Mayembo Lingala

Table des matières

1, 2, 3, 4, 5, 6, 7, 8, 9, 10, 11, 12, 13, 14, 15, 16, 17, 18, 19, 20, 21, 22, 23, 24, 25, 26, 27, 28, 29, 30, 31, 32, 33, 34, 35, 36, 37, 38, 39, 40, 41, 42, 43, 44, 45, 46, 47, 48, 49, 50, 51, 52, 53, 54, 55, 56, 57, 58, 59, 60, 61, 62, 63, 64, 65, 66, 67, 68, 69, 70, 71, 72, 73, 74, 75, 76, 77, 78, 79, 80, 81, 82, 83, 84, 85, 86, 87, 88, 89, 90, 91, 92, 93, 94, 95, 96, 97, 98, 99, 100, 101, 102, 103, 104, 105, 106.


1.                       Loyembo 1

Loyembo 1 — eteni 1

To kumisi Nzambe Tata

Y’okozalaka kati na kongenga

Y’okotala uta lola.

Tosangani liboso na Yo,

Bato na bolingo na yo monene.

Tokumisi Nkombo na Yo.

Na Yo lokumu be, Mokonzi, Mokeli, Alleluia !

Nkembo na Yo, Mobikisi, Alleluia, Alleluia !

Loyembo 1 — eteni 2

Elongi na Yo, epeli,

Nzambi, Mokonzi, Tata na ngolu,

Na Yesu, muana bolingo.

Na Ye mitema epabuami,

Lokumu tozanzoli Yo Nzambe

Mpe konetola Yo lelo.

Na Yo lokumu be, etc.

2.                       Loyembo 2

Loyembo 2 — eteni 1

Toyemba nzembo na bule,

Na nzembo na Muana ya likinda.

Na Nzambe Muana ya seko.

Na kufa na bomoï na Ye,

Ye apesi ngolu enene,

Motema Nzambe na lola.

Lokumu, bokonzi na Yesu Mokonzi, Alleluia !

Nkembo mingi na Yo nkolo, Alleluia, Alleluia !

Loyembo 2 — eteni 2

Yesu, kumama ya mingi,

Yo nde na bileko binso,

Loyembo ya bakangwami.

Tobiki na bapota na Yo,

Mpe na mapipi oyo na Yo.

To zui bomoï ya basekui.

Lokumu, bokonzi etc.

3.                       Loyembo 3

 

Yesu osikoli biso,

Y’ozui biso na mpasi na Yo,

To kangwami libela.

Nkolo, Mokonzi ya Nkembo,

Na Yo to zui kimia n’elonga,

Esengo na lipamboli.

Mobikisi solo, ofandi na lola,

Na kitoko, bokonzi be,

To kumisi, tii na suka tsanzoli.

4.                       Loyembo 4

 

Loyembo 4 — eteni 1

Nkembo na Tata seko ! (bis)

Obongiseli biso kiti likolo na banje,

Lobiko ewuti na Yo, (bis)

Tokosanzolaka Yo na bolingo mpe lokumu.

Loyembo 4 — eteni 2

Nkembo na Mpate bule, (bis)

Mpo te biso tobika okufaki n’ekulusu,

Olongaki Satana, (bis)

Mokangoli na nguya, nkembo na Yo ekoleka.

Loyembo 4 — eteni 3

E, nkembo na Yo Nkolo, (bis)

Na Yo nguya, lokumu, na Yo bokonzi mpe nkembo

Seko na Yo mpe Seko, (bis)

To koyemba bolamu, lobiko, elonga na Yo.

5.                       Loyembo 5

 

Loyembo 5 — eteni 1

Nzambe, bolingo esangisi nzinganzinga na Yo Kristo,

Tokosanzola biso nyonso bolingo na Yo ya seko.

Nkembo na Yo Nzambe Tata biso !

Nkembo na bolingo solo

Tikabana tosanzol’awa na nse,

Tokozela mboka n’esengo be.

Loyembo 5 — eteni 2

Na ngolu sekele ya Nzambe,

Yo olingaki uta kala,

Kotia biso, kati na nkembo na Yo Tata ya lokumu.

Nkembo na Yo Nzambe Tata biso ! etc.

Loyembo 5 — eteni 3

Makanisi ya bolingo ekokaki kosila te,

Kino otiyi liboso na Yo biso baye tosombami.

Nkembo na Yo Nzambe Tata biso ! etc.

Loyembo 5 — eteni 4

Kimia, biloki, lola nkembo na Yesu nde bozui solo

Sika na mongongo n’elonga, nde tonetwama e pai na Yo.

Nkembo na Yo Nzambe Tata biso ! etc.

Loyembo 5 — eteni 5

O Nkolo tofukameli Yo, oboso bua ngolu na Yo

Silisa oyo etali biso mpe tinda Kristo azonga.

Nkembo na Yo Nzambe Tata biso ! etc.

6.                       Loyembo 6

Loyembo 6 — eteni 1

To kumisa na nzembo bule,

Nzambe na bolingo, kimia,

Na boboto na Ye malamu,

Afungweli biso lola.

Na ngolu ya motuya mingi,

Balingami batatola,

To sanzoli Ye na esengo,

Na nguya tomotomboli.

Loyembo 6 — eteni 2

Solo na mitema tokumisi,

Tata na nguya mpe mawa

Na Yo ti elikya nyonso,

Mpo na tango mpe na seko.

Nguya, ngolu mpe na bokasi

Na Yo se kopambolaka

Eklesia n’elikya nyonso

Akozela konetwama.

7.                       Loyembo 7

Loyembo 7 — eteni 1

Na Yesu to pesi Yo, Mbeka ya kosanzolaka

Na Yesu tokumisi Yo, makumisi na banje

Yo Nzambe opambwama na biso tosangani !

Loyembo 7 — eteni 2

Yo opesaki Yesu, na Yesu motema epesi

Na Ye nde toponami, mpo na nkembo ya libela.

Yo Nzambe opambwama etc.

Loyembo 7 — eteni 3

Mpe tokonetola Yo, na nkembo moyi nyonso

Nde lisusu toyembi, na ekelesia mobimba.

Yo Nzambe opambwama etc.

8.                       Loyembo 8

Loyembo 8 — eteni 1

Nkembo na Mokangoli, na Mwana moko ya Tata,

Mpo na kobikisa moto, Akitaki awa na nse.

O Yesu okumama, Na seko na libela ! (x2)

Loyembo 8 — eteni 2

Oyaki, Mpate na bule,

Mpo na liwa nde na nsoni

Kasi olongaki liwa,

Na nguya ya Yo ya seko,

Obebisaki nguya ya lifelo mpe liwa, (x2).

Loyembo 8 — eteni 3

Yo otondi na mawa, omeli kopo ya mpasi,

Opesi biso na nsima, kopo ya kokangolama,

O Yesu okumama, na seko na libela, (x2).

Loyembo 8 — eteni 4

Omikitisa be, botosi na Ye nyonso,

Aye mpe alongi bango, na nguya ya ye be,

Alongi n’ekulusu, libela alongi, (x2).

Loyembo 8 — eteni 5

Kumisa bolamu ya Mokonzi ya bomoi,

Anyokwami mpenza n’ekulusu na nsoni,

Na liwa azui biso, akangoli solo, (x2).

9.                       Loyembo 9

Loyembo 9 — eteni 1

Nkembo na Yesu, n’Ekelezia,

Mpo na bolingo na Ye

Ye asombaki Ekelezia

Ezali ya Ye seko.

Na ndako ya Tata na Ye sika Yingisi yango peto

na kongega solo nde amilakisi yango.

Loyembo 9 — eteni 2

Tango Yesu, akomona ekelezia mokolo yango

Akuta biso na bule, kotatola mawa na ye.

Na ndako ya Tata na Ye etc.

10.                  Loyembo 10

Loyembo 10 — eteni 1

Nkembo, Mpate, lokumu na Yesu.

Na ye, kufa ezangi makasi

Monguna ayebi nguya ne Ye solo,

Mpe lilita elakisi kotosa

{Nkembo na yo, Nkolo Yesu,

Nkembo na Yo, Nkolo Yesu,

Lifelo, kufa, elembi, elembi, elembi.}

Loyembo 10 — eteni 2

Yo Masiya, bato baboyaki Yo,

Ofandi na lola na nkembo be

Ekelezia mpe ayebani awa te.

Sika okolata nkembo ya Yo.

Nkembo na yo, Nkolo Yesu, etc.

Loyembo 10 — eteni 3

Y’olakaki, Yesu Yo akoya,

Mpo na kozua biso okobima elombe

Okokotisa biso na nkembo na Yo,

Tokoyemba nzembo ya elong’oyo.

Nkembo na yo, Nkolo Yesu, etc.

11.                  Loyembo 11

Loyembo 11 — eteni 1

Etali biso Yo, lokumu bapesi na Yo,

Nde tokumisi Yo, kotala Y’ongenga

Nkembo ya kitoko, Yesu ezingi se Yo,

Eyebisi biso somo n’ekulusu.

Loyembo 11 — eteni 2

Na motema nsomo, monioko na motema,

Elongi na nzube, na kotuka mabe

Na nsoni monene mokili epesi Yo,

Nkolo omonisa, nkembo na Yo solo.

Loyembo 11 — eteni 3

Yo se n’ekulusu, komela kopo mabe,

Moko te aye kotala mpasi na Yo

Sik’oyo kumama na kiti na Yo Tata.

Na masanzoli be, lola eningana.

Loyembo 11 — eteni 4

Mpo na Nzambe na Yo, tango oyo monene,

Atalaki Yo te molingami na Ye

Elongi na mpasi ezui, lelo ba nkembo,

Esika na Tata na nkembo ya seko.

Loyembo 11 — eteni 5

Nkolo na motuya, mitema esanzoli,

Mpate na Nzambe Yo okoki na nkembo

Awa na nse, banso tosangani awa,

Kotatola, nguya, bonene boleki.

Loyembo 11 — eteni 6

Na nzembo kumama, na nkembo be na Tata,

Euta mitema na bolingo na ye

Nkembo ya libela, kouta awa na nse,

Netola kumisa na Tata na Mwana.

12.                  Loyembo 12

Yo obikisi biso, makil’a esokoli biso,

Ozua bokonzi na limemia,

Obongi na kozua bozui,

Nkembo nguya ya monene

Bokonzi, buanya mpe nguya be,

Bokonzi, buanya nguya be !

13.                  Loyembo 13

Loyembo 13 — eteni 1

Tokumisi Yesu bolingo na nguya,

Komikitisa be, botosi na Ye nyonso

Aye mpe alongi bango, na nguya ya ye be.

Alongi n’ekulusu,

libela alongi, (x2).

Loyembo 13 — eteni 2

Kumisa bolamu ya Mokonzi ya bomoi

Anyokwami mpenza n’ekulusu na nsoni.

Na liwa azui biso, akangoli solo,

Tokomi ya Ye mpe,

ya bolingo solo, (x2).

Loyembo 13 — eteni 3

Tokumisa Nkolo, Mobikisi ya sembo,

Alongi banguna na mayele na bango

Alongi mpe liwa, asekui solo nye.

Nkembo na Ye ya biso,

mpe na seko na seko (x2).

Loyembo 13 — eteni 4

Kumisa kumisa munene ya seko,

Ya Ye apesa bomoi na Ye na biso

Aye na kongenga biso tokomona,

Tokopambola ye,

libela na lola, (x2).

14.                  Loyembo 14

Loyembo 14 — eteni 1

Nzambi nkembo, n’elilingi na Nzambe,

Mwana ya seko, banje bakumisi

Nkembo na nkombo na Y’obele yo moko,

Onetwama seko osanzolama.

Loyembo 14 — eteni 2

Outi lola komipesa na mbeka

Na yo kaka, Nzambe apambolami

Bosanto na Ye, bolingo na bosembo

Ekulusu na Yo Yesu okumisi.

Loyembo 14 — eteni 3

Nde sikoyo, onetwami na Nzambe

Na likolo, pene na bokonzi

Tomoni yo na nkembo ya monene

Yo Mwana na moto, moto asekwi.

Loyembo 14 — eteni 4

Tokumisi Yo n’ekoti ya nkembo

Eyebisi ba mpasi mpe kufa

Na Nkolo, sika nde kuna lola

Tokokulisa na nzembo seko.

15.                  Loyembo 15

Loyembo 15 — eteni 1

Y’opesi ngolu mpe na nkembo

O, Yo Nkolo Nzambe

Tata katia Yesu

Nkombo ekumama,

Kati na losambo,

Esengo mpo bandimi Yo, (x2).

Loyembo 15 — eteni 2

Y’opesi biso ngolu na Yo

O mitema biso, Nzambe opesi kimia

Esengo a’o nse tokoti se pamba

Na lo’la esika Yo ongenga, (x2).

16.                  Loyembo 16

Loyembo 16 — eteni 1

Toyembela Nzambe ya ngolu, solo, nkembo

Tokumisa, opambwama, tosepeli na Yo.

Kotatola Yesu, elonga ya Ye seko

Ebongi na biso bandimeli se Ye.

Loyembo 16 — eteni 2

Nkembo na lokumu, ngolu na Yo monene

Emonani pole, epayi na biso

Tokufaki solo mpe lelo elongi na Yo

Epelisi mwinda na mitema na biso.

Loyembo 16 — eteni 3

Biso bana na Yo, nkombo na Yo bopolo

Etondisi biso n’esengo na kimia

Molimo yelaka, elakisi polele

Pene na Yo seko, tokokot’ofele.

17.                  Loyembo 17

Loyembo 17 — eteni 1

Na bonzambe na Yo, etondi na kitoko,

Na nguya, bolingo ebombami ya seko,

Yango ya seko.

Mwana ya seko, (x2), Nkembo na Yo,(x2).

O, Yesu na kimia, Ekelezia y’olingi

Epesi Yo lokumu, (x2), Nakomikitisa be.

Loyembo 17 — eteni 2

Ofandi, O, Yesu, na pembeni na Tata

Ozali na nguya,

Na nkembo mpe okongenga (x2)

Mobikisi (x2) ! Mitema nye (x2)

Tofukameli Yo, topesi Yo botosi

Bwanya, nkembo na nguya (x3).

18.                  Loyembo 18

Loyembo 18 — eteni 1

Na lola na kiti na Tata, tomoni Yo Mokangoli

Na kokema mpenza na moyi, olati nguya ongengi

Mosala na ngolu esili, ofandi n’esika na bule

Likolo nkembo epesami Yo Mwana Nzambe

omipesa.

Loyembo 18 — eteni 2

Tolongi na elonga na Yo, Nkolo Yesu, Mokangoli

Na lola esika na Yo nkembo, okoti liboso na biso

Solo kuna nde n’elikia na biso, solo tobatami na Yo

Na mitema na molende be, na eloko mpe tondimi.

Loyembo 18 — eteni 3

Lokumu na Yo Nkolo ekelezia, mwasi, eloko ya ngolu

Na pembeni ofandi na Yo, akumisi be Yo Nkolo

Esengo eleki, ya munene, tokosepela na nkembo

Na bolingo ya koloba te ekotondisa ti seko.

19.                  Loyembo 19

Loyembo 19 — eteni 1

Nzambe na ngolu na bolingo, Tolingi kosanganaka

Na nse y’elongi na yo emoni, kokumisa, kopambola

Na kimia na Yo katia biso, losambo solo ebimi.

Toyeli Yo matondo mingi, malasi na kombo ya Yesu.

Loyembo 19 — eteni 2

O, Nkolo ! Kota na mitema, na boboto na Yo mpenza

Yokisa biso moto na Yo ya monene na bolingo

Mpo ete litatoli etonda na mitema na Molimu

Toyemba mawa na bolingo na Yo kati Yesu Klisto.

Loyembo 19 — eteni 3

Tolingi esika opesi, na mosala na Yesu be

Mpe tolandi matambe na Ye kino tokoma mboka Yo

Kuna na ndako na ekila efunguami na kondima

Bongo tokumisi Yo Tata na Yesu Kilisto na Yo.

20.                  Loyembo 20

Loyembo 20 — eteni 1

Na bomoko n’ekelezia kitoko

Nkolo Yesu esepelisi Yo

Na bolingo okolinga yango 

Okolinga bongo pene na Yo.

Loyembo 20 — eteni 2

Lokola yo nde osangisi biso

Pene na Yo na bolingo bua Yo

Na esengo nyonso tokumisi Yo

Kotatola kufa, bozongi na Yo.

Loyembo 20 — eteni 3

Kuna, Nkolo n’esika Yo ozali

Oti esengo, bonsomi na kati

Mpe na kimia mondimi nyonso amoni

Mpe na nguya na bosolo mpenza.

Loyembo 20 — eteni 4

Na mokolo wana tokosangana

Na likolo, Eklezia etali Yo

Oh ! Esengo na seko mpe monene

E, na nkembo, tokokumisa Yo.

21.                  Loyembo 21

Loyembo 21 — eteni 1

Mpo na kotala Yo, Mokangoli, kumama

Yo obiangi biso, lisusu lelo oyo

Kati na esobe, Yotandi mesa oyo

Tokanisi mawa na Yo, Tokanisi mawa na Yo

Loyembo 21 — eteni 2

Nzinga na yo Nkolo lingomba ekutani

Kotatola liwa na Yo kino ozongi

Mpe tokati lipa tomeli mpe nakopo

Tokanisi mawa na Yo, Tokanisi mawa na Yo.

Loyembo 21 — eteni 3

Ah ! Mabe na biso epesi mpe Yo kilo

Mokumba ya mpasi ekolobama te

Kasi sika kimya, tokumisi n’esengo

Tokanisi mawa na Yo, Tokanisi mawa na Yo.

Loyembo 21 — eteni 4

Awa tolei lipa na komela kopo mpe

Biso totali Yo, na likolo na Yo

Sik’esili biso, kimopaya na nse oyo

Tokososola bolingo, Tokososola bolingo.

Loyembo 21 — eteni 5

Ngolu na Yo Yesu, Nkolo mawa na seko

Tokomona se yo likolo polele,

Tokonetola Yo na nkembo seko,

Bolingo monene na Yo, Bolingo monene na Yo.

22.                  Loyembo 22

Loyembo 22 — eteni 1

Olakisi biso, olakisi biso

Yesu, bampasi na Yo, mpo biso tokangwama

Ndakisa ya pole (bis)

Ee na mesa esanto

Yo Nkolo kumamaa,

Toyebi bolingo, kufa bozongi Yo (bis).

Loyembo 22 — eteni 2

Kopo na lipa oyo (bis)

Oyo opesi biso, na ngolu ya sekoo

Ndakisa ya solo (bis)

Na lokota ya kimya elobi mbula, mbula

Na oy’aponami, bolingo ya Yesu. (bis)

Loyembo 22 — eteni 3

Toyemba elongo (bis)

Ngolu oyo monene na bolingo ya solo

Ya Yo Mokangoli (bis)

Na kopesa matondo, topesa nkembo nguya

Yo Nkolo kumama,

Biso nyons’elongo, na mpat’eakufaki ! (bis)

23.                  Loyembo 23

Loyembo 23 — eteni 1

Nkembo na Yo Yesu (bis)

Mpo na mboka be na Yo

Opesi na sembo nye

Nzela esika na bule (bis)

Yo banje bakumisi

Ndima basanzola Yo

Na boye bandimi bagumbami na Yo. (bis)

Loyembo 23 — eteni 2

Mobikisi pole (bis)

Tolingi likanisi

Na kobila nkemboo

Y’emonisi ya Yo (bis)

Eya sika tango oyo

To poasa na ndako Yo

Na seko na seko

Toloba bolamu. (bis)

24.                  Loyembo 24

Loyembo 24 — eteni 1

Yesu mpate lokola mbondi

Tomoni bolingo na Yo,

Kufa na Yo, elonga na Yo,

Mpo na biso osikola.

Tosangani nzinga mesa na Yo

Totatoli mawa na Yo

Tokumisi Mobikisi na mawa

Tokozela bozongi na nkembo.

Loyembo 24 — eteni 2

Bana n’ekolo ya mabe

Tozua n’ekulusu na Yo

Kimya mpe ngolu ya kitoko

Nguya, bolamu nyonso be.

Tosangani nzinga mesa na Yo etc.

Loyembo 24 — eteni 3

Na Yo tosii kolata sembo

Tosokwami na makila

Tokanisi mbeka y’esanto

Efungoli biso lola.

Tosangani nzinga mesa na Yo etc.

25.                  Loyembo 25

Loyembo 25 — eteni 1

O’boso kiti na Tata

Nd’ofandi na bokonzi

Nkolo biso tokotala

Kitoko n’esengo n’Yo

Nkemb’oyo ezingami Yo

Na kongenga bonzambe

Epelisi, engengisi

Tii na nse ya mitema.

Loyembo 25 — eteni 2

Kasi nkembo y’elongi

Na Yo kaka yango te

Mpe te ngolu na Yo Yesu

Ekopela na banso

Ngolu ekitisaki Yo

Na mokili ya mabe

N’esik’oyaki kosala

Na komema masumu.

Loyembo 25 — eteni 3

Motema eza kokatama

Kotala bolingo’yo

Eleki nse na monene

Mpe na bozindo n’ango

Yango biso tokolinga

Mokolo okozonga

Mpo tomona tososola

Monene na bolingo.

26.                  Loyembo 26

Loyembo 26 — eteni 1

Santo boya na banzembo na bino

Na bolingo, mpate anetwama

Ye alongi, asi asekwami

Tokumisa nkombo na ye malamu

Biso baye balingami na Ye

Balingami na Ye.

Loyembo 26 — eteni 2

Y’amipesi mpo na biso na mbeka

Moko apekisi bolingo na Ye

Mpo abikisa biso na masumu

Amipesi na bapasi na dembo

Anyokwami ezalaki Kristo

Ezalaki Klisto.

Loyembo 26 — eteni 3

Tonetoli elongo na mes’oyo

Bolingo n’Yo monene tii liwa

Na Yo mitema na biso ebongwami

Ezui kimya na bomengo monene

Ofutaki ntalo ya Yo Kristo

Ntalo ya Yo Kristo.

27.                  Loyembo 27

Loyembo 27 — eteni 1

O’boso bua kiti na ngolu

Tokumisi Tata Nzambe

Tozui’esengo na miso na Yo

Na nzela esanto na Yesu.

Loyembo 27 — eteni 2

Lipa na lola etondisaka

Sika ekomi bilei solo

Na Yesu tozui bomoï

Ekozala seko na seko.

Loyembo 27 — eteni 3

Nsima na kopo na bololo

Yo opesi Ye na sembo

Mobikisi na pole, ngolu

Apesi biso lobiko.

Loyembo 27 — eteni 4

Na mongongo na Nkolo banje

Tokonetwa kuna lola

Tokoyembelaka na nzembo

Komona ye esengo be.

28.                  Loyembo 28

Loyembo 28 — eteni 1

Bana o miso ma pole

Bosangani na mesa oyo

N’esengo kozala bule

Bakumisi ngolu enene

Bolingo na O nyonso elamu

Elongoli kobanga nyonso

Mpe na kati na nyonso oyo

Ebombeli ezi Nkolo.

Loyembo 28 — eteni 2

Tosokwami na makila

Tokomi petwa seko, seko

Biso oyo tobungaki

Tobombami lelo katiyo

Nani alongola biso

Na maboko ya Nkolo mpenza

Tango totii elikya na Yo

Bolingo ebonguani te.

Loyembo 28 — eteni 3

Na ba oyo osombaki, Nkolo

Bokundoli yo esali mpimbo

Tango ekundoli na motema

Mpasi na Yo mpe elonga

Mobikisi, bolingo na Yo

Ndanga nde tozui awa nse

Ezala kotondisa nyonso

Kino ozongi na nkembo.

29.                  Loyembo 29

Loyembo 29 — eteni 1

O ngolu na Nzambe ebombeli enene

Tososoli Yesu loboko na Ye mawa

Na ngolu’azui biso, kati basumuki

Mpo Totatola Ye,

Na solo na Nzambe. (bis)

Loyembo 29 — eteni 2

Ye Nzambe mosantu azzui sembo esili

Na Adam na suka, oyo apesi nkembo

Molingami na Ye, esengo na Tata

Na mibeko na Ye,

Atii esengo nye. (bis)

Loyembo 29 — eteni 3

Na ntango ya kala, o sekele monene

Yoponaki biso na ngolu na Yo mpenza

Nde sika oyo Nzambe, Molimu na Yo mpe

Emonisi Mwana,

Y’otondi bolingo. (bis)

30.                  Loyembo 30

Loyembo 30 — eteni 1

O Yesu mbeka mosantu

Yo oyaki awa na nse

Kokanga nzela ya masumu

Mosika na Yo Nzambe.

Loyembo 30 — eteni 2

Oyaki na nzoto oyo

Kozua mpasi na biso

Kobikisa bikelamu

Y'okomi moto a mpasi.

Loyembo 30 — eteni 3

Yo nde mayele na biso

Mpe bomoï mpe na kimia

Bopemi longua bampasi

Tobiki seko solo.

Loyembo 30 — eteni 4

Yo mobikisi ya sembo

Na Yo nde tokangami

Tii na bomoï ya seko

Obiki nde tobiki.

31.                  Loyembo 31

Loyembo 31 — eteni 1

Mpo na bato mabe

Mokonzi ya bomoi

Amonaki mpasi

Mpe na nsoni mingi.

Nkembo na Yo Klisto

Nkembo Mpate esanto

Ozua mitema nye,

Lifuti na Yo e

Ozui Nzambi solo,

Na ngomba Golgotha.

Loyembo 31 — eteni 2

Mpasi, kufa na Yo

Ememi masumu

Okangili biso

Libulu ya somo.

Nkembo na Yo Klisto

Nkembo Mpate esanto

Tokumisi Nkolo

Na bampasi na Yo

Ememeli biso

Kimia mpe bomengo.

Loyembo 31 — eteni 3

Mpo bozui na biso

Olongwe na lola

Okomi mobola

Yo Nzambe monene.

Nkembo na Yo Klisto

Nkembo Mpate na bule

Topesi mitema

Lokumu bolingo

Na Yo Mobikisi

Ezala libela.

Loyembo 31 — eteni 4

Bozui na bolingo

Na Yo mokengeli

Na biso ntango nye

Otandeli mesa

Nkembo na Yo Klisto

Nkembo Mpate esanto

Balingami na Yo,

Batondi n'esengo

Mitema komeka.

Lisungi monene.

Loyembo 31 — eteni 5

Ndeko mpe seko, tosakoli nkembo

Na mawa monene, elonga ya bule.

Nkembo na Yo Klisto

Nkembo Mpate na bule

Yosombi mitema,

Ya Yo mpe lifuti

Ozwaki yango

Na ngomba Golgotha.

32.                  Loyembo 32

Loyembo 32 — eteni 1

Nani akosanzola mpe akoyoka yango

Bolingo na Yesu ekitisi e o nse

Na getesemane, ngomba na makila

Esika azokaki makonga ya Yahwe.

Loyembo 32 — eteni 2

Ezali lola te to bikelamu kuna

Ata misala te esali sika yonso

Ata libulu to lola molayi

Ekotatola Yo na bolingo solo.

Loyembo 32 — eteni 3

O Yesu bolingo mpe na ngolu monene

Nani akosanzola kaka se basumuki

Osalisaki banganga ya Nzambe

Mpe na bango mpenza nde omoni liwa.

Loyembo 32 — eteni 4

Solo bongo mpenza, na loyembo esanto

Bakoyemba kopambola bolingo na Yo

Na makila na Yo osombaki bango

Bakozala ba yo ya seko na lola.

33.                  Loyembo 33

Loyembo 33 — eteni 1

Tomoni Yo pene na kufa

Ozui kopo na bampasi

Tomoni’opesi bomoï na Yo

Yo sembo e bule epaï na biso.

Loyembo 33 — eteni 2

Liwa na Yo mbeka esanto

Na miso na biso seko

Makila elongoli mabe

Yango efungoli biso lola.

Loyembo 33 — eteni 2

Klisto bolingo na Yo solo

Ekoki esimbi mitema nye

Yokuti mpo masumu ya bato

Y’oza mobikisi ya biso.

34.                  Loyembo 34

Loyembo 34 — eteni 1

N’kolo, Yo na lola obongisaki esika

Oyo baye bayo’kofanda libela

Tokotatola sembo na Yo mpe ngolu

Bolingo, O, Nkolo ya Yo monene

Bolingo, O, Nkolo ya Yo monene.

Loyembo 34 — eteni 2

E’Nkolo tokomi o’boso na bule na Yo

Kosepela na Yo na bomoko na pole

Kasi awa ne nse tozangi yo mobimba

Tokozela ntango ya bosangani be

Tokozela ntango ya bosangani be.

Loyembo 34 — eteni 3

O tango ya bule mpo n’ekelezia mosanto

Okokotisa yango kuna na lola

Na kimya na Yo mpe na nkembo’ekotonda

Na fêti ya libala liboso na lola

Na fêti ya libala liboso na lola.

Loyembo 34 — eteni 3

Na kozela Nkolo, tokamati awa o’nse

Elambo bolingo na Yo mpo na biso

Nde tokotatola lobiko n’ya ngolu

Mpasi, kufa na Yo, na bozongi na Yo

Mpasi, kufa na Yo, na bozongi na Yo.

35.                  Loyembo 35

Loyembo 35 — eteni 1

Ndenge Mpate, Y’ozokisami be

Mpo na mabe, Yo mobikisi ya bato

O bolingo, o mawa ya mozindo

Mpo na biso Yesu okufaki.

Loyembo 35 — eteni 2

Na ntango’yo ya biso masumu 

Epesi Yo mpasi monene mingi

Kufa na Yo ekati singa mabe

Ozui biso, ngolu, mapamboli.

Loyembo 35 — eteni 3

Amen Nkolo, Amen nguya esanto

Na Yo Yesu, nkembo, bwanya, bokonzi

O tango’yo, biso mitema elobi

Pambolama Mokangoli solo.

36.                  Loyembo 36

Mpate o Nzambi mpo na mpasi

Ozui nayo mawa na biso

Ozalisi biso na Tata

Bakonzi, Banganga Nzambe

Elongo tokumisi Yo

Nkembo, masanzoli makaasi

Nguya nkembo na Yo.

Botosi na mitema

Tokumisi

Amen ! Amen !

Nkolo, Amen !

37.                  Loyembo 37

Mpate na bule na nkembo

Yo’otika nkembo ya Nzambe

Mpo na ekoti ya ba nzube

Osombi ebonga na Yo

Tokoyemba sasa epi

Nzembo ya bule ya elonga

O boso bua kiti ya nkembo

Tango eyembi biso bolingo

Yaka Nkolo, Amen, Amen.

38.                  Loyembo 38

Loyembo 38 — eteni 1

Bolingo ya motuya (bis)

Bopole ya mozindo

Mwana Nzambe

Akomi moto

Akomi lisumu (bis)

Akufi n’ekulusu

Kobikisa bakelami.

Loyembo 38 — eteni 2

Klisto Mwana ya Nzambe (bis)

Mpo na mabe ya biso

Akufi na nguya, asekwi

Boponami toyemba (bis)

Elonga ya Yesu

Nkembo nde ya biso, elikya.

Loyembo 38 — eteni 3

Yesu Klisto asikola (bis)

Biso nyonso toyemba na esengo

Mpenza bule

O Nkolo na likolo (bis)

Ofandi na elonga

Nkembo na Yo ezangi suka.

39.                  Loyembo 39

Loyembo 39 — eteni 1

Tokotala ye nde na nkembo

Mobikisi

Kolia mbuma elongo na Yo

Mobikisi

Tango nyonso liboso na Yo pene

Na Nzambe Tata na Yo

Yo okitaki na nse, Nkolo

Bobele.

Loyembo 39 — eteni 2

Okomi elakeli mabe

Mpo na biso

Omonaki mpasi monene

Mobikisi

Makila etangi, moto pota

Opetoli masumu nyonso

Na Yo kufa tozui bomoï

Mokangoli.

Loyembo 39 — eteni 3

Tokozela yo uta lola

Mobikisi

Elobaki okozua biso

Mobikisi

O esengo ezangi suka, komona Yo

Na nguya nyonso,

Mpe kozala lokola Yo mpe Nkolo Nzambe

40.                  Loyembo 40

Nde na Yo Yesu, ngolu na Yo

Na makila na ntalo

Kotala mawa na biso

Opesi sembo na Yo na kimia

Tokopemaka nde na Yo

Molingami

Yo mobandisi y’esengo na biso

Kino suka.

41.                  Loyembo 41

Loyembo 41 — eteni 1

Molingami Nkolo,

Na Yo toti elikia

Na kufa na yo onde

Tozui kokanguama Alleluia

Alleluia Alleluia Alleluia !

Na bolingo solo, na bolingo solo

Na bolingo solo, esengo mobimba

Loyembo 41 — eteni 2

Makila na Yo esokoli biso masumu

Nkembo ya lola sika eyamba biso.

Alleluia ! Alleluia ! (bis)

Kondima na biso, elonga n’elikia.

42.                  Loyembo 42

Loyembo 42 — eteni 1

Y’olingaki biso ti kufa

Mobikisi ya mawa,

Mpo na biso’olongi liwa,

Ku na makasi nyonso,

Ku na makasi nyonso.

Loyembo 42 — eteni 2

Na ndenge bamemisi Yo

Masumu nyonso kilo

Na ntango oyo molili

Yo moko mawa mpasi

Yo moko mawa mpasi.

Loyembo 42 — eteni 3

Sika maloba na mabe

Eleki mutu na Yo

Epesi bopemi na Yo

Na mosala ekoki

Na mosala ekoki.

Loyembo 42 — eteni 4

Nzinganzinga na Yo’awa nse

Bandimi basangani

Bayoki esengo mingi

Ya ndako ya moboti

Ya ndako ya moboti.

43.                  Loyembo 43

Loyembo 43 — eteni 1

Mpate na Nzambe Klisto’akufi

N’ekulusu, n’ekulusu

Nzela emonani polele

N’ekulusu, n’ekulusu (na kufa)

Esik’ekila efungwami

Nzela Nzambe emonani

Na Yo Yesu omikabaki

N’ekulusu, n’ekulusu (na kufa).

Loyembo 43 — eteni 2

Y’onetwami awa o nse

Na kufa, na kufa

Mpo na biso omeli mbondo

Na kufa, na kufa

Bolingo na Yo’esukisi

Makila na Yo epetoli

Toyebi ete tobiki

N’ekulusu, n’ekulusu.

Loyembo 43 — eteni 2

Na somo nkembo ekopela

Na kufa, na kufa

Na Yo Yesu, tozui elonga

Na kufa, na kufa

Na Yo kino seko na seko,

Lokumu mpe bokonzi,

Mpo na elonga ya monene

N’ekulusu, n’ekulusu.

44.                  Loyembo 44

Loyembo 44 — eteni 1

Na nzembo na banje, Loyembo malonga,

Ba Loyembo kitoko, Tondisa lola

Na bisika yonso, Loyembo na sika

Ekolandisama nsima na Mpate.

Loyembo 44 — eteni 2

Na kiti ya nkembo, tokomona Yo,

Ekoti ya nkembo na moto ya Yo.

Maboko na pota emonisi mpe ba mpasi ya kala,

Bilingo na Yo.

Loyembo 44 — eteni 3

O, ngolu monene, Yo okufaki,

Y’opesi bomoi makila etangi,

Mpo n’ebombanelo na bato nyonso,

Nzambe Tata na Yo, akumisama.

Loyembo 44 — eteni 3

Na Loyembo na banje, Loyembo malonga,

Ba Loyembo kitoko, tondisa lola

Lokumu na nkembo, masanjoli be,

Na Nzambe n’elonga, Mpate na Nzambe.

45.                  Loyembo 45

Loyembo 45 — eteni 1

Mwana Nzambe Yo molingami na moto na Yo ongengi.

Bolingo monene na Tata na nkembo na Ye monene

Yo nde osimbi mokili’oyo, obimisi na liloba

Nyoso esanjoli mayele, na Yo Nzambe na banguya.

Loyembo 45 — eteni 2

Na kati oboso na Tata, esengo na Ye libela

Bomoko na Ye na bolingo, Bomoko na Ye na nguya

Sekele monene olingaki, kolongwa lola na nkembo

Koya mokili ya masumu, okufa Yo Mwana na Nzambe.

Loyembo 45 — eteni 3

Bolingo,ngolu ya suka te, TomoniYo,

Moto, Nzambe n’ebotami ti n’ekulusu

Kolanda nzela na mpasi

Mopaya, oyinani na nse, oboyami kati ba Yo

Omeli kopo ya bololo kuna na Getesemani.

Loyembo 45 — eteni 4

Omemaki Yo mbeka bule, na ntango ya ekulusu,

Ekateli ya biso mabe, kilo ya kanda na Nzambe.

Yango topesi nkembo na Yo,

Nkolo n’esengo munene

Mitema ekoyemba elonga, na bolingo olongi liwa.

46.                  Loyembo 46

Loyembo 46 — eteni 1

Bolingo ya nsomo, bomoto Nzambe eleki.

Mpo na koyebana, apesi Mwana yoko.

Na mokili ya mabe, ya molili mabe,

Miso tomoni Yo, maboko ekangi Yo.

Loyembo 46 — eteni 2

Opeli n’ekulusu ntango ngonga misatu

Epesi molili oyo mokili ya masumu

Moto sembo Mwana Nzambe bule nguya

Amoni koyina na kanda na kufa.

Loyembo 46 — eteni 3

Yesu, Mobikisi, Nkolo, Mpate mpe mbeka

Omonaki mpasi, otali na mozindo

Na motema ngolu, kilo ntango wana

Omemi etumbu na biso suka te.

Loyembo 46 — eteni 4

Alobi atikaki motema

Elamba epasuki n’esambelu na Nzambe

Tobiki sembo mpe tokoti epai na Ye.

Na bonsomi ya Ye na miso ya Nzambe

Loyembo 46 — eteni 5

A! bolingo ‘a lola, elonga na bokonzi

Kufa na Yo bule, elakisi mpe nkembo

Ebikisi biso, etondisi biso

Na Loyembo ya seko ya batatoli be.

47.                  Loyembo 47

Loyembo 47— eteni 1

Yo Mwana ya seko na likinda ya Tata,

Esengo ya Tata na bileko seko.

Oboso bua ntango,  Yo okanisa mabele,

Epai olingaki komikitisa be.

Loyembo 47— eteni 2

Ozuaki bisengo kati na bana bato,

Oyaki na nzoto ya Nzambe akelaki

Na bopolo obotami na nse koleka bato,

Sekele monene esakwami na banje.

Loyembo 47— eteni 3

Y’ososolaki mpe libiki ya masumu

Ya mabe ezalaki kati tokufaki

Y’opesi bomoi, Mobikisi malamu,

Makila na Yo mpe elongoli mabe.

Loyembo 47— eteni 4

Yo Klisto Mosekwi, toyembeli Yo elonga,

Nzambe akumisi Yo na nguya lokumu

Okoya koluka biso tomona nkembo

Ya Yo pene na Yon a bozui seko.

Loyembo 47— eteni 5

Mpate, kumisama, Mobikisi na mawa,

Olingaki bison a bolingo enene.

Totondi n’esengo tosangana na kombo na Yo

Tokumisa, tosanzola seko.

48.                  Loyembo 48

Loyembo 48 — eteni 1

Yo nde olingai biso, Nzambe na ngolu na bolingo

Tokoti na kati na lola Mpo tokumisaka Yo.

Libota na Yo esanani, O, Tata o miso ma Yo

Na Mwana apamboli mpe Obulisaki yango.

Loyembo 48 — eteni 2

Mpo na bana, nkembo nini, ya komona Mokonzi

Mpe koyemba na elonga, ya Yesu akufaki.

Libota na Yo esanani, etc.

Loyembo 48 — eteni 3

Ngolu mingi ya Yo Tata, ya koyeba bolingo

Mpe kozela awa na nse Mwana na Yo kozonga.

Akoya, esengo mingi toyemba n’eklezia ya Ye.

Tokozala lokola Yo, Mokangoli monene

49.                  Loyembo 49

Loyembo 49 — eteni 1

Kolinga koyeba Yesu, Kopema o tolo na Yo.

Kozua Yo ndeko, Mokonzi mpe mai mpe na lipa

Koyoka kimia na ngolu na liwa Mobikisi

Koyoka mpimbo’a lobiko esengo ya bopolo.

Loyembo 49 — eteni 2

Esengo ya koloba te, Kozua Yo Mobateli

Tango nyoso kasalisa Y o obnguanaka te

Na Mwana na Yo monene , Okitaki awo nse

Koluka bameme na Yo Kozua na maboko na Yo.

Loyembo 49 — eteni 3

Y’otondisi biso ngolu, Oyebi kombo nyoso

Olakisi biso nzela ya kokoma na lola

Mpo na bampasi na biso, Y’olingi komema

Yo olingi tango nyoso, kolombisa kobikisa.

50.                  Loyembo 50

Loyembo 50 — eteni 1

Yesu ndeko na biso solo ! O, bolingo.

Ye alekindeko kolinga, O, bolingo.

Awa libota, ndeko esila, esengo eye elimwe noki

Kaka motema na Ye ezali, O! bolingo.

Loyembo 50 — eteni 2

Ye bomoi na biso ya seko, O ! bolingo.

Tonetola mosala ya Ye, O ! bolingo.

Na makila tsisokwami, ndenge n’esobe ozui biso

Obikisi bison a ngolu, O ! bolingo.

Loyembo 50 — eteni 3

Amipesaki Ye na mbeka, O ! bolingo.

Asepeli na kopambola, O ! bolingo.

Na liloba na Ye toekba, na kimia ezangi na kobanga

Pene na Ye lobiko solo, Na ! Bolongo.

51.                  Loyembo 51

Loyembo 51 — eteni 1

Nkembo na Yo seko Nzambe monene,

Na Yo moko kaka Mokonzi nkembo.

Libela motema n’esengo bule,

Netola, tatola, Mpate akufaki.

Loyembo 51 — eteni 2

Tokumisi be Yo lola esanzoli, Lokumu,

Monene toyembi seko.

Bokonzi epesami n’esika Nzambe,

Na Yo ngolu engengi mpe na bolingo.

Loyembo 51 — eteni 3

Nde sika polele nkembo ekongenga,

Ekobima moto na kati biso

Esengo ya ndenge tokomona Yo,

Mpe na Yo tii suka tokosepela.

Loyembo 51 — eteni 4

Nkembo ezala na Yo Mwana ya Seko,

Kufa, elonga na yo efunguli lola.

Y’olingaki biso seko na seko,

Lokumu monene, nguya, bokonzi.

52.                  Loyembo 52

Loyembo 52 — eteni 1

Molimu esala kati na biso ete tolinga bozongi na Yo

Mpe mboka biso ya seko, Yo Yesu, Nkolo na bomoi

Amen, yaka Nkolo, olati nkembo, lokumu

Na miso ya ba santu Y’ongenga mpenza.

Loyembo 52 — eteni 2

Yaka Nkolo ezali mbela nye, ya bandimi epai na Yo

Na bolingo n’eklezia se ya Yo, Molimu Santu akokisa

Amen, yaka Nkolo, olatinkembo, lokumu

Na miso ya ba santu, Y,ongenga mpenza.

53.                  Loyembo 53

Loyembo 53 — eteni 1

Mobikisi na nguya Yo nde bomoi,

Pambola basantu bapaya onse,

Na Yo Yesu biso totii elikia,

Bolingo na Yo tambuisa biso.

Loyembo 53 — eteni 2

Bomba biso kozongela mokili,

Totala bo baleki na nzela,

Tokima masumu ya mokilioyo,

Tozua bomengo na liloba be.

Loyembo 53 — eteni 3

Tondisa mitema n’ekila ya Yo,

Tozala sika ba Yo libela,

Tii na mokolo ya nene na Yo bule,

Pesa biso nguya na kondima.

54.                  Loyembo 54

Loyembo 54 — eteni 1

Se na lola nde nkembo elakami,

Tolaki Yo n’esengo kondima,

Yaka Nkolo kokamata Eklezia,

Kotisa yango epai na Tata.

Loyembo 54 — eteni 2

Kuna Nkolo nyoso ezali esengo,

Nzemboelonga nsai ya bisengo,

Matanga mpasi mawa ekosila,

Matata mpe buale nyonso esili.

Loyembo 54 — eteni 3

Kuna pene na Yo, tokobombama,

Kuna na Yo tokozala seko,

Na kimia mobimba ya biso na Yo,

Tokosepela libela seko.

Loyembo 54 — eteni 4

Nkolo Yesu, tolingi kozela Yo,

Na likolo miso ekotala,

Mokangoli telema ozua biso,

Konetola biso na Yo likolo.

55.                  Loyembo 55

Loyembo 55 — eteni 1

Minoko efunguani mpo na boyei na Yo

Mitema na nsai na posa na Yo

Mokonzi na bomoi, Yo Mokangoli.

Mwasi na Yo alobi Amen, Nkolo oya.

Loyembo 55 — eteni 2

Sika tokitani nde nkembo na Yo.

Na elonga na Yo, nde tokolonga.

Mokonzi na bomoi Mokangoli Yo

Mwasi na Yo alobi Amen Nkolo oya.

56.                  Loyembo 56

Loyembo 56 — eteni 1

Mpo na biso ntongo etani

Ya bomengo ya suka te

Nkol etikali nde moke

Mpe tozala kati na Yo, (x2).

Loyembo 56 — eteni 2

Soki tango ememi biso

Tokeyi epayi na Mokonzi

Esika buale nyonso esili

Topemi nde pene na Yo, (x2).

Loyembo 56 — eteni 3

Mukolo y’esengo na nkembo na Yo

Okomonana na miso ya ba Yo

Na mongongo y’elonga

Epai na Yesu, omeme biso, (x2).

57.                  Loyembo 57

Loyembo 57— eteni 1

Nkolo Yesu, Yo na bolingo eleki.

Yo nde nkembo, koleka ya Nzambe

Yaka, Yaka na bolamu kitoko

Tozeli Yo uta esika bule.

Loyembo 57— eteni 2

Yo obikisi biso mosala na Yo

Nde na lola tokosalela Yo

Kotala Yo, kozala lokola Yo

Kino seko tokokumisaka Yo.

Loyembo 57— eteni 3

Alleluia ! nde bomengo bosanto

Tala koya libala ya Mpate

Pene na Yo tokoyemba suka te

Nzembo a sika ya Yo molingami.

58.                  Loyembo 58

Loyembo 58 — eteni 1

Kongenga ya seko ya nkembo ya koleka

Ya moi mpe bolingo meke n’esika Yo

Toyembi bonene Yo mpe ngolu enene

Mpo na bis’okufi, Yo Mpate na Nzambe.

Loyembo 58 — eteni 2

Y’omikitisaki na nkembo koleka mingi.

Kate na mpasi nyoso ya kufa n’ekulusu

Onetwami lelo, likolo ya koleka

Yesu, tokumisi na mingongo nyonso.

Loyembo 58 — eteni 3

Totatoli Moto Nzambe oyo ya nkembo

Oyo asekwaki na kufa n’elonga

Klisto ya Nazareta, pene na kiti na Yo

Na miso a mokili, okongenga solo.

59.                  Loyembo 59

Loyembo 59 — eteni 1

Na motema moko tasanzoli Nzambe Tata

Na ba nzembo ya basantu Y’asepela

Toyemba bolingo na nzela awa na nse

Mpe tosepeli na Mobikisi’akoka. (bis)

Loyembo 59 — eteni 2

Tokumisa Nzambe Tata na motema moko

Mpo topetolami na makila Mpate

Yango epesi biso tokota esika bule.

Na bonsomi nyonso na nzela ya sika (bis)

Loyembo 59 — eteni 3

Tokumisa Nzambe Tata na motema moko

Mokonzi na biso abukaki liwa

Tosekwi nde na ye, mitema ezui elikia elikia

Ya lobiko seko kokoma n’esengo. (bis)

60.                  Loyembo 60

Loyembo 60 — eteni 1

O Yesu kombo na Yo epai biso bandimi

Monene, motuya, bolingo, bolamu

Mpe ngolu, ezopesa

Lobiko ya nkembo. (bis)

Loyembo 60 — eteni 2

Yo Mwana na Nzambe, Molingami ya Tata

Yo nkembo na lola

Oyelaki biso muinda epela na nse.

Ba mbeka ya Nzambe. (bis)

61.                  Loyembo 61

Loyembo 61 — eteni 1

Pene na Yo Nkolo na mitema na biso.

Bomba yango kimia,

Na bule makasi, bondisa ngolu

Kamba biso seko, Kamba biso seko ;

Loyembo 61 — eteni 2

Koya nde na Yo eza mposa na biso,

Yo Emanuale bule.

Bolingo na Yo epai na biso nde bomoi

Yango eza seko ! (x2)

Loyembo 61 — eteni 3

Nkembo na Yo, Mokangoli, mawa na seko

Ekokosa mpe te.

Yo oyambaki biso na mapapu na Yo

Mpo tango monene, (x2).

 

62.                  Loyembo 62

Loyembo 62 — eteni 1

E, Tozui na lola, Tata malamu mingi,

Oyo mibeko’esalama kala :

Nzambe na bokasi, na Ye tozui elikia

Ye na lola akengela bana, (x2).

Loyembo 62 — eteni 2

Na Mwana mpe na Ye apesi biso bomoi

Tosombami na makila ntalo.

Aponaki biso na nkembo ya monene,

Na Yesu be nde nzela na lola, (x2).

Loyembo 62 — eteni 3

Bwanya ngolu nguya na Yo esangani

Mpo imema biso na mboka esengo

Nzambe, mpo na biso bolamu eza seko :

Butu, moyi, okotala biso, (x2).

 

63.                  Loyembo 63

Loyembo 63 — eteni 1

Na bilanga Yesu, tokolia na elikia,

Ngolu monene ya Mokonzi, Mobateli.

Tomela na mayi etangi butu moi

Na kitia bolingo atiyi biso be.

Loyembo 63 — eteni 2

Topema malembe, n’elanga na bozui

Tobanga eloko te, ata mopepe mabe

Yesu Klisto azali na biso mpo seko

Tofuanda lebela pene Mobateli.

Loyembo 63 — eteni 3

Motema na Ye mpe, etondi na bolingo,

Epai na biso oyo Totondi na bulembu

Bolembu na biso nde lobiko solo.

Na ye aliki Ye, azwa boboto be.

 

64.                  Loyembo 64

Loyembo 64 — eteni 1

Na bopemi seko, misala ekoki be.

Mokolo suka te ba santu kosala.

Na makolo na Yo, na kofukama nyoso

Bakobwakela Yo bikoti na nkembo, (x2).

Loyembo 64 — eteni 2

Biso tokomona na elongi ya nkembo

Kitoko ya Mobikisi ya Mobalani

Mpe tokososola sekele ya mozindo.

Ya ngolu na Yo mpe boboto na Yo, (x2).

Loyembo 64 — eteni 3

Kaka na Yo Yesu, na mwinda na Yo peto

Yo moyi na sembo pelisama seko

Eklezia ekomema ti na nkembo ekoya

Kongenga na Yo epetwami libela, (x2).

Loyembo 64 — eteni 4

Yo moko okomona oyo motema elingi

Mbuma ya kotela uta n’ekulusu.

Nkolo okosepela mosala na Yo mpenza

Na bolingo bwa Nzambe ekokisami, (x2).

 

65.                  Loyembo 65

Loyembo 65 — eteni 1

Bolamu oyo eleki nyoso

Esengo ya awa o nse

Nde kozwa Yesu bo Nkolo

Kolanda Ye Mokonzi.

Loyembo 65 — eteni 2

Na bolingo tolingami

Moko te ekokata

Azui biso na Ye kaka

Azali mpo na biso.

Loyembo 65 — eteni 3

Bolingo yaye ya solo

Na biso ezanga te

Ezali ejiba libela

Ekoki kosila te.

Loyembo 65 — eteni 4

Soki Y’alingi tolinga

Bolingo ya ndambo te.

Mpo ete liboso ye moko

Akobongwanaka te.

66.                  Loyembo 66

Loyembo 66 — eteni 1

Bozui ekokani te, ya suka kindeko

Yo moko nd’okokaki kolonga monguna

Bomba na nguya na Yo milimu mitema

Yo nde pene na biso otondisi esengo.

Loyembo 66 — eteni 2

Esengo ya bomoyi, lipa enzuluka te

Ekotondisaka be motema na nzala

Na bolembu monene, ngolu emonani

Ata na komekana, liloba esalisi.

Loyembo 66 — eteni 3

Mobikisi na ngolu, Pesa biso lelo

Kotala elongi na Yo, komona bolingo

Soki ngolu na Ye te, bomoi eza kufa

Kozala kati awa esengo monene.

 

67.                  Loyembo 67

Loyembo 67 — eteni 1

Y’obukaki minyololo, Yesu Klisto Mokonzi

Na bansoni na minyoko, Osalisi biso nye.

Loyembo 67 — eteni 2

Na ngolu ya kobikisa, Kati na biso ozali

Toza lifuti na yo, Yesu mobali a lola.

Loyembo 67 — eteni 3

Yo opesi bomoi na Yo, Bikisa milimu be

Tozala kotosaka Yo, N’esengo bolingo n’o.

 

68.                  Loyembo 68

Loyembo 68 — eteni 1

Yesu na bolingo, tondisa mitema

Na butu na moyi, pelisa na moto.

Mokangoli mpenza, lelo na likolo

Tindika mitema etosa bokonzi

Mpo na Yo etuta, elinga Yo seko.

Loyembo 68 — eteni 2

Mpo na bayo oyebi buale ya koleka

Omonaki mpasi Yesu okomi mbeba.

Mobikisi a nguya, bolingo monene

Tikete mitema komona boboto

Na Yo, tosanzola, tokumisa mingi.

Loyembo 68 — eteni 3

Mpo na biso nyonso, sika osambela

Olakisi NZAMBE, bampate olinga.

Yo, Pasta Mokonzi, osimbi biso be.

Tika tango nyoso topema nde na Yo

Kotikela nyonso na Kimia Yo Nkolo.

 

69.                  Loyembo 69

Loyembo 69 — eteni 1

Ngolu na Yo, Nkolo ekei lola ;

Solo na Yo emati na likolo ;

Na bolingo na Yo mitema biso

Ekanisi mabombami maike.

Loyembo 69 — eteni 2

Totondi Yo na bolamu bua Yo

Mposa esili na mai na ngolu

Tambuisa biso kimia o boso bua Yo

Tosalela Yo soke tango iso.

Loyembo 69 — eteni 3

Ngolu na Yo liziba bomengo ;

Na Yo nde bolingo mpe bomoi.

Molimu na Yo tango nyonso Tata

Etambuisa, ebomba mitema.

 

70.                  Loyembo 70

Loyembo 70 — eteni 1

Kobika na Yo lizib’esengo

Kosepela na moi na Yo

Komona Yo pene na Tata

Kimia nini Yesu na mitema.

Loyembo 70 — eteni 2

Mawa na Nzambe epesi Yesu,

Na Yesu nde tozui kimia

Na Ye sembo ekokisami

Moko te akosambisa biso.

Loyembo 70 — eteni 3

Esengo Nkolo mpo mawa na Yo

Nde tozui nzela mpamba be

Kokota lola na Yo kimia

N’esengo mpo te tokanguamaki.

Loyembo 70 — eteni 4

Nkolo Yesu tolingi solo Yo,

Yo nd’opesi biso bomoi

Yo na mawa na Yo monene

Eyi kozua biso tango nyonso.

 

71.                  Loyembo 71

Loyembo 71 — eteni 1

Nkolo ! Na mawa eza monene,

Na petua mpe motau na nga,

Sala mpe motema na ngayi

Tango nyoso ekanisa Yo.

Loyembo 71 — eteni 2

Mawa na Yo ebonguanaka te

Ezobenda nga motema

Kosepela na nkembo na Yo

Na esengo na Yo seko.

Loyembo 71 — eteni 3

Nani Nkolo akokabola

Ngayi na Yo lakisa nga.

Soki mbemba to mutambo

Nakopusana se na Yo.

72.                  Loyembo 72

Loyembo 72 — eteni 1

Y’otei biso, Y’osungi biso,

Na tango Yesu ozangi !

Molimu mpe maloba na Yo

Ezali na baponami.

Loyembo 72 — eteni 2

Mongongo n’o ezoyokana

Na masakoli motuya,

Molimu n’o elimbolaka,

Mitema, miso efunguami.

Loyembo 72 — eteni 3

Makanisi bolingo na Yo

Ekomi na baye bayo.

Na esobe tomoni ongengi

Tomeki bolamu na Yo.

Loyembo 72 — eteni 4

Kasi sika mosala na Ye

Ekosila katia etonga ;

Mpe tomonani na polele,

Tokoloba na Yo, Nkolo !

73.                  Loyembo 73

Loyembo 73 — eteni 1

Yo ofandi na likolo, Nzambe ona bolingo !

Likolo na bana o nse, otii miso na mawa.

Nzambe na nkembo na mawa,

Molimo na Yo ya solo, okambi biso seko.

Loyembo 73 — eteni 2

Toyebi mongongo na Yo, Yo Yesu mobokoli ;

Ozua biso, n’ekulusu, Tozua bomoi ya seko.

Na Molimo ya bolingo, opi biso tango nyonso

Kamwa ngolu na sika.

Loyembo 73 — eteni 3

Mwa sika nde tomoni Yo ozongenga na nkembo,

Be na Yo nde tesepeli mbuma n’elonga na Yo.

Uta seko mpe na seko,

Boboto N’o etatuama, Kufa N’o ebikisa.

74.                  Loyembo 74

Loyembo 74 — eteni 1

Y’okita Nkolo ! uta nkembo ya seko,

Y’olinga kozala moninga na biso ;

Y’omikitisaki na bolingo Nzambe,

Mp’obikisa biso na mpota ya liwa solo.

Loyembo 74 — eteni 2

Nde sika, mpe seko, na ndako na Yo Tata

Yo moko otii mpe, okosangisa biso.

Tokozala na Yo ; tomona kongenga

Ya ngolu na bolamo na Yo solo polele.

Loyembo 74 — eteni 3

Yo Yesu, kumama ! na mitema esengo

N’elikia makasi tozazela tango y’esengo

Oyo tokolata nzoto ya nkembo,

Tokonetuama o bomoi bua seko.

75.                  Loyembo 75

Loyembo 75 — eteni 1

Toyemba bandeko, mpo na Tata na biso

Bolamu boleki. Na katia basanto

Kombo na Ye, kitoko aw’o nse,

Enetwama nyonso ! (bis)

Loyembo 75 — eteni 2

Nani aleki biso, libota ya Ye mpenza

Kotatolaka Ye ? Muanje nani akoloba

Bolingo na Ye solo

Na lola Nzambe ? (bis)

Loyembo 75 — eteni 3

Tokumisa oyo akotia biso

Esik’eleki banje nyonso.

Solo obongi na lokumu, masanjoli

Tata na bule mpo bolingo na Yo !

76.                  Loyembo 76

Loyembo 76 — eteni 1

Esengo be na baklisto,

Tango tokomona Ye

Yesu Klisto, Mokangoli,

Na lola esika bule ! (bis)

Loyembo 76 — eteni 2

Kozala na Yo na lola,

Komema elongi na Yo,

Koloba na bapambuami

Nkembo na Yo ya seko ; (bis)

Loyembo 76 — eteni 3

Kozala na Yo bonzenga,

Koyoka mpimbo na Yo,

Kosepela boboto n’o,

Esengo moko enene ! (bis)

Loyembo 76 — eteni 1

Na Yo nde mpenza bopemi

Elikia na mitema,

Suka misala na Nzambe,

O ndako ya Ye Tata. (bis)

77.                  Loyembo 77

Loyembo 77 — eteni 1

Nkolo ! obulisa tango ya biso ;

Sala ete tokumisaka Yo mpenza.

Sala ete kati na biso omonisama

Kopangana na Yo epesa esengo.

Loyembo 77 — eteni 2

Tosengeli solo kondima se Yo,

Ata mpe na mawa totala se Yo !

Esengo kopema na nguya na Yo.

Tozali na nyonso na Kozala n’o.

78.                  Loyembo 78

Loyembo 78 — eteni 1

Yesu ! libanga na nguya,

Mokangoli na nga !

Monguna nani akokoka

Libateli na Yo ?

Loyembo 78 — eteni 2

Nzambe, ngolu elimbisa,

Lola na Yo ya nga.

Nguya na Yo ezingi nga,

Nyonso na kondima.

Loyembo 78 — eteni 3

Lobiko na loboko n’O,

Motema na mawa.

Esengo ! seko Y’ozali

Nkembo mpe lobiko !

79.                  Loyembo 79

Loyembo 79 — eteni 1

Kotambolaka na Yo,

Nkolo boboto be,

Na elikia bosoke

Na motema na Yo ;

Koluka kaka esengo

Na kosala nyonso :

Eza lola awa o nse,

Esengo ya bule.

Loyembo 79 — eteni 2

Boye, liboso na Yo,

Tokoki tango iso,

Na molimu na ngolu,

Komeka bolingo n’O.

Yo moko elikia na biso,

Yo Mokangoli !

Mpe motema esengo

Ezua na Yo bomengo.

80.                  Loyembo 80

Loyembo 80 — eteni 1

Na Yo Yesu, motema eyaki,

N’esengo, na Nzambi na ngai.

Liboso na Ye na Yo sembo

Nakokota esika esantu.

Loyembo 80 — eteni 2

Na Yo, Nkolo, naza na Kimia ;

Nayebi bolingo na Yo.

Yango eza malamu seko,

Makila na Yo nde nsiko.

Loyembo 80 — eteni 3

Na Yo, Nkolo, nakobanga te

Kokoso nyonso n’esobe.

Wana esaleli Yo nga nzela,

Mawa na Yo ezingi nga.

Loyembo 80 — eteni 4

Kati na Yo ; liwa ata eye,

Nakozela nabanga te :

Bomoi na nga ezali na Ye,

Nakobika lokola Ye.

81.                  Loyembo 81

Loyembo 81 — eteni 1

Nde na Tata na bongengi

Ekabemi mabonza.

Akopesaka biyano

Akopambolaka nye.

Loyembo 81 — eteni 2

Tata na mawa na biso

Tango nyoso osimbi nga.

Na ngolu Y’opesi ngai

Ya koyeba bolingo.

Loyembo 81 — eteni 3

Bolingo ya koloba te

Nakuti na Yo Nzambe

Bolingo eleki buanya

Ya motuya na biso.

Loyembo 81 — eteni 4

Nde na ndako na Yo bule

Nakopusana na Yo

Na kobika to kokufa

Lola na Yo eza ya ngai

Loyembo 81 — eteni 5

Nkembo na Yo Nzambe Tata

Liboso olingaki ngai

Na Yo ngai naza motuya

Simba ngai mobimba nye.

82.                  Loyembo 82

Loyembo 82 — eteni 1

Nani na lola, Azali kuna,

Kaka Yo Nkolo, Mobateli mpate,

Motema azui ?

Loyembo 82 — eteni 2

Nani alingi, Nani akoki,

Kobimisa ngai na mpasi

Mpe kosunga ngai ?

Loyembo 82 — eteni 3

Na Yo Mosungi, Nazui kimia ;

Osali nyoso mpo sembo ;

Na Yo kati kondima.

Loyembo 82 — eteni 4

Na ngai bomengo, Koyeba, Nkolo,

Ndenge nayebi,

Ozali malamu, opi ngai kimia !

83.                  Loyembo 83

Loyembo 83 — eteni 1

Maloba na Yo seko bongo,

Nkolo, ekoleka mpe te ;

Motema ekondima solo,

Nakobanga eloko te.

Loyembo 83 — eteni 2

Nayebi makanisi na Yo !

Nayebi ekotika

Mpate no moko te :

Mokangoli, olakaki.

Loyembo 83 — eteni 3

Biso ba bolingo N’o,

Tobatami na tolo N’o ;

Ata mokili to lifelo,

Ekokabola biso N’o.

84.                  Loyembo 84

Loyembo 84 — eteni 1

Nkolo, tambuisa makolo

Tii lola mboka na ngai ;

Nzambe, okotika ngai te

Na ngolu na Yo seko.

Epai na ngai na ngolu N’o,

Bolingo epela, Nkolo,

Bozui mpe bomoi na Ngai.

Loyembo 84 — eteni 2

Soki kondima te,

Bomoi na ngai eza mawa ;

Kasi kati na Yo Nkolo,

Na nguya monene N’o,

Nde bopemi mpe lobiko ;

Otalisi mikolo nyoso

Kaka be na ngolu N’o.

Loyembo 84 — eteni 3

Kino mokolo nakomona Yo

Na Nkembo ya seko,

Epai na Yo nakonetola

Lisiko na liwa na Yo,

Okozala wa ngai wa nguya,

Bozui na ngai seko,

Esengo mpe elonga !

85.                  Loyembo 85

Loyembo 85 — eteni 1

Nkolo na bolingo Omema buale,

Nakomi lifuti Mpo nyoso osali.

Nazaki na mpasi, Mpe ozuaki ngai :

Ngolu na Yo moko Esali nyoso.

Loyembo 85 — eteni 2

Bomba ngai na ngolu Motema seko,

Na esengo nyoso Ya Kimia na Yo ;

Longola bulembu, Kembisaka ngai,

Simbaka ngai seko Penepene N’o.

86.                  Loyembo 86

Loyembo 86 — eteni 1

Nayebi Yo, esengo eleki be.

Molimo N’o, Yesu, kati na ngai ;

Nasepeli, solo esengo mingi,

Mpo nazui Yo Mobikisi na ngai.

Loyembo 86 — eteni 2

Y’olinga ngai, ekelamu ebeba,

Omipesi na mbeka mpo ngai ;

Makila N’o esokoli ngai petoa,

Liwa na Yo, lobiko mpo na ngai.

Loyembo 86 — eteni 3

Na mabele awa naluka nini,

Mpo nazali molingami na Yo,

Mpo ngolu N’o, Nkolo na bolamu be,

Ntongo nyoso ekebisaka ngai ?

Loyembo 86 — eteni 4

Soki nazui matata na mokili,

Komekama, to mpasi na nzela,

Nakobosana, te na tango moke,

Solo mondimi aza etike te ?

Loyembo 86 — eteni 5

Molingami, ezali Yo, boboto,

Otambuisi ngai na miso na Yo ;

Nakolela te na bapasi nyoso

Awa napusani pene na Yo !

Loyembo 86 — eteni 6

Motema, na etamboli na solo,

Esepeli, Nzambe, lisanga N’o ;

E, motema, na nguya mpe n’esengo,

Ya Molimu etondi na Kimia.

87.                  Loyembo 87

Loyembo 87 — eteni 1

Nkolo, oza wa ngai, Mobikisi akoka ;

Atiaki ndelo na bokitani na ngai.

Monoko efungwama na nsai na ngai !

Yemba nzembo ya bolingo Yesu, Nkolo !

Loyembo 87 — eteni 2

Nabikaki boni kati na mabe na ngai,

Mpe Nkolo amona ngai na mapapu na seko ;

Auti lola mpo abikisa ngai mosumuki :

Sepela, motema, kati na Yesu, Nkolo !

Loyembo 87 — eteni 3

Esengo kozua Yo, Yesu, bo mbeka,

Bo mobateli, bo ndeko, bo libiki, sembo !

Eza malamu, mpo kimia etondi motema !

Sepela, motema, kati na Yesu, Nkolo !

88.                  Loyembo 88

Loyembo 88 — eteni 1

Nkolo, kaka basanto, na Yo nde bakoyemba,

Nde bakoloba ata, na bolembu bolamu na Yo.

Osombaki biso na makila ma ntalo,

Nde tokei na kimia o mboka lola.

Loyembo 88 — eteni 2

Etikali moke, baleki nzela awa o nse,

Banyokwami na mokili kasi bana na Tata na Yo,

Tokokenda na kimia tii ntango oyo malamu

Tokomona elongi na Yo na Konetwama.

Loyembo 88 — eteni 3

Na ngolu na Yo, Nkolo, tozui nkembo n’o,

Tozokenda, lola, kotatola elonga na Yo,

Komona Yo, kokumisa Yo, oyo tondimi,

Sima na ba pasi, tolongi na kondima.

89.                  Loyembo 89

Loyembo 89 — eteni 1

Mokangoli, na bolingo monene,

Mobateli, mongongo nayebi !

Mpo bameme, na bolingo monene,

Omitika kokufa n’ekulusu.

Loyembo 89 — eteni 2

Na bapasi, to kozanga, ba mpiko ?

Mbala moko osilisi pasi,

Oleisi ngai na elelo monene,

Opesi ngai makabo ya sika.

Loyembo 89 — eteni 3

Nakela ? Naza pene na mayi,

Omemi ngai na bosembo na Yo ;

Nazui na Yo liziba ya zololo,

Mpo namela kino seko seko.

Loyembo 89 — eteni 4

Nde Yo, Yesu, Obikisi molimu :

Ntango nyoso nayebi bolingo.

Olongoli na kufa ya libela,

Mpo omema ngai na bomi seko.

Loyembo 89 — eteni 5

Lobiko N’o, na bolingo monene

Nakoyemba nkembo mpe bolamu.

Nkolo sembo ! Y’elikia na ngai moko !

Okomema ngai na nzela kimia.

90.                  Loyembo 90

Loyembo 90 — eteni 1

Nasanzola Nzambe, Nzambe mokangoli be,

Natondisa mokili na masanjoli n’O,

Bango bazomona, botondi na ngai nyoso,

Nalobi na bango ndenge nasepeli !

Loyembo 90 — eteni 2

Esengo nayoka, Yo otindi liloba

Ete : « pole ajala ! » mpe pole ejalaki,

Ekomaki na ngai, etangisi ngai nyoso,

Elobi mpe na ngai : « Tala nzela bika. »

Loyembo 90 — eteni 3

Esengo naloba na nse ya mokili oyo,

Natombola mongongo kosanjolaka Yo,

Na bonsomi nyoso ya mwana epai na Tata,

Na bobangi esantu ya moto na Nzambe.

91.                  Loyembo 91

Loyembo 91 — eteni 1

Baklisto, sanjola mpe elongo tatola

Nkombo a Mobikisi !

Biso balingami, asangisi banso be,

Tonetola Nkolo. (bis)

Loyembo 91 — eteni 2

Mwanje na Yawe, akojingela esika

Bana na Ye,

Akobikisa bango, Ye nde mokangoli,

Na bapasi nyoso. (bis)

Loyembo 91 — eteni 3

Meka mpe sosola ete, Yawe, azali,

Na boboto bwa Nzambe solo.

Nde esengo na moto aliki na Ye,

Oyo aliki na Ye !

92.                  Loyembo 92

Loyembo 92 — eteni 1

Motema na ngayi nyoso natiki na Nzambe, Mobikisi.

Bompikiliki na Yo na ngolu na Yo mpenza

Elakisaka ngayi, boboto na bolingo.

Loyembo 92 — eteni 2

Esengo, ö Nzambi, ozala Tata na ngai !

Olandaka ngai. ngolu na Yo esungaka,

Otala mpe osunga, kondima na ngai.

93.                  Loyembo 93

Loyembo 93 — eteni 1

Nkolo soki na banzi Yo,
Na ngolu na Yo elamu.
Motema ekopela na ngai
Te namonana na Yo. (bis)

Loyembo 93 — eteni 2

Ata na bolembu solo,
Awa natamboli nse
Lokola naza n'esobe,
Epayi nzube ebima ; (bis)

Loyembo 93 — eteni 3

Ata ko banguna ebele
Bazui ngai na bolembu,
Na mitambo bazui mabe
Bakolinga mpe ngayi, (bis)

Loyembo 93 — eteni 4

Luka Nkolo, mokangoli,
Kopesa ngayi mpila,
Sala te mosali na Yo
Akangama na Yoo. (bis)

Loyembo 93 — eteni 5

Tii mokolo baponami,
Balongi n'elonga N'o !
Nyoso balati be mpembe
Ba kotatola nkembo. (bis)

94.                  Loyembo 94

Loyembo 94 — eteni 1

Kati na bulemb’oyo, Totala se na lola
Ye Nzambe mpe na mawa, abombi bolamu
Tii n’esika na bule, tokoti malamu
Na biso, Ye nde Tata, Ye Nzambe na kimia.

Loyembo 94 — eteni 2

Na kati na ba mpasi, Totala se na lola,
Epayi na Klisto Nkolo, Akokita noki.
E, Mobikisi solo, Akoyamba ba Ye.
Eklezia azobenga Nkolo Yesu yaka.

Loyembo 94 — eteni 3

Nkembo na Yo se Tata ! Nkembo na Nkolo Yesu
Biso buale esili, Totala likolo
Okembisa bomoyi, kondima, bolingo.
N’esengo na molimu, Tozeli ozonga.

95.                  Loyembo 95

Loyembo 95 — eteni 1

Pambwama Yo Nkolo, Nzambe mpe Tat’a biso,
Na biloko nyoso, opesaka biso ;
Yo olingi biso mpe koleka ba mama :
Nini ekokani, na bolingo y’olinga.

Loyembo 95 — eteni 2

Olakisa yango, bolingo ya tembe te,
Nzambe na bolingo na likabo na Yo
Ya Yesu Mokangoli Mwana na likinda,
Na liwa na nzete, tozui bolimbisi.

Loyembo 95 — eteni 3

Osopi bolingo, Yo bolamu mpe bwanya
Na mitema biso, na Molimu y’opesi ;
Yo azali na biso akotatolaka
Na ngolu na Yesu Y’olimbisa biso.

Loyembo 95 — eteni 4

Na nzela bolingo, Mobikisi na mawa,
Bomba biso kimia, ekozonga yo awa ;
Yesa biso baye basambeli bazeli,
Mpe tika tofanda na bolingo na Yo.

96.                  Loyembo 96

Loyembo 96 — eteni 1

Tokenda n’esengo mpe n’esengo,
Na mboka oyo ya bayengebeni,
Na ndako Yesu azobondela ;
Tokenda epai na biso Mokeli ;
Tambola ni n’esengo monene,
Esika na biso babulami.

Loyembo 96 — eteni 2

Banzembo ya bolingo na lola :
Bayembi bazembo ya  bomengo !
Nde tozui esika ya bolamu nye
Ntango tokomi na mboka yango.
Tambolani n’esengo monene,
Esika na banso babulami.

Loyembo 96 — eteni 3

E ! na lola nde tomoni, Nkolo,
Y’osimbi mitema biso nyonso.
« Yaka Nkolo ! » nzembo y’Eklezia ,
« Nkumba biso na nkombo olakaki. »
Kuna tozui bomengo y’esengo :
Esika na banso babulami.

Loyembo 96 — eteni 4

Sika esengo na mboka ya sika,
Tokoyemba ba Nkembo ya Yesu ;
Kuna ezangi matanga kolela,
Masumu te n’esika bomengo ;
Na Yesu tosepeli libela,
Kati na bolingo mpe bomengo !

97.                  Loyembo 97

Loyembo 97 — eteni 1

Balati pembe, basekui, bakomona Nkembo ?
Na lobongi na Klisto meyi, basekui bayembi ?
Batatoli bolamu n’elonga ya mbondi na Ye,
Liboso na kiti na Ye, Nyoso topamboli.

{O ! Bomengo penza ! bomengo, bomengo !
O ! Bomengo solo, na mboka bopemi !
Tango nyoso, tosangani, Eklezia, na mboka na Ye,
Tokoyemba tina suka : Nkembo Muana Nzambe !}

Loyembo 97 — eteni 2

Na Lola, mokolo wana, na mboka n’elaka.
Tosangani biso nyoso, bolingo na Nzambe.
Tokoyemba ti seko, nzembo ya esengo mpenza,
Endimami lola nyoso, na tongo ya seko.

{O ! Bomengo penza ! bomengo, bomengo !} etc.

Loyembo 97 — eteni 3

Namukolo ezanga suka, tango tongo etani,
Banso tozuamibomoko, kati na bolingo,
Na oyo bakokumisa, tokopesa lokumu
Muana Mpate azua nguya bokonzi na nkembo !

{O ! Bomengo penza ! bomengo, bomengo !} etc.

98.                  Loyembo 98

Loyembo 98 — eteni 1

Esengo be, elengi ya monene,
Tango Yesu akoya,
Mpe libela, Eklezia ekomata,
Epayi na mobali ! (bis)

Loyembo 98 — eteni 2

Tango nini, liboso a Tata Nzambe
Klisto amema biso.
Mpe n’elonga, na ndako na Ye bule
Nde amemi biso ! (bis)

Loyembo 98 — eteni 3

Bokoyoka n’esika na likolo
Banzembo n’esengo ;
Tokoyemba bisengo mpe ngolu,
Bolingo na Nkolo ! (bis)

Loyembo 98 — eteni 4

Nkita, Nkolo, mitema ezozela ;
Tolingi Yo Nkolo !
Banda kala, bandimi n’o bazeli :
Yaka Mokangoli ! (bis)

99.                  Loyembo 99

Loyembo 99 — eteni 1

Nkembo, Tata Nzambi, engengi na liloba ;
Eza mpo na bana bozui monene be;
Lolaka a mononga, mosungi, Mosalisi ;
Mokanda bolingo bakoma na lola.

Loyembo 99 — eteni 2

Na kotanga yango molimo ezui kimia,
Motema pepele na mikumba kilo.
Eza mosulo monene tatoka pema,
Ebale na ngolu na mayi a lobiko.

Loyembo 99 — eteni 3

Bino batu na mpasi na mokili nyoso,
Mitema bolozi elembi suka te,
Boyaka kokuta kimia ya mozindo,
Ya nsango malamu mpe bolingo seko.

100.             Loyembo 100

Loyembo 100 — eteni 1

Yesu, Molingami na Tata,
Omikitisa ti suka,
Nde biso bana mpe ya moyi
Tokumisi nkombo na Yo !

Loyembo 100 — eteni 2

Yesu, moko akokani Yo,
Mpo kaka Yo mpenza solo ;
Nyoso kati na Yo eza sembo,
Lokumo, ngolu, bolingo.

Loyembo 100 — eteni 3

Banda na nse, motema sembo,
Tobikaka mpo na Yesu,
Topesa Yo, na nguya nyoso,
Lokumu, bule, tondimi !

101.             Loyembo 101

Loyembo 101 — eteni 1

Muana N’o be, o Tata biso,
Na lola mpe na nse, mabele,
Apesaka esengo na Yo.
Yesu amipesa na mbeka,
Eloko a motuya mpe nsai,
Sika azoa nkembo enene.
Nde biso totali n’elongi
Kopela ngua bobongi nie,
Bongali bua ngolu mpe na Yo,
Emoniseli ya suka.

Loyembo 101 — eteni 2

Liboso mpe mokili ezala,
Oponaki, ngolu monene,
Muana Mpate azanga mbeba.
Soki asambisami mpo biso,
Kutu,  malasi kitoko
Emati na lola na Yo !
Molingami, apesi bomoi,
Kokokisa bolingo N’o ;
N’ekulusu mosala esila,
Akumisi Yo tii suka.

Loyembo 101 — eteni 3

Anetoimi n’esika bule,
Liboso na Yo tata Nzambe,
Afuandi n’elonga solo.
Sika akokua Eklezia na Ye
Asomba na motuya mingi
Nde amemi kuna na lola.
Pene na Ye, kongenga mpenza,
Kopela na kitoko n’E,
Koyembaka elonga na Ye
Kino na suka mpe seko.

102.             Loyembo 102

Loyembo 102 — eteni 1

Opambuama, Nkolo loboko,
Okitaki kotala ngai,
Obombaki nkembo na seko
Na nse na mokili oyo.

Loyembo 102 — eteni 2

Mosoke omemaki mbuma
Obuakaki nakolela,
Yesu omonaki mpasi
Na bomikabi a kokamoa.

Loyembo 102 — eteni 3

Soko lisangu ekwe na mabele,
Ekufite, eza moko ;
Nde na kufa, eboti mingi
Ekomema mbuma ebele.

Loyembo 102 — eteni 4

Elanga, solo ekonami
Na miso na Nzambe akona ;
Nde Yo ozongi nzembo esengo,
Osimbi mbuma  motema.

Loyembo 102 — eteni 5

Nde Yo obimi na nkembo
Ozingami na Basekui,
Banso mbuma eteli y’elonga,
Basangani mpo na seko

103.             Loyembo 103

Loyembo 103 — eteni 1

Tokokamoa bongengi ya libela
Mabongisi ya bolingo seko.
Klisto asali ekelamu na sika,
Mayele n’O Nkolo.

Loyembo 103 — eteni 2

Liboso, mabe ezua mokili,
Mpate a Nzambe aza na miso na Yo,
Tata seko ! O mayele monjindo,
Sekele ekamuisa !

Loyembo 103 — eteni 3

Yesu amipesa mbeka malamu be,
Ati kimia na makila na nzete ;
Oyo aye akutana na Nzambe,
Na Klisto Ayambama.

Loyembo 103 — eteni 4

Nkembo Yesu, Yo mbuma mpe ya ntomi,
Ye olongaki kobima na liwa !
Kuna lola esengo mpe ya Tata
Ye, Adama suka.

Loyembo 103 — eteni 5

Mokili oyo eza na nse ya mpasi
Bokozela na mposa na bonsomi ;
Klisto Ye mei akoki kokangola
Na boumbu ya pamba.

Loyembo 103 — eteni 6

Nzambe akoka, elikia ya bomengo !
Kimia eleki ya mboka bosanto !
Otondisi bayo liboso na Yo,
O mukolo a suka.

104.             Loyembo 104

Loyembo 104 — eteni 1

Tonetoli, Nzambe, Mwana n’esengo na Yo,
Ye bolingo na Yo banda n’ebandeli ;
Mpo na nkembo na Yo, amipesa na mbeka,
Aye kokokisa, nyoso olingaki.

Loyembo 104 — eteni 2

Ye, Mwana na seko, na bonene boleki,
Na bonzambe na Yo Y’osimba nyoso,
Y’amikitisaki, akomaki Ye pamba,
Akumisaki Yo, na liwa ekulusu.

Loyembo 104 — eteni 3

Mwana moto amata na nzete n’ekulusu,
Mbeka malamu be emekami moto,
Molingami na Yo, ebonzo ye moko,
Libonza ekoki mpe nyoso na Nzambe.

Loyembo 104 — eteni 4

Motema esepela na bolamu nyoso
Ya Mpate eyebana, mbeba te mabe te :
Komipesa na Ye, mpe botosi boa Ye,
Malasi kitoko, emata lola n’O.

Loyembo 104 — eteni 5

Libonza na bomoi, mbeka na lobiko,
Klisto apelisi bizaleli a Nzambe,
Mpe Nzambe na sembo asengi nkembo Ne
Atomboli nyoso bolingo ya Ya Nkolo.

Loyembo 104 — eteni 6

Na Ye tosekoami, tomonani malamu,
Tata, totatoli mayele kokamoa.
Tosangani banso na Ye na ngolu be,
Tokokumisa Yo kuna na likolo.


105.             Loyembo 105

Loyembo 105 — eteni 1

Nkolo na nkembo, Yesu Mosekwi !
Elonga monene mpo na Yo seko !
Na kongenga nyonso, mwandj’akitaki,
Apusi libanga nkund’efungwani.

Refrain :

Nkolo ya nkembo, Banso babiki
Toyembi elonga Na Yo tii seko !

Loyembo 105 — eteni 2

Kimia monene, Yesu na bomoi !
Esengo enene kati bandimi !
Totondi n’esengo tokoyemba mpe,
Totatoli mpenza Yo olongaki !

Loyembo 105 — eteni 3

Tofwandi kuna pene na Nzambe,
Sika ngolu nini ! obima lola.
Wolo ezingi Yo, nde Mobikisi,
Ofwandi na kiti, na Yo mokonzi.

106.             Loyembo 106

Loyembo 106 — eteni 1

Mpo na kondim’eza mpasi te Na Nzambe oyo tondima ;

Yango lis'emoni babombi, lobok'esimbi makabo,

Mpe emonani na mosika, mbuma eteli mosika ;

Kokatis'esobe na nsomo, motem'ezali na Ndako.

Loyembo 106 — eteni 2

Kondim’eyebi mpe kobunda, Kozanga na mpe kolonga,

Koyemba, na miso kolela, Ata na mpasi kolonga ;

Kokona kotala liboso Tala eteli mosika ;

Kotosa na bokonzi nyonso, Kondima seko elongi.

Loyembo 106 — eteni 3

Ata na ntango ya ba tata, bendele n’ango epepi ;

Tal’ebele mpe baleki mpe Mokonzi akomi lola ;

Elongwi na nse ya lisapo, Kino na tango na biso.

Ekokoma kino na nkembo, Kopesa lokumu na Ye.

Loyembo 106 — eteni 4

Kondima makasi ya solo : mokili na liwa ekwe ;

Oy'elakisi nguya n’ang'ekulusu na ya ye Yesu.

Kasi sik’oyo, na likolo, Bandimi tokonetwama ;

Kondim’ekomi na polele, Kaka Yesu tokomona