abongisaki kino na ngambo mosusu ya malita ya David, pe na liziba oyo batimolaki, pe na ndaku ya batu ya nguya.

17. Na sima na ye, Balevi, Rekume mwana ya Bani, babongisaki pembeni na ye. Na mopanzi na ye, Ashabia, mokonzi ya ndambo ya etuka ya Kelila, abongisaki pona etuka na ye. 18. Na sima na ye, bandeko na bango, Bavayi mwana ya Enadada, mokonzi ya ndambo mosusu ya etuka ya Kelila, babongisaki. 19. Pe pembeni na ye, Ezer mwana ya Yeswa, mokonzi ya Mikpa, abongisaki eteni mosusu, oyo etalani na esika ya kokota na esika ya kobomba bibundeli wana bamir milayi ekutana. 20. Sima na ye, Baruk mwana ya Zabayi abongisaki na molende eteni mosusu, kobanda na esika bamir ekutana ti na ekuke ya ndako ya Eliashib, nganga-Nzambe monene. 21. Sima na ye Meremote mwana ya Uria, mwana ya Akote, abongisaki eteni mosusu, banda na ekuke ya ndako ya Eliashib ti na suka ya ndako ya Eliashib. 22. Pe sima na ye, banganga-Nzambe, mibali ya etuka, babongisaki. 23. Pe sima na ye, Benyamina na Ashube babongisaki liboso ya ndako na bango. Pe sima na bango Azariya mwana ya Maaseya, mwana ya Anania, abongisaki pembeni ya ndako na ye. 24. Pe sima na ye Binuwi mwana ya Enadade abongisaki eteni mosusu, longwa na ndako ya Azaria kino na esika bamir ekutana ti na koin. 25. Palal mwana ya Uzai abongisaki liboso ya esika bamir ekutana pe ya ndako molayi oyo ezali kotala ndako ya mokonzi, oyo ezali pembeni ya lopango ya boloko. Sima na ye, Pedaya mwana ya Parosh. 26. Pe Banetinime bafandi na Ofele, liboso ya ekuke ya mayi na ngambo ya ɛsti, pe ya ndako molayi oyo ebimaki. 27. Sima na ye Batekoyi babongisaki eteni mosusu, oyo etalani na ndako molayi monene oyo ezalaki kobima kino mir molayi ya Ofele. 28. Likolo ya ekuke ya mpunda banganga-Nzambe babongisaki, moko na moko atalaki ndako na ye. 29. Pe sima na ye, Sadok mwana ya Imere abongisaki liboso ya ndako na ye. Pe sima na ye, Shemaya mwana ya Shekanya, mokengeli ya ekuke ya esti, abongisaki pembeni na ye. 30. Pe sima na ye, Anania mwana ya Shelemia pe Anune mwana ya motoba ya Zalafe babongisaki eteni mosusu. Pe sima na ye, Meshulame mwana ya Berekiya, abongisaki, liboso ya ndako na ye. 31. Pe sima na ye, Malakiya, mwana na basali ya wolo, abongisaki ti na ndako ya Banetinime pe ya batu ya mombongo, oyo etalani na ekuke ya Mifkade, pe ti na shambre ya likolo ya esika bamir ekutanaka. 32. Pe kati na shambre ya likolo ya esika bamir ekutana pe ekuke ya bampate, basali ya wolo na batu ya mombongo babongisaki.

 

4        Mokapo 4

1. Pe ekomaki ete tangu Sanbalat ayokaki ete tozali kotonga mir ya molayi, asilikaki pe atombokaki mingi. Atiolaki Bayuda. 2. Pe alobaki liboso ya bandeko na ye pe mapinga ya Samaria pe alobi: Bayuda oyo bazanga nguya bazali kosala nini? Bakopesa bango nzela ya kosala yango? Bakobonzaka mbeka? Bakosilisa yango lelo oyo? Bakopesa bomoyi na mabanga oyo ewuti na bitunga ya putulu oyo ezika? 3. Pe Tobia Moamona atelemaki pembeni na ye pe alobaki ete: Eloko nionso oyo bakotonga; Soki mbwa ya zamba amateli yango, akokweyisa mir ya molayi na ye ya mabanga! —  4. Yoka, Ô Nzambe na biso, po tokotiolama; pe zongisa litioli na bango likolo ya mitu na bango, pe kaba bango na kotiolama po bapunzama na mboka ya bowumbu lokola bozwi ya bitumba. 5. Pe kozipa mabe na bango te, pe tika ete lisumu na bango elongwa liboso na yo te. po basilikisaki pe batukaki baoyo bazali kotonga. 6. Kasi tokobaki kotonga mir ya molayi; pe mir nionso ya molayi ekangamaki kino na ndambo na yango, pe batu bazalaki na mpiko pe motema ya kosala.

7. Pe ekomaki boye: tangu Sanbalat, Tobia, pe Barabe, pe Baamona, pe Baasdode, bayokaki ete mosala kozongisa bamir molayi ya Yerusaleme ezali se komata, pe ete bisika oyo epasukaki ebandi kokangama, ete bakomaki na kanda makasi. 8. Pe bango nionso basalaki likita elongo po nakoya kobundisa Yerusaleme pe kobebisa yango. 9. Bongo tobondelaki Nzambe na biso pe totiaki bakengeli butu na moyi pona kotelemela bango na tina na bango. 10. Pe Yuda alobaki ete: Makasi ya bamemi mikumba ekiti, pe ezali na biloko mingi ezangi tina oyo etikali sima ya bobuki, pe tokoka lisusu kotonga mir molayi te. 11. Kasi banguna na biso balobaki: Bakoyeba yango te pe bakomona yango te, kino tokoma kati na bango pe tokoboma bango pe tokosilisa mosala. 12. pe esalemaki ete Bayuda oyo bafandaki penepene na bango bayaki pe balobaki na biso mbala zomi wuta na bisika nionso na bozongi epayi na biso, 13. Na sima, natiaki na bisika ya se sima ya mir molayi, na bisika ya polele, pe nabongisaki bato na mabota na bango, na mipanga na bango, makonga na bango pe mbeli na bango. 14. Pe natalaki pe natelemaki pe nalobaki na batu minene pe na bakonzi pe na ndambo ya batu oyo batikala : Bolenga liboso na bango te. Bokanisa Nkolo, oyo azali monene pe somo, pe bobunda pona bandeko na bino ya mibali, bana na bino ya mibali pe ya basi, basi na bino pe bandako na bino.

15. Pe esalemaki ete, tangu banguna na biso bayokaki ete eyebanaki na biso, pe ete Nzambe abebisaki mabongisi na bango, biso banso tozongaki na mir molayi, moko na moko na mosala na ye. 16. Pe esalemaki wuta mokolo wana, ndambo ya basali na ngai bazalaki kosala mosala, nzokande ndambo mosusu bazalaki kosimba makonga, nguba, pe mbeli, pe bilamba ya kobatela tolo; pe bakonzi bazalaki sima ya ndako mobimba ya Yuda. 17. Baoyo bazalaki kotonga mir molayi pe bakumbi mikumba bazalaki kokotisa biloko, bazalaki kosala na loboko moko, nzokande mosusu ezalaki kosimba ebundeli. 18. Pe  baoyo bazalaki kotonga, mobali nionso akangaki mopanga na ye na loketo, pe bazalaki kotonga. Pe oyo azalaki kobeta kelelo azalaki pembeni na ngai.

19. Pe nalobaki na batu minene, na bakonzi, pe na ndambo ya batu oyo batikalaki: Mosala ezali monene pe ya molayi, pe topalangani na mir molayi, moko na mosusu. 20. Na esika oyo bokoyoka lokito ya kelelo, bokosangana na biso. Nzambe na biso akobundela biso! 21. Bongo tosalaki mosala makasi, pe ndambo na bango bakangaki makonga na bango wuta tongo kino minzoto ebimaki. 22. Na tangu wana mpe nalobaki na batu: Tika ete moko na moko alala na mosali na ye na kati ya Yerusaleme, po bazalela biso lokola mokengeli na butu pe na moyi pona mosala. 23. Pe ngai, to bandeko na ngai, to basali na ngai, to batu ya kokengela oyo bazalaki elongo na ngai, tolongolaki bilamba na biso te; mutu nionso azalaki na ebundeli na ye.

 

5        Mokapo 5

1. Pe ezalaki koganga monene ya batu pe basi na bango na kotelemela bandeko na bango Bayuda. 2. Pe ezalaki na baoyo balobaki: Biso, bana na biso ya mibali pe ya basi, tozali mingi; pe tokozwa ble pe tokolia pe tokozala na bomoyi! 3. Pe ezalaki na basusu oyo balobaki: Tosengelaki kopesa na niongo bilanga na biso pe bavino pe bandako na biso pona biso tozwa ble na kati ya nzala. 4. Pe ezalaki na baoyo balobaki: Todefi mbongo likolo ya bilanga na biso pe na bavino na biso pona mpaku ya mokonzi : 5. Pe  sik’oyo mosuni na biso ezali lokola mosuni ya bandeko na biso, bana na biso ya mibali bazali lokola bana na bango ya mibali; pe tala, tosengeli kotia bana na biso ya mibali pe bana na biso ya basi na bowumbu; pe basusu kati na bana na biso ya basi basila kokabama, pe ezali te na nguya ya maboko na biso; po bilanga na biso pe bavino na biso ezali pona basusu.

6. Pe tangu nayokaki koganga na bango pe maloba yango, nasilikaki mingi. 7. Pe motema na ngai ezwaki toli na kati na ngai, pe napamelaki batu minene pe na bakonzi, pe nalobaki na bango ete: Bokoniokolaka moko na moko ndeko na ye na baniongo. pe nasalaki ete liyangani mobimba etelemela bango; 8. Pe nalobaki na bango: Tosikoli bandeko na biso Bayuda, oyo batekamaki na bapakano, na ndenge tokokaki; pe bolingi kutu bino koteka bandeko na bino? Pe basengeli komiteka epayi na biso? Na sima, bafandaki nye pe bazalaki na eyano te. 9. Pe nalobaki: Likambu oyo bozali kosala ezali malamu te. Bosengeli te botambola na kobanga Nzambe na biso, po tozala kati na litioli na kati ya bikolo oyo bazali banguna na biso? 10. Kasi lisusu ngai pe, bandeko na ngai pe basali na ngai, tokoki todefisa bango mbongo pe ble lokola litomba. Nabondeli bino, botika koniokola na litomba ya mabe oyo! 11. Bozongisela bango kaka lelo, nabondeli bino, bilanga na bango, bavino na bango, bolive na bango pe bandako na bango 12. Bongo balobi: Tokozongisa yango pe tokosenga eloko moko te epayi na bango; Yango tokosala ndenge olobi. pe nabengaki banganga-Nzambe pe nalapisaki bango ndayi ya kosala na lolenge ya liloba oyo. 13. Naningisaki pe libumu na ngai pe nalobaki: Boye Nzambe aningisa ndako na ye pe mombongo na ye, ya mutu nionso oyo akotosa liloba oyo te. pe bongo tika ete eningisama libanda pe esopama pamba! Pe lisanga mobimba balobaki: Amen! Pe bakumisaki Yawe. Pe batu basalaki lolenge na liloba oyo.

14. Wuta mokolo oyo aponaki ngai po nazala guvernere na bango na mokili ya Yuda, banda na mbula ya tuku mibale ti na mbula ya tuku misatu na mibale ya Mokonzi Artakshasta, na mbula zomi na mibale, ngai na bandeko na ngai toliaki bileyi ya guvernere te. 15. Nzokande baguvernere ya kala, oyo bazalaki liboso na ngai, bazalaki mikumba pona batu, pe bazwaki lipa pe vino epayi na bango, pe lisusu tuku mineyi ya palata; Basali na bango pe bazalaki kokonza batu na nko. Kasi ngai nasalaki bongo te, na tina ya kobanga Nzambe. 16. Pe nazalaki lisusu molende na mosala ya mir molayi oyo; pe tosombaki elanga moko te; pe basali na ngai banso basanganaki kuna pona mosala. 17. Pe lisusu na mesa na ngai Bayuda kama moko na tuku mitanu pe bakonzi, pe baoyo bayaki epayi na biso kowuta na bikolo oyo bazingaki biso zinga.

 

6        Mokapo 6

1. Pe ekomaki ete Sanbalat, Tobia, pe Geshem Moarabe, pe banguna na biso mosusu, bayokaki ete natongaki mir molayi, pe ete lidusu na mir ezalaki lisusu te, Natunga wana natiaki nanu te bizepeli na bikuke, 2. Bongo Sanbalat na Geshem batindaki baloba na ngai: Yaka, tokutana elongo na bamboka ya lobwaku ya Ono. Kasi bakanisaki kosala ngai mabe. 3. Pe natindelaki bango bamemi-sango pona koloba: Nazali kosala mosala monene, pe nakokoka kokita te. Pona nini mosala esila soki natiki yango pe nakiti epayi na bino? 4. Pe batindelaki ngai mbala mineyi ndenge wana, pe nayanolaki bango ndenge moko. 5. Bongo Sanbalat atindaki mosali na ye epayi na ngai pona mbala ya mitanu, na mokanda polele na loboko na ye. 6. Ekomamaki kati na yango: Elobami na kati ya bikolo, pe Geshem alobi ete yo pe Bayuda, bozali na mokano ya botomboki; yango wana ozali kotonga mir ya molayi; pe na ndenge ya maloba na ye yo nde okokoma mokonzi na bango; 7. Oponi pe baprofete pona basakola pe baloba na tina na yo na kati ya Yerusaleme: Mokonzi azali na Yuda. Pe sik’oyo bakoyebisa mokonzi makambu yango. Yaka sik’oyo, pe tosolola elongo. 8. Bongo natindaki baloba na ye: Makambu oyo ozali koloba esalama te; kasi wuta na motema na yo moko ozali kobimisa yango. 9. Po bango nionso balingaki kobangisa biso, kolobaka: Maboko na bango ekolemba na mosala, pe mosala ekosalema te. Pe sik’oyo, lendisa maboko na ngai!

10. Pe ngai, nakomaki na ndako ya Shemaya mwana ya Delaya, mwana ya Meetabele, oyo amikangaki ; Pe alobi: Tokutana na ndako ya Nzambe, na kati ya tempelo, pe tokanga bikuke ya tempelo; po bakoya koboma yo; pe bakoya na butu pona koboma yo. 11. Pe nalobi: Mutu lokola ngai asengeli kokima? Pe mutu nini lokola ngai akokaki kokota na kati ya tempelo pe kotikala na bomoyi? Nakokota te! 12. Pe nasosolaki ete ezalaki Nzambe te nde atindaki ye; kasi alobaki profesi oyo likolo na ngai, Po Tobiya na Sanbalat bafutaki ye mosolo. 13. Ezali na tina wana bafutaki ye mosolo, po nabanga, pe nasala bongo, pe nasumuka, pe ete bazwa libaku ya kosambwisa kombo na ngai, po bazipa ngai na soni. 14. Kanisa, ô Nzambe na ngai, Tobiya na Sanbalat, na lolenge ya misala na bango basali, pe Nowadia oyo ya profetese, pe baprofete mosusu, oyo balukaki kobangisa ngai.

15. Pe mir molayi esilaki na mokolo ya tuku mibale na mitanu ya Elule, na mikolo tuku mitanu na mibale. 16. Pe ekomaki ete tangu banguna na biso nionso bayokaki yango, bikolo nionso oyo ezalaki zingazinga na biso babangaki pe bamiktaki penza na misu na bango; pe bayebaki ete mosala oyo esalemaki kowuta na Nzambe na biso. 17. Na mikolo wana pe batu minene ya Yuda batindelaki Tobiya mikanda mingi, pe oyo ya Tobiya ekomelaki bango. 18. Po ezalaki na mingi kati na Yuda oyo balapelaki ye ndayi, po azalaki bokilo ya Shekanya mwana ya Ara; pe Yehohanan mwana na ye azwaki mwana mwasi ya Meshulame mwana ya Berekya. 19. Bazalaki koloba pe liboso na ngai misala na ye ya malamu, pe bayebisaki ye maloba na misala na ngai; Tobiya atindaki mikanda pona kobangisa ngai.

 

7        Mokapo 7

1. Pe ekomaki ete tangu mir molayi etongamaki, natelemisaki bikangeli; pe baponaki bakengeli ya bikuke pe bayembi pe Balevi. 2. Pe napesaki mokumba ya Yerusaleme na ndeko na ngai Anani pe Anania mokambi ya ndako monene ya makasi; po azalaki mutu moko ya sembo penza pe abangaki Nzambe koleka batu mingi. 3. Pe nalobaki na bango ete Bikuke ya Yerusaleme ekofungwama te kino moyi engenga makasi; pe esengeli kokanga bikangeli tangu bazali nanu wana, pe kotia bikangeli, pe kotia bakengeli na kati ya baoyo bafandi na Yerusaleme, moko na moko bokengeli na ye, pe na ndako na ye. 4. Nzokande engumba ezalaki monene pe molayi, pe batu bazalaki moke na kati na yango, pe ezalaki na bandako etongama te. 5. Pe Nzambe na ngai atakie ngai na motema na nasangisa batu minene, bakonzi pe batu, po na kokomisa bango na mabota na bango. Pe namonaki molongo ya bakoko ya baoyo bayaki liboso, pe namonaki ekomami na kati : 6. Oyo ezali bana ya mokili ya Yuda, oyo bawutaki na bowumbu ya bakangami oyo Nebukodonozor mokonzi ya Babilone amemaki, pe bazongaki na Yerusaleme pe na Yuda, moko na moko na engumba na ye. 7. Baoyo bayaki elongo na Zorobabele, Yeshua, Nehemia, Azaria, Raamia, Nakamani, Mardoshe, Bilshane, Misperete, Bigwayi, Nehum, pe Baana.

Motango ya mibali ya batu ya Israele:

8. Bana mibali ya Pareose, nkoto mibale na kama moko na tuku sambo na mibale; 9. Bana mibali ya Shefatia, kama misatu na tuku sambo na mibale; 10. Bana mibali ya Ara, kama motoba na tuku mitanu na mibale; 11. Bana mibali ya Paltatemoabe, na bana mibali ya Yeshua na Yoabe, nkoto mibale na kama mwambe na zomi na mwambe; 12. Bana mibali ya Elam, nkoto moko na kama mibale na tuku mitanu na mineyi; 13. Bana mibali ya Zatu, kama mwambe na tuku mineyi na mitanu; 14. Bana mibali ya Zakayi, kama sambo na tuku motoba; 15. Bana mibali ya Binuwi, kama motoba na tuku mineyi na mwambe; 16. Bana mibali ya Bebayi, kama motoba na tuku mibale na mwambe; 17. Bana mibali ya Azigade, nkoto mibale na kama misatu na tuku mibale na mibale; 18. Bana mibali ya Adonikama, kama motoba na ntuku motoba na sambo; 19. Bana mibali ya Bigwayi, nkoto mibale na tuku motoba na sambo; 20. Bana mibali ya Adine, kama motoba na tuku mitanu na mitanu; 21. Bana mibali ya Atere, ya Izikiya, tuku libwa na mwambe; 22. Bana mibali ya Ashume, kama misatu na tuku mibale na mwambe; 23. Bana ya Betsayi, kama misatu na tuku mibale na mineyi; 24. Bana mibali ya Arif, kama moko na zomi na mibale; 25. Bana mibali ya Gibowene, tuku libwa na mitanu; 26. Mibali ya Beteleme pe ya Netofa, batu kama moko na tuku mwambe na mwambe; 27. Mibali ya Anatote, kama moko na tuku mibale na mwambe; 28.Mibali ya Bete-ashmavete, tuku mineyi na mibale; 29. Mibali ya Kiriyate-Yearime, ya Kefira pe ya Beerote, kama sambo na tuku mineyi na misato; 30. Mibali ya Rama pe ya Geba, kama motoba na ntuku mibale na moko; 31. Mibali ya Mikmas, kama moko na tuku mibale na mibale; 32. Mibali ya Bethel pe ya Ayi, kama moko na tuku mibale na misatu; 33. Mibali ya Nebo mosusu, tuku mitanu na mibale; 34. Bana mibali mosusu ya Elam, nkoto moko na kama mibale na tuku mitanu na mineyi; 35. Bana mibali ya Harime, kama misatu na tuku mibale; 36. Bana mibali ya Yeriko, kama misatu na tuku mineyi na mitanu; 37. Bana mibali ya Lode, Hadid, pe Ono, kama sambo na tuku mibale na moko; 38. Bana mibali ya Senaa, nkoto misatu na kama libwa na tuku misatu.

39. Banganga-Nzambe: Bana mibali ya Yedaya, ya ndako ya Yeshua, kama libwa na tuku sambo na misatu; 40. Bana mibali ya Imere, nkoto moko na tuku mitanu na mibale; 41. Bana mibali ya Pashkure, nkoto moko na kama mibale na tuku mineyi na sambo; 42. Bana mibali ya Arime, nkoto moko na zomi na sambo.

43. Balevi: Bana mibali ya Yeshua na Kadimiele, na kati ya bana mibali ya Odva, tuku sambo na mineyi.

44. Bayembi: Bana mibali ya Asaf, kama moko na tuku mineyi na mwambe.

45. Bakengeli ya bikuke: Bana mibali ya Shalume, bana mibali ya Atere, bana mibali ya Talmona, bana mibali ya Akube, bana mibali ya Atita, bana mibali ya Shobayi, kama moko na tuku misatu na mwambe.

46. Banetini: Bana mibali ya Sikha, bana mibali ya Asufa, bana mibali ya Tabaote. 47. Bana mibali ya Kerose, bana mibali ya Siya, bana mibali ya Padon; 48. Bana mibali ya Lebana, bana mibali ya Agaba, bana mibali ya Skalmayi; 49. Bana mibali ya Anane, bana mibali ya Gidele, bana mibali ya Gakara; 50. Bana mibali ya Reya, bana mibali ya Rezine, bana mibali ya Nekoda. 51. Bana mibali ya Gazame, bana mibali ya Uza, bana mibali ya Paseyak; 52. Bana mibali ya Besayi, bana mibali ya Mewunime, bana mibali ya Nefisime; 53. Bana mibali ya Bakbuke, bana mibali ya Akufa, bana mibali ya Arkure; 54. Bana mibali ya Baklite, bana mibali ya Mekida, bana mibali ya Arsha; 55. Bana mibali ya Barkos, bana mibali ya Sisera, bana mibali ya Tamak; 56. Bana mibali ya Nesiyak, bana mibali ya Atifa.

57. Bana mibali ya basali ya Salomon: bana mibali ya Sotayi, bana mibali ya Soferete, bana mibali ya Perida. 58. Bana mibali ya Yaala, bana mibali ya Darkone, bana mibali ya Gidele. 59. Bana mibali ya Shefatia, bana mibali ya Atile, bana mibali ya Pokerete-Hatshebayime, bana mibali ya Amon.

60. Banetinine nionso pe bana ya basali ya Salomon, kama misatu na tuku libwa na mibale.

61. Pe tala baoyo bamataki wuta na Tele-Melak, Tele-Arsha, Kerub-Adone, pe Imer; kasi bakokaki te kolakisa ndako ya tata na bango to bokitani na bango, soki bazalaki ya Israele : 62. Bana mibali ya Delaya, bana mibali ya Tobia, bana mibali ya Nekoda, kama motoba na tuku mineyi na mibale. 63. Pe na banganga-Nzambe, bana mibali ya Obaya, bana mibali ya Akok, bana mibali ya Barzilayi, oyo azwaki mwasi na kati ya bana basi ya Barzilayi Mogileyadi, pe abengami na kombo na bango. 64. Balukaki bokomami ya bankoko na bango buku, kasi emonanaki te; pe balongolamaki na bonganganzambe lokola batu ya mbindo. 65. Pe Tirshata alobaki na bango ete basengeli te kolia biloko esantu ya bosantu kino nganga-Nzambe moko akotelema pona Urime pe Tumime.

66. Liyangani mobimba ezalaki nkoto tuku mineyi na mibale na kama misato na tuku motoba; 67. Longola se basali na bango ya mibali pe basali na bango ya basi; bango bazalaki nkoto sambo na kama misato na tuku misato na sambo. Pe bazalaki na bayembi kama mibale na tuku mineyi na mitano. 68. Bampunda na bango ezalaki kama sambo na tuku misato na motoba, ba-ane ya mibali na bango kama mibale na tuku mineyi na mitano; 69. Bakamela ezalaki kama mineyi na tuku misato na mitano, pe ba-ane ezalaki nkoto motoba na kama sambo na tuku mibale.

70. Pe ndambo ya bakonzi ya batata bapesaki makabo pona mosala. Tirshata apesaki na libenga: nkoto moko ya darik ya wolo, basaani tuku mitano, banzambala ya banganga-Nzambe kama mitano na tuku misato. 71. Pe bakonzi ya batata bapesaki na libenga ya mosala: nkoto tuku mibale ya darik ya wolo pe nkoto mibale na kama mibale ya mina ya palata. 72. Pe oyo ndambo mosusu ya batu batikalaki bapesaki ezalaki nkoto tuku mibale ya darik ya wolo, pe nkoto mibale ya mina ya palata, pe banzambala ya banganga-Nzambe tuku motoba na sambo.

73. Pe banganga-Nzambe, pe Balevi, pe bakengeli-bikuke, pe bayembi, pe bato, pe Banetinine, pe Israel mobimba bafandaki na bingumba na bango. Pe ekomaki na sanza ya sambo, tangu bana ya Israel bazalaki na bingumba na bango.

 

8        Mokapo 8

1. Batu nionso basanganaki lokola mutu moko na esika oyo ezali liboso ya ekuke ya Mayi. Pe balobaki na Ezra, mokomeli ete amema mokanda ya Mibeko ya Mose, oyo Yawe apesaki Israel mitindo. 2. Pe na mokolo ya yambo ya sanza ya sambo, Ezra nganga-Nzambe amemaki mobeko liboso ya liyangani ya mibali pe ya basi, pe ya baoyo oyo bazalaki na bososoli pona koyoka. 3. Pe atangaki yango na esika oyo ezali liboso ya ekuke ya mayi, banda tongo ti na midi, liboso ya mibali pe basi pe ya baoyo bazalaki na bososoli; pe matoyi ya batu nionso ezalaki na buku ya Mibeko. 4. Pe Ezra mokomeli atelemaki likolo ya etelemeli moko ya mabaya oyo basalaki pona yango. Penepene na ye, Matitia, na Shema, na Anaya, na Uria, na Ilikiya, na Maaseya, na loboko na ye ya mobali, batelemaki; pe na loboko na ye ya mwasi Pedaya, Mishaele, Malkiya, Ashume, Ashbadana, Zakaria, Meshulame. 5. Pe  Ezra afungoli mokanda na misu ya batu nionso, po ete azalaki likolo ya batu nionso; pe tangu afungolaki yango, batu nionso batelemaki. 6. Pe Ezra apombalaki Yawe Nzambe monene, pe batu nionso bayanolaki: Amen, amen! Nakotombola maboko na bango pe kofukama liboso ya Yawe, bilongi na bango na mabele. 7. Pe Yeshua, Bani, Sherebia, Yamine, Akube, Shabetayi, Odiya, Maaseya, Kelita, Azaria, Yehozabade, Anan, Pelaya, pe Balevi, bazalaki kososolisa batu mobeko; pe batu batelemaki na esika na bango. 8. Pe batangaki polele buku ya mobeko ya Nzambe, pe balimbolaki ndimbola na yango, po ete makambu oyo batangaki ekoka kososolama.

9. Pe Nehemia, oyo azalaki Tirishata, pe Ezra nganga-Nzambe, mokomeli, pe Balevi, oyo bazalaki kolimbola batu, balobaki na batu nionso: Mokolo oyo ezali mosantu po na Yawe Nzambe na bino; bozala na matanga te pe bolela te! Po batu nionso bazalaki kolela tangu bayokaki maloba ya Mobeko. 10. Pe alobaki na bango: Bokende, boliya bileyi ya kitoko pe bomela masanga ya elengi kitoko, pe botindela baoyo bazali na eloko te ya kolamba. Po mokolo oyo ezali mosantu na Nkolo na biso; pe boyoka mawa te, po esengo ya Yawe ezali makasi na bino. 11. Pe Balevi bakitisaki mitema ya batu nionso, balobi: Bozala kimia, po mokolo oyo ezali mosantu; pe bomiyokela mawa te! 12. Pe batu nionso bakendaki pona koliya pe komela pe kotindela basusu biteni pe kosala feti monene. Po basosolaki maloba oyo balakisaki bango.

13. Pe na mokolo ya mibale, bakonzi ya bankoko ya batu nionso, banganga-Nzambe pe Balevi, basanganaki epayi ya Ezra mokomeli, pona kokoma mayele kati na maloba ya Mibeko. 14. Pe bamonaki ete ekomami kati na Mibeko oyo Yawe apesaki na nzela ya Mose ete bana ya Israel esengeli bafanda na bahema na feti ya sanza ya sambo. 15. Pe basengeli koyokisa pe kopanza na kati ya bingumba na bango nionso pe na Yerusaleme, koloba: Bobima na kati ya bangomba, pe bomema bitape ya nzete ya olive, pe bitape ya nzete ya olive ya zamba, pe bitape ya mirte pe bitape ya banzete ya mbila, pe bitape ya banzete ya bakasa minene pona kosala batabernakle, ndenge ekomami.

16. Pe batu babimaki pe bamemaki; pe batongaki batabernakle, moko na moko likolo na mwanza na ye, pe na kati ya lopango na bango, pe na lopango ya ndako ya Nzambe, pe na esika ya ekuke ya Mayi, pe na esika ya ekuke ya Efrayime. 17. Pe lisanga mobimba ya baoyo bazongaki wuta na bowumbu basalaki batabernakle pe bafandaki na kati ya batabernakle ; Po bana ya Israel basalaki bongo te banda na mikolo ya Yeshua mwana ya Nune ti mokolo wana. Pe ezalaki na esengo monene penza. 18. Pe batangaki na kati ya buku ya Mobeko ya Nzambe mokolo na mokolo, banda mokolo ya liboso ti mokolo ya suka. Pe basalaki feti mikolo sambo; pe na mokolo ya mwambe ezalaki na liyangani moko ya lokumu na ndenge ya mobeko.

 

9        Mokapo 9

1. Pe na mokolo ya tuku mibale na mineyi ya sanza wana bana ya Israel basanganaki esika moko pona kokila bileyi pe balati bilamba ya saki pe na putulu likolo na mitu na bango. 2. Pe molongo ya Israel bakabwanaki na bana nionso ya bapaya; pe batelemaki wana pe batubelaki masumu na bango pe bambindo ya batata na bango. 3. Pe batelemaki na esika na bango, pe batangaki kati na mokanda ya Mibeko ya Yawe Nzambe na bango na ndambo na mineyi ya mokolo. Pe na ndambo mosusu ya mineyi ya mokolo batubelaki masumu na bango pe bagumbamaki liboso na Yawe Nzambe na bango. 4. Pe Balevi, Yeshua, na Bani, na Kadimiele, na Shebania, na Buni, na Sherebia, na Bani, na Kenani, batelemaki likolo ya emateli, pe babelelaki na mongongo makasi epayi ya Yawe Nzambe na bango.

5. Pe Balevi, Yeshua, Kadimiele, Bani, Ashabiniya, Sherebia, Odiya, Shebaniya, Petaya balobaki: Botelema, pe bopambola Yawe Nzambe na bino, libela na libela. Pe topambola kombo ya kembo na ye, oyo etombwami likolo ya masanzoli pe mapamboli nionso! 6. Yo nde ozali, yo moko, ô Yawe; Osalaki likolo, likolo na likolo pe mapinga na yango nionso, mabele pe biloko nionso oyo ezali kati na yango, mayi monene pe biloko nionso oyo ezali na kati na yango. Pe yo  nde opesaka bomoyi na biloko na nionso, pe mapinga ya likolo ekokumisa yo. 7. Yo nde azali, ô Yawe Nzambe, oyo oponaki Abram pe obimisaki ye na Ure ya Kaldeya pe opesaki ye kombo Abraama. 8. Pe omonaki motema na ye sembo liboso na yo, pe osalaki kondimana na ye pona kopesa mokili ya Bakanana, pe Baheti, pe Baamore, pe Baferezi, pe Bayebusi, pe Bagirigasi, pona kopesa yango na bokitani na ye; pe okokisi maloba na yo, po ozali sembo. 9. Pe omoni pasi ya batata na biso na Ejipito, pe oyoki kolela na bango na Mayi monene ya Motane. 10. Pe olakisi bilembo pe makamwisi epayi ya Faraon, pe likolo na basali na ye nionso, pe likolo ya batu nionso ya mboka na ye; po oyebaki ete na lolendo na bango baniokolaki bango; pe omisali kombo, lokola ezali lelo. 11. Pe okabolaki mayi monene liboso na bango, pe balekaki na katikati ya mayi monene na mabele ya kokawuka; kasi obwakaki baoyo bazalaki kolanda bango na bozindo ezanga suka, lokola libanga na kati ya mayi ya makasi.

12. Pe okambaki bango na moyi na nzela ya likonzí ya lipata, pe na butu na nzela ya likonzí ya moto, pona kongengisa pona bango nzela oyo esengeli batambola. 13. Pe okitaki likolo na Ngomba Sinayi pe olonaki na bango wuta na likolo; pe opesi bango bisambisi ya bosembo pe mibeko ya bosolo, bikateli pe mitindo ya malamu. 14. Pe oyebisi bango sabata ya bosantu na yo, pe opesi bango mitindo pe bikateli pe mobeko na nzela ya Mose mosali na yo. 15. Pe opesi bango lipa oyo ewuti na likolo pona nzala na bango, pe obimiseli bango mayi oyo ewuti na libanga pona posa na bango ya mayi; pe olobaki na bango bakota pona kozwa mboka oyo otombolaki loboko na yo pona kopesa bango.

16. Kasi bango, batata na biso, bazalaki na lolendo, pe bakomisaki kingo na bango makasi, pe bayokaki mitindo na yo te, 17. Pe baboyaki koyoka, pe bakanisaki te makamwisi oyo osalaki pona bango; kasi bakangisaki kingo na bango makasi pe na botomboki na bango batiaki mokonzi pona bazonga na bowumbu na bango. Kasi yo, ozali +Nzambe ya bolimbisi, osalaka ngolu pe ya mawa, ya kanda noki te pe monene na boboto, pe osundolaki bango te. 18. Ata tangu bamisalelaki mwana ya ngombe oyo ya libende, pe balobaki: Oyo azali Nzambe na yo, oyo abimisaki yo na Ejipito. Pe batukaki yo na maloba minene ya kofinga, 19. Yo na mawa na yo monene osundolaki bango te na kati  ya esobe. Likonzi ya lipata elongwaki likolo na bango te, na moyi pona kotambwisa bango na nzela, pe likonzi ya moto te na butu pona kongengisa bango na nzela oyo basengeli kotambola. 20. Pe opesaki bango Molimo na yo ya malamu pona kopesa bango bososoli; pe opimelaki bango mana na yo te na minoko na bango, pe opesaki bango mayi pona posa na bango ya mayi. 21. Pe okipaki bango na kati ya esobe mibu tuku mineyi : bazangaki eloko te ; bilamba na bango ebebaki te, pe makolo na bango evimbaki te.

22. Pe opesaki bango ba bokonzi pe mabota, pe okabolaki bango bituka; pe bazwaki mboka ya Siyone, mokili ya mokonzi ya Eshibone, pe mokili ya Oge mokonzi ya Bashane. 23. Pe obakiselaki bango bana lokola minzoto ya likolo; pe okotisaki bango na kati ya mboka oyo oyebisaki batata na bango ete bakokata pona kozwa yango; 24. Pe bana na bango ya mibali bakotaki pe bazwaki mabele. Pe ogumbaki liboso na bango bafandi ya mokili, Bakanana, pe okabaki bango na loboko na bango, ezala bakonzi na bango pe batu ya mboka pona kosala na bango ndenge bango basepeli. 25. Pe bazwaki bingumba ya makasi pe mabele ya bozwi, pe bazwaki bandako oyo etondi na biloko ya ndenge na ndenge, mabulu oyo batimbola, bavino, bolive, pe banzete ya mbuma mingi ; pe baliyaki, pe batondaki, pe bakomaki mafuta, pe babikaki na bisengo pona boboto na yo monene. 26. Kasi batelemelaki yo pe batombokelaki yo, pe babwakaki mobeko na yo sima ya mokongo na bango; pe babomaki baprofete na yo oyo bazalaki kotatola bango, pona kozongisa bango epayi na yo; pe batukaki yo mingi. 27. Bongo okabaki bango na loboko ya baniokoli na bango oyo bazalaki koniokola bango. Pe na tangu ya pasi na bango babelelaki yo, pe oyokaki wuta na likolo pe opesaki bango babikisi na lolenge ya mawa na yo mingi, pe babikisaki bango na loboko ya baniokoli na bango.

28. Kasi tangu kaka bazwaki bopemi, bazongelaki lisusu kosala mabe liboso na yo, pe osundolaki bango na maboko ya banguna na bango pe bakonzaki likolo na bango; pe babelelaki yo lisusu, pe yo, oyokaki wuta na likolo, pe na mawa na yo, okangolaki bango mbala mingi. 29. Pe otatolaki na bango, pona kozongisa bango na mobeko na yo: kasi bazalaki na lolendo, pe bayokaki mitindo na yo te, kasi basalaki lisumu na mibeko na yo, oyo na nzela na yango mutu, soki asali yango, akozala na bomoyi; pe bazongisaki mapeka na bango sima pe bakomisaki kingo na bango makasi pe bayokaki te. 30. Pe ofandaki elongo na bango mibu mingi, pe otatolaki bango na nzela ya Molimo na yo na nzela ya baprofete na yo, kasi bayokaki te. Na sima, okabaki bango na maboko ya batu ya bamboka. 31. Kasi na motema ya mawa na yo monene obebisi bango te pe osundoli bango te; po ozali Nzambe ya ngolu pe ya motema mawa.

32. Pe sik’oyo, Nzambe na biso, +Nzambe monene, ya nguya, pe ya somo, mobateli ya boyokani pe bolamu, tika te ete bapasi nionso oyo ekomeli biso, bakonzi na biso, bakambi na biso, banganga-Nzambe na biso, Baprofeta na biso pe batata na biso pe batu na yo nionso, banda mikolo ya bokonzi ya Asulia ti lelo ezala moke te liboso na yo! 33. Kasi yo ozali sembo na makambo nionso oyo ekomeli biso; po osali na bosolo, kasi biso, biso tosalaki na ndenge ya kobuka mibeko. 34. Pe bakonzi na biso, bakambi na biso, banganga-Nzambe na biso, pe batata na biso, babatelaki mobeko na yo te, pe bayokaki te mitindo na yo, to matatoli na yo, oyo otatolaki na kati na bango. 35. Pe basalelaki yo te na kati ya bokonzi na bango, pe na kati ya ebele ya biloko na yo oyo opesaki bango, pe na mokili ya monene pe ya bomengo oyo otiaki liboso na bango, pe batikaki misala na bango ya mabe te. 36. Tala, tozali lelo basali; pe mboka oyo opesaki na batata na biso po nakolia mbuma na yango pe biloko malamu, tala, tozali basali. 37. Pe ezali kobimisa biloko pona bakonzi oyo otie likolo na biso na tina ya masumu na biso; pe bakokonza likolo na nzoto na biso pe likolo ya bibwele na biso ndenge bango basepeli, pe tozali kati na pasi monene. 38. Pe pona makambu nionso, tosali boyakani ya solo, pe tokomi yango. Pe likolo na mokanda oyo etiami elembo ya bakambi na biso, Balevi na biso, pe banganga-Nzambe na biso.

 

10 Mokapo 10

1. Pe na moto ya mokanda oyo bilembo etiamaki ya : Nehemia Motirshata, mwana ya Akalia, pe Sidikiya pe Sedekias. – 2. Seraya, Azaria, Yilimia, 3. Pashkure, Amaria, Malakiya, 4. Atushi, Shebania, Maluki, 5. Arime, Meremote, Obadia, 6. Daniele, Gineton, Baruk, 7. Meshulame, Abiya, Miyamine, 8. Maaziya, Bilgayi, Shemaya : wana bazalaki banganga-Nzambe. – 9. Pe Balevi: Yeshua mwana ya Azania, Binuwi, na bana mibali ya Enadade, Kadimiele, 10. Pe bandeko na bango: Shebania, Odiya, Kelita, Pelaya, Anan. 11. Mika, Rekobe, Ashabia, 12. Zakure, Sherebia, Shebania, 13. Odiya, Bani, Beninu. 14. Bakonzi ya batu: Parosh, Pakat-moaba, Elam, Zatu, Bani, 15. Buni, Azgad, Bebayi, 16. Adoniya, Bigvayi, Adine, 17. Atere, Ezekias, Azur, 18. Odiya, Ashume, Bezayi, 19. Arif, Anatote, Nebayi, 20. Magpiasha, Meshulame, Ezire, 21. Meshezabele, Sadok, Yaduwa, 22. Pelatiya, Anan, Anaya, 23. Ozeya, Anania, Ashube, 24. Alokesh, Pilka, Shobek, 25. Rehume, Ashabana, Maaseya, 26. Pe Akiya, Anane, Anan, 27. Maluk, Arim, Baana.

28. Pe ndambo ya batu oyo batikalaki, banganga-Nzambe, Balevi, bakengeli-bikuke, bayembi, Banetinine, pe batu nionso oyo bakabwanaki na batu ya bikolo ya bamboka pona kokangama na mobeko ya Nzambe, basi na bango, bana na bango ya mibali pe bana na bango ya basi, baoyo nionso bazalaki na boyebi pe bososoli, 29. Basanganaki na bandeko na bango, bakonzi kati na bango, pe balakaki pe balapaki ndayi ya kotambola na kolanda mobeko ya Nzambe, oyo Mose mosali ya Nzambe apesaki, pe kotosa pe kolanda mibeko nionso ya Yawe Nkolo na biso, pe makoki pe mibeko na ye; 30. Pe ete tokopesa te bana na biso ya basi epayi ya batu ya mboka, pe tokozwa bana na bango ya basi pona bana na biso ya mibali te; 31. Pe soki batu ya mboka bamemi biloko pe mbuma ya ndenge na ndenge pona koteka na mokolo ya Sabata, tokozwa yango te na Sabata to na mokolo moko ya bule; pe ete na mobu ya sambo tokotika mabele na bopemi mabele pe tokofuta niongo ya loboko moko na moko.

32. Pe totiaki mibeko, mokumba ya komipesa ndambo ya misato ya sikle moko na mbula pona mosala ya ndako ya Nzambe na biso. 33. pona mapa etandamaka, pe likabo ya gato ya tangu nionso, pe pona makabo ya kotumbama mobimba, ya tangu nionso, pe oyo ya basabata, pe ya basanza ya sika, pe pona mikolo ya bokutani, pe pona biloko oyo ebulisami pe pona bambeka ya masumu, pona kozipa masumu pona Israel, pe mosala nionso ya ndako ya Nzambe na biso. 34. Pe biso, banganga-Nzambe, Balevi, pe batu, tobetaki zeke na tina likabo ya nzete ya koni, pona komema yango na ndako ya Nzambe na biso, na kolandisama bandako ya batata na biso, na batangu oyo etiami, mbula na mbula, pona kotumba na etumbelo ya Yawe Nzambe na biso, ndenge ekomami na kati ya mobeko. 35. Pe komema mbula na mbula pona ndako na Yawe, bambuma ya liboso ya mabele na biso pe bambuma ya liboso ya mbuma nionso ya nzete nionso. 36. Pe bana ya liboso ya bana na biso ya mibali pe ya bibwele na biso, ndenge ekomama na kati na Mibeko; pe komema bana ya liboso ya bangombe na biso pe ya bantaba na biso na ndako ya Nzambe na biso, epayi ya banganga-Nzambe oyo basalaka mosala na ndako ya Nzambe na biso. 37. pe tokomema mbuma ya liboso ya farini na biso, pe makabo na biso ya kotombola, pe mbuma ya nzete nionso, pe vino ya sika, pe mafuta, epayi ya banganga-Nzambe, na kati ya bashambre ya ndako ya Nzambe na biso; pe moko na zomi ya mabele na biso epayi ya Balevi, po bango, Balevi, bazwa moko na zomi na bingumba nionso ya bilanga na biso; 38. Pe nganga-Nzambe, mwana ya Aron akozala elongo na Balevi tangu Balevi bakozwa moko na zomi ; pe Balevi bakomema moko na zomi ya moko na zomi na ndako ya Nzambe na biso, na kati ya bashambre ya ndako ya bomengo. 39. Po bana ya Israel pe bana ya Levi bakomema likabo ya mbuma, vino ya sika pe mafuta na kati ya bashambre epayi ezali na bambeki na esika mosantu, pe banganga-Nzambe oyo bazali kosala mosala, pe bakengeli-bikuke, pe bayembi. Pe bongo tolingi te kotika ndako ya Nzambe na biso.

 

11 Mokapo 11

1. Bakonzi ya batu bafandaki na Yerusaleme : pe ndambo ya batu oyo batikelaki babetaki zete pona kopona moko kati na zomi po afanda na Yerusaleme, engumba mosantu, pe biteni mosusu libwa etikala na bingumba. 2. Pe bato bapambolaki moto nionso oyo amipesaki pona kofanda na Yerusaleme.

3. Pe oyo ezali bakonzi ya mboka oyo bafandaki na Yerusaleme; kasi na bingumba ya Yuda, moko na moko afandaki na mabele na ye, na bingumba na bango, Israel, banganga-Nzambe, Balevi, pe Banetinine, pe bana mibali ya basali ya Salomo. 4. Na Yerusaleme bana ya Yuda pe bana ya Benyamina bazalaki kofanda. - Na bana mibali ya Yuda: Ataya mwana ya Uziya, mwana ya Zekariya, mwana ya Amaria, mwana ya Shefatia, mwana ya Mahalalele, kati na bana mibali ya Pereze; 5. Pe Maaseya mwana ya Baruke, mwana ya Kole-Hoze, mwana ya Azaya, mwana ya Adaya, mwana ya Yoyaribe, mwana ya Zakaria, kati ya Bashiloni. 6. Banso bana ya Pereze oyo bafandaki na Yerusaleme, kama mineyi na tuku motoba na mwambe bazalaki mibali ya mpiko. 7. Pe oyo ezali bana mibali ya Benyamina: Salu mwana ya Meshulame, mwana ya Yoyed, mwana ya Pedaya, mwana ya Kolaya, mwana ya Maaseya, mwana ya Itiele, mwana ya Yizaya; 8. Pe sima na ye Gabayi, Salayi : kama libwa na tuku mibale na mwambe. 9. Pe Yoele mwana ya Zikri azalaki mokambi na bango; pe Yuda mwana ya Asenuwa azalaki ya mibale na engumba.

10. Na kati ya banganga-Nzambe: Yedaya mwana ya Yoyaribe, Yakine, 11. Seraya mwana ya Ilikiya, mwana ya Meshulame, mwana ya Sadok, mwana ya Merayote, mwana ya Ayitube, mokambi ya ndako ya Nzambe. 12. Pe bandeko na bango, oyo bazalaki kosala mosala ya ndako, kama mwambe na tuku mibale na mibale; pe Adaya mwana ya Yerokame, mwana ya Pelaliya, mwana ya Amisia, mwana ya Zakaria, mwana ya Pashkure, mwana ya Malkiya. 13. Pe bandeko na ye, bakonzi ya bandako ya batata ; kama mibale na tuku mineyi na mibale; pe Amashsayi mwana ya Azarele, mwana ya Akezayi, mwana ya Meshilemote, mwana ya Imere. 14. Pe bandeko na bango, mibali ya nguya pe makasi: kama moko na tuku mibale na mwambe. Pe Zabediele mwana ya Agedolime azalaki kokamba bango.

15. Pe na Balevi : Shemaya mwana ya Asube, mwana ya Azrikame, mwana ya Ashabia, mwana ya Buni; 16. Pe Shabetayi na Yozabade, kati na bakonzi ya Balevi, oyo bazalaki kokamba makambu ya libanda ya ndako ya Nzambe; 17. Pe Mataniya mwana ya Mika, mwana ya Zabidi, mwana ya Asaf, mokonzi, oyo azali koyemba masanzoli na tangu ya libondeli; pe Bakabukiya, ya mibale kati na bandeko na ye; pe Abda mwana ya Shamuya, mwana ya Galale, mwana ya Yedutune. 18. Balevi nionso oyo bazalaki na engumba mosantu bazalaki kama mibale na tuku mwambe na mineyi.

19. Pe bakengeli ya bikuke: Akube, Talmona, pe bandeko na bango, oyo bazalaki kokengela na bikuke, kama moko na tuku sambo na mibale.      20. Pe ndambo ya batu batikalaki ya Israel, banganga-Nzambe, Balevi, na bingumba nionso ya Yuda, moko na moko na libula na ye. 21. Pe Banetinine bafandaki na Ofel; pe Zika pe Gishipa bazalaki likolo ya Banetinine.  22. Pe oyo azalaki kokamba Balevi na Yerusaleme ezalaki Uzi, mwana ya Bani, mwana ya Ashabia, mwana ya Mataniya, mwana ya Mika, kati na bana ya Asaf, bayembi pona mosala ya ndako na Nzambe. 23. Po ezalaki na motindo ya mokonzi likolo na bango, pe lifuti etiamaki pona bayembi pona oyo ebongaki pona mokolo na mokolo. 24. Pe Petaya mwana ya Meshezabele, kati ya bana ya Zera mwana ya Yuda, azalaki na loboko ya mokonzi pona makambu nionso ya batu.

25. Pe pona bamboka na bilanga na bango, ya bana ya Yuda bafandaki na Kiriate-Arba pe kati na bamboka na ye na bana na ye ya basi, pe na Dibone pe na kati ya bamboka na ye na bana na ye ya basi, pe na Yekabesele pe na bamboka na ye; 26. Pe na Yeshua pe na Molada pe na Bet-Pelete. 27. Pe na Azar-shuale, pe na Ber-sheba, pe na bamboka na ye na bana na ye ya basi; 28. Pe na Zikelage, pe na Mekona pe na kati ya bamboka na ye na bana na ye ya basi, 29. Pe na Ene-Rimone, pe na Zora, pe na Yaremute. 30. Zanoak, Adulame pe bamboka ya bana na ye ya basi, Lakisi pe bilanga na ye, Azeka pe bamboka na ye na bana na ye ya basi ; pe bafandaki longwa na Bere-sheba kino na Lobwaku ya Inome. 31. Pe bana ya Benyamina bafandaki longwa na Geba na Mikmashe, na Ayiya, na Betel, pe na bamboka na ye na bana na ye ya basi. 32. Anatote, Nob, Anania, 33. Azor, Rama, Gitayime, 34. Adide, Seboyime, Nebalate, 35. Lod na Ono, lobwaku ya basali misala ya maboko. 36. Pe kati na Balevi ezalaki na bamasanga ya Yuda oyo batiamaki na kati na Benyamina.

 

12 Mokapo 12

1. Pe baoyo nde banganga-Nzambe pe Balevi oyo bamataki elongo na Zorobabel mwana ya Shealatiele pe Yeshua: Seraya, Yilimia, Ezra, 2. Amaria, Maluk, Atush, 3. Shekania, Rehume, Meremote, 4. Ido, Ginetoyi, Abiya, 5. Miyamini, Mayadja, Bilga, 6. Shemaya, pe Yoyaribe, Yedaya, 7. Salu, Amoke, Ilikiya, Yedaya. Bango wana bazalaki bakambi ya banganga-Nzambe pe yabandeko na bango na mikolo ya Yeshua. –

8. Pe Balevi: Yeshua, Binuwi, Kadimiele, Sherebia, Yuda, Matania; ye pe bandeko na ye bazalaki kokamba masanzoli; 9. Pe Bakbukiya pe Wuni bandeko na bango batelemaki liboso na bango kati na mikumba na bango.

10. Pe Yeshua abotaki Yoyakime, pe Yoyakime abotaki Eliashib, pe Eliashib abotaki Yoyada. 11. Pe Yoyada abotaki Yonatan, pe Yonatan abotaki Yaduya.

12. Pe baoyo bazalaki banganga-Nzambe, na mikolo ya Yoyakime, bakonzi ya batata: pona Seraya, Meraya; pona na Yilimia: Anania; 13. Pona Ezra: Meshulama; pona Amaria: Yokanana; 14. Pona Meluki: Yonatan; pona Shebania: Yozef; 15. Pona Arim: Adna; pona Merayote: Elkayi; 16. Pona Ido: Zakaria; pona Gineton: Meshulame; 17. Pona Abiya: Zikri; pona Minyamin pe Moadiya: Piltayi; 18. Pona Bilga: Shamuwa; pona Shemaya: Yonatan; 19. Pona Yoyaribe: Matenayi; pona Yedaya: Uzi; 20. Pona Salayi: Kalayi; pona Amoke: Ebere; 21. Pona Ilikiya: Ashabia; pona Yedaya: Netaneyele. –

22. Na oyo etali Balevi, mikonzi ya batata na bango na mikolo ya Eliashib, ya Yoyada, ya Yokanane, pe ya Yaduwa, pe lolenge wana pona banganga-Nzambe kino na boyangeli ya Darius Moperse. 23. Bana ya Levi, bakonzi ya batata, bakomaki na mokanda ya Tangu, kino na mikolo ya Yokanana mwana ya Eliashib. – 24. Pe bakonzi ya Balevi ezalaki : Ashabia, Sherebia, pe Yeshua mwana ya Kadimiele, pe bandeko na bango, oyo batelemaki liboso na bango pona kosanzola pe kozongisa matondo, na kolandama etinda ya Davidi, mutu ya Nzambe, basusu bakosala nakotalana na basusu. 25. Matania, Bakabukiya, Obadia, Meshulame, Talmona, pe Akube bazalaki kokengela lokola bakengeli ya bikuke ya bandako ya kobomba biloko ya bikuke. – 26. Yango ezalaki na mikolo ya Yoyakime mwana ya Yeshua, mwana ya Yozadake, pe na mikolo ya Nehemia guvernere, pe ya Ezra, nganga-Nzambe, mokomi.

27. Pe na bobulisi ya mir molayi ya Yerusaleme, balukaki Balevi wuta na bisika na bango nionso, pona komema bango na Yerusaleme pona kosepela na bobulisi na esengo, na masanzoli pe banzembo, pe na babeti, na banzenze, pe na balute. 28. Bongo bana ya bayembi basanganaki, ezalaki mbala moko na etuka zingazinga ya Yerusaleme pe na bamboka ya Banetofatite, 29. Pe wuta na Bet-Gilgal, pe wuta na bilanga ya Geba pe ya Azmavete; po bayembi bamitongaki bamboka zingazinga ya Yerusaleme. 30. Pe banganga-Nzambe pe Balevi bamipetolaki; pe bapetolaki batu pe bikuke pe mir ya molayi.

31. Pe namatisaki bankumu ya Yuda likolo ya mir molayi; pe natelemisaki bakorale mibale ya minene ya botondi na loboko ya mobali, likolo ya mir molayi, epayi ya ekuke ya bosoto. 32. Pe Oshaya na ndambo ya bakonzi ya Yuda batambolaki sima na bango, 33. Azaria, Ezra pe Meshulame, 34. Yuda na Benyamina, pe Shemaya na Yilimia, 35. Pe kati na bana mibali ya banganga-Nzambe oyo bazalaki na bakelelo: Zakaria mwana ya Yonatane, mwana ya Shemaya, mwana ya Matania, mwana ya Mika, mwana ya Zakure, mwana ya Asaf, 36. Pe bandeko na ye: Shemaya, Azarele, Milalayi, Gilalayi, Maayi, Netanele, Yuda, Hanani, elongo na bibeteli ya miziki ya David, mutu ya Nzambe; pe Ezra mokomi liboso na bango. 37. Pe na ekuke ya liziba, liboso na bango, pe bamataki bimateli ya engumba ya David, na nzela ya bimateli ya mir molayi, likolo ya ndako ya David, pe ti na Ekuke ya Mayi, epayi ya esti.

38. Pe lisanga ya mibale ya bayembi batamboloki na ngambo mosusu, pe ngai pe ndambo ya batu tokendeki na sima na bango, koleka likolo ya ndako molayi ya fulu kino likolo na mir molayi; 39. Pe koleka na ekuke ya Efrayime, pe ekuke ya kala, pe ekuke ya mbisi, pe ndako molayi ya Ananele, pe ndako molayi ya Meya, kino na ekuke ya bampate; pe batelemaki na ekuke ya boloko.

40. Pe masanga mibale ya bayembi batelemaki kati na ndako ya Nzambe; pe ngai pe ndambo ya bakonzi elongo na ngai, 41. Pe banganga-Nzambe Eliyakime, Maaseya, Miniyamine, Mika, Elienayi, Zakaria pe Anania, na bakelelo; 42. Pe Maaseya, Shemaya, Eleyazare, Uzi, Yoyana, Malkiya, Elama, Ezere. Pe bayembi babimisaki mingongo na bango, pe Yizraya azalaki kokamba bango. 43. Pe babonzaki bambeka minene mokolo wana, pe basepelaki, po Nzambe asepelisaki bango na esengo monene; pe basi pe bana pe basepelaki. Pe kosepela ya Yerusaleme eyokanaki mosika.

44. Pe mokolo wana batu batiamaki pona kokamba bandako ya kobomba biloko pona makabo ya kotombolama, pona mbuma ya liboso pe pona moko na zomi, pona kosanganisa wuta na bilanga ya bingumba biteni oyo epesamaki na mibeko pona banganga-Nzambe pe pona Balevi; po Yuda ezalaki na esengo na tina ya banganga-Nzambe pe Balevi oyo batelemaki wana. 45. Bongo pe lisusu bayembi na bakengeli bikuke, bakengeli  oyo Nzambe na bango apesaki bango bakengela pona kopetolama na motindo ya David pe Salomo mwana na ye. 46. Po na tangu ya kala, na mikolo ya David pe Asaf, ezalaki na bakambi ya bayembi, pe ya banzembo ya masanzoli pe ya baloyembo ya matondi epayi ya Nzambe. 47. Pe na mikolo ya Zorobabele pe na mikolo ya Nehemia, Israel mobimba epesaki biteni ya bayembi pe ya bakengeli bikuke, mokolo na mokolo oyo ebongi; pe babulisaki biloko pona Balevi, pe Balevi babulisaki biloko pona bana ya Aron.

 

13 Mokapo 13

1. Na mokolo wana, etangangamaki kati na mokanda ya Mose na matoyi ya batu; pe ekomamaki na kati na yango, ete Moamoni to Momoabe moko te akokota na kati ya liyangani ya Nzambe libela; 2. Pamba te bayaki epayi ya bana ya Israel na mapa te pe mayi te, pe bafutaki Balama pona kolakela bango mabe (kasi Nzambe na biso abongolaki elakeli mabe na lipamboli). 3. Pe esalemaki ete, tangu bayokaki mobeko, bakabolaki bato nionso ya masangani na Israel. 4. Pe liboso wana, Eliashibe nganga-Nzambe, oyo atiamaki likolo bashambre ya ndako ya Nzambe na biso, pe azalaki ndeko ya Tobiya. 5. abongiselaki ye shambre monene, epayi bazalaki kotia makabo ya gato, ya mpaka ya malasi, pe bisaleli, pe moko ya zomi ya ble, ya vino ya sika pe ya mafuta, oyo epesamaki pona Balevi, pe pona bayembi, pe bakengeli ya bikuke, pe makabo ya kotombolama ya banganga-Nzambe. 6. Kasi na tangu wana nionso nazalaki na Yerusaleme te; po na mbula tuku misato na mibale ya Artashasta mokonzi ya Babilone, nazongaki epai ya mokonzi. Pe sima ya mwa tangu nasengaki ndingisa epayi ya mokonzi;

7. Pe tangu nakomaki na Yerusaleme, namonaki mabe oyo Eliashibe asalaki po na Tobiya, na ndenge abongiselaki ye shambre moko na lopango ya ndako ya Nzambe. 8. pe ngai namonaki yango mabe mingi, pe nabwakaki bisaleli na ye nionso libanda, libanda ya shambre, bisaleli nionso ya Tobiya; 9. Pe napesaki mitindo ete bapetola bashambre; pe namemaki bisaleli ya ndako ya Nzambe, likabo ya gato, pe mpaka ya malasi.

10. Pe nayebaki ete biteni ya Balevi epesamaki te, pe ete Balevi pe bayembi oyo bazalaki kosala mosala bakimaki, moko na moko na elanga na ye. 11. Bongo napemalaki bakonzi, pe nalobi ete: pona nini ndako ya Nzambe esundolami? Pe nasangisaki bango esika moko pe natiaki bango na esika na bango. 12. Pe Yuda mobimba bamemaki moko na zomi ya ble pe vino ya sika pe mafuta na bandako ya kobomba biloko. 13. Pe naponaki Shelemia nganga-Nzambe, pe Zadok mokomi, pe Pedaya, moko kati na Balevi, lokola bakengeli ya mosolo ya bibombelo, pe elongo na bango Anane mwana ya Zakure, mwana ya Matania, po batangamaki basembo, pe ezalaki mokumba na bango kokabola epayi ya bandeko ba bango. 14. Po na yango, Ô Nzambe na ngai, kanisa ngai, pe kopangusa te misala malamu oyo nasalaki na ndako ya Nzambe na ngai pe na oyo esengeli kotosa.

15. Na mikolo wana, namonaki bamosusu na kati ya Yuda bazali koniata bisika ya koniatisa vino na mokolo ya Sabata, pe bazali kokotisa bitunga, pe kotia yango na mpunda, pe lisusu vino, mbuma ya vino, pe figi, pe mikumba ya ndenge nionso, pe komema yango na Yerusaleme na mokolo ya Sabata; pe natelemelaki bango, na mokolo oyo batekaki bileyi. 16. Batu ya Tiri pe bafandaki wana, bamemaki mbisi pe biloko ya koteka ya ndenge na ndenge, pe batekaki yango na Sabata epayi ya bana ya Yuda pe na kati ya Yerusaleme. 17. Bongo natelemalaki batu minene ya Yuda pe nalobaki na bango ete: Likambu nini ya mabe oyo bozali kosala, oyo bozali kotiola mokolo ya Sabata? 18. Batata na bino basalaki boye te, boye Nzambe na biso amemaki bapasi likolo na biso  likolo na engumba oyo mabe oyo nyonso? Pe bolingi kobakisa kanda likolo na Israel na kobebisa Sabata!

19. Pe tangu molili ekomaki na bikuke ya Yerusaleme liboso ya mokolo ya Sabata, napesaki mitindo ete bakanga bikuke; pe bafungala kaka sima ya Sabata. Pe natiaki basali na ngai mosusu na bikuke, po mokumba moko te ekota na mokolo ya Sabata. 20. Na sima, batu ya mimbongo pe bateki biloko ya ndenge na ndenge, balalaki butu na libanda ya Yerusaleme mbala moko pe mbala mibale. 21. Pe  nakebisaki bango, pe nalobaki na bango: Pona nini bozali kolala butu liboso ya mir molayi? Soki bosali yango lisusu, nakotia maboko likolo na bino! Banda na tangu wana bayaki lisusu na Sabata te. 22. Pe napesaki Balevi mitindo ete bamipetola, pe baya kokengela bikuke pona kobulisa mokolo ya Sabata. Omikundola pe likambo oyo pona bolamu na ngai, ô Nzambe na ngai, pe batela ngai na lolenge ya monene ya boboto na yo.

23. Na mikolo wana lisusu, namonaki Bayuda oyo babalaki basi ya Asdode, Baamona pe Bamoaba na ndako. 24. Pe ndambo ya bana na bango bazalaki koloba na Ashdode, pe bayebaki koloba Kiyuda te, kasi bazalaki koloba na lolenge ya monoko ya batu moko to mosusu. 25. Pe natelemelaki bango, pe nalakelaki bango mabe, pe nabetaki bamosusu kati na bango, pe napikolaki bango basuki, pe nalapisaki bango na nzela ya Nzambe: bokopesa te bana na bino ya basi na bana na bango ya mibali, pe bokozwa te bana na bango ya basi pona bana na bino ya mibali pe pona bino moko. 26. Salomo mokonzi ya Israel asalaki lisumu na yango te? Nzokande, kati na bakonzi ya bikolo mingi ezalaki na moko te lokola ye, azalaki molingami ya Nzambe na ye, pe Nzambe atiaki ye mokonzi likolo ya Israel mobimba : ye lisusu, basi bapaya bapengwisaki ye. 27. Pe bino, esengeli toyoka bino ete bozali kosala mabe monene oyo nionso, ya kozala batomboki epayi ya Nzambe na biso, nakozwaka basi ya bapaya? 28. Pe moko ya bana ya Yoyada mwana ya Eliashibe nganga-Nzambe monene azalaki bokilo ya Sanbalate Mohorone; pe nabenganaki ye mosika na ngai. 29. Kanisa bango, ô Nzambe na ngai, po bazali bambindo ya bonganga-Nzambe pe ya boyokani ya bonganga-Nzambe pe ya Balevi. 30. Pe napetolaki yango na mopaya nionso, pe natiaki misala ya banganga-Nzambe pe ya Balevi, moko na moko kati na mosala na ye, 31. Pe na oyo etali likabo ya nzete ya koni na batangu ebongisami, pe bambuma ya liboso. Kokanisa ngai na malamu, ô Nzambe na ngai!